Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • kl mok. 1 nk. 6-11
  • Okoki kozala na esengo na mikolo mizali koya!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kozala na esengo na mikolo mizali koya!
  • Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • BOMOI YA SEKO!
  • BOMOI KATI NA PALADISO
  • BOMOI KATI NA PALADISO OYO EKOZONGISAMA
  • BOYEBI MPE BOMOI NA YO YA LOBI
  • “Tokomonana na Paradiso!”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Paradiso
    Lamuká!—2013
  • Baninga ya Nzambe bakofanda na Paladiso
    Okoki kozala moninga ya Nzambe!
  • Mokano ya Nzambe mpo na mabele ezali nini?
    Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
Makambo mosusu
Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
kl mok. 1 nk. 6-11

Mokapo 1

Okoki kozala na esengo na mikolo mizali koya!

1, 2. Mozalisi na yo alingi nini mpo na yo?

KOYAMBAMA na nsáí nyonso na moto oyo olingaka. Kosɛka na esengo na ntango ozali kolya bilei kitoko elongo na baninga oyo olingaka mingi. Esengo ya kotala bana na yo wana bazali kosakana na nsáí nyonso. Ntango lokola oyo wana ezali ntango ya esengo kati na bomoi. Nzokande, mpo na bato mingi, bomoi emonani ete ezali kobimisa mikakatano minene, moko nsima na mosusu. Soki yango esili kozala bongo mpo na yo, yiká mpiko.

2 Mokano ya Nzambe ezali ete ozala na bolamu ya seko kati na ezalela ya makambo malamu mingi mpe na ezingelo ya kitoko. Yango ezali ndɔ́tɔ te, mpamba te Nzambe apesi yo mpenza lifungola ya kozala na esengo motindo wana na mikolo mizali koya. Lifungola yango ezali bongo boyebi.

3. Boyebi nini ezali lifungola ya bolamu, mpe mpo na nini tokoki kondimisama ete Nzambe akoki kopesa boyebi yango?

3 Tozali kolobela na ntina na boyebi ya sikisiki oyo eleki mosika mayele ya bato. Ezali bongo “boyebi mpenza ya Nzambe.” (Masese 2:5, NW) Esili koleka pene na mibu 2 000, mokomi moko ya Biblia alobaki ete: “Ndako na ndako etongami na moto moko nde motongi na nyonso azali Nzambe.” (Baebele 3:4) Kanisá naino na boyebi oyo Moyemi ya biloko nyonso asengeli kozala na yango! Biblia elobi ete Nzambe atángaka mpe abéngaka minzoto nyonso na nkombo na yango. Oyo nde likambo ya kokamwa, mpamba te minzoto oyo mizali na galaksi na biso mizali na motángo ya bankámá ya bamiliare, mpe bato bayekolaka biloko ya likoló balobi ete ezali na bagalaksi mosusu pene na bamiliare monkámá! (Nzembo 147:4) Nzambe ayebi mpe makambo nyonso matali biso; na yango nani mosusu akoki kopesa biyano malamu koleka na mituna minene oyo mitali bomoi?—Matai 10:30.

4. Mpo na nini tosengeli komizela ete Nzambe apesa malako mpo na kotambwisa biso, mpe búku nini ezali kokokisa mposa yango?

4 Tókamata ndakisa ya mibali mibale oyo bazali komeka kobongisa mituka na bango. Lokola alɛmbi nzoto, moko na mibali yango atiki kobongisa motuka na ye. Na kimya nyonso, mosusu alóngi mokakatano na ye, abalwisi lifungola ya motuka, mpe asɛki mwa moke wana motuka ebandi kopela mpe kotambola malɛmbɛmalɛmbɛ. Okoki kozala na mpasi te mpo na koyeba soki nani kati na mibali wana mibale azalaki na búku ya malako oyo eutaki epai na mosáli-motuka. Yango emonisi ete Nzambe akoki kopesa biso malako mpo ete mátambwisa biso kati na bomoi, boye te? Lokola okoki koyeba yango, Biblia emonisi na sikisiki oyo yango ezali—búku ya malako mpe ya litambwisi oyo euti epai na Mozalisi na biso, oyo esalemi mpo na kopesa boyebi ya Nzambe.​—2 Timoté 3:16.

5. Boyebi oyo ezali kati na Biblia ezali na motuya nini?

5 Soki oyo Biblia ezali koloba ezali solo, kanisá naino na biloko ya motuya ya boyebi oyo búku wana esengeli kozala na yango! Na Masese 2:1-5, elendisi biso ete tóluka mayele, tótimola mpo na kozwa yango lokola tokoki kosala soki tozalaki nde koluka eloko ya motuya oyo ebombami—ezali te na mabelé lokola bato bakoki kokanisa, kasi kati na Liloba mpenza ya Nzambe. Soki toluki kuna, “tokozwa boyebi mpenza ya Nzambe.” Lokola Nzambe ayebi bandelo na biso mpe bamposa na biso, azali kopesa biso malako oyo mazali kosalisa biso na kozala na bomoi ya kimya mpe ya esengo. (Nzembo 103:14; Yisaya 48:17) Lisusu, boyebi ya Nzambe ezali kopesa biso nsango malamu ya kosepelisa.

BOMOI YA SEKO!

6. Endimiseli nini Yesu apesaki na ntina na boyebi ya Nzambe?

6 Yesu Klisto, moto oyo ayebani malamu kati na lisoló ya bato, alobelaki likambo wana ya boyebi ya Nzambe na maloba ya polele. Alobaki ete: “Oyo elimboli bomoi ya seko, ete báyekola koyeba yo, Nzambe bobele moko ya solo, mpe Motindami na yo, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3, NW) Kanisá naino—boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko!

7. Elembeteli nini emonisi ete Nzambe akanaki te ete tókufaka?

7 Kotalela nokinoki te bomoi ya seko lokola ete ezali bobele ndɔ́tɔ mpamba. Na esika ya kosala bongo, talelá lolenge nzoto ya moto esalemi. Esalemi na lolenge ya kokamwa mpo na komeka elɛngi ya bilei, koyoka, kolumbuta nsolo, komona, mpe kosimba. Ezali na makambo mingi awa na mabelé oyo mazali kosepelisa biyokeli na biso—bilei kitoko, nzembo kitoko ya bandɛkɛ, bafololo oyo ezali kobimisa nsolo kitoko, zámba kitoko mpe baninga malamu! Mpe bɔɔngɔ́ na biso oyo esalemi na lolenge ya kokamwa eleki mosika ordinatɛrɛ ya monene, mpamba te ezali kopesa biso likoki ya koyeba mpe ya kosepela na biloko nyonso wana. Okanisi ete Mozalisi na biso alingi ete biso tókufaka mpe tóbungisaka biloko nyonso wana? Ekozala mpenza likambo ya mayele na koloba ete alingi nde ete tózala na esengo mpe tósepela na bomoi libela na libela, boye te? Ezali yango nde boyebi ya Nzambe ekoki kolimbola mpo na yo.

BOMOI KATI NA PALADISO

8. Biblia elobi nini na ntina na bomoi ya bato na mikolo mizali koya?

8 Oyo Biblia ezali koloba na ntina na mikolo mizali koya mpo na mabelé mpe mpo na bato ekoki kolobama na liloba moko ete—Paladiso! Yesu Klisto alobelaki yango wana ayebisaki na mobali moko oyo azalaki pene na kokufa ete: “Okozala elongo na ngai kati na Paladiso.” (Luka 23:43, NW) Kozanga ntembe, nkombo Paladiso ekundwelaki mobali wana ezalela ya esengo oyo bankɔ́kɔ na biso ya liboso, Adama mpe Eva, bazalaki na yango. Ntango Nzambe azalisaki bango, bazalaki na ezaleli ya kokoka mpe bafandaki kati na elanga oyo ekokanaki na lopango monene oyo Mozalisi abongisaki mpe alónaki. Ebéngamaki na lolenge lobongi ete elanga ya Edene, nkombo oyo elimboli bisengo.

9. Bomoi ezalaki lolenge nini kati na Paladiso ya ebandeli?

9 Oyo nde elanga moko kitoko! Ezalaki paladiso ya solo. Kati na banzeté na yango ya kitoko, ezalaki mpe na oyo ezalaki kobota mbuma ya elɛngi. Wana Adama mpe Eva bazalaki kotambola na efandelo na bango, wana bazalaki komela mai na yango ya pɛto mpe kobuka mbuma na nzeté na yango, bazalaki na ntina te ya kozala mawamawa to kobanga. Ata banyama bakokaki kosala bango mabe te, mpamba te Nzambe asilaki kopesa na mobali mpe na mwasi na ye lotómo ya kozala na bokonzi etondi na bolingo likoló na yango nyonso. Lisusu, bato mibale ya liboso bazalaki na nzoto kolɔngɔ́nɔ́. Soki bamonisaki ntango nyonso botosi epai na Nzambe, mbɛlɛ balingaki kozala na bomoi ya seko mpe ya esengo. Bapesamelaki mosala ya kosepelisa oyo ya kobatela Paladiso, esika oyo bazalaki kofanda. Lisusu Nzambe apesaki na Adama mpe Eva mokumba ya “kotondisa mabelé mpe kozala na bokonzi likoló na yango.” Bango mpe bana na bango basengelaki kokólisa bandelo ya Paladiso kino etando na biso mobimba ekokóma esika ya kitoko mpe ya kosepelisa.​—Genese 1:28, NW.

10. Ntango Yesu alobelaki Paladiso, azalaki kokanisa na nini?

10 Nzokande, ntango Yesu alobelaki Paladiso, azalaki te kosɛnga na mobali oyo azalaki pene na kokufa ete akanisa na makambo maleká kalakala. Te, Yesu azalaki nde kolobela makambo oyo mazalaki koya! Ayebaki ete mabelé mobimba, efandelo na biso, ekokóma paladiso. Na bongo, Nzambe akokokisa mokano na ye ya ebandeli mpo na bato mpe mpo na mabelé. (Yisaya 55:10, 11) Ee, Paladiso ekozongisama! Mpe yango ekozala motindo nini? Tiká ete Liloba ya Nzambe, Biblia Mosantu, eyanola.

BOMOI KATI NA PALADISO OYO EKOZONGISAMA

11. Kati na Paladiso oyo ekozongisama, ekozala boni mpo na bokɔnɔ, konuna mpe liwa?

11 Bokɔnɔ, konuna, mpe liwa ekozala lisusu te. “Bongo miso na bakufeli miso makofungolama, mpe matoi na bimimi makozipolama; bongo, motengumi akopombwa lokola mboloko, mpe lolemo na ebubu ekoyemba na esengo.” (Yisaya 35:5, 6) “Nzambe ye mpenza akozala na [bato] elongo. Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.”​—Emoniseli 21:3, 4.

12. Mpo na nini tokoki kondimisama ete kati na Paladiso oyo ezali koya, koboma, mobulu mpe mabe ekozala lisusu te?

12 Koboma, mobulu, mpe mabe ekosila mpo na libela. “Basali na mabe bakosuka . . . Nsima na mwa ntango moke, moto na mabe akozala lisusu te . . . akomonana te. Nde bato na bopɔlɔ bakosangola mokili.” (Nzembo 37:9-11) “Kasi bato mabe bakolongolama na mokili; mpe bato na masumu bakopikolama wana.”​—Masese 2:22.

13. Lolenge nini Nzambe akotya kimya?

13 Kimya ekozala na mabelé mobimba. “[Nzambe] akosukisa bitumba kino nsuka na mokili; akobukabuka litimbo mpe akokatakata likonga.” (Nzembo 46:9) “Moyengebene akofuluka mpe kimya ekoyikana ntango nyonso ekoumela sanza.”​—Nzembo 72:7, NW.

14, 15. Biblia elobi nini na ntina na ndako, mosala mpe bilei kati na Paladiso oyo ekozongisama?

14 Bandako malamu ekozala mpe mosala ya kosepelisa. “Bakotonga ndako mpe bakofanda na yango . . . Bakotonga te ete mosusu afanda; bakokona te ete mosusu alya; zambi lokola mikolo na nzeté, bongo ikozala mikolo na bato na ngai, mpe baponami na ngai bakosepela kino ntango molai mpo na misala na mabɔkɔ na bango. Bakosala mosala na mpamba te, bakobota bana mpo na nsɔmɔ na pwasa te.”​—Yisaya 65:21-23.

15 Bilei kitoko bikozala mingi. “Masango ikotondana na mokili ata kino likoló na nkeka.” (Nzembo 72:16) “Mokili ezali kobota mbuma na yango; Nzambe, ee Nzambe na biso apamboli biso.”​—Nzembo 67:6.

16. Mpo na nini bomoi kati na Paladiso ekozala elɛngi?

16 Bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paladiso ekozala elɛngi. “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” (Nzembo 37:29) “Lisobe mpe esika ekauki ikosepela, lisobe ekoyoka esengo, ekobimisa felele na habaselete.”​—Yisaya 35:1.

BOYEBI MPE BOMOI NA YO YA LOBI

17. (a) Osengeli kosala nini soki bomoi kati na Paladiso ezali kosepelisa yo? (b) Lolenge nini toyebi ete Nzambe akosala mabongwani minene awa na mabelé?

17 Soki bomoi kati na Paladiso ezali kosepelisa yo, kotika nzela na eloko moko te ete epekisa yo na kozwa boyebi ya Nzambe. Alingi bato mpe akosala mabongwani masengeli mpo ete mabelé mákóma paladiso. Nkutu, soki yo ozalaki na likoki ya kotya nsuka na bobólá mpe na bokesene oyo etondi mingi kati na mokili, mbɛlɛ olingaki kosilisa yango te? Tokoki komizela ete Nzambe akozanga kosala yango? Ya solo, Biblia elobi malamu na ntina na ntango oyo Nzambe akolongola ebongiseli ya lelo oyo etondi na bitumba mpe akokitanya na esika na yango boyangeli ya kokoka mpe ya boyengebene. (Danyele 2:44) Kasi Biblia esuki te bobele na koyebisa biso na ntina na makambo wana nyonso. Ezali komonisa biso lolenge tokoki kozala na bomoi kati na mokili ya sika oyo Nzambe alaki.​—2 Petelo 3:13; 1 Yoane 2:17.

18. Boyebi ya Nzambe ekoki kosala nini mpo na yo uta sikawa?

18 Boyebi ya Nzambe ekoki mpe kopesa yo bolamu uta sikawa. Mituna minene mpe mileki kobulunganisa na ntina na bomoi mipesami biyano kati na Biblia. Kondima litambwisi na yango ekosalisa yo ete ozala na boninga elongo na Nzambe. Oyo nde libaku kitoko koleka! Mpe yango ekopesa yo likoki ya kozala na kimya oyo bobele Nzambe nde akoki kopesa yango. (Baloma 15:13, 33) Lokola obandi kozwa boyebi oyo ya ntina mingi, esengeli na yo kolanda kotya molende kasi ezali molende oyo eleki nyonso na ntina mpe ekopesa litomba na bomoi na yo. Okoyoka mawa soko moke te na kozwáká boyebi ya Nzambe oyo ezali komema na bomoi ya seko.

19. Motuna nini tokotalela na mokapo molandi?

19 Tosili komonisa ete Biblia nde búku oyo ezali na boyebi ya Nzambe. Nzokande, lolenge nini toyebi ete yango ezali te búku oyo ebimisami na mayele ya bato, kasi ezali nde eloko oyo eleki mosika mayele ya bato? Tokotalela motuna wana kati na mokapo molandi.

MEKÁ BOYEBI NA YO

Mpo na nini boyebi ya Nzambe ekoki komemela yo bolamu ya seko?

Bomoi ekozala lolenge nini ntango mabelé makobongwana Paladiso?

Mpo na nini ezali litomba kozwa boyebi ya Nzambe uta sikawa?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto