MOKAPO YA MWAMBE
Batelá libota na yo na bopusi mabe
1-3. (a) Bopusi mabe oyo ezali kokwela mabota eutaka wapi? (b) Baboti basengeli komonisa bokatikati na likambo nini mpo na kobatela mabota na bango?
OMILƐNGƐLI mpo na kotinda mwana na yo ya moke na kelasi, mpe na ntango yango mbula ezali konɔka. Lolenge nini okosala? Okotika ye ete abima kozanga kopesa ye elamba ya mbula? To okolatisa ye nde ebele ya bilamba ya kobatela oyo ekopesa ye mpasi mpo na kotambola? Ya solo, okosala boye soko moke te. Okopesa ye bobele eloko oyo azali na yango mposa mpo na komibatela ete apɔla te.
2 Bobele bongo, baboti basengeli kozala na ezaleli ya bokatikati mpo na kobatela bana na bango na bopusi mabe oyo ezali kouta na bisika ndenge na ndenge—na kominanola, na bipanzeli ya nsango, na baninga, mpe na bantango mosusu ata mpe na biteyelo. Baboti mosusu batyaka likebi mingi te to basalaka eloko moko te mpo na kobatela mabota na bango. Basusu, batalelaka bopusi nyonso ya libándá ete ezali mabe, na bongo batyaka bipekiseli mingi oyo esalaka ete bana bámiyoka lokola ete bokóli na bango ezali kopekisama. Likanisi ya bokatikati likoki nde kozala?
3 Ɛɛ, ezali. Kolekisa ndelo ekoki kobimisa litomba te mpe ekoki komema likámá. (Mosakoli 7:16, 17) Kasi lolenge nini baboti baklisto bakoki kozala na bokatikati na lolenge ya kobatela bana na bango? Tótalela makambo misato: kelasi, baninga, mpe kominanola.
NANI AKOLAKISA BANA NA YO?
4. Lolenge nini baboti baklisto batalelaka kelasi?
4 Baboti baklisto batalelaka kelasi ete ezali ntina. Bayebi ete kelasi esalisaka bana na koyeba kotánga, kokoma, kosolola, mpe kosilisa mikakatano. Esengeli mpe koteya bango lolenge ya koyekola. Makoki oyo bana bazwaka na eteyelo ekoki kosalisa bango mpo na kolónga na bomoi atako mikakatano oyo mizali na mokili ya lelo. Lisusu, kolakisama ya malamu ekoki kosalisa bango ete bázwa mosala mobongi mpenza.—Masese 22:29.
5, 6. Lolenge nini kati na eteyelo bana bakoki kotyama liboso na mateya malongobani te na makambo matali kosangisa nzoto?
5 Nzokande, kelasi mpe esalaka ete bana ya ndenge na ndenge bázala esika moko—mingi kati na bango bazalaka na makanisi mabe. Na ndakisa, tótalela makanisi na bango na likambo litali kosangisa nzoto mpe bizaleli malamu. Na Nigeria, elenge mwasi moko mosáli na pite azalaki na momeseno ya kopesa baninga na ye ya kelasi batoli mabe na makambo matali kosangisa nzoto. Bazalaki koyoka ye na mposa nyonso, nzokande makanisi na ye matondaki na makambo ya bosɔtɔ oyo azalaki kozwa yango uta na mikanda ya mbindo mikolobelaka makambo matali kosangisa nzoto. Bana basi mosusu bamekaki kosalela batoli na ye. Na yango, mwana mwasi moko azwaki zemi ya balabála mpe akufaki mpamba te alukaki kolongola zemi yango.
6 Ezali likambo ya mawa na koloba ete batoli mosusu ya mabe na ntina na makambo matali kosangisa nzoto oyo epesamaka na eteyelo eutaka bobele epai na bana te, kasi mpe epai na balakisi. Baboti mingi bazalaka na mawa ntango biteyelo bizali koteya bana makambo matali kosangisa nzoto kozanga komonisa mitindá ya bizaleli malamu mpe mikumba oyo miuti na likambo yango. Mama moko oyo azalaki na mwana mwasi ya mibu 12, alobaki ete: “Tozali kofanda na etúká oyo emipesá mingi na makambo ya losambo, mpe oyo ebongolaka mimeseno na yango te, nzokande na eteyelo ya katikati oyo ezali na mboka, bazali kokabolela bana bakapɔti!” Ye mpe mobali na ye batungisamaki mingi ntango bayokaki ete bana mibali oyo bazali mbula moko na mwana na bango ya mwasi basɛngaki ye ete básangisa na ye nzoto. Lolenge nini baboti bakoki kobatela mabota na bango na bopusi mabe motindo wana?
7. Lolenge nini kotɛmɛla mateya malongobani te na ntina na biboteli?
7 Ezali likambo ya malamu kopekisa bana ete bálobela soko moke te makambo matali kosangisa nzoto? Te. Ezali malamu yo moko oteya bana na yo makambo matali biboteli. (Masese 5:1) Na mikili misusu ya Mpótó mpe ya Amerika ya Nɔ́rdi, baboti mingi baboyaka kolobela makambo matali biboteli. Bobele bongo, na mikili misusu ya Afrika, baboti balobelaka mingi te makambo matali biboteli epai na bana na bango. Tata moko na Sierra Leone alobi ete: “Kolobela makambo matali biboteli ezali te kati na mimeseno ya bato ya Afrika.” Baboti mosusu bakanisaka ete kolobela bana makambo matali biboteli ekopesa bango makanisi oyo makomema bango na kosala pite! Kasi likanisi ya Nzambe ezali nini?
LIKANISI YA NZAMBE NA NTINA NA BIBOTELI
8, 9. Mateya nini ya malamu mapesami kati na Biblia na ntina na biboteli?
8 Biblia emonisi polele ete ntina ezali te ya koyoka nsɔ́ni mpo na kolobela biboteli na lolenge lobongi. Na Yisalaele, elobamaki na libota ya Nzambe ete eyanganaka elongo, bakisá mpe “bana” na bango mpo na koyoka botángi ya Mibeko na Mose na mongongo makasi. (Deteronome 31:10-12; Yosua 8:35) Mibeko elobelaki na polele nyonso makambo matali biboteli, kati na yango komona sanza, kobima ya mai ya mobali, pite, ekobo, kosangisa nzoto mibali na mibali mpe basi na basi, kosangisa nzoto na moboti to na ndeko, mpe kosangisa nzoto na banyama. (Levitike 15:16, 19; 18:6, 22, 23; Deteronome 22:22) Nsima na botángi wana, na ntembe te baboti basengelaki kolimbola makambo mingi epai na bana na bango oyo bazalaki kotunatuna bango mituna.
9 Na mokapo ya mitano, ya motoba mpe ya nsambo ya mokanda ya Masese, tozali kokuta biteni oyo bimonisi batoli ya bolingo oyo moboti azali kopesa na ntina na makámá oyo kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo ebimisaka. Mikapo wana mimonisi ete na bantango mosusu pite ekoki kolengola. (Masese 5:3; 6:24, 25; 7:14-21) Kasi yango eteyi ete ezali mabe mpe ebimisaka mbuma mabe na nsima, na bongo mikapo yango mizali kopesa litambwisi mpo na kosalisa bilenge ete bápɛngola etamboli ya mbindo. (Masese 5:1-14, 21-23; 6:27-35; 7:22-27) Lisusu, pite ekeseni na bosepeli oyo euti na bosangisi nzoto na lolenge lobongi kati na libala. (Masese 5:15-20) Oyo nde ndakisa malamu mpo na lolenge ya koteya baboti bakoki kolanda!
10. Mpo na nini kopesa bana boyebi ya Nzambe na ntina na biboteli elimboli te ete bozali kotinda bango na kosala makambo ya mbindo?
10 Mateya motindo wana mazali kotinda bana na kosala makambo ya mbindo? Na esika ete ezala bongo, Biblia eteyi ete: “Moyengebene akobikisama mpo na boyebi.” (Masese 11:9) Okolinga te kobikisa mwana na yo longwa na bopusi ya mokili? Tata moko alobaki ete: “Wana bana bazalaki mpenza mike, tosalaki makasi na kosolola na bango polelepolele na ntina na biboteli. Na yango, ntango bazalaki koyoka bana mosusu kosolola na ntina na biboteli, bazalaki na mposa te ya koluka makambo mosusu epai na bango. Likambo ya kokamwa ezali te.”
11. Lolenge nini bana bakoki koteyama mokemoke na ntina na makambo ya mozindo ya bomoi?
11 Lokola tolobelaki yango na mikapo mileki, kolakisama na ntina na makambo matali biboteli esengeli kobanda uta bomwana. Ntango ozali koteya bana na yo ya mike nkombo ya binama ya nzoto, koboya te kolobela biboteli na bango, lokola nde yango ezali binama mabe. Teyá bango makambo matali biboteli yango. Wana bazali kokóla, basengeli koteyama lolenge ya kobatela malamu biboteli na bango. Ekozala malamu ete mama mpe tata báteya bana na bango ete binama wana ya nzoto bikeseni mpenza na binama mosusu, esengeli te kotika yango ete bato mosusu bámona yango to básimba yango, mpe esengeli soko moke te kolobelama na lolenge ya mabe. Wana bana bazali kokóla, basengeli koteyama lolenge nini bosangani kati na mobali mpe mwasi epesaka nzela mpo na kobotama ya mwana. Na nsima, wana nzoto na bango ebandi kokɔta na eleko ya bolenge, basengeli koyeba mbongwana oyo ezali kosalema na nzoto na bango. Lokola tolobelaki yango na Mokapo 5, kolakisama motindo wana ekosalisa mpe mpo na kobatela bana ete bábebisama te.—Masese 2:10-14.
MOKUMBA OYO BABOTI BAZALI NA YANGO
12. Makanisi nini malongobani te mateyamaka mbala mingi kati na biteyelo?
12 Baboti basengeli kozala pene mpo na kotɛmɛla makanisi mosusu ya lokuta oyo makoki koteyama na eteyelo—bafilozofi ya mokili lokola evolisyó, bolingí-ekólo, to likanisi oyo ete solo ya mobimba ezalaka te. (1 Bakolinti 3:19; kokanisá na Genese 1:27; Levitike 26:1; Yoane 4:24; 17:17.) Na kolongobana nyonso, bakambi mingi ya biteyelo bapesaka motuya moleki ndelo na likambo litali kotánga bakelasi milai. Atako likambo ya kotánga bakelasi minene ezali likambo litali liponi ya moto ye moko, balakisi mosusu balobaka ete yango nde nzela bobele moko mpo na oyo etali bolóngi ya moto.a—Nzembo 146:3-6.
13. Lolenge nini bana oyo bazali kokende na kelasi bakoki kobatelama na makanisi mabe?
13 Mpo na kotɛmɛla mateya mabe to mateya oyo malakisami na lolenge elongobani te, baboti basengeli mpenza koyeba lolenge ya kolakisama oyo bana na bango bazali kozwa. Na yango, baboti, bóyeba ete bino mpe bozali na mokumba na likambo yango! Bómonisa komibanzabanza ya solosolo mpo na kelasi ya bana na bino. Bósolola elongo na bango nsima wana bauti na eteyelo. Bótuna bango makambo oyo bazali koyekola, mateya oyo balingaka mingi, mateya oyo bamonaka ete mazali mpasi. Bótalela badevuare oyo bapesaka bango, bakayé na bango, mpe bapwɛ́ oyo bazwaka na mimekano. Bósala makasi na koyebana na balakisi na bango. Bómonisa na balakisi ete bosepelaka na mosala na bango mpe ete bolingi kosunga bango na makambo oyo bokoki kosala mpo na yango.
BANINGA YA BANA NA YO
14. Mpo na nini ezali likambo ya ntina mingi ete bana oyo babangaka Nzambe bápona baninga malamu?
14 “Epai wapi oyekolaki likambo motindo oyo?” Baboti mingi basilá kotuna motuna oyo, wana bakamwaki na likambo moko oyo mwana na bango alobaki to asalaki mpo ete emonanaki ete likambo yango elobamaka te to esalemaka te, boye te? Mpe mbala mingi eyano ezalaka ete baninga na eteyelo to na kartyé nde balakisaki ngai yango, boye te? Ɛɛ, baninga bazalaka na bopusi mingi likoló na biso, tózala bilenge to mikóló. Ntoma Paulo akebisaki ete: “Bómizimbisa te. Baninga mabe babebisaka bizaleli malamu.” (1 Bakolinti 15:33, NW; Masese 13:20) Mingimingi bilenge bazwamaka na bopusi ya baninga na bango. Bazalaka na momeseno ya kozanga komityela motema bango moko mpe na bantango mosusu bapusamaka na mayoki makasi ya kosepelisa mpe ya kokamwisa baninga na bango. Na bongo ezali likambo ya ntina ete bápona baninga malamu!
15. Lolenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango mpo na kopona baninga?
15 Lokola moboti nyonso ayebi yango, liponi ya bana ezalaka ntango nyonso ya malamu te; bazali na mposa ya litambwisi. Ezali bobele likambo ya kopona baninga na bango te. Kasi, wana bazali kokóla, lakisá bango lolenge ya koyeba kososola mpe salisá bango na komona bizaleli nini basengeli koluka epai na baninga na bango. Ezaleli ya liboso ezali bongo ya kozala na bolingo epai na Yehova mpe kosala oyo ezali sembo na miso na ye. (Malako 12:28-30) Lakisá bango ete bálinga mpe bámemya baoyo bazali na ezaleli ya kolongobana, ya boboto, ya bokabi, mpe molende. Na boumeli ya boyekoli ya libota, salisá bana ete básosola bizaleli wana epai na bato oyo balobelami kati na Biblia mpe na nsima kososola bizaleli motindo moko epai na bandeko kati na lisangá. Pesá ndakisa na kolandáká bizaleli yango moko ntango ozali kopona baninga na yo mpenza.
16. Lolenge nini baboti bakoki kotalela baninga oyo bana na bango bazali kopona?
16 Oyebi baninga ya bana na yo? Mpo na nini te kopesa nzela na bana na yo ete báyaka na baninga na bango na ndako mpo ete okoka koyeba bango? Okoki mpe kotuna na bana na yo eloko nini bana mosusu bakanisaka na ntina na baninga yango. Bayebani lokola bato oyo bamonisaka polele bosembo na bango to lokola bato oyo bazali na mitindo mibale ya bomoi? Soki bazalaka na mitindo mibale ya bomoi, salisá bana na yo na kososola ete boninga elongo na bango ekoki kobebisa bango. (Nzembo 26:4, 5, 9-12) Soki omoni ete mbongwana ekɔti epai na mwana na yo na etamboli na ye, na elateli na ye, na bizaleli na ye, na elobeli na ye, osengeli kolobela likambo yango elongo na ye na ntina na baninga na ye. Mwana na yo asengeli te kolekisa ntango elongo na moninga oyo azali na bopusi mabe.—Kokanisá na Genese 34:1, 2.
17, 18. Longola kokebisa na ntina na baninga mabe, lisalisi nini libongi baboti bakoki kopesa?
17 Nzokande esuki te bobele na kolakisa bana na yo ete báboya baninga mabe. Salisá bango ete bázwa baninga malamu. Tata moko alobaki ete: “Tosalaka makasi ntango nyonso ete tólukela ye baninga ya malamu na esika ya baninga ya mabe. Na yango, ntango eteyelo esɛngaki na mwana na biso ya mobali ete akɔta na ekipi ya ndembo, ngai mpe mwasi na ngai tofandaki elongo na ye mpe tosololaki mpo na nini kondima lisɛngi yango ezalaki likanisi malamu te—na ntina na baninga ya sika oyo basengelaki kozala kati na ekipi yango. Kasi topesaki ye likanisi ya koluka baninga mosusu kati na lisangá mpe tokendeki na bango nyonso na esika moko kitoko mpo na kobɛta ndembo. Mpe yango esilisaki mokakatano wana.”
18 Baboti ya mayele basalisaka bana na bango na kozwa baninga ya malamu mpe na nsima kosepela na kominanola elongo na bango. Kasi, mpo na baboti mingi, likambo litali kominanola ezali yango moko mokakatano monene.
LOLENGE NINI YA KOMINANOLA?
19. Bandakisa nini ya Biblia emonisi ete kosala masano kati na libota ezali lisumu te?
19 Biblia ezali nde kokweisa kosakana? Soko moke te! Biblia elobi ete ezali na “ntango [mpo] na kosɛka . . . mpe ntango [mpo] na kobina.”b (Mosakoli 3:4) Libota ya Nzambe na Yisalaele ya kala lizalaki kosepela na kobɛta miziki mpe na kobina, na masano, mpe na saambole. Yesu Klisto azalaki wana na elambo moko monene ya libala mpe “na elambo monene” oyo Matai Levi alɛngɛlaki mpo na ye. (Luka 5:29; Yoane 2:1, 2) Ya solo, Yesu azalaki te moto oyo apekisaka basusu ete básepela te. Tiká te ete kosɛka mpe kosakana etalelamaka lokola lisumu kati na ndako na yo!
Kominanola oyo eponami malamu, lokola oyo ya kosala mobembo elongo na libota, ekoki kosalisa bana ete báyekola mpe bákóla na elimo
20. Nini baboti basengeli kobosana yango te wana bazali koluka kominanola mpo na libota?
20 Yehova azali “Nzambe na esengo.” (1 Timoté 1:11) Na yango losambo ya Yehova esengeli kozala liziba ya bosepeli, kasi te eloko oyo ezali kolongola esengo kati na bomoi. (Kokanisá na Deteronome 16:15.) Bana bazalaka ntango nyonso na esengo mpe batondi na makasi oyo ekoki komonana na masano mpe na kominanola. Kominanola oyo eponami malamu ezali bobele masɛki te. Yango ezali nzela mpo na mwana ete ayekola makambo mpe akɔmɛla. Tata ya libota azali na mokumba ya kokokisa bamposa ya bato na ndako na ye na makambo nyonso, kati na yango mpe kominanola. Atako bongo, esengeli kosalema na bokatikati nyonso.
21. Mitambo nini mizali kati na kominanola ya lelo?
21 Kati na “mikolo ya nsuka” oyo ya yikiyiki, mokili esili kotonda na bato oyo bazali “balingi na bisengo na esika ya kozala balingi na Nzambe,” lokola yango esakolamaki kati na Biblia. (2 Timoté 3:1-5, NW) Mpo na mingi kati na bato yango, kominanola nde ezali eloko oyo eleki ntina kati na bomoi. Ezali na lolenge ya kominanola mingi zingazinga na biso na boye ete ekoki, kozanga nkaká, kozwa esika ya makambo ya ntina mingi koleka. Lisusu, kominanola mingi ya ntango na biso emonisaka mingi makambo matali kosangisa nzoto, mobulu, komela bilangwiseli, mpe makambo mosusu ya mabe. (Masese 3:31) Nini ekoki kosalema mpo na kobatela bilenge liboso na kominanola ya mabe?
22. Lolenge nini baboti bakoki koteya bana na bango ete bákamata bikateli malamu mpo na oyo etali kominanola?
22 Baboti basengeli kotya bandelo mpe bipekiseli. Kasi oyo eleki mpenza, basengeli koteya bana na bango lolenge nini koyeba soki kominanola boye ezali mabe mpe koyeba soki na meko nini elekisi ndelo. Kobongisama motindo wana esɛngaka ntango mpe milende. Tókamata ndakisa moko. Tata moko oyo azali na bana mibale amonaki ete mwana na ye ya mokóló azalaki koyoka stasyó ya sika ya radio mbala na mbala. Na yango, mokolo moko wana azalaki kokumba motuka na ye mpo na kokende na mosala, tata yango afungolaki radio bobele na stasyó yango. Na libaku wana, atɛlɛmisaki motuka mpe akomaki nokinoki maloba oyo mazalaki kobima na nzembo mosusu. Na nsima afandaki elongo na bana na ye mpe asololaki na bango na ntina na makambo oyo ye ayokaki. Atunaki mituna mpo na koyeba makanisi na bango, kobandáká boye “Bokanisi boni?” mpe na motema pɛtɛɛ nyonso azalaki koyoka biyano na bango. Nsima na kokanisa elongo na ntina na likambo yango na kosaleláká Biblia, bilenge wana bandimaki ete bakoyoka lisusu stasyó yango te.
23. Lolenge nini baboti bakoki kobatela bana na bango na kominanola ya mabe?
23 Baboti ya mayele batalelaka miziki, baemisyó ya televizyó, kaseti video, babúku ya kosɛkisa, mpe bafilime oyo bana na bango basepelaka na yango. Batalelaka bililingi bityami likoló na ezipeli, maloba mpe bikangelo na yango, mpe batángaka makanisi oyo bazulunalo epesaka na ntina na yango mpe bátalelaka biteni ya bazulunalo yango. Lelo oyo, baboti mingi basepelaka te na “kominanola” mosusu oyo etaleli bana. Baoyo balingi kobatela bana na bango longwa na bopusi mabe bafandaka elongo na mabota na bango mpe basololaka na ntina na makámá na yango, na kosaleláká Biblia mpe mikanda oyo mikolimbolaka Biblia, na ndakisa búku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi mpe masoló oyo mabimaka kati na bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!c Ntango baboti bazali kotya bandelo ya sikisiki, bazali kobongola yango te mpe bazali na makambo makasi te, mbala mingi bamonaka matomba malamu.—Matai 5:37; Bafilipi 4:5.
24, 25. Wapi kominanola mosusu ya malamu oyo mabota makoki kosepela na yango elongo?
24 Ya solo, kotya bandelo mpo na mitindo mabe ya kominanola ezali bobele eteni na etumba. Kominanola ya malamu esengeli kozwa esika ya kominanola ya mabe, soki bongo te bana bakoki komipesa na etamboli mabe. Mabota mingi ya baklisto bazali na makambo mingi ya esengo oyo bakoki komikundola wana bazali kominanola bango nyonso esika moko—píkiníki, kosala mwa botamboli, kokende nganda, kosala masano mpe konyolisa nzoto, kosala mibembo mpo na kotala bandeko to baninga. Basusu bamonaki ete kotánga na mongongo makasi mpo na kolekisa ntango ezali liziba monene ya bosepeli mpe ya kobɔndisa. Basusu basepelaka kosolola masoló ya kosɛkisa. Nzokande, basusu basili kosala misala ya kolekisa ntango elongo, na ndakisa, misala ya mabaya mpe misala misusu ya mabɔkɔ, mpe kobɛta bibɛtɛli ya miziki, koyema bililingi, to koyekola biloko oyo Nzambe azalisaki. Bana oyo bazali koyekola kosepela na makambo motindo wana babatelami longwa na kominanola ya mbindo, mpe bazali koyekola ete kominanola esɛngi makambo mingi, kasi esuki te bobele na kokanga mabɔkɔ mpe kozwa bosepeli. Esengo ya kosangana na lisano moko mbala mingi eleki esengo ya kotala mpamba.
25 Bokutani mpo na kosepela ekoki mpe kozala lolenge mosusu ya malamu ya kominanola. Ntango yango etambwisami malamu mpe kozanga ete yango eleka ndelo to kozanga ete yango elya ntango mingi, bokutani yango ekoki kopesa bana na yo makambo mingi koleka masano. Yango ekoki kosalisa na koyeisa makasi bikanganeli ya bolingo kati na lisangá.—Kokanisá na Luka 14:13, 14; Yuda 12.
LIBOTA NA YO LIKOKI KOLÓNGA MOKILI
26. Mpo na oyo etali kobatela libota longwa na bopusi ya mabe, ezaleli nini ya liboso ezali na ntina mingi?
26 Na ntembe te, kobatela libota na yo longwa na bopusi mabe ya mokili esɛngi mosala makasi. Kasi ezali na eloko moko oyo eleki nyonso mosusu, oyo ekoki kopesa nzela na kolónga. Ezali bolingo! Bikanganeli makasi ya bolingo ya libota, ekosala ete ndako na yo ezala esika ya kimya mpe ekokólisa kosolola, oyo ezali libateli monene longwa na bopusi mabe. Lisusu, kolóna motindo mosusu ya bolingo—bolingo ya Yehova, ezali na ntina mingi koleka. Ntango bolingo motindo wana ezali kati na libota, bana bakokólisa ezaleli ya koyina mpenza likanisi ya kozanga kosepelisa Nzambe mpo na kokwea kati na bopusi ya mokili. Mpe baboti oyo balingi Yehova na motema na bango mpenza bakoluka komekola ezaleli na ye ya bolingo, ya makambo makasi te, mpe ya bokatikati. (Baefese 5:1; Yakobo 3:17) Soki baboti bazali kosala bongo, bana na bango bakozala na ntina te ya kotalela losambo ya Yehova lokola moko kati na makambo oyo matali bango te to komona yango lokola lolenge ya bomoi oyo ezangi masano to kosɛka, oyo balingi kokima yango nokinoki. Na esika ete ezala bongo, bakomona ete kosambela Nzambe ezali nzela ya bomoi oyo ezali na esengo mingi mpe nzela ya malamu koleka.
27. Lolenge nini libota likoki kolónga mokili?
27 Mabota oyo mazali na bomoko mpe na esengo kati na mosala ya Nzambe, oyo mazali na bokatikati, oyo masalaka makasi na motema na bango mobimba ete ‘mábebisama te mpe mázwa litɔnɔ te’ na bopusi mabe ya mokili oyo, mazali liziba ya esengo mpo na Yehova. (2 Petelo 3:14; Masese 27:11) Mabota motindo wana mazali kolanda matambe ya Yesu Klisto, oyo atɛmɛlaki milende nyonso ya mokili ya Satana oyo ekokaki kobebisa ye. Pene na nsuka ya bomoi na ye lokola moto, Yesu azalaki na molende ya koloba ete: “Nasili kolónga mokili.” (Yoane 16:33) Tiká ete libota na yo mpe elónga mokili mpe ezala na bomoi libela na libela!
a Mpo na koyeba makambo mosusu na ntina na bakelasi minene, talá mwa búku Batatoli ya Yehova mpe kelasi, ebimisami na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, nkasa 4-7.
b Liloba ya Liebele libongolami awa na “kosɛka” ekoki, na lolenge mosusu, kobongolama na “kosakana,” “kopesa basusu libaku ya kosepela,” “kosangana na elambo,” to ata “kosala masɛki.”
c Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.