Tóloba na ntina na Yehova mokolo na mokolo
1 Bato balingaka koloba makambo oyo masepelisaka bango, mpo ete monɔkɔ elobaka makambo oyo matondi na motema. (Luka 6:45b) Mpo na biso, makambo nini mazali kosimba mitema na biso? Mokomi na nzembo akomaki ete: “Lolemo na ngai ekosolola mpo na boyengebene na yo, ekosanzola yo mikolo nyonso.” (Nz. 35:28) Azalaki kotɔ́nda Yehova na mozindo mpe azalaki kotalela likoki ya koloba na ntina na Nzambe mpe koyebisa masanzoli na ye lokola libaku malamu mpenza. Lokola ayebaki Yehova malamumalamu, mokomi na nzembo asengelaki bobele kozala na esengo. (Nz. 35:9) Lolenge nini tokoki komekola ndakisa malamu na ye?
2 Tóloba na ntina na Yehova kati na libota: Tosengeli koloba na ntina na Yehova mokolo na mokolo kati na libota. Baboti oyo bazali na bolingo makasi mpo na Yehova balobaka kozanga komipekisa na ntina na ye ntango bazali kosala misala na bango. (Det. 6:5-7) Na bongo, bana bakomona ete tata na bango mpe mama na bango bazali komonisa kondima mpe bazali kolinga mobeko ya Nzambe. Bana bakomona bongo ete boyekoli ya Biblia kati na libota ezali lolenge ya komonisa mpenza bokangami ya baboti na bango epai na Nzambe.—2 Pet. 3:11.
3 Tóloba na ntina na Yehova elongo na bandeko na biso: Misala ya Teokrasi oyo tozalaka na yango na boumeli ya pɔ́sɔ epesaka biso mabaku mingi ya koleisa elimo mpe motema na biso na bilei ya elimo. Makambo malamu mpo na kosolola mazangaka te. (Luka 6:45a) Osili kozwa likanisi moko oyo lisepelisi yo mpenza na boumeli ya boyekoli na yo moko to na botángi na yo ya Biblia na boumeli ya pɔ́sɔ? Lobelá bandeko likanisi yango, mpe okosalisa bango ete báyoka mpe bolingo mozindo mpo na Yehova.—Nz. 35:18; Ebe. 10:24.
4 Tóloba na ntina na Yehova zingazinga na biso: Na masoló ya mokolo na mokolo elongo na bazalani na biso, ezala na mosala, na eteyelo to elongo na basangani ya libota na biso oyo tokeseni na bango bindimeli, esengeli komonana polele ete lobanzo na biso ya liboso ezali ya kopesa litatoli mpo na Yehova. Na esika ya kosalela maloba ya mpambampamba mpe ya kozanga limemya oyo emonanaka na mokili, tosengeli nde kosanzola Nzambe na lolenge na biso ya koloba. Mokolo na mokolo, na mabaku nyonso, tóloba mpo na nsango malamu oyo topesameli mokumba ya kosakola.—Mis. 5:42; Kols. 4:6.
5 Lokola tozali basambeli ya solo ya Yehova, tokosalela mabaku oyo mazali komonana mokolo na mokolo mpo na koloba na ntina na Yehova, Nzambe na biso oyo akokani na nzambe mosusu te.—Nz. 106:47.