Loyembo 4
Nzambe alaki Paladiso
1. Paladiso’ekosalema na
Bokonzi ya Mbula Nkóto.
Mpisoli mpe liwa, na mpasi
Ekosila Ntango yango.
(Mondimo)
2. Yesu’alaki bakufi banso,
Bakozonga na lobiko.
Alobi na mobomi ete:
‘Y’okozal’o Paladiso.’
(Mondimo)
3. Esengo bɛɛ! Talá bandeko
Bakutani na lobiko!
Bakotonda na elikya mpe
Bolingo na Paladiso.
(Mondimo)
4. Paladiso’ezali elaká
Ya Yehova, Moyangeli.
Tótɔndo ye, tósepela mpe
Tóliky’epai Na Mokonzi.
(MONDIMO)
Na kondima, Paladiso
Emonani na solo mpo
Yango’elaká epesami;
Klist’alobi, ekozala.