Loyembo 15
Bomoi bozangi nsuka
1. Y’obanzi mpo na ntango
Bato bakozwa kimya?
Mawa, mpasi esili.
Oyo nde bolamu!
(Mondimo)
2. Bato mpe nyama nyonso
Bakozala na kimya.
Bapambwami, batondi
Mpo nzala esili.
(Mondimo)
3. Ntango yango, mobangé
Akozonga elenge.
Mitungisi na mpasi,
Nsɔmɔ ekosila.
(Mondimo)
4. Paladiso’ekozala
Mpo na nkembo ya Nzambe.
Tótɔndo Yah Yehova
Mpo na seko, seko.
(MONDIMO)
Kumisá Yehova,
Ye Mosungi na yo.
Zelá lobiko na yo
Na mokolo yango.