Liteya 1
Lolenge okoki koyeba oyo Nzambe azali kosɛnga
Makambo nini ya ntina mazali kati na Biblia? (1)
Nani azali mobandisi ya Biblia? (2)
Mpo na nini osengeli koyekola Biblia? (3)
1. Biblia ezali likabo kitoko euti na Nzambe. Ezali lokola nkomá oyo tata ya bolingo atindeli bana na ye. Ezali koyebisa biso solo na ntina na Nzambe—lolenge na ye mpe mibeko na ye. Ezali kolimbola lolenge ya kolónga mikakatano mpe lolenge ya kozwa bolamu ya solo. Biblia yango moko ezali koyebisa biso oyo tosengeli kosala mpo na kosepelisa Nzambe.—Nzembo 1:1-3; Yisaya 48:17, 18.
2. Biblia ekomamaki soko na bato 40 bakeseni na boumeli ya eleko ya bambula koleka 1 600, kobanda na 1513 L.T.B. Ezali na mikanda mike 66. Baoyo bakomaki Biblia bapemamaki na Nzambe. Bakomaki makanisi na ye, kasi makanisi na bango moko te. Na bongo, ezali Nzambe oyo azali na likoló nde azali Mobandisi na yango, kasi moto moko te awa na mabelé.—2 Timoté 3:16, 17; 2 Petelo 1:20, 21.
3. Nzambe asɛnzɛlaki ete Biblia ekomama na bosikisiki mpe ebatelama malamu. Ebele ya Biblia esili konyatama mingi koleka babúku mosusu. Bato nyonso bakosepela te komona yo koyekola Biblia, kasi kotika nzela te ete yango epekisa yo koyekola. Bomoi na yo mpo na mikolo mizali koya etaleli lolenge oyo ozali kosala mpo na koyeba Nzambe mpe kosala mokano na ye atako botɛmɛli ya lolenge nini.—Matai 5:10-12; Yoane 17:3.