Loyembo 75
Masanzoli ya esengo mpo na Yehova
1. Na Yehova Mozalisi,
Lokumu mpe masanzoli;
Ye ayebi kokokisa
Bamposa na biso nyonso.
Nakokumisa Yehova
Na mongongo na ngai nyonso.
Napesi ye bomoi na ngai nyonso;
Ye akosungaka biso.
2. Mpo na lobiko na biso,
Apesaki Mwana na ye.
Tika ’te tókumisa ye.
Tozali baninga na ye.
Ee, boyokani malamu,
Mpo tozali na kondima.
Tomipesi mpenza epai na yo;
Tokosalela yo mpenza.
3. Ɛ Yah, Nzambe ya bolingo!
Yo motambwisi na biso.
Tolingi mibeko na yo.
Tokotosa yango seko.
Okobatelaka biso
Na bolingo na yo mpenza.
Tokoyembela yo na esengo;
Yo Nzambe na kobɔndisa.