Loyembo 155
“Bóyambanaka”!
1. Bóyambana lokola Klist’ayambaki bino.
Bóndimana, mpo akufelaki bino banso.
Boye, bango balɛmbi, ebongi tósalisa.
Elikya mpe kondima na bango, tólendisa.
Maloba basakoli bayebisaki kala
Makoki koyikisa mpiko mpe kobɔndisa.
Tókoluka te bobele matomba na biso,
Oy’a bandeko na biso mpe tokotalela.
2. Bato ya Yehova bakoyekol’etumba te.
Ntango’ekoki ete kimy’eya na Mwana na ye.
Bato ya mitema sembo babendami na ye.
Alakisi bango mibeko mpo batosa ye.
Mpo na nkembo ya Nzambe na biso, tóyambana.
Tóponapona bato te, Nzambe, tómekola;
Ye azali malamu, boboto’etondani bɛɛ.
Tózipola mitema, tólanda Mwana na ye.
3. Tika bato banso bákumisa Yah, ye Nzambe!
Básepela, mpe báyemba na libota na ye!
Tósakola na bandako mpe na balabála.
Tólobela nkembo mpe lokumu ya Yehova.
Tósala nyonso’ete, na nzembo, tókumisa ye.
Nsuka eyei mpo na mokili mpe bato mabe.
Boye, tólinga bandeko na biso na solo.
Tóyambana, Liloba ya Nzamb’elobi bongo.