-
Ozali moninga ya Nzambe?—Mabondeli na yo mazali komonisa niniLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1997 | 1 Juillet
-
-
Ozali moninga ya Nzambe?—Mabondeli na yo mazali komonisa nini
OSILA kozwa libaku ya koyoka bato mibale bazali kosolola? Na ntembe te oumelaki te koyeba lolenge ya boyokani oyo bazali na yango—soki bazali baninga ya motema to bapaya, bayebani mpamba to baninga ya penepene, oyo batyelanaka motema. Na lolenge moko, mabondeli na biso makoki komonisa lolenge ya boyokani na biso na Nzambe.
Biblia endimisi biso ete Nzambe “azali mpe mosika na moto na moto na biso te.” (Misala 17:27) Ya solo, azali kosɛnga biso ete tóyeba ye. Tokoki ata kozala baninga na ye. (Nzembo 34:8; Yakobo 2:23) Tokoki kosepela na boninga ya penepene biso na ye! (Nzembo 25:14) Ya solo, boyokani na biso na Nzambe ezali eloko eleki motuya oyo biso bato ya kozanga kokoka tokoki kozala na yango. Mpe Yehova azali kopesa motuya na boninga na biso. Yango ezali komonana polele mpamba te boninga elongo na ye etongami likoló na kondima na biso epai na Mwana mobotami-bobele moko na ye, oyo apesaki bomoi na ye mpo na biso.—Bakolose 1:19, 20.
Na yango, mabondeli na biso masengeli komonisa bolingo mozindo mpe bosepeli na biso mpo na Yehova. Kasi, osila koyoka ete mabondeli na yo, atako masalami na limemya, mazali mbala mosusu kozanga bozindo ya mayoki? Ezali likambo oyo limonanaka mingi. Wapi fungola mpo na kobongisa likambo yango? Kokólisa boninga na yo elongo na Yehova Nzambe.
Kozwa ntango mpo na kobondela
Libosoliboso, esengeli ntango mingi mpo na kolóna mpe kokólisa boninga. Ekoki kozala ete mokolo na mokolo opesaka bato mingi mbote, ata mpe kosolola na bango—lokola baninga ya kartyé, baninga ya mosala, basofɛlɛ ya bísi, mpe bato oyo batekaka na bamagazini. Kasi, yango elingi koloba te ete ozali mpenza na boninga na bato yango. Boninga ekólaka wana ozali kosolola mingi na moto, ekobanda na masoló ya likolólikoló, kino ekokóma na kobimisa makanisi mozindo mpe mayoki ya motema.
Bobele bongo, libondeli esalisaka biso na kokóma na boyokani ya penepene elongo na Yehova. Kasi esengeli kopesa ntango oyo ebongi mpo na yango; esengeli kosuka te na maloba ya matɔ́ndi oyo malobamaka mbangumbangu liboso ya kolya. Ntango ozali kosolola mingi na Yehova, okozala mpe na likoki mingi ya kobimisa mayoki na yo, matindiki na yo, mpe misala na yo. Biyano mpo na kosilisa mikakatano minene ekobanda komonana yango moko wana elimo ya Nzambe ekolamwisa na makanisi na yo mitindá ya Liloba ya Nzambe. (Nzembo 143:10; Yoane 14:26) Lisusu, wana ozali kobondela, Yehova akomonana moto ya solo mpenza na makanisi na yo, mpe okoyeba mpenza likebi ya bolingo mpe lobanzo oyo azali na yango mpo na yo.
Yango emonanaka mingimingi na ntango ozwi eyano na libondeli na yo. Ɛɛ, Yehova akoki “kosala kati na biso makambo maleki nyonso ezali biso kolɔmba soko kobanza”! (Baefese 3:20) Yango elingi koloba te ete Yehova akosala bikamwiseli mpo na yo. Nzokande, na nzela ya Liloba na ye oyo likomami, na mikanda mibimisami na kelasi ya moombo ya sembo, to na monɔkɔ ya bandeko ya bolingo mibali mpe basi, akoki kopesa yo toli to litambwisi lisengeli. To akoki kopesa yo nguya esengeli mpo na kolónga to kotɛmɛla komekama. (Matai 24:45; 2 Timoté 4:17) Makambo motindo wana mazali kotondisa mitema na biso na bosepeli mpo na Moninga na biso oyo azali na likoló!
Na yango esengeli kopesa ntango mpo na kobondela. Ya solo, ntango ezali mingi te na mikolo oyo mitondi na mitungisi. Kasi soki ozali solo kotyela moto moko likebi, mbala mingi ozwaka ntango ya kolekisa elongo na ye. Talá lolenge oyo mokomi na nzembo alobaki: “Lokola nganzi ayoki mposa monene mpo na mikele na mai, boye molimo na ngai ezali koyoka mposa mpo na yo, ɛ Nzambe. Molimo na ngai eyoki mposa mpo na Nzambe, mpo na Nzambe na bomoi. Ntango nini ngai nakoya mpe nakomonana liboso na Nzambe?” (Nzembo 42:1, 2) Ozalaka na mposa motindo wana ya kosolola na Nzambe? Na yango sombá ntango mpo na kosala yango!—Kokanisá na Baefese 5:16.
Na ndakisa, okoki komeka kolamuka na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ mpo na komizwela mwa ntango mpo na kobondela. (Nzembo 119:147) Ekómelaka yo mbala mosusu ete ozanga mpɔngi na kati ya butu? Boye, lokola mokomi na nzembo, okoki kotalela bantango motindo wana ya mobulungano lokola libaku ya komonisa mabanzo na yo epai ya Nzambe. (Nzembo 63:3) To okoki kosala mabondeli mingi ya mikuse na boumeli ya mokolo. Mokomi na nzembo alobaki na Nzambe ete: “Nazali konganga epai na yo mokolo mobimba.”—Nzembo 86:3.
Lolenge ya kobongisa mabondeli na biso
Bantango mosusu okomona ete ezali mpe na ntina koyeisa mabondeli na yo molai. Ntango ozali kosala libondeli ya mokuse, mbala mingi okolobela makambo ya likolólikoló. Kasi ntango ozali kosala mabondeli milai mpe ya mozindo, okozala na mposa mingi ya komonisa makanisi na yo mpe mayoki mozindo na yo. Bantango mosusu Yesu alekisaki butu mobimba na kobondela. (Luka 6:12) Na ntembe te okomona ete mabondeli na yo makozala na bozindo mpe na ntina soki osali yango mbangumbangu te.
Yango elimboli te ete esengeli na yo kolobaloba atako ozali na makambo moke ya koloba; to elingi koloba te ete osengeli mbala na mbala kozongela makambo kozanga ntina. Yesu akebisaki ete: “Ezali bino kobondela, bólobaloba lokola ekosalaka bapakano te, zambi bazali kokanisa ete Nzambe akoyoka bango mpo na kolobaloba na bango. Bokoki kozala lokola bango te. Zambi Tata na bino ayebi yango ezali bino kosɛnga naino bolɔmbi ye te.”—Matai 6:7, 8.
Libondeli ekozala na ntina mingi soki okanisi liboso makambo oyo okolobela. Makambo mazali mingi—tópesa bobele mwa bandakisa: esengo na biso na mosala ya kosakola, bolɛmbu mpe kozanga kokoka na biso, bilikya na biso oyo bikokisami te, komibanzabanza na biso mpo na makambo ya nkita, bopusi tozali kokutana na yango na mosala to na eteyelo, bolamu ya libota na biso, elimo ya lisangá na biso.
Ntango mosusu makanisi na yo mayengayengaka na ntango ozali kobondela? Boye salá milende makasi ya kotya makanisi na yo esika moko. Tóbosana te, Yehova azali na mposa ya ‘koyokamela kolɔmba na biso.’ (Nzembo 17:1) Tosengeli kosala milende ya solosolo mpo na kotya likebi na mabondeli na biso moko, boye te? Ɛɛ, ‘tótya mitema na makambo ya [elimo, NW]’ mpe kotika yango te koyengayenga.—Baloma 8:5.
Lolenge oyo tozali koloba na Yehova ezali mpe na ntina. Atako azali na mposa ete tótalela ye lokola moninga, tosengeli kobosana te ete tozali koloba na Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Tángá mpe manyolá likoló na emonaneli ya kokamwisa oyo elobelami na Emoniseli mikapo 4 mpe 5. Kuna Yoane amonaki kati na emonaneli nkembo ya Ye oyo tozali kobɛlɛma na ye kati na libondeli. Oyo nde libaku malamu tozali na yango ya kozala na likoki ya kobɛlɛma mpe kondimama na “Ye oyo afandi na kiti ya bokonzi”! Tosengeli soko moke te kotika nzela ete elobeli na biso ezanga limemya to ezanga lokumu. Kútu, tosengeli nde kosala milende makasi mpo ete ‘maloba ya monɔkɔ na biso mpe makanisi ya motema na biso mándimama liboso na Yehova.’—Nzembo 19:14.
Nzokande, tosengeli koyeba ete tokokamwisa Yehova te na kosaleláká maloba ya makasi. Azali kosepela na elobeli na biso ya limemya mpe oyo euti na motema, ata soko elobeli na biso ezali pɛtɛɛ.—Nzembo 62:8.
Libɔndisi mpe koyokamela na ntango ya bosɛnga
Na ntango tozali na mposa ya lisungi mpe libɔndisi, mbala mingi tolukaka moninga ya motema mpo na kozwa lisungi mpe koyokelama mawa. Ezali na moninga moko te oyo tokoki kobɛlɛma na ye kozanga nkaká koleka Yehova. Azali “na kosunga na ntango na mpasi.” (Nzembo 46:1) Lokola azali “Nzambe na kobɔndisa nyonso,” ayebi malamu koleka bato mosusu nyonso makambo oyo tozali kokutana na yango. (2 Bakolinti 1:3, 4; Nzembo 5:1; 31:7) Mpe ayokaka mawa ya solosolo mpo na baoyo bazali na ezalela ya kozanga elikya. (Yisaya 63:9; Luka 1:77, 78) Ntango tozali kotalela Yehova lokola moninga oyo ayebi kokanga ntina ya mayoki na biso, tokozala na bonsomi ya koloba na ye na mpiko mpe na bozindo. Topusami na kobimisa bobangi mozindo na biso mpe mitungisi na biso. Na ndenge yango tokomona biso mpenza lolenge oyo ‘mabɔndi na Yehova ikosepelisa molimo na biso.’—Nzembo 94:18, 19.
Mbala mosusu tokoki komiyoka ete tobongi te kobɛlɛma na Nzambe na ntina na mabunga na biso. Kasi ekozala ndenge nini soki moninga na yo moko ya motema asalelaki yo libunga mpe asɛngi yo bolimbisi? Okopusama na kobɔndisa mpe kondimisa ye ete oboyi ye te, boye te? Na yango, mpo na nini tosengeli komizela te ete Yehova asala yango? Azali mpenza kolimbisa baninga na ye oyo bazali kosala masumu na ntina na bomoto ya kozanga kokoka. (Nzembo 86:5; 103:3, 8-11) Koyebáká yango, tokomipekisa te koyambola na bonsomi nyonso mabunga tosaleli ye; tokoki kolikya na bolingo mpe na mawa na ye. (Nzembo 51:17) Soki mabunga na biso etungisi biso na makanisi, tokoki kozwa libɔndisi na maloba ya 1 Yoane 3:19, 20 ete: “Tokoyeba ete tozali bato na solo na nzela oyo, mpe tokondimisa mitema na biso liboso na ye; mpo ete, ata mitema na biso mikokweisa biso, Nzambe aleki mitema na biso na monene mpenza mpe ye ayebi makambo nyonso.”
Nzokande, ezali na ntina te kozala mawamawa mpo na kosepela na komibanzabanza ya Nzambe oyo etondi na bolingo. Yehova azali kotya likebi na makambo nyonso oyo mazali na bopusi likoló na bolamu na biso ya elimo mpe ya mayoki. Ɛɛ, tosengeli kokanisa soko moke te ete mayoki na biso, makanisi na biso, mpe mabanzo na biso ezali mabe koleka na boye ete tokoki te kolobela yango na libondeli. (Bafilipi 4:6) Ntango ozali elongo na moninga moko ya motema, osololaka bobele makambo ya ntina mingi kati na bomoi na yo? Oyebisaka ye mpe makambo mikemike, boye te? Na lolenge moko, okoki kolobela makambo ndenge na ndenge ya bomoi epai na Yehova, koyebáká ete “azali komibanzabanza mpo na bino.”—1 Petelo 5:7, NW.
Ya solo, ntembe ezali te ete boninga ekoumela ntango molai te soki makambo nyonso oyo olobelaka mazali sé oyo matali yo. Lolenge moko, mabondeli na biso masengeli kozala na moimi te. Tosengeli komonisa bolingo mpe komibanzabanza na biso mpo na Yehova mpe matomba na ye. (Matai 6:9, 10) Libondeli ezali bobele libaku ya kosɛnga lisalisi epai na Nzambe te kasi ezali mpe libaku ya kopesa matɔ́ndi mpe ya kosanzola ye. (Nzembo 34:1; 95:2) “Koyekola koyeba” na nzela ya boyekoli na biso moko mokolo na mokolo ekosalisa biso na likambo yango, lolenge moko esalisaka biso na komesana mingi na Yehova mpe banzela na ye. (Yoane 17:3, NW) Okozwa lisalisi ya ntina na kotángáká mokanda ya Nzembo mpe na kotyáká likebi na lolenge oyo basaleli mosusu ya Nzambe balobaki na Yehova.
Boninga na Yehova ezali solo likabo ya motuya. Tiká ete tómonisa bosepeli na biso mpo na yango na kosaláká mabondeli ya solosolo, oyo mauti na motema, mpe oyo ezali ya biso moko. Boye tokozwa esengo oyo mokomi na nzembo amonisaki, na kolobáká ete: “Mapamboli izali epai na ye oyo yo oponi ete abɛlɛma.”—Nzembo 65:4.
[Bililingi na lokasa 28]
Tokoki kobondela Nzambe mbala nyonso oyo libaku emonani na boumeli ya mokolo
-
-
Mituna ya BatángiLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1997 | 1 Juillet
-
-
Mituna ya Batángi
Tosepelaki mingi na boyekoli na biso ya lisese ya Yesu na ntina na bampate mpe bantaba. Na kotalela ndimbola ya sika oyo epesamaki na “Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli” ya 15 Ɔkɔtɔ́bɛ 1995, tokoki lisusu koloba ete lelo oyo Batatoli ya Yehova bazali kosangana na mosala ya bokaboli bampate na bantaba?
Ɛɛ. Ya solo, bato mingi bamitunaki likambo yango mpamba te Matai 25:31, 32 elobi ete: “Ekoya mwana na moto na nkembo na ye mpe baanzelu na ye nyonso esika moko na ye, akofanda na kiti na bokonzi na ye na nkembo. Akoyanganisa mabota nyonso liboso na ye mpe akokabola kati na bango lokola ekosalaka mobateli na bampate mpe na bantaba.” Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔ́bɛ 1995, emonisaki ntina oyo bavɛrsɛ́ yango ekokokisama na nsima ya kobanda ya bolɔ́zi monene. Yesu akoya na nkembo na ye elongo na baanzelu na ye mpe akofanda na kiti na ye ya kosambisa. Na nsima, akokabola bato. Na ndimbola nini? Akokata makambo engebene makambo bato basalaki to basalaki te liboso ya ntango wana.
Tokoki kokokanisa yango na matambe oyo malandamaka liboso ete likambo moko likoka kotalelama na esambiselo. Bilembeteli bisangisamaka na boumeli ya ntango molai liboso ete esambiselo ekoka kokata likambo mpe etumbu ekoka kopesama. Bilembeteli mpo na koyeba soki bato oyo bazali na bomoi na mikolo oyo bakomimonisa bampate to bantaba bisilaki kobanda kosangisama uta ntango molai. Mpe bizali sé kobakisama. Kasi ntango Yesu akofanda na kiti na ye ya bokonzi, likambo oyo lizali kosambisama likokóma na nsuka. Ye akozala nde pene ya kokata likambo. Bato bakokabolama mpo na kopesamela bomoi ya seko to liwa ya seko.
-