Loyembo 127
Makiasikiasi ya bandeko
1. Bandeko makiasikiasi
Bazali na biso.
Batatoli ya sembo,
Batondi na mpiko.
Makiasikiasi wana
Y’ebele monene,
Kati’a mokili mobimba,
Bakumisi Nzambe.
2. Bandeko makiasikiasi
Liboso na Nzambe;
Butu, moi’o tempelo,
Bakosalela ye.
Makiasikiasi wana
Batondi n’esengo,
Batey’et’epai na Nzambe,
Tokozwa lobiko.
3. Bandeko makiasikiasi
Basakoli nsango.
Bazali na bomoko.
Oyo nde esengo!
Lelo babundisami
Mpo na nsango yango,
Nde bakobɔndisamaka
Na Klisto, ye Nkolo.