Loyembo 220
Paladiso na biso: sikawa mpe na ntango ekoya
1. Yehova Nzambe, bato ba yo,
Bakokumisaka yo.
Na lisungi na yo, bakɔti
O Paladiso’elimo.
Topambwami mingi,
Yah, tótɔndi yo.
Tosepeli, Yah, na
Mosala na yo.
Bolingo mpo na yo mpe mpo na
Bazalani na biso
Eleki nguya; mpo na yango,
Tozali na bomoko!
2. Boyangeli, y’opesi Klisto,
Akokamba na sembo.
Mpe akotosisa mibeko
Na yo, Yehova seko.
Nkembo na yo, Tata,
Y’olakisi nde
Bato na yo nzela,
Bayangani mpe.
Salisá biso, kambá biso
Mpo tósakola nsango.
Tokolakisa, tokoteya
Bampate balingi yo.
3. Nsima n’etumba na yo, Nzambe,
Satan’akokangama
Elongo na baanzelu na ye,
Mbula Nkót’ekoleka.
Bakufi na kala,
Bato na sembo,
Bakosekwisama
Na Paladiso.
Bakosalisa bato bázwa
Bomoi ya kokoka.
Bakozal’elongo na Yesu,
Nganga Monene na Yah.