Loyembo 76
Yehova, Moninga na biso aleki malamu
1. Ɛ Yehova, yo moninga,
Yo Nzambe na sembo.
Na mot’opesi mabelé
Mpe bomoi ya seko.
Mpe at’apɛngwaki solo
Kati’o nzela na yo,
Nde na basembwi y’ozali
Moninga na sembo.
2. Abalayam’azalaki
Moninga ya Nzambe.
Wan’amekami na Nzambe
Atiki solo te.
Ayebaki’te Yah’akoki
Kosekwisa Mwana.
Abalayam’apesaki
Mwana na ye mbeka.
3. Mbula mingi, nsima, Yesu
Ayaki aw’o nsé.
Mpo’azalaki na bolingo
Epai na bato bɛɛ.
Nde Satan’amekaki ye
’Te’apɛngwa na Nzambe.
Kasi Klisto, ye mosembwi,
Alóngisi ye te.
4. Ɛ Yehova, Yesu Klisto,
Baninga na biso.
Balakisi biso nzela
Ya bomoi ya seko.
Tókeba mpo na boninga
N’ezaleli mabe;
Soki te, tokozala nde
Banguna na Nzambe.