Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Babikisami na ntango ya makámá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1997 | 15 Août
    • yango ezali mwango bobele moko ya solosolo mpo na kosilisa mikakatano ya bato. Lelo oyo bobele bato moke nde bazali komiyoka ete babatelami. Atako siansi esali milende makasi, makɔnɔ oyo mabomaka mazali sé kosilisa ebele ya bato awa na mabelé. Bitumba oyo biuti na kowelana ya mangomba, bikólo, mpe politiki bizali koboma bankóto mingi ya bato. Nzala mpe ebakisami na bwale mpe mpasi oyo ezali kozwa mibali, basi mpe bana oyo basali eloko te. Kobeba ya bizaleli malamu ezali kokweisa miboko mpenza ya libota ya bato; ata bana mike basili kobeba.

      Na bosikisiki ya kokamwa, esakweli moko ya Biblia oyo ekomámá esili koleka mibu 1 900 elobeli ezalela ya mikolo na biso. Yango elobi ete: “Ososola likambo oyo ete, na mikolo ya nsuka ntango ekotonda na makámá.”​—2 Timoté 3:1, engebene The New Testament in Modern English, ebongolami na J. B. Phillips; kokanisá na Matai 24:3-​22.

      Obanzi ete ezali likambo ya kolongobana ete Nzambe ya bolingo akanga miso na bampasi na biso? Biblia elobi ete: “Zambi [Yehova] alobi boye, ye oyo asalaki lola, ye azali Nzambe, ye oyo atongaki mokili mpe asalaki yango; ye akokisaki yango, asalaki yango eloko na mobulu te, [ye] atongaki yango ete bato báfanda wana.” (Yisaya 45:18) Ɛɛ, na esika ya kotika mabelé kitoko oyo ete mábebisama mpe bafandi na yango nyonso bábomama, Nzambe akosala likambo moko. Motuna mozali kotunama, akosala yango lolenge nini?

      Poná bomoi!

      Biblia eyanoli kati na Nzembo 92:7 ete: “Ata bato mabe bakóli pelamoko matiti; ata baoyo nyonso bakosalaka mabe balóngi malamu, nde ezali mpo ete bakobomama bobele kobomama.” Mwango ya Nzambe mpo na kosilisa mikakatano ya mokili ezali bongo kosilisama ya mabe yango moko. Likambo ya esengo ezali ete yango elimboli te ete bato nyonso basengeli kobomama. Nzembo 37:34 endimisi biso ete: “Zilá mpo na [Yehova] mpe batelá nzela na ye, akokembisa yo ete osangola mokili; okomona kobeba na bato mabe.”

      Maloba oyo mamonisi ete likoki lizali ya kobikisama na likámá lileki monene oyo likokwela bato. Nzambe apesi biso liponi. Maloba oyo Mose alendisaki na yango Bayisalaele ntango bazalaki pene ya kokɔta na Mokili ya Ndaka mabongi mpe epai na biso lelo oyo: “Natii liboso na yo bomoi mpe kufa, mpe lipamboli mpe elakeli mabe. Na bongo poná bomoi ete yo mpe bana na yo bózala na bomoi.” (Deteronome 30:19) Kasi lolenge nini moto ‘akopona bomoi’ mpe kobikisama? Lobiko ya solosolo elimboli mpenza nini?

  • Lobiko: Ndimbola na yango ya solosolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1997 | 15 Août
    • Lobiko: Ndimbola na yango ya solosolo

      ‘OSILI kobikisama?’ Mbala mingi, baoyo batunaka motuna yango bakanisaka ete bango moko basili kobikisama mpamba te basilaki ‘kondima Yesu lokola Mobikisi na bango.’ Basusu bakanisaka ete ezali na banzela ndenge na ndenge oyo ezali komema na lobiko mpe ete soki ‘Yesu azali na motema na yo,’ osili kozwa lobiko ata soki bindimeli na yo to lingomba na yo ezali nini.

      Biblia elobi ete Nzambe alingi ete “bato [ya lolenge, NW] nyonso bábika.” (1 Timoté 2:3, 4) Na yango lobiko ekoki kozwama na baoyo nyonso bakolinga kozwa yango. Kasi kobikisama elimboli mpenza nini? Ezali solo ete yango ezali likambo oyo ekokómela moto nsima ya kosala bobele mwa molende moke to kosala ata eloko moko te?

      Liloba “lobiko” elimboli “kosikwama na likámá to na kobomama.” Na yango lobiko ya solosolo esuki te bobele na kozala na kimya ya makanisi. Elimboli kobikisama na kobomama ya ebongiseli mabe ya biloko ya ntango oyo mpe na nsima kobikisama na liwa! Kasi Nzambe akobikisa nani? Mpo na kozwa eyano, tótalela oyo Yesu Klisto ateyaki na ntina na likambo yango. Makambo oyo tokomona na bolukiluki na biso ekoki mbala mosusu kokamwisa yo.

      Lobiko​—Ekoki kozwama na mangomba nyonso?

      Na libaku moko, Yesu asololaki na mwasi moko Mosamalia. Atako azalaki Moyuda te, andimaki na elónga mpenza ete Masiya asengelaki koya “ye oyo abyangami Klisto.” (Yoane 4:25) Kondima motindo yango ekokaki mpo ete abikisama? Te, mpamba te Yesu alobaki na mwasi yango na mpiko nyonso ete: “Bino bozali kosambela yango eyebi bino te.” Yesu ayebaki ete mpo mwasi yango akoka kobikisama, asengelaki kobongisa losambo na ye. Na yango Yesu alimbolaki ete: “Kasi ntango ekoya, ɛɛ ezali sasaipi, wana basambeli na solo bakosambela Tata na bisambeli na [elimo, NW] mpe na solo. Mpo ete Tata azali koluka motindo oyo mpo na kosambela ye.”​—Yoane 4:22, 23.

      Libaku mosusu epai Yesu amonisaki likanisi na ye na ntina na lobiko etalelaki Bafalisai, lingomba moke oyo ezalaki na bopusi mingi kati na losambo ya Bayuda. Bafalisai basalaki ebongiseli moko ya losambo mpe bakanisaki ete yango endimamaki na Nzambe. Kasi yoká maloba ya Yesu epai na Bafalisai: “Bakosi! Yisaya alobaki malamu mpo na bino ete, Bato oyo bakotosaka ngai na minɔkɔ, kasi mitema na bango izali mosika na ngai. Bakosanzolaka ngai mpamba, bakolakisa malako mazali mibeko na bato.”​—Matai 15:7-9.

      Ezali boni mpo na ebele na mangomba oyo lelo mazali komiloba ete mandimelaka Klisto? Yesu akondima yango nyonso ete ezali banzela oyo ebongi mpo na kozwa lobiko? Tokoki kokakatana te mpo na eyano na motuna yango, mpamba te Yesu alobaki polele ete: “Moto na moto oyo akolobaka na ngai, Nkolo! Nkolo! akoingela kati na Bokonzi na Likoló te kasi ye oyo akosalaka mokano na Tata na ngai oyo azali na Likoló. Mingi bakolobaka na ngai na mokolo yango, Nkolo! Nkolo! tosakolaki na nkombo na yo te? Tobimisaki [bilimo, NW] mabe na nkombo na yo te? Mpe na nkombo na yo, tosalaki misala na nguya te? Nakoyambola liboso na bango ete, Nayebi bino soko moke te! Bólongwa na ngai, bino bato na misala na lofundo.”​—Matai 7:21-23.

      Boyebi ya sikisiki ya Yesu ezali na ntina mingi mpo na kobikisama

      Maloba yango ya Yesu mazali na makanisi mingi ya ntina. Mazali komonisa ete ezali na bato mingi oyo bamipesi na losambo kasi bazali ‘kosala mokano ya Tata’ te. Na yango, lolenge nini moto akoki kozwa lobiko ya solosolo? Ya liboso mokapo ya 1 Timoté 2:3, 4, (NW) eyanoli ete: “Bolingi [ya Nzambe] ezali ete bato ya lolenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.”​—Kokanisá na Bakolose 1:9, 10.

      Boyebi motindo wana ezali na ntina mingi mpo na kobikisama. Ntango Moloma moko mokɛngɛli ya bolɔ́kɔ atunaki ntoma Paulo mpe moninga na ye Sila ete, “Nasala nini ete nabikisama?” bayanolaki ye ete: “Ndimelá Nkolo Yesu mpe okobikisama, na yo na bato na ndako na yo.” (Misala 16:30, 31) Yango elingi nde koloba ete mokɛngɛli ya bolɔ́kɔ wana mpe bato ya libota na ye basengelaki kozala na liyoki moko boye na mitema na bango? Te, mpamba te, bakokaki te ‘kondimela solo Nkolo Yesu’ kozanga ete bázala na mwa boyebi na ntina na Yesu, soki azalaki nani, asalaki nini, mpe ateyaki nini.

      Na ndakisa, Yesu ateyaki kotyama ya boyangeli moko ya likoló​—elingi koloba “Bokonzi ya Nzambe.” (Luka 4:43) Lisusu, alakisaki mitindá ya bizaleli malamu mpe etamboli malamu mpo na baklisto. (Matai, mikapo 5-7) Amonisaki polele etɛlɛmɛlo oyo bayekoli na ye basengeli kozala na yango na makambo ya politiki. (Yoane 15:19) Abandisaki ebongiseli monene ya koteya mpe atindaki bayekoli na ye ete básangana na ebongiseli yango. (Matai 24:14; Misala 1:8) Ɛɛ, ‘kondimela Yesu’ esɛngaki kokanga ntina ya makambo mingi! Yango wana, tokoki kokamwa te ete Paulo mpe Sila ‘basololaki Liloba na Nkolo na [mokɛngɛli ya bolɔ́kɔ], na bato nyonso na ndako na ye’ liboso ete bandimi yango ya sika bákoka kobatisama.​—Misala 16:32, 33.

      Boyebi ya sikisiki ya Nzambe ezali mpe na ntina mingi

      Likambo mosusu ya ntina mingi oyo kondimela solosolo Yesu esɛngi ezali bongo kosambela Nzambe oyo Yesu ye moko asambelaka. Yesu abondelaki ete: “Oyo ezali bomoi na seko ete báyeba yo Nzambe moko na solo mpe Motindami na yo Yesu Klisto.”​—Yoane 17:3.

      Na boumeli ya mosala na ye awa na mabelé, Mwana ya Nzambe azalaki ntango nyonso kobenda likebi ya bato epai ya Tata na ye kasi epai na ye moko te. Alobaki ata mbala moko te ete azali Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. (Yoane 12:49, 50) Na mabaku mingi Yesu amonisaki polele esika na ye kati na ebongiseli ya Nzambe na kolobáká ete azali na nsé ya Tata na ye. (Luka 22:41, 42; Yoane 5:19) Ɛɛ, Yesu alobaki ete: “Tata aleki ngai.” (Yoane 14:28) Lingomba na yo esili koteya yo etɛlɛmɛlo ya solo ya Klisto liboso ya Nzambe? To osilaki nde kopusama na kondima ete Yesu azali mpenza Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso? Lobiko na yo etaleli kozala na likanisi lilongobani na likambo yango.

      Kati na Libondeli ya Nkolo, Yesu alendisaki bayekoli na ye ete bábondelaka boye: “Nkombo na yo ezala mosanto.” (Matai 6:9) Mabongoli mingi ya Biblia masili kozipa nkombo ya Nzambe, kobongoláká yango na “Nkolo.” Kasi kati na bakopi ya kalakala ya “Kondimana ya Kala,” nkombo ya Nzambe ezali komonana koleka mbala nkóto motoba! Na yango Nzembo 83:18 (NW) ezali kotángama boye: “Mpo bato báyeba ete ezali bobele yo oyo ozali na nkombo Yehova, bobele yo ozali Oyo-Aleki-Likoló na mokili mobimba.” Basilaki koteya yo ete osalelaka nkombo ya Nzambe, Yehova? Soki te, lobiko na yo ezali na likámá, mpamba te ‘ye oyo akobelela nkombo ya Yehova nde akobika’!​—Misala 2:21, NW; kokanisá na Yoele 2:32.

      Na elimo mpe na solo

      Yesu Klisto abendaki mpe likebi ya bato likoló na Biblia, Liloba ya Nzambe. Ntango azalaki komonisa likanisi ya Nzambe na ntina na makambo ndenge na ndenge, mbala mingi azalaki koloba ete: “Ekomami.” (Matai 4:4, 7, 10; 11:10; 21:13) Na butu oyo ezalaki liboso ya liwa na ye, Yesu abondelaki na ntina na bayekoli na ye ete: “Bulisá bango kati na solo na yo. Liloba na yo ezali solo.”​—Yoane 17:17.

      Na yango, koyeba mateya ya Biblia, Liloba ya Nzambe, ezali mpe lisɛngami mosusu mpo na kobikisama. (2 Timoté 3:16) Bobele Biblia nde ezali koyanola na mituna lokola oyo: Ndimbola ya bomoi ezali nini? Mpo na nini Nzambe atiki nzela ete mabe maumela ntango molai boye? Nini ekómelaka moto soki akufi? Nzambe anyokolaka mpenza bato na lifelo ya mɔ́tɔ? Mokano ya Nzambe ezali nini na ntina na mabelé?a Moto akoki te kosambela Nzambe na lolenge lobongi kozanga ete azala na boyebi ebongi ya makambo oyo, mpamba te Yesu alobaki ete: “Ekoki na basambeli na ye ete básambela ye na [elimo, NW] mpe na solo.”​—Yoane 4:23.

      Kondima etindaka moto na kosala mosala

      Lobiko esuki bobele na koyeba makambo te. Boyebi ya sikisiki ya Nzambe ebotaka kondima kati na motema oyo endimi yango. (Baloma 10:10, 17; Baebele 11:6) Kondima motindo wana etindaka moto na kosala mosala. Na ndakisa Biblia ezali kosɛnga ete: “Na bongo, bongolá mitema, mpe butwá ete bópɛtwa na masumu ete ntango na kopema euta na Nkolo.”​—Misala 3:19.

      Ɛɛ, lobiko esɛngi mpe komiyokanisa na mitindá ya Nzambe oyo mitali etamboli mpe bizaleli malamu. Na bopusi ya Liloba ya Nzambe oyo ezali kobongola moto, bizaleli oyo moto azali na yango na bomoi na ye lokola kokosa mpe kobuba ekotika esika na kolongobana mpe bosolo. (Tito 2:10) Moto akotika bizaleli ya mbindo, lokola kosangisa nzoto mibali na mibali, ekobo, mpe pite, mpe akokóma na etamboli ya pɛto. (1 Bakolinti 6:9-11) Yango ezali te komipekisa na etamboli ya mbindo mpo na mwa ntango mokuse, komipekisa oyo euti na mayoki, kasi ezali nde mbongwana ya libela oyo euti na boyekoli mozindo mpe kosalela Liloba ya Nzambe.​—Baefese 4:22-​24.

      Na nsima, bolingo mpe botɔ́ndi mpo na Nzambe epusaka moto oyo azali na motema sembo ete amipesa mobimba na Nzambe mpe amonisa yango na nzela ya batisimo ya mai. (Matai 28:19, 20; Baloma 12:1) Na miso ya Nzambe, baklisto oyo babatisami babikisami. (1 Petelo 3:21) Na ntango ya kobomama ya mokili mabe oyo ebɛlɛmi, Nzambe akobikisa bango mpenza na kobateláká bango na bolɔ́zi wana.​—Emoniseli 7:9, 14.

      Oyo lobiko ekoki kolimbola mpo na yo

      Na mwa lisoló moke oyo, tomoni sikawa polele ete kobikisama esuki te na ‘kozala na Nkolo Yesu na motema na yo.’ Yango elimboli koyekola koyeba Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto na bosikisiki mpe kosala mbongwana oyo esengeli kati na bomoi na yo. Kosala yango ekoki kozala mokakatano monene, kasi Batatoli ya Yehova bazali na bolingi ya kosalisa yo na kolónga mokakatano yango. Na nzela ya boyekoli ya Biblia na ndako na yo, kozanga ete ofuta mbongo, bakoki kosalisa yo ete obanda kotambola na nzela oyo ezali komema na lobiko ya solo.b

      Lokola mokolo ya Nzambe mpo na kosambisa ekómi pene, kotambola na nzela ya lobiko ezali likambo esengeli sikawa kosalema na lombangu koleka ntango ya kala! Sikawa ezali ntango ya kolanda maloba ya mosakoli oyo malobi ete: “Naino mobeko ebimi te, mokolo elongwi lokola mpumbulu; naino nkanda monene na [Yehova] eyeli bino te. Bóluka [Yehova], bino basɔkɛmi nyonso na mokili, baoyo bakosalaka malako na ye; bóluka boyengebene, bóluka bopɔlɔ, soko nde bokobombama na mokolo na nkanda na [Yehova].”​—Sefania 2:2, 3.

      [Maloba na nse ya lokasa]

      a Mpo na kozwa biyano na mituna oyo, talá búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

      b Soki ozali na mposa ya boyekoli ya Biblia na ndako, tosɛngi yo ete osolola na Batatoli ya Yehova ya mboka na bino. To okoki kotinda nkomá epai ya babimisi ya zulunalo oyo.

      [Etanda na lokasa 6]

      Lobiko eutaka na . . .

      ◻ Kozwa boyebi ya sikisiki ya Nzambe mpe Yesu.​—Yoane 17:3.

      ◻ Komonisa kondima.​—Baloma 10:17; Baebele 11:6.

      ◻ Kobongwana mpe kotika misala mabe.​—Misala 3:19; Baefese 4:22-​24.

      ◻ Komipesa mpe batisimo.​—Matai 16:24; 28:19, 20.

      ◻ Kokóba kopesa litatoli na bato nyonso.​—Matai 24:14; Baloma 10:10.

      [Bililingi na lokasa 7]

      Koyekola Biblia, kosalela makambo ozali koyekola, komipesa, mpe batisimo ezali matambe oyo mazali komema na lobiko

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto