Loyembo 172
Bólukaka nde liboso Bokonzi
1. Bokonzi ya Nkolo Yesu
Eleki na motuya,
Mpo ekokokisa solo
Mikano ya Yehova.
Basakoli ya kala mpe
Balikyaki na yango.
Klisto mpe asɛngi biso
’Te tómekola bango.
(Mondimo)
2. Tozali na esengo mpo,
Bokonzi, tósakola.
Wana mokumba kitoko,
Ebongi tokokisa.
Tómitungisaka te mpo
Na kolya mpe komela.
Yambo, Bokonzi ya Nzambe,
Biso tokotalela.
(Mondimo)
3. Talá nsuka’a mokili’oyo
Eyei nde na kopota.
Mpe paladiso’ekozala
Na mokili ya sika.
Tósakola Bokonzi, mpe
Tóyebisa “bampate,”
Yango elikya ya solo
Euti’epai na Nzambe.
(MONDIMO)
Yambo, tóluka Bokonzi,
Boyengebene na Yah.
Tózala sembo’epai na ye
Na mosala ya bulee.