Mokanda ya Biblia nimero 66—Emoniseli
Mokomi: Ntoma Yoane
Esika ya bokomi: Patamo
Nsuka ya bokomi: soko 96 T.B.
1. (a) Na oyo etali bilembo ya Emoniseli, basaleli ya Nzambe bakondima likambo nini? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete kotyama ya Emoniseli na nsuka ya Biblia ebongi mpenza?
BILEMBO ya Emoniseli bikomamaki nde na mokano ya kobangisa bato? Soko moke te! Kokokisama ya esakweli yango ekoki kopesa nsɔ́mɔ epai na bato mabe, kasi basaleli ya sembo ya Nzambe bakondima mpenza maloba ya ebandeli oyo mapemami mpe maloba ya anzelu oyo mazali na nsuka ete: “Esengo na motángi mpe na bayoki na maloba na kosakola oyo.” “Esengo na oyo akotosaka maloba na kosakola na mokanda oyo.” (Emon. 1:3; 22:7) Atako yango ekomamaki liboso na mikanda mosusu minei ya Yoane oyo mipemamaki, Emoniseli etyami, na ntina ebongi mpenza, na nsuka ya liboke ya mikanda 66 mipemami oyo misali Biblia na biso mobimba, mpamba te yango ezali Emoniseli oyo ezali komema batángi na yango mosika kati na mikolo mizali koya, na kopesáká bimonaneli ya makambo ndenge na ndenge likoló na oyo Nzambe azali kokana mpo na bato; ezali mpe komema, kino na kokokana monene mpe ya nkembo, motó na likambo ya Biblia oyo ezali bongo: kosantisama ya nkombo ya Yehova mpe kolóngisama ya lotómo oyo azali na yango ya kozala mokonzi, na nzela ya Bokonzi oyo ekotambwisama na Klisto, Mombóto oyo alakamaki.
2. Na nzela nini Emoniseli epesamaki epai na Yoane, mpe mpo na nini motó na likambo ya mokanda yango mobongi mpenza?
2 Engebene vɛrsɛ́ ya liboso, mokanda oyo mozali ‘emoniseli ya Yesu Klisto, oyo Nzambe apesaki ye . . . Mpe atindaki anzelu na ye mpe amonisaki yango na bilembo na nzela na anzelu wana epai na Yoane, moombo na ye.’ Na yango, Yoane azalaki bobele mokomi mpamba, kasi azalaki te mopesi na makambo yango. Boye, Yoane azali momonisi te, mpe mokanda yango mozali emoniseli ya Yoane te. (1:1) Kozipolama wana ya mikano minene ya Nzambe, mpo na mikolo mizali koya, epai na moombo na Ye, esali ete motó na likambo ya mokanda yango mózala mpenza oyo mobongi, mpamba te nkombo ya mokanda yango na Greke A·po·kaʹly·psis (Apokalipisi) elimboli ete “kozipola” to “komonisa polele.”
3. Emoniseli yango moko elakisi ete mokomi na yango, oyo abéngami Yoane, azali nani, mpe lolenge nini yango endimisami na bakomi ya makambo ya kala?
3 Yoane oyo alobelami kati na mokapo ya liboso lokola mokomi ya Emoniseli azalaki nani? Bayebisi biso ete azalaki moombo na Yesu Klisto, mpe azalaki ndeko mosangani kati na bolózi, mpe elobami ete azalaki mokangami oyo atindamaki na esanga ya Patamo. Na ntembe te, ayebanaki malamu epai na batángi na ye ya liboso; na yango, ntina ya koloba makambo mingi mpo na komiyebisa epai na bango ezalaki te. Moto yango ezalaki mpenza ntoma Yoane. Bakomi ya liboso mpenza ya makambo ya kala bandimi mpe likambo yango. Eyebisami ete Papias, oyo azalaki mokomi na boumeli ya eteni ya liboso ya ekeke ya mibale T.B., andimaki mpenza ete mokanda yango moutaki epai na moko kati na bantoma. Kati na mokanda na ye oyo mozali na motó na likambo ete “Dialogue With Trypho, a Jew” (LXXXI), Justin le Martyr, oyo azalaki mokomi na ekeke ya mibale, alobi ete: “Ezalaki na moto moko elongo na biso, oyo nkombo na ye ezalaki Yoane, moko na bantoma ya Klisto, oyo asakolaki na nzela na emoniseli oyo epesamelaki ye.”a Irénée azali kolobela na polele mpenza ntoma Yoane ete azalaki mokomi ya mokanda yango, motindo moko na Clément moto na Alesandalia mpe Tertullien, oyo bazalaki na bomoi na nsuka ya ekeke ya mibale mpe na ebandeli ya ekeke ya misato. Origène, nganga-mayele ya Biblia na ekeke ya misato oyo ayebanaki mingi, alobaki ete: “Nazali kolobela Yoane, oyo amilalisaki na ntolo ya Yesu, oyo atikaki Evanzile moko, . . . mpe oyo akomaki mokanda ya Apokalipisi (Emoniseli).”b
4. (a) Nini ezali kolimbola bokeseni oyo ezali kati na ekomeli ya Emoniseli mpe mikanda mosusu ya Yoane? (b) Nini ezali kondimisa ete Emoniseli ezali solo eteni ya Makomami mapemami?
4 Likambo oyo ete mikanda mosusu ya Yoane mizalaki kolobela mingi bolingo, elimboli te ete Yoane akokaki te kokoma mokanda ya Emoniseli oyo mozali na bokasi mingi mpe na nguya. Ye mpe ndeko na ye Yakobo bazali bato oyo bayokaki nkanda mingi mpo na Basamalia ya engumba moko boye, mpe balingaki kobyanga mɔ́tɔ longwa na likoló ete ekitela Basamalia wana. Yango wana bazwaki nkombo ete “Bonelegese,” to “Bana na Nkake.” (Mko. 3:17; Luka 9:54) Bokeseni oyo ezali kati na ekomeli ekoki kobimisa mokakatano te na ntango tomikundoli ete, kati na Emoniseli, motó na likambo ezali mosusu oyo ekeseni. Makambo oyo Yoane amonaki kati na bimonaneli yango makokani ata moke te na makambo oyo asilaki komona liboso. Boyokani makasi oyo ezali kati na mokanda yango mpe Makomami mosusu ya esakweli, ezali komonisa kozanga ntembe ete mokanda yango mozali solo eteni ya Liloba lipemami ya Nzambe.
5. Ntango nini Yoane akomaki Emoniseli, mpe kati na mikakatano nini?
5 Engebene bilembeteli oyo biumeli mingi koleka, Yoane akomaki Emoniseli soko na mobu 96 T.B., mbula pene na 26 nsima na kobebisama ya Yelusaleme. Yango ezalaki pene na nsuka ya boyangeli ya Amperɛrɛ Domitien. Mpo na komindimisa likambo yango, Irénée, kati na mokanda na ye oyo mobéngami “Against Heresies” (V, xxx) alobi na ntina na Apokalipisi ete: “Mpo ete yango emonanaki uta kalakala te, kasi pene na mikolo na biso mpenza, wana boyangeli ya Domitien ezalaki kokende na nsuka na yango.”c Eusèbe mpe Jérôme bandimi litatoli yango. Domitien azalaki ndeko ya Titus oyo akambaki mampinga ya Baloma ntango bakendeki kobebisa Yelusaleme. Akómaki amperɛrɛ nsima na liwa ya Titus, mbula 15 liboso ete mokanda ya Emoniseli mókomama. Asɛngaki ete básambela ye lokola nzambe mpe amipesaki nkombo ya lokumu ete Dominus et Deus noster (oyo elimboli “Nkolo mpe Nzambe na biso”).d Losambo na amperɛrɛ ebimisaki mikakatano te epai na basambeli ya banzambe ya lokuta, kasi yango ekokaki kondimama epai na baklisto ya liboso te, mpo ete bango baboyaki kobebisa kondima na bango mpo na likambo wana. Na bongo, pene na nsuka ya boyangeli ya Domitien (81-96 T.B.), minyoko makasi mikwelaki baklisto. Ekanisami ete ezalaki Domitien nde atindaki Yoane na bolɔ́kɔ na esanga ya Patamo. Ntango Domitien abomamaki na mobu 96 T.B., Amperɛrɛ Nerva akitanaki ye; Nerva yango azalaki moto na koyokamela makambo ya basusu, mpe oyo na ntembe te abimisaki Yoane na bolɔ́kɔ. Ezalaki na boumeli ya bolɔ́kɔ na ye na esanga ya Patamo nde Yoane azwaki bimonaneli oyo akomaki.
6. Tosengeli kotalela mokanda ya Emoniseli lokola nini, mpe lolenge nini yango ekoki kokabolama?
6 Tosengeli koyeba ete bimonaneli oyo Yoane amonaki mpe oyo eyebisamaki na ye ete akoma mpe atinda yango na masangá, bizalaki te bobele molɔngɔ́ ya bimonaneli oyo bizangi boyokani kati na yango, mpe oyo bikomamaki na lolenge ya kilikili. Ezali bongo te, mpo ete mokanda mobimba ya Emoniseli, longwa na ebandeli kino nsuka, mozali kopesa elilingi ya kolandana malamu ya makambo mazali koya; kobandáká na emonaneli moko leká na mosusu kino kokokisama ya mikano ya Bokonzi ya Nzambe na nsuka ya bimonaneli nyonso. Na yango, tosengeli kotalela mokanda ya Emoniseli ete mozali liboke moko, oyo lisalemi na biteni bikangani mpe bizali na boyokani kati na yango, oyo ezali komema biso mosika kati na mikolo mizali koya, kobanda na eleko ya Yoane. Nsima na maloba na yango ya ebandeli (Emon. 1:1-9), mokanda yango mokoki kotalelama ete mokabolami na bimonaneli 16: (1) 1:10–3:22; (2) 4:1–5:14; (3) 6:1-17; (4) 7:1-17; (5) 8:1–9:21; (6) 10:1–11:19; (7) 12:1-17; (8) 13:1-18; (9) 14:1-20; (10) 15:1–16:21; (11) 17:1-18; (12) 18:1–19:10; (13) 19:11-21; (14) 20:1-10; (15) 20:11–21:8; (16) 21:9–22:5. Na nsuka ya bimonaneli yango, bosukisi moko ya nguya ezali kolanda, oyo kati na yango Yehova, Yesu, anzelu mpe Yoane, bango nyonso bazali koloba, kopesáká bongo bosangani na bango ya nsuka lokola basáli ya moboko kati na nzela ya bopesi nsango.—22:6-21.
MAKAMBO MAZALI KATI NA EMONISELI
7. Yoane alobi nini na ntina na eutelo ya Emoniseli, mpe makambo nini alobi ete azali mosangani na yango elongo na baoyo bazali kati na masangá nsambo?
7 Maloba ya ebandeli (1:1-9). Yoane alimboli ete Emoniseli euti na Nzambe mpe amonisi mokumba oyo baanzelu bakokisaki na kozaláká eteni moko ya nzela oyo esalelamaki mpo na kopesa emoniseli, mpe na nsima atindi maloba epai na baoyo bazalaki na masangá nsambo kati na etúká ya Azia. Yesu Klisto akómisaki bango “bokonzi na banganga mpo na Nzambe Tata na ye,” Yehova Nzambe, Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Yoane akundweli bango ete azali mosangani elongo na bango “kati na mpasi, na bokonzi, na mpiko, kati na Yesu,” mpe azali na bolɔ́kɔ na esanga Patamo.—1:6, 9.
8. (a) Yoane azwi lilako ya kosala nini? (b) Amoni nani katikati na bitɛlɛmɛlo na mwinda, mpe Moto yango alimboli nini?
8 Nsango epai na masangá nsambo (1:10–3:22). Na ebandeli ya emonaneli ya liboso, Yoane amimonaki ete, na nsé na kopemama, azalaki kati na mokolo ya Nkolo. Mongongo moko makasi, lokola makɛlɛlɛ na kelelo, moyebisi ye ete akoma, kati na rulo, makambo oyo azali komona mpe atinda yango na masangá nsambo: na Efese, na Sumuluna, na Pelegamo, na Twatila, na Salade, na Filadelefi mpe na Laodikia. Ntango abaluki epai mongongo yango mozalaki kouta, Yoane amoni “moto moko na lolenge na mwana na moto” katikati na bitɛlɛmɛlo na mwinda nsambo; moto yango asimbi minzoto nsambo na lobɔkɔ na ye ya mobali. Amimonisi ye moko ete azali “Moto na Liboso, mpe Moto na nsuka,” Moto oyo akufaki kasi azali sikawa na bomoi libela na libela mpe azali na mafungola ya liwa mpe ya Hades (nkunda). Na yango, moto wana ezalaki bongo Yesu Klisto oyo asekwaki. Alimboli ete: ‘Minzoto yango nsambo mizali baanzelu na masangá yango nsambo, mpe bitɛlɛmɛlo na mwinda yango nsambo bizali masangá nsambo.’—1:13, 17, 20.
9. Makumisi nini mpe toli nini ipesami na lisangá ya Efese, ya Sumuluna, ya Pelegamo, mpe ya Twatila?
9 Eyebisami epai na Yoane ete akomela anzelu ya lisangá ya Efese, oyo atako azalaki kokokisa mosala makasi, azalaki na mpiko, mpe azalaki koyokana na bato mabe te, nzokande atikaki bolingo na ye ya liboso mpe asengelaki kobongwana mpe kosala misala na ye ya liboso. Lisangá ya Sumuluna liyebisami ete, atako minyoko na yango mpe bobólá na yango, lizali mpenza na bozwi mpe lisengeli kobanga te: “Zalá sembo kino kufa, mpe nakopesa yo motole na bomoi.” Lisangá ya Pelegamo, oyo lizali kofanda “kuna ezali kiti na bokonzi na Satana,” lizali kobatela nkombo ya Klisto kasi lizali na bapɛngwi kati na yango, mpe bapɛngwi yango basengeli kobongola motema, soko te Klisto akoya kobundisa bango na mopanga molai na monɔkɔ na ye. Kati na Twatila, lisangá lizali na ‘bolingo, na kondima mpe na mosala mpe na mpiko,’ nzokande lizali kopesa nzela na kozala ya “mwasi yango Yezabele.” Atako bongo, bato na sembo oyo bazali kosimba makasi makambo oyo bayokaki bakozwa ‘bokonzi likoló na mabota.’—2:10, 13, 19, 20, 26.
10. Nsango nini itindami na masangá ya Salade, Filadelefi mpe Laodikia?
10 Lisangá oyo lizali na Salade likumisami ete lizali na bomoi, kasi lisili kokufa mpo ete misala na yango mizali ya kokoka te liboso na Nzambe. Nzokande, mpo na baoyo bakolónga, nkombo na bango ekolongolama te kati na búku ya bomoi. Lisangá oyo lizali na Filadelefi lisili kobatela liloba ya Klisto, boye alaki ete akobatela lisangá yango “na ntango na komekama oyo elingi kobimela mokili mobimba.” Mpo na molóngi, Klisto akozalisa ye likonzí kati na tempelo ya Nzambe na Ye. Klisto alobi ete: “Nakokoma nkombo na Nzambe na ngai likoló na ye, na nkombo na mboka na Nzambe na ngai, yango Yelusaleme na sika . . . mpe nkombo na ngai na sika.” Kolobáká mpo na ye moko ete azali “Ebandeli na bozalisi na Nzambe,” Klisto akebisi lisangá ya Laodikia ete lizali mɔ́tɔ te, mpiɔ te, mpe akosanza yango longwa na monɔkɔ na ye. Atako bazali komikumisa mpo na bozwi na bango, nzokande baoyo bazalaki na lisangá wana bazalaki mpenza babólá, bakufi-miso, mpe bolumbu. Basengeli kolata bilamba ya likoló mpɛmbɛ mpe kozala na nkisi ya kotya na miso na ntina ete bákoka komona. Klisto akokɔta epai na moto nyonso oyo afungweli ye ekuke mpe akolya elongo na ye. Epai na molóngi, Klisto akopesa ye mbano ete afanda elongo na ye na kiti na ye ya bokonzi, lolenge ye asili kofanda elongo na Tata na ye, na kiti na bokonzi na Ye.—3:10, 12, 14.
11. Emonaneli nini ya nkembo elandi mpe emonisami na Yoane?
11 Emonaneli ya bosantu ya Yehova mpe ya nkembo na ye (4:1–5:14). Emonaneli ya mibale ememi biso liboso na kiti na bokonzi ya Yehova oyo ezali na likoló mpe etondi na nkembo. Bonzenga ya makambo mamonisami bozali mpenza ya kobulunganisa, lokola mabanga ya ntalo oyo mazali kongɛnga. Na zingazinga ya kiti ya bokonzi, mikóló 24 bafandi wana mpe balati mitole na mitó na bango. Bizali-na-bomoi minei bazali kotánga Yehova ete azali mosantu, mpe bazali kosambela ye ete abongi “kozwa nkembo, na lokumu, na nguya” mpo ete ye azali Mozalisi ya biloko binso.—4:11, NW.
12. Nani moto bobele moko oyo abongi kofungola rulo oyo ekangami na bilembo nsambo?
12 ‘Ye oyo afandi na kiti ya bokonzi’ asimbi rulo oyo ekangamaki na bilembo nsambo. Kasi nani akoki kofungola rulo yango? Ezali bobele “Nkosi oyo abimi na libota na Yuda, ntina [“mosisa,” NW] na Davidi,” nde akoki kofungola yango! Moto yango, oyo azali mpe ‘Mwana na Mpate oyo abomamaki,’ azwi rulo yango epai na Yehova.—5:1, 5, 12.
13. Emonaneli nini, oyo esangisi makambo mingi, elakisami elongo na kofungolama ya bilembo motoba ya liboso?
13 Mwana na Mpate afungoli bilembo nsambo ya rulo yango (6:1–7:17). Emonaneli ya misato ebandi sikawa. Mwana na Mpate abandi kofungola bilembo. Liboso, motamboli-na-mpunda moko oyo afandaki likoló na mpunda mpɛmbɛ abimi mpo na “kolónga mpe kolónga lisusu.” Na nsima, motamboli-na-mpunda oyo afandi likoló na mpunda ya motane abimi, ye azali kolongola kimya awa na mabelé, mpe mosusu oyo afandi likoló na mpunda ya mwindo abimi, ye azali kosilisa boíké ya biloko ya kolya na mokili. Mpunda ya lángi lokola mai na mpondu elandi, moto oyo afandaki likoló na yango abéngami Liwa, mpe Hades ezalaki kolanda ye penepene. Elembo ya mitano efungwami, mpe “[baoyo] basili kobomama mpo na Liloba na Nzambe” bamonani mpe bazali kosɛnga bobekoli mpo na makila na bango. (6:2, 9) Na kofungolama ya elembo ya motoba, koningana monene ya mabelé esalemi, moi mpe sanza ikómi moindo tuu, mpe bato na nguya awa na mabelé bakómi kobyanga ngomba ete ikwea likoló na bango mpe ibomba bango liboso na nkanda ya Yehova mpe ya Mwana na Mpate.
14. Na nsima, nini emonisami na ntina na baombo ya Nzambe mpe na ntina na ebele monene oyo moto akoki kotánga motuya na bango te?
14 Nsima na makambo yango, emonaneli ya minei ebandi. Baanzelu minei bamonani oyo basimbi mipɛpɛ minei ya mabelé kino baombo ya Nzambe bakosila kotyama bilembo na bilongi na bango. Motuya na bango ezali bongo 144 000. Na nsima, Yoane amoni ebele monene oyo motuya na bango moyebani te, oyo bauti na mabota nyonso, batɛlɛmi liboso na Nzambe mpe na Mwana na Mpate, kobeleláká ete lobiko na bango euti na Nzambe mpe na Mwana na Mpate mpe bazali kosalela bango mosala butu na moi kati na tempelo ya Nzambe. Mwana na Mpate ye moko ‘akokamba bango mpe akotambwisa bango kino maziba ya mai ya bomoi.’—7:17.
15. Nini elandi nsima na kofungolama ya elembo ya nsambo?
15 Elembo ya nsambo efungwami (8:1–12:17). Likoló mobimba etikali nyɛɛ. Mpe kelelo nsambo epesami na baanzelu yango nsambo. Kobɛtama ya kelelo motoba ya liboso esali bongo emonaneli ya mitano.
16. (a) Nini elandi kobɛtama ya kelelo mitano ya liboso, mpe wapi mawa ya liboso kati na mawa misato? (b) Kelelo ya motoba ezali kosakola nini?
16 Wana kelelo misato ya liboso ibɛtami na kolandana mpenza, malózi masopami awa na mabelé, na mai monene, na bibale, mpe na maziba ya mai. Na kobɛtama ya kelelo ya minei, ndambo na misato ya moi, ya sanza, mpe ya minzoto eyindi tuu. Na mongongo ya kelelo ya mitano, monzoto moko oyo mouti na likoló mobimisi bolózi ya mayoyo oyo bazali kobundisa “bato oyo bazangi elembo na Nzambe na bilongi na bango.” Oyo ezali “mawa moko,” mpe mawa mosusu mibale ezali koya. Kobɛtama ya kelelo ya motoba esakoli kokangwama ya baanzelu minei oyo bayei mpo na koboma. “Makiasi kiasi mbala mibale” ya batamboli-na-mpunda bayeisi bolózi mosusu mpe libomi, kasi atako bongo bato baboyi kobongwana na misala mabe na bango.—9:4, 12, 16.
17. Makambo nini makómi na ndelo ya nsuka na ntango ya kosakolama oyo ete mawa ya mibale esili koleka?
17 Ntango emonaneli ya motoba ebandi, anzelu mosusu ya makasi akiti longwa na likoló mpe asakoli ete ‘wana ekoyula anzelu na nsambo na kelelo na ye, na mikolo yango, libombami na Nzambe engebene nsango malamu’ likokokisama. Bapesi Yoane mwa rulo moke ete alya yango. Na monɔkɔ, yango ezali “elɛngi lokola mafuta na nzoi,” kasi ekómisi libumu na ye bololo. (10:7, 9) Batatoli mibale oyo balati saki bazali kosakola na boumeli ya mikolo 1 260; na nsima babomami na ‘nyama na yauli oyo abimi na libulu mozindo,’ mpe, na boumeli ya mikolo misato na ndambo, bibembe na bango bitikami kati “na balabála na mboka yango monene.” Bafandi na mokili bazali kotyola mpe kosɛka bango, kasi makambo mabongwani ntango Nzambe azongisi bango na bomoi. Na ngonga yango, koningana monene ya mabelé esalemi. “Mawa na mibale esili.”—11:7, 8, 14.
18. Kosakolama nini ya ntina esalemi ntango mongongo ya kelelo ya nsambo eyokani, mpe mpo na nini sikawa ezali ntango oyo ebongi?
18 Sikawa, anzelu ya nsambo abɛti kelelo na ye. Mingongo mizali kati na likoló misakoli ete: “Bokonzi na mokili oyo esili kokóma Bokonzi na Nkolo na biso mpe na Klisto na ye.” “Mikóló yango ntuku mibale na minei” basambeli Nzambe mpe bapesi matɔ́ndi, kasi nkanda ya mabota engali. Ntango eyei oyo Nzambe akosambisa bakufi mpe akopesa mbano epai na babulami na ye mpe ntango ya “kobebisa babebisi na mokili.” Esika mosantu ya tempelo na ye efungwami, mpe na kati na yango sanduku na kondimana emonani.—11:15, 16, 18.
19. Elembo nini mpe etumba nini emonani na likoló, nsuka na yango ezali nini?
19 Nsima na kosakolama ya kotyama ya Bokonzi, emonaneli ya nsambo emonisi nokinoki “elembo monene” kati na likoló. Ezali mwasi moko oyo aboti “mwana mobali oyo akokɛngɛla mabota nyonso na fimbo na ebendé.” “Dalagona motane monene” atɛlɛmi mpo na kolya mwana yango, kasi mwana wana amemami kino na kiti na bokonzi ya Nzambe. Mikaele abundi na dalagona mpe abwaki dalagona yango awa na mabelé, ‘ye nyoka na kalakala, oyo abyangami Zábolo mpe Satana.’ Ezali “mawa na mokili”! Nyoka anyokoli mwasi mpe akei kobundisa batikali ya mombóto na ye.—12:1, 3, 5, 9, 12; 8:13.
20. Na nsima, banyama mibale nini babimi kati na emonaneli, mpe lolenge nini bazali kosala bopusi likoló na bato awa na mabelé?
20 Nyama na yauli oyo abimi na mai monene (13:1-18). Emonaneli ya mwambe emonisi sikawa nyama moko ya yauli oyo azali na mitó nsambo mpe na maseke zomi; nyama yango abimi na mai monene. Azwi nguya epai na dalagona. Moko kati na mitó na ye ezalaki lokola nde ezokisamaki pene na liwa, kasi mpota na yango esilaki, mpe mabelé mobimba bayaki kokumisa nyama yango. Azali kobimisa maloba na kotuka liboso na Nzambe mpe kobundisa babulami. Kasi, talá! Yoane amoni nyama na yauli mosusu; nyama yango abimi na nsé na mabelé. Azali na maseke mibale lokola mwana na mpate, kasi abandi koloba lokola dalagona. Azali kokosa bafandi na mabelé mpe koyebisa bango ete básala elilingi ya nyama na yauli ya liboso. Bato banso basɛngisami ete básambela elilingi yango, soki te bakobomama. Soki moto azangi elembo to motuya ya nyama yango ya yauli, akoki kosomba eloko te mpe akoki koteka te. Motuya na ye ezali bongo 666.
21. Yoane amoni nini likoló na Ngomba Siona, baanzelu bamemi nini mpe bazali kosakola nini, mpe lolenge nini vinyo ya mokili ekobebisama?
21 “Nsango Malamu na seko” mpe nsango oyo ikangisami na yango (14:1-20). Na bokeseni moko ya kosepelisa mpenza, kati na emonaneli ya libwa, Yoane amoni Mwana na Mpate likoló na Ngomba Siona, mpe elongo na ye bato 144 000 oyo bazalaki na nkombo ya Mwana na Mpate yango mpe na nkombo ya Tata na bilongi na bango. “Bayembi loyembo na sika na liboso na kiti na bokonzi,” bango ‘basombami kati na bato lokola mbuma na liboso mpo na Nzambe mpe mpo na Mwana na Mpate.’ Anzelu mosusu abimi na katikati na likoló, komemáká “Nsango Malamu na seko mpo na kosakola” epai na mabota nyonso, mpe alobi ete: “[Bangá] Nzambe mpe pesá ye nkembo.” Mpe lisusu, anzelu mosusu asakoli ete: “Babilone monene ekwei!” Anzelu mosusu, oyo ya misato, asakoli ete baoyo bazali kosambela nyama na yauli mpe elilingi na yango bakomela nkanda ya Nzambe. Moto moko “na motindo na mwana na moto” atindi likwangola na ye, anzelu mosusu mpe atindi likwangola na ye, mpe abuki mbuma ya vinyo ya mokili, kobwakáká yango kati na “ekamelo monene na kongala na Nzambe.” Wana ekamelo ebimisami na libándá ya mboka, makila masopami uta na yango, bozindo ya makila yango ekoki kokóma kino na bansinga ya monɔkɔ ya mpunda oyo etɛlɛmi, “mosika na yango kino setada nkóto na nkámá motoba” (kilomɛtɛlɛ soko 296).—14:3, 4, 6-8, 14, 19, 20.
22. (a) Na nsima, banani bamonani ete bazali kokumisa Yehova, mpe mpo na nini? (b) Mbeki nsambo ya nkanda ya Nzambe isopami wapi, mpe makambo nini ya nsɔ́mɔ malandi?
22 Baanzelu oyo bazali na malózi nsambo ya nsuka (15:1–16:21). Emonaneli ya zomi ebandi na komonana mokuse ya efandelo ya likoló. Baoyo balóngaki nyama na yauli bazali kokumisa Yehova, “Mokonzi na seko,” mpo na misala na ye minene mpe ya kokamwisa. Baanzelu nsambo babimi na esika mosantu kati na likoló mpe bapesi bango mbeki nsambo oyo isalami na wolo mpe itondi na nkanda ya Nzambe. Mbeki motoba ya liboso isopami na mabelé, na mai monene, na bibale, na maziba ya mai, mpe likoló na moi, na kiti ya bokonzi ya nyama na yauli mpe na ebale Pelata, kokaukisáká mai na yango mpo na kobongisa nzela na “bakonzi balongwi na ebimelo na ntango.” Maloba mauti na bilimu mabe mayanganisi ‘bakonzi ya mabelé mobimba oyo mafandami mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso’ na esika babéngi Armagedon. Mbeki ya nsambo esopami kati na mopɛpɛ, mpe na ntéi ya makambo ya nsɔ́mɔ mauti na biloko bizalisami, engumba monene ekabwani na biteni misato, bingumba ya mabota bikwei, mpe Babilone ezwi ‘kopo ya vinyo ya nkanda na kongala ya Nzambe.’—15:3; 16:12, 14, 19.
23. (a) Lolenge nini lisambisi ya Nzambe likweli Babilone Monene? (b) Kosakolama nini mpe bileli nini biyei elongo na kokwea na ye, mpe masanzoli nini ya esengo mayokami kati na likoló mobimba?
23 Lisambisi na Nzambe likoló na Babilone; libala ya Mwana na Mpate (17:1–19:10). Emonaneli ya zomi na moko ebandi. Talá! Lisambisi na Nzambe likoló na ‘Babilone monene, mama na basi na pite,’ “oyo bakonzi na mokili basali na ye pite.” Alangwe makila ya babulami mpe afandi likoló na nyama na yauli ya motane, oyo azali na mitó nsambo mpe na maseke zomi. Nyama yango “azalaki nde azali te, mpe abɛlɛmi kobima na libulu bozindo.” Maseke zomi na ye mazali kobunda na Mwana na Mpate, kasi mpo ete ye azali “Nkolo na bankolo mpe Mokonzi na bakonzi,” alóngi maseke yango. Maseke zomi mabalukeli mwasi yango ya pite mpe malei ye, mpe na ebandeli ya emonaneli ya zomi na mibale, anzelu mosusu, oyo nkembo na ye engɛngisi mabelé, alobi ete: “Ekwei! Babilone monene ekwei!” Libota ya Nzambe lipesameli etindá ya kobima longwa na ye, soki balingi te kozwa malózi na ye. Bakonzi mpe bato mosusu ya nguya awa na mabelé baleli ye, kolobáká ete: ‘Mawa! Mawa! Mboka yango monene! Babilone mboka makasi! mpo ete na ntango moko kosambisama na yo eyei.’ Bozwi monene na ye esili kobebisama. Motindo moko na libanga monene oyo libwakami na mai monene, bobele bongo, na mbala moko, Babilone ekobwakama mpe ekozwama lisusu te. Sikawa, makila ya babulami ya Nzambe mabekolami! Mbala minei, mingongo mizali konganga na likoló ete “Aleluya!” Bósanzola Yah mpo ete akweisi ekateli likoló na mwasi na pite monene! Aleluya mpo ete Yehova abandi koyangela lokola mokonzi! Bósepela mpe bózala na esengo mingi mpo ete “libala na Mwana na Mpate esili koya. Mwasi na ye asili komibongisa nzoto”!—17:2, 5, 8, 14; 18:2, 10; 19:1, 3, 4, 6, 7
24. (a) Na lolenge nini emonani ete etumba oyo Mwana na Mpate azali kobunda ezali mpenza ya kosilisa banguna nyɛɛ? (b) Nini ezali kosalema na boumeli ya mbula nkóto, mpe nini ekolanda na nsuka na yango?
24 Mwana na Mpate azali kobunda etumba kati na boyengebene (19:11–20:10). Kati na emonaneli ya zomi na misato, “Mokonzi na bakonzi mpe Nkolo na bankolo” azali kotambwisa mampinga ya likoló kati na etumba ya boyengebene. Bakonzi mpe bato minene bakómi misuni ya kolya mpo na bandɛkɛ na likoló; nyama na yauli mpe mosakoli ya lokuta babwakami, wana bazali naino na bomoi, kati na libeke ya mɔ́tɔ oyo likopelaka na sufulu. (19:16) Ntango emonaneli ya zomi na minei ebandi, anzelu moko abimi “kokita na likoló, azalaki na lifungola na libulu bozindo, na monyɔlɔlɔ monene na lobɔkɔ na ye.” Anzelu yango asimbi ‘nyoka yango na kalakala, oyo azali Zábolo mpe Satana,’ mpe akangi ye na monyɔlɔlɔ mpo na mbula nkóto. Baoyo bazali basangani ya lisekwa ya liboso bakómi ‘banganga ya Nzambe mpe ya Klisto mpe bayangeli lokola bakonzi elongo na ye mpo na mbula nkóto.’ Na nsima, Satana akofungolama mpe akobima mpo na kozimbisa mabota na mabelé mobimba, kasi akobwakama kati na libeke ya mɔ́tɔ, elongo na baoyo bakolanda ye.—20:1, 2, 6.
25. Emonaneli nini ya kosepelisa elandi, mpe nani akosangola makambo yango?
25 Mokolo ya kosambisama mpe nkembo ya Yelusaleme ya sika (20:11–22:5). Emonaneli ya zomi na mitano, oyo ya kosepelisa mpenza, ebandi. Bakufi, ya mike mpe ya minene, bazali kosambisama liboso na kiti na bokonzi ya Nzambe oyo ezali monene mpe mpɛmbɛ. Liwa mpe Hades ebwakami kati na libeke ya mɔ́tɔ, “oyo ezali kufa na mibale,” mpe esika moko na bango, moto nyonso oyo nkombo na ye ekomami na búku ya bomoi te abwakami lokola. Yelusaleme ya sika ekiti uta na likoló, mpe hema ya Nzambe ekómi esika moko na bato, mpe alongoli mpisoli nyonso na miso na bango. Liwa ezali lisusu te, kolela, konganga, to mpasi ezali lisusu mpe te! Ya solo, Nzambe azali kozalisa “biloko nyonso biloko na sika,” mpe andimisi elaka na ye, na kolobáká ete: “Komá [mpo] ete maloba oyo mazali sembo, na solo.” Balóngi bakosangola makambo oyo nyonso, kasi mpo na bagɔigɔi, baoyo bazangi kondima, mpe bato na pite to baoyo bazali kosalela bikelákela to basambeli na bikeko bakosangola yango te.—20:14; 21:1, 5.
26. (a) Lolenge nini Yelusaleme ya sika elobelami? (b) Biloko nini bikosimbaka bomoi bimonani kati na engumba, mpe pole ya engumba yango ezali kouta wapi?
26 Na emonaneli ya zomi na motoba, oyo ezali mpe ya nsuka, balakisi Yoane “mwasi na Mwana na Mpate,” Yelusaleme ya sika, oyo ezali na bikuke 12 mpe na mabanga 12 ya moboko oyo nkombo ya bantoma zomi na mibale ya Yesu ikomami likoló na yango. Engumba yango ezali na bipai minei bikokani (carré), mpe kokembisama na yango monene emonisami na yasipi, na wolo, mpe na mangiliti oyo ezalaki kati na yango. Yehova mpe Mwana na Mpate bazali tempelo ya engumba yango, mpe bazali lisusu pole na yango. Bobele baoyo nkombo na bango ekomami na rulo ya Mwana na Mpate nde bakoki kokɔta kati na yango. (21:9) Ebale moko ya mai ya pɛto ya bomoi ezali kouta na kiti ya bokonzi, kokitáká kati na nzela monene ya engumba, mpe na ngámbo mokomoko ya ebale yango, ezali na banzeté ya bomoi, oyo ikobotaka mbuma ya sika sanza na sanza mpe oyo nkasa na yango ikobikisaka. Kiti ya bokonzi ya Nzambe mpe ya Mwana na Mpate ekozala kati na engumba yango, mpe baombo ya Nzambe bakomona elongi na Ye. “[Yehova] Nzambe akongɛngisa bango, mpe bakozala bakonzi libela na libela.”—22:5, NW.
27. (a) Kondimisama nini epesameli Yoane na ntina na esakweli? (b) Emoniseli esuki na libyangi nini mpe na likebisi nini ya nguya?
27 Bosukisi (22:6-21). Kondimisama epesami: “Maloba oyo mazali sembo mpe solo.” Ya solo, esengo na baoyo nyonso bazali kobatela maloba ya esakweli oyo! Nsima na koyoka mpe komona makambo yango, Yoane akwei na nsé mpo na kosambela anzelu oyo azalaki kotalisa ye yango, mpe ye akundweli Yoane ete asengeli kosambela bobele Nzambe. Maloba ya esakweli masengeli kokangama te, “mpo ete elaka ezali penepene.” Esengo na baoyo bazwi likoki ya kokɔta na engumba yango, mpamba te na libándá na yango ezali na bosɔtɔ mpe na “[bato] nyonso bakolingaka mpe bakokataka lokuta.” Yesu alobi ete ye moko nde atindaki litatoli yango epai na masangá na nzela ya anzelu na ye, mpe ete azali ‘mosisa na libota na Davidi, monzoto mokotanaka kitoko na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́.’ ‘Elimo mpe Mwasi na libala balobi ete, Yaká! Tiká moyoki aloba ete, Yaká! Tiká ete moto na mposa na komela aya, mpe oyo azali na mposa akamata mai na bomoi lokola likabo.’ Mpe tiká ete moto moko te abakisa to mpe alongola ata liloba moko kati na esakweli oyo, soki te likabo ya moto yango likolongolama “na nzeté na bomoi mpe na mboka mosantu.”—22:6, 10, 15-17, 19.
LITOMBA NA YANGO
28. Na bandakisa nini tokoki kososola ete Emoniseli ezali kosukisa lisoló oyo libandaki na eteni ya liboso ya Biblia?
28 Oyo nde bosukisi ya nkembo mokanda ya Emoniseli epesi mpo na liboke ya mikanda 66 ya Biblia oyo mipemami! Eloko ata moko te ezangi kolobelama. Ezali na esukiseli moko te oyo ezangi koyokana na mosusu. Sikawa, tozali komona nsuka monene na yango polele, lolenge moko na ebandeli na yango. Eteni ya nsuka ya Biblia ezali kopesa bosukisi ya lisoló oyo libandaki na eteni na yango ya liboso. Lokola Genese 1:1 ezali kolobela lolenge Nzambe azalisaki makoló mpe mabelé oyo tozali komona, na bongo Emoniseli 21:1-4 ezali kolobela likoló ya sika mpe mabelé ya sika mpe mapamboli mingi oyo makopesamela bato, lokola yango esakolamaki mpe na Yisaya 65:17, 18; 66:22; mpe na 2 Petelo 3:13. Lolenge moko na moto ya liboso oyo ayebisamelaki ete soki azangi botosi akokufa solo, bobele bongo Nzambe apesi ndanga ya solosolo ete, mpo na bato na botosi, “kufa ekozala lisusu te.” (Gen. 2:17; Emon. 21:4) Ntango Nyoka amimonisaki mpo na mbala ya liboso lokola mozimbisi ya bato, Nzambe asakolaki ete motó ya Nyoka yango mokotutama, mpe Emoniseli elakisi lolenge oyo, na nsuka, nyoka na kalakala, ye Zábolo mpe Satana, akobomama nyɛɛ. (Gen. 3:1-5, 15; Emon. 20:10) Moto na kozanga botosi abimisamaki mosika na nzeté na bomoi na Edene, nzokande nzeté ya bomoi ya elilingi imonani awa ‘mpo na kobikisa mabota’ ya bato na botosi. (Gen. 3:22-24; Emon. 22:2) Motindo moko na ebale oyo ezalaki kobima na Edene mpo na kopolisa elanga, bobele bongo ebale moko ya elilingi, oyo ezali kopesa bomoi mpe kosunga yango, emonisami ete ezali koleka uta na kiti ya bokonzi ya Nzambe. Makambo yango makokani na emonaneli ya kala oyo Ezekiele azwaki, mpe mazali kokundola maloba ya Yesu Klisto na ntina na ‘liziba na mai oyo ezali kobima mpo na kopesa bomoi ya seko.’ (Gen. 2:10; Emon. 22:1, 2; Ezek. 47:1-12; Yoa. 4:13, 14) Na esika ya kolongolama liboso na Nzambe, lokola mobali mpe mwasi ya liboso balongolamaki, balóngi ya sembo bakomona elongi na ye. (Gen. 3:24; Emon. 22:4) Ezali mpenza na litomba ete tótalela bimonaneli oyo ya kosepelisa, oyo bizali kati na mokanda ya Emoniseli!
29. (a) Lolenge nini Emoniseli etii esika moko bisakweli bitali Babilone? (b) Bokokani nini ezali komonana kati na bimonaneli ya Bokonzi, mpe bimonaneli ya banyama oyo bizali kati na Danyele mpe kati na Emoniseli?
29 Simbá lisusu lolenge Emoniseli ezali kokangisa bisakweli esika moko na ntina na Babilone oyo etondi na mabe. Yisaya amonaki kokwea ya Babilone ya solosolo mosika mpenza liboso ete yango ekoka kokwea, mpe alobaki ete: “Babele [“Babilone,” NW] akwei! akwei!” (Yis. 21:9) Yilimia mpe asakolaki na ntina na bokwei ya Babilone. (Yil. 51:6-12) Kasi, na lolenge ya elilingi, Emoniseli elobeli “Babilone Monene mama [na basi] na pite na bosɔtɔ na mokili.” Ye mpe asengeli kobwakama, mpe Yoane amoni yango kati na emonaneli, wana elobami mpo na yango ete: “Ekwei! Babilone monene ekwei!” (Emon. 17:5; 18:2) Bozali komikundola emonaneli oyo Danyele azwaki na ntina na bokonzi oyo etyami na Nzambe mpe oyo ekobuka bikonzi mosusu nyonso mpe ekoumela “lobiko na lobiko”? Talá lolenge yango ezali na boyokani na kosakolama euti na likoló oyo ezwami kati na Emoniseli: “Bokonzi na mokili oyo esili kokóma Bokonzi na Nkolo na biso mpe na Klisto na ye, mpe akozala mokonzi libela na libela.” (Dan. 2:44; Emon. 11:15) Mpe motindo moko na emonaneli ya Danyele oyo ezali kolobela ‘moto moko na lolenge ya mwana na moto koya na mapata na likoló mpo na kozwa boyangeli ya seko mpe nkembo mpe bokonzi,’ bobele bongo Emoniseli elakisi ete Yesu Klisto azali “Mokonzi na bakonzi na [mokili, NW]” mpe ete “azali koya na mapata,” mpe elobi ete “miso nyonso makotala ye.” (Dan. 7:13, 14; Emon. 1:5, 7) Ezali na kokokana mosusu oyo ekoki mpe kotalelama kati na banyama ya bimonaneli ya Danyele mpe banyama ya Emoniseli. (Dan. 7:1-8; Emon. 13:1-3; 17:12) Ya solo, Emoniseli ezali kopesa makambo mingi ya koyekola mpo na kolendisa kondima.
30. (a) Emoneli nini ya mobimba Emoniseli epesi na ntina na kosantisama ya nkombo ya Yehova na nzela ya Bokonzi? (b) Nini elobelami mingi na ntina na bosantu, mpe likambo yango etali nani?
30 Oyo nde emonaneli ya nkembo mpe ya makambo ndenge na ndenge mokanda ya Emoniseli ezali kopesa na ntina na Bokonzi ya Nzambe! Ezali komema na bosukisi kitoko mpenza makambo oyo basakoli ya kala, Yesu mpe bayekoli na ye balobaki na ntina na Bokonzi. Kati na mokanda ya Emoniseli, tozwi lolenge ya komona kosantisama ya nkombo ya Yehova na mobimba na yango, na nzela ya Bokonzi: ‘Santu! Santu! Santu! Yehova Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.’ Abongi “kozwa nkembo, na lokumu, na nguya.” Ya solo, ezali ye nde ‘azwi nguya na ye monene mpe abandi koyangela lokola mokonzi’ na nzela na Klisto. Oyo nde molende Mwana yango ya nkembo, “Mokonzi na bakonzi mpe Nkolo na bankolo,” amonisi ntango azali kobukabuka mabota mpe konyata “ekamelo na vinyo na kongala na nkɛlɛ na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso”! Wana motó na likambo monene ya Biblia oyo motali kolóngisama ya Yehova mozali kokende kino kokokana na yango monene, esɛngami makasi ete moto nyonso oyo azali kosangana na mikano na ye ya Bokonzi azala bulɛɛ, bobele bongo eloko nyonso oyo ekɔtisami na mikano yango esengeli mpe kozala bulɛɛ. Yesu Klisto, Mwana na Mpate, oyo “azali na lifungola na Davidi,” alobelami ete azali bulɛɛ, baanzelu ya likoló mpe bazali bongo. Baoyo bakosangana na lisekwa ya liboso balobelami ete basengeli kozala “na esengo, mpe bazali basantu,” mpe elobami makasi ete “eloko moko mabe ekokɔta wana te, na basáli na bosɔtɔ” bakokɔta soko moke te kati na “mboka mosantu, Yelusaleme na sika.” Na yango, baoyo basombami na makila ya Mwana na Mpate mpo na kozala “bokonzi na banganga mpo na Nzambe na biso” bazwi elendiseli ya nguya mpo na kobatela bosantu na bango liboso na Yehova. “Ebele monene” mpe basengeli ‘kosukola minkóto na bango mpe kokómisa yango mpɛmbɛ na makila ya Mwana na Mpate,’ na ntina ete bákoka kosala mosala na bulɛɛ.—Emon. 4:8, 11; 11:17; 19:15, 16; 3:7; 14:10; 20:6; 21:2, 10, 27; 22:19; 5:9, 10; 7:9, 14, 15.
31. Makambo nini ya Bokonzi mamonisameli biso bobele na mokanda ya Emoniseli?
31 Emonaneli ya Bokonzi ya bulɛɛ ya Nzambe oyo etondi na nkembo ezali kokóma likambo ya solo kati na makanisi na biso wana tozali kotalela mwa bingɛngiseli oyo bobele mokanda ya Emoniseli nde ezali komonisa biso yango polele. Kati na mokanda yango, tozwi emonaneli mobimba ya basangoli ya Bokonzi oyo bazali likoló na Ngomba Siona elongo na Mwana na Mpate, koyembáká loyembo ya sika oyo bobele bango nde bakoki koyekola yango. Bobele Emoniseli nde ezali kolakisa biso motuya ya baoyo basombami awa na mabelé mpo na kokɔta na Bokonzi—motuya yango ezali bongo bato 144 000—mpe ete motuya wana ya bato nde batyami elembo longwa na mabota 12 ya Yisalaele ya elimo. Bobele Emoniseli nde ezali koyebisa biso ete ‘banganga mpe bakonzi yango,’ oyo bakosangana na lisekwa ya liboso elongo na Klisto, bakoyangela mpe elongo na ye na boumeli ya “mbula nkóto.” Ezali bobele Emoniseli nde epesi biso lolenge ya komona na mobimba mpenza “mboka mosantu, Yelusaleme na sika,” komonisáká nkembo monene na yango, Yehova mpe Mwana na Mpate bazali tempelo na yango, bikuke na yango 12 mpe mabanga na yango ya moboko, mpe bakonzi oyo bazali koyangela kati na yango libela na libela na lisalisi ya pole ya seko oyo Yehova azali kongɛngisa likoló na bango.—14:1, 3; 7:4-8; 20:6; 21:2, 10-14, 22; 22:5.
32. (a) Lolenge nini emonaneli ya “likoló na sika” mpe ya “mboka mosantu, Yelusaleme na sika,” emonisi na mokuse makambo nyonso oyo masakolamaki na ntina na Mombóto ya Bokonzi? (b) Mapamboli nini Bokonzi endimisi yango mpo na bato awa na mabelé?
32 Ekoki mpenza kolobama ete emonaneli oyo ya “likoló na sika” mpe ya “mboka mosantu, Yelusaleme na sika,” emonisi na bokuse makambo nyonso oyo Makomami masakolaki uta kalakala na ntina na Mombóto ya Bokonzi. Abalayama azalaki kozela mombóto oyo na nzela na ye ‘mabota nyonso ya mabelé masengelaki kopambwama’ mpe “mboka oyo ezali na miboko [ya solosolo, oyo] Nzambe azali motongi mpe mozalisi na yango.” Sikawa, kati na mokanda ya Emoniseli, mboka yango ya mapamboli emonisami polele epai na biso ete ezali “likoló na sika”—boyangeli ya sika, Bokonzi ya Nzambe, oyo esalemi na Yelusaleme ya sika (mwasi ya Klisto) mpe Mobali na ye. Elongo moko, bakotambwisa boyangeli moko ya sembo likoló na mabelé mobimba. Yehova alaki bato ya sembo ete bakokóma “bato na ye” kati na ezalela moko ya esengo, oyo ezangi lisumu mpe liwa, ezalela motindo moko na oyo moto azalaki na yango liboso ya botomboki na Edene. Mpe mpo na kobenda mpenza likebi, mokanda ya Emoniseli moyebisi biso mbala mibale ete Nzambe “akolongola mpisoli nyonso na miso na bango.”—Gen. 12:3; 22:15-18; Eb. 11:10; Emon. 7:17; 21:1-4.
33. (a) Emonaneli nini ya kitoko, oyo esangisi makambo manso, Emoniseli epesi mpo na kokokisama ya mikano ya Nzambe? (b) Na lolenge nini “Makomami nyonso” mamonani solo ete “mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba,” mpe mpo na nini sikawa ezali ntango ya koyekola mpe ya kotosa Liloba ya Nzambe?
33 Ɛɛ, oyo ezali mpenza bosukisi ya nguya mpo na Makomami mapemami! “Makambo makobima noki” mazali mpenza ya kosepelisa! (Emon. 1:1) Nkombo ya Yehova, “Nzambe ya maloba mapemami ya basakoli,” ebulisami. (22:6, NW) Makomi ya bisakweli ya bikeke 16 mamonisami kati na kokokisama na yango, mpe misala ya kondima oyo misalamaki na boumeli ya bankóto mingi ya bambula mipesameli mbano! “Nyoka na kalakala” abomami, bibele na ye babomami, mpe mabe ezali lisusu te. (12:9) Bokonzi ya Nzambe, “likoló na sika,” ekómi koyangela mpo na kosanzola ye. Mapamboli ya mabelé oyo eyeisami ya sika, oyo etondisami mpe etambwisami engebene mokano ya Yehova oyo molobelami na mokapo ya liboso ya Biblia, ɛɛ, mapamboli yango mapalangani mpo na seko na seko likoló na bato. (Gen. 1:28) Ya solo, Makomami nyonso mamonani ete “mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba mpo na kolakisa, mpo na kopamela, mpo na kosembola makambo, mpo na kopesa disipilini kati na boyengebene.” Yehova asili kosalela yango mpo na kokamba na lolenge malamu mpenza bato babongi, oyo bakokisami kati na kondima, ete bámona mokolo yango ya nkembo. Nzokande, sikawa ezali ntango ya koyekola Makomami yango mpo na kolendisa kondima na yo. Tosá mibeko na yango mpo na kozwa mapamboli ya Nzambe. Landá yango kati na nzela ya semba oyo ezali komema na bomoi ya seko. Na kosaláká bongo, yo mpe okoki koloba, na elikya ya solosolo oyo mokanda ya nsuka ya Biblia esuki na yango ete: “Bobele bongo, Nkolo Yesu, oya.”—2 Tim. 3:16, NW; Emon. 22:20.
34. Lolenge nini tokoki sikawa kozala na esengo monene, mpe mpo na nini?
34 Oyo nde esengo monene tokoki kozala na yango na kokumisáká “Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na ye,” oyo azali Mombóto, koyebáká ete yango ezali kobulisa nkombo ya “Yehova Nzambe, Mozwi-na-Nguya-Nyonso,” nkombo oyo ekokani na mosusu te!—Emon. 11:15, 17, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a The Ante-Nicene Fathers, Vol. I, lokasa 240.
b The Ecclesiastical History, ya Eusèbe, VI, xxv, 9, 10.
c The Ante-Nicene Fathers, Vol. I, nkasa 559-560.
d The Lives of the Caesars (Domitian, XIII, 2).