Biyano na mituna na bino
◼ Ebongi na moklisto ete akanga eteni ya elamba ya mpɛmbɛ na ntango ya bitumba?
Na boumeli ya etumba oyo eutaki kosalema na mboka na biso, basivili mingi bakangaki eteni ya elamba ya mpɛmbɛ na lobɔkɔ to na motó. Mpo na nini? Na esika moko, baoyo bakangaki eteni ya elamba ya mpɛmbɛ bamityaki bongo na ngámbo ya babundi oyo bango bamonaki ete bakolónga. Ntango mosusu kokanga eteni ya elamba ya mpɛmbɛ ezalaki elembo ya komipesa na maboko ya banguna. Nzokande, na bisika mosusu, kokanga eteni ya elamba ya mpɛmbɛ etalelamaki lokola mwango ya libateli. Bato bazalaki kokanga yango mpo na komibatela.
Etɛlɛmɛlo ya moklisto esengeli kozala nini? Soki kokanga eteni ya elamba ya mpɛmbɛ elimboli komitya na ngámbo moko to na ngámbo mosusu, mokangi na yango azali bongo na bokatikati te. Soki kokanga eteni ya elamba ya mpɛmbɛ ezali elembo ya komipesa na maboko ya banguna, yango elimboli ete mokangi azali komonisa ete azali mobundi. Na likambo lolenge wana, moklisto asengeli komikundola maloba ya Yesu na Yoane 17:16 oyo malobi ete bayekoli na ye ‘bakosangana na makambo ya mokili te.’ Asengeli mpe komikundola makambo oyo esakweli ya Yisaya 2:2-4 elobi na ntina na basambeli ya solo ya Yehova. Mikapo yango mizali kosalisa biso mpo ete tózala na likanisi ya Nzambe mpo na mituna oyo mibimaka na ntango ya etumba.
Kasi ezali boni mpo na bisika oyo kokanga eteni ya elamba ya mpɛmbɛ ezalaki bobele mwango ya libateli, oyo moto akokaki kosalela mpo ete báboma ye te? Na bongo, ezali likambo ya moklisto mokomoko ete apona ye moko soki akokanga eteni ya elamba ya mpɛmbɛ to akokanga yango te. Soki asali yango epai kuna kokanga eteni ya elamba ya mpɛmbɛ emonani lokola mwango ya libateli, moto moko te asengeli koloba mabe mpo na ye.a Bankulutu basengeli te koluka koyeba soki moto yango abatelaki bokatikati na ye to abatelaki yango te. Esengeli nde kotalela motindá oyo ezali na Baloma 14:4 ete: “Yo ozali nani wana okofundaka mosali na moto mosusu? Ye akotɛlɛma soko akokwea bobele na miso na mokóló na ye moko.” Tokoloba nini soki bato nyonso bazali koyokana te na oyo etali ndimbola mpenza ya kokanga eteni ya elamba ya mpɛmbɛ? Na likambo motindo yango, moto na moto akozwa ekateli na ye moko liboso na Yehova Nzambe, soki akokanga eteni ya elamba ya mpɛmbɛ to akokanga yango te.—Gal. 6:5.
Lolenge nini kobongisa makita na ntango ya etumba soki yango ekoki kotya bomoi ya bandeko na likama? Malako ya ntina mpo na yango mazwami kati na búku Lisanga mpo na kokokisa mosala ya Nzambe, lokasa 168, paragrafe 2-4. Esengeli kotánga malako yango na likebi mpenza.
Lokola toyebi yango biso nyonso, etumba ebimisaka kobendanabendana kati na bato mpe etyaka baklisto na komekama monene. Mingi mpenza esɛngaka ‘kozala na bokɛngi mpe kozala na makanisi mabongi.’ (1 Tes. 5:6) Bankulutu basengeli mpenzampenza kozala na bokɛngi mpo na kobatela matomba ya elimo ya bandeko mpe kopesa bango litambwisi malamu na kosaleláká mitindá ya Biblia na bokatikati.—Yis. 32:2.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá eksperiansi oyo elobelami na Lamuká! ya 8 Yanuáli 1980 (ebimeli ya Lifalansé), na lokasa 15, epai kuna bamisionere batombolaki dalapo ya mpɛmbɛ ntango bazalaki koluka nzela mpo na kokima esika ya bitumba.