-
Bonsomi ya losambo elimboli nini mpo na yo?Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1997 | 1 Février
-
-
ya bato mingi. Baguvernemá mingi ezali na boyokani makasi na lingomba moko mpe etalelaka bato ya mangomba mosusu ete bazali likámá mpo na bokonzi ya politiki. Guvernemá mosusu ekoki mpe kotalela lingomba ete ezali likámá mpo na politiki mpamba te mangomba makoki kosɛnga libosoliboso botosi epai ya Nzambe liboso ya kotosa Letá.”
Mpo na bantina yango baguvernemá mosusu ezali kotya mibeko mpo na lolenge ya kosalela lingomba. Mwa ndambo moke bazali kolendisa ezaleli ya kozanga kondima nyonso mpenza. Mosusu, atako bazali komiloba ete bazali kolendisa bonsomi ya losambo, bazali kokɛngelakɛngela misala nyonso mitali mangomba.
Na ndakisa, tótalela ezalela oyo emonanaki na boumeli ya bambula mingi na ekólo Mexique. Atako mibeko ya mboka mizalaki kobatela bonsomi ya losambo, mibeko yango milobaki lisusu ete: “Bandakonzambe oyo ezali kosalelama mpo na losambo epai na bato nyonso ezali biloko ya ekolo, oyo emonisami na guvernemá federal, oyo esengeli kokáta soki ndakonzambe nini ekoki kolanda kosalelama mpo na lolenge wana.” Na 1991 Mibeko ya ekólo mitalelamaki lisusu mpo na kolongola mobeko wana. Atako bongo, ndakisa wana ezali komonisa ete bonsomi ya losambo ekoki kolimbolama na ndenge ikeseni engebene ekólo na ekólo.
Lolenge mosusu ya bonsomi ya losambo
Bonsomi ya losambo ezali komonana na mboka epai oyo ofandi? Soki ezali boye, lolenge nini ezali kolimbolama? Ozali na likoki ya kosambela Nzambe na lolenge oyo yo moko oponi, to osengisami na makasi ete okóma mosangani ya lingomba ya Letá? Ozali na ndingisa ya kotánga mpe ya kokabola mikanda ya lingomba, to mikanda motindo wana mipekisami na guvernemá? Ozali na likoki ya kosolola na basusu na ntina na kondima na yo, to yango etalelami ete ezali kotyola ntómo na bango ya losambo?
Biyano na mituna wana bikeseni engebene esika oyo moto afandi. Nzokande, likambo ya kobenda likebi, ezali na lolenge moko ya bonsomi ya losambo oyo ezali kotalela soko moke te mboka epai kuna ofandi. Ntango azalaki na Yelusaleme na mobu 32 T.B., Yesu ayebisaki epai na bayekoli na ye ete: “Soko bino bokoumela kati na liloba na ngai, bokozala bayekoli na ngai na solo, mpe bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.”—Yoane 8:31, 32.
Yesu alingaki koloba nini na maloba wana? Bayoki na ye oyo bazalaki Bayuda bazalaki na mposa makasi ya kosikwama na boyangeli ya Baloma. Kasi Yesu azalaki te kosolola na bango na ntina na kosikwama na monyoko ya boyangeli ya politiki. Nzokande, azalaki kolaka bayekoli na ye eloko moko oyo eleki malamu, lokola tokomona yango na lisoló lilandi.
-
-
Bazwi bonsomi na nzela ya soloLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1997 | 1 Février
-
-
Bazwi bonsomi na nzela ya solo
NA États-Unis, bato koleka milió moko bazali kati na bolɔ́kɔ. Kati na bango, pene na nkóto misato bakatelami etumbu ya liwa. Kanisá ete yo nde ozali na ezalela motindo wana. Mayoki na yo makozala nini? Likanisi ya kozwama na ezalela motindo wana ezali kosepelisa soko moke te. Nzokande, na etaleli mosusu, bato nyonso bazali na ezalela ekokani na oyo wana. Biblia elobi ete: “Bato nyonso babungi mpe bazangi nkembo na Nzambe.” (Baloma 3:23) Ɛɛ, lokola tozali bakitani ya Adama, tozali na “bolɔ́kɔ” na ntina na ezalela ya masumu. (Baloma 5:12) Tozali komona mbuma mabe ya kozanga bonsomi mokolo na mokolo, lokola Paulo, ntoma moklisto, oyo akomaki ete: “Namoni mobeko mosusu kati na bilembo na nzoto na ngai. Mobeko yango monene ezali kobunana etumba na Mibeko milingi ngai na makanisi na ngai, ezali mpe kokanga ngai moombo na mobeko na masumu mozali kati na bilembo na ngai.”—Baloma 7:23.
Lokola mbano ya ezalela na biso ya masumu, na elobeli ya elilingi, mokomoko kati na biso azali na nsé ya etumbu ya liwa, mpamba te Biblia elobi: “Zambi masumu makofuta mbongo, mbongo yango bobele kufa.” (Baloma 6:23) Mose, mokomi na nzembo amonisaki malamu ezalela na biso: “Motuya ya mbula na biso ezali ntuku nsambo, mpe soko mpo na makasi ikokoma na ntuku mwambe; nzombo na yango ezali bobele mpasi mpe bolozi, zambi ekosila noki mpe biso tokopombwa.”—Nzembo 90:10; kokanisá na Yakobo 4:14.
Yesu azalaki kokanisa ezalela wana ya boombo ya masumu mpe ya liwa oyo bato bazali kati na yango na ntango alobaki na bayekoli na ye ete: “Solo ekosikola bino.” (Yoane 8:32) Na maloba wana, Yesu azalaki kopesa na bayekoli na ye elikya ya eloko moko monene mpenza koleka bonsomi ya kolongwa na nsé ya boyangeli ya Baloma—azalaki kopesa bango bolimbisi ya masumu mpe kosikola bango na liwa! Lolenge nini yango elingaki kopesamela bango? Yesu alobaki na bango ete: “Soko nde Mwana akosikola bino, bokozala basikwi na solo.” (Yoane 8:36) Ɛɛ, na kopesáká bomoi na ye, Yesu, ye “Mwana,” asalelamaki lokola mbeka ya lisiko mpo na kofuta oyo Adama abungisaki. (1 Yoane 4:10) Yango efungolaki nzela mpo ete bato nyonso ya botosi bákoka kosikolama na boombo ya lisumu mpe ya liwa. Mwana mobotami-bobele-moko ya Nzambe akufaki “ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi na seko.”—Yoane 3:16.
Na yango, Yesu azali moboko ya solo oyo ekoki kosikola biso. Baoyo bazali kokóma balandi ya matambe na ye bazali na elikya ya kosikwama na masumu mpe na liwa na ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabelé mobimba. Ata sikawa, baoyo bazali kondima solo ya Liloba ya Nzambe bazali kosepela na bonsomi ya solosolo. Na lolenge nini?
Kosikolama na bobángi ya bakufi
Bamilió ya bato lelo oyo bazali kobanga bakufi. Mpo na nini? Mpamba te mangomba na bango masili koteya bango ete molimo etikaka nzoto nsima ya liwa mpe elandaka kozala na bomoi na mokili ya elimo. Ezali na ntina yango nde na mikili mosusu bato bazali na momeseno ya kosala matánga oyo ezali koumela mikolo mingi mpo na ndeko na bango oyo akufi. Molulu yango esangisi makambo lokola koyemba na mongongo makasi mpe kobɛta bambonda. Baleli bakanisaka ete yango ekosepelisa mowei mpe ekopekisa ete elimo na ye ezonga te mpo na kotungisa bato ya bomoi. Mateya ya lokuta ya boklisto ya nkombo mpamba na ntina na bakufi mazali bobele kolendisa bonkɔ́kɔ wana.
Nzokande, Biblia ezali komonisa solo na ntina na ezalela ya bakufi. Ezali koloba polele ete molimo na yo ezali yo, kasi ezali te eloko moko ya mobombamo oyo ezali kati na yo mpe elandaka kozala na bomoi nsima ya liwa. (Genese 2:7; Ezekiele 18:4) Lisusu, bakufi bazali te kotungisama na lifelo ya mɔ́tɔ, bazali mpe te kolanda kozala na bomoi na mokili ya elimo na boye ete bakoki kozala na bopusi likoló na bato ya bomoi. Biblia elobi ete: “Nde bakufi bayebi likambo te, kokanisa na bango esili kobungana . . . Ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na esika na bakufi, esika ekokenda yo.”—Mosakoli 9:5, 10.
Solo wana ya Biblia esili kosikola bato mingi na bobángi bakufi. Bazali lisusu te kopesa bambeka ya motuya mingi mpo na kokitisa mitema ya bankɔ́kɔ na bango, bazali mpe te komibanzabanza na ntina na balingami na bango oyo bakufa ete bazali konyokolama na ntina na mabunga na bango kozanga koyokelama mawa. Basili koyekola ete Biblia ezali kopesa elikya moko kitoko mpo na baye basilá kokufa, mpamba te elobi na biso ete na ntango oyo Nzambe asili kokana, “lisekwa ekozala na bato sembo mpe na bato sembo te.” (Misala 24:15; Yoane 5:28, 29) Na yango, bakufi bazali sikawa kopema, lokola nde balali mpongi makasi.—Kokanisá na Yoane 11:11-14.
Solo na ntina na ezalela ya bakufi mpe elikya ya lisekwa ekoki kosikola biso na kozanga elikya oyo liwa ekoki koyeisa. Elikya motindo wana esungaki babalani mibale na mokili ya États-Unis na ntango mwana na bango ya mibu minei akufaki na likámá ya motuka. Mama na ye alobaki ete: “Tozangi eloko moko kati na bomoi na biso, oyo ekokokisama te kino tokomona lisusu mwana na biso na nzela ya lisekwa. Kasi toyebi ete mpasi na biso ezali mpo na ntango mokuse, mpamba te Yehova alaki ete akopangwisa mpisoli na biso ya mawa.”—Emoniseli 21:3, 4.
Kosikwama na bobángi na ntina na mikolo mizali koya
Mikolo mizali koya mibombeli biso makambo nini? Mabelé na biso makobebisama na nzela ya bibundeli ya nikleere? Kobebisama ya ezingelo ekosala ete bato bakoka lisusu te kofanda na etando na biso? Kobeba ya bizaleli malamu ekomema na mobulu mpe na mobulungano? Ezali wana makambo mazali kobangisa bato mingi lelo oyo.
Nzokande, Biblia ezali kosikola bato na bobángi wana oyo elongobani te. Ezali kopesa biso endimiseli ete “mokili ekoumela seko.” (Mosakoli 1:4) Yehova asalaki etando na biso bobele te ete atika yango kobebisama epai na baoyo bayebi kobatela yango te. (Yisaya 45:18) Kasi, Yehova asalaki mabelé mpo ete mazala efandelo kitoko, paladiso mpo na libota ya bato oyo bazali na bomoko. (Genese 1:27, 28) Mokano na ye ebongwani te. Biblia elobi na biso ete Nzambe ‘akobebisa babebisi na mokili.’ (Emoniseli 11:18) Lisusu, Biblia elobi ete: “Bato na bopolo bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya na solo.”—Nzembo 37:11.
Tokoki kotyela elaka wana motema, mpamba te Nzambe akosaka te. Yehova alobaki na nzela ya mosakoli na ye Yisaya ete: “Liloba oyo ekobima na monɔkɔ na ngai, ekobutwa epai na ngai mpamba te, kasi ekosukisa oyo ekani ngai, ekolonga na likambo litindaki ngai yango.” (Yisaya 55:11; Tite 1:2) Na yango, tokoki kozela na elikya nyonso kokokisama ya elaka ya Nzambe oyo ekomami na Biblia na 2 Petelo 3:13: “Tozali kotalela Likoló na sika mpe nsé na sika, pelamoko elakaki ye; boyengebene ekofanda kati na yango.”
Kosikwama na bobángi bato
Biblia ezali kopesa biso bandakisa malamu ya mibali mpe basi oyo bamonisaki mpiko na komipesáká epai na Nzambe. Kati na bango ezalaki na Gideona, Balaka, Debola, Danyele, Esetele, Yilimia, Abigaili, mpe Yaele—mpo na kotánga bobele mwa ndambo. Mibali mpe basi wana ya sembo bamonisaki ezaleli motindo moko na mokomi na nzembo oyo akomaki ete: “Epai na Nzambe nakobanga te; moto akoki kosalela ngai nini?”—Nzembo 56:11.
Na ekeke ya liboso, ntoma Petelo mpe ntoma Yoane bamonisaki mpiko motindo wana ntango bakonzi ya mangomba bapekisaki bango ete básakola lisusu te. Bayanolaki ete: “Kasi mpo na makambo mayebi biso mpe mayoki biso, tokoki kotika kosolola yango te.” Na nsima, Petelo mpe Yoane batyamaki na bolɔ́kɔ mpo na etɛlɛmɛlo na bango ya ngwi. Nsima ya kobima na bango na nzela ya likamwisi, bazongelaki mosala na bango “mpe na molende basakoli Liloba na Nzambe.” Mwa moke nsima, Petelo mpe bantoma mosusu bamemamaki na Sanedrina ya Bayuda. Nganga Monene alobaki na bango ete: “Topekisaki bino makasi ete bolakisa na nkombo oyo te, mpe bosili kotondisa Yelusaleme na mateyo na bino.” Petelo mpe bantoma mosusu bayanolaki ete: “Ekoki ete tótosa Nzambe liboso na kotosa bato.”—Misala 4:16, 17, 19, 20, 31; 5:18-20, 27-29.
Na mosala na bango ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, Batatoli ya Yehova lelo oyo bazali kosala makasi mpo na komekola molende ya baklisto ya ekeke ya liboso. Ezala bilenge oyo bazali kati na bango bazali komonisa mpiko na kolobáká epai na basusu na ntina na kondima na bango. Tótalela mwa bandakisa.
Elenge mwasi moko na nkombo ya Stacie, azali moto ya nsoninsoni uta kobotama na ye. Mpo na yango, kosolola na basusu na ntina na kondima na ye ezalaki liboso mokakatano monene. Asalaki nini mpo na kolónga ezalela na ye ya nsoninsoni? Alobi boye: “Nayekolaki Biblia mpe nasalaki nyonso mpo ete nákoka kondimisama ete nakangaki ntina ya makambo oyo nazalaki kolobela. Ekomelaki ngai pɛtɛɛ, mpe nakómaki komityela motema.” Etamboli malamu ya Stacie elobelamaki na zulunalo ya mboka na bango. Lisoló oyo molakisi moko ya eteyelo na ye akomaki, elobaki ete: “Emonani ete kondima ya [Stacie] esili kopesa ye nguya ya kobundisa mikakatano mingi oyo bilenge mingi bakutanaka na yango. . . . Azali na mayoki ete mosala mpo na Nzambe esengeli kozala na esika ya libosó kati makanisi na ye.”
Tommy abandaki koyekola Biblia na baboti na ye wana azalaki bobele na mibu mitano ya kobotama. Ata wana azalaki naino moke mpenza, azwaki etɛlɛmɛlo ya mpiko mpo na losambo ya solo. Na ntango baninga na ye ya kelasi bazalaki koyema bililingi ya kokumisa biyenga, Tommy azalaki koyema bililingi bizali komonisa Paladiso oyo Nzambe alaki. Na ntango akomaki elenge, Tommy amonaki ete mingi kati na bana kelasi bazalaki kobulunganisama na ntina na bindimeli ya Batatoli ya Yehova. Na esika ete akanga monɔkɔ na ntina na bobángi, mokolo moko asɛngaki epai na molakisi na ye moko ndingisa ya kotambwisa lisoló ya mituna mpe biyano ye na baninga na ye ya kelasi mpo ete akoka koyanola na mituna na bango nyonso na mbala moko. Molakisi apesaki ye ndingisa, mpe apesaki litatoli malamu.
Na ntango azalaki na mibu 17, Markietta amonaki libaku malamu ya kosolola na baninga na ye ya kelasi na ntina na lingomba na ye. Alobi ete: “Bapesaki biso devware ete tosala lisoló, ngai naponaki motó na likambo ya lisoló na ngai kati na búku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi.a Naponaki mikapo mitano kati na búku mpe nakomaki mitó na makambo na etánda. Nasɛngaki na bana kelasi ete bápona mitó na makambo ya masoló yango na molóngo engebene oyo bango bakanisi ete ezali na ntina mingi koleka mosusu.” Lisoló oyo banakelasi basanganaki na yango lilandaki. Markietta asukisi ete: “Nalakisaki búku yango na kelasi, mpe banakelasi mingi basɛngaki ete bázwa ekzamplɛrɛ mokomoko. Ata mpe molakisi na ngai alobaki ete azalaki na mposa ya ekzamplɛrɛ moko.”
Solo ekoki kosikola yo
Lokola tosili komona yango, solo oyo ezwami na Biblia ezali na nguya ya kosikola bato ya lolenge nyonso oyo bazali koyekola yango mpe bazali kobatela nsango na yango na mitema na bango. Ezali kosikola bango na bobángi ya bakufi, na bobángi na ntina na mikolo mizali koya, mpe na bobángi bato. Na nsuka, lisiko ya Yesu ekosikola bato na masumu mpe na liwa. Oyo nde esengo ntango bato bakozala na bomoi ya seko na paladiso, kozanga ete bákangama na bolɔ́kɔ ya masumu oyo tosangolaki!—Nzembo 37:29.
Okolinga koyeba makambo mingi lisusu na ntina na mapamboli oyo Nzambe alaki? Soki ezali bongo, osengeli kosala nini? Yesu alobaki ete: “Oyo ezali bomoi na seko ete bayeba yo Nzambe moko na solo mpe Motindami na yo, Yesu klisto.” (Yoane 17:3) Na yango soki ozali na mposa ya kozwa bonsomi oyo Yesu alaki epai na bayekoli na ye, osengeli koyekola makambo na ntina na Yehova Nzambe mpe mwana na ye. Osengeli koyeba mokano ya Nzambe mpe na nsima kosala yango, mpamba te Biblia elobi ete: “Mokili ezali mpe kolongwa mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumelaka seko.”—1 Yoane 2:17.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Elilingi na lokasa 7]
Na nsé ya Bokonzi ya Nzambe, nsukansuka bato bakosikwama na masumu mpe na liwa
-