Loyembo 138
Tambolá elongo na Nzambe!
(Mika 6:8)
1. Tambol’elongo na Nzambe,
Lingá mpe boboto.
Monisá bosembo na yo;
Tika y’akamba yo.
Soki’olingi kobila ye,
Kimá mabe nyonso;
Sepelisá Nzambe na yo;
Ye akosunga yo.
2. Tambol’elongo na Nzambe,
Zalá na bopɛto.
Salá nyonso ókóla mpe,
Ye akondima yo.
Tika makanisi na yo,
Mázala malamu,
Ézala pɛto mpe sembo,
Oyo ya lokumu!
3. Tambol’elongo na Nzambe,
Zalá na bosembo.
Ata ozwi’eloko moke,
Sepelá na yango.
Ótambola na Yehova,
Zalá na esengo.
Talá ntango ebɛlɛmi,
Kokisa ndai na yo.