Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/9 nk. 3-7
  • Babólá oyo bazali na bozwi mingi: Lolenge nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Babólá oyo bazali na bozwi mingi: Lolenge nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bato ya sembo na ntango ya kala
  • Kobatela ezaleli ya kolongobana
  • Kolónga konyokwama na makanisi
  • Nguya ya libondeli
  • Motuya ya boyekoli ya Biblia
  • Koteya bana mpo na bomoi ya seko
  • Elimo ya bokabi
  • Komipesa na mosala
  • Yehova azali kosunga bato na ye
  • Mikolo kitoko mizali koya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Ndenge nini kolonga ntembe ebimisami na bobola mpo na bizaleli malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mosika te, moto moko te akozala lisusu mobólá!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Etikali moke bobola esila na mokili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/9 nk. 3-7

Babólá oyo bazali na bozwi mingi: Lolenge nini?

Esili koleka bikeke mingi moto moko ya mayele abondelaki ete akóma mobólá te. Mpo na nini asalaki lilɔmbɔ motindo wana? Mpamba te abangaki ete bobólá ekokaki koyeisela ye bizaleli mpe misala oyo ekobebisa boyokani na ye na Nzambe. Yango emonisami na maloba na ye oyo: “Leisá ngai bilei bikoki na ngai . . . Ete nazala mobólá te mpe nayiba te, nabimisa nkombo na Nzambe na ngai na mpamba te.”​—MASESE 30:8, 9.

YANGO elingi nde koloba ete moto oyo azali mobólá azali na likoki te ya kosalela Nzambe na bosembo? Ezali bongo te! Na boumeli ya lisoló ya bato basaleli mingi ya Yehova babatelaki bosembo na bango epai na ye atako bazalaki kati na bwale ya bobólá. Na ngámbo na ye, Yehova alingaka baoyo batyelaka ye motema mpe apesaka bango oyo bazali na yango mposa.

Bato ya sembo na ntango ya kala

Ntoma Paulo ye moko akelelaki na bileko mosusu. (2 Bakolinti 6:3, 4) Atángaki mpe ‘lipata moko monene’ ya batatoli ya sembo oyo bazalaki liboso ya Klisto, bamoko na bango ‘batambolaki na mposo na mpate mpe na mposo na ntaba, bazangaki . . . Balemalemaki kati na masobe mpe na ngomba mpe na malusu mpe na mikaka na mokili.’​—Baebele 11:37, 38; 12:1.

Mosakoli Eliya azalaki moko na basembwi yango. Na eleko oyo mbula ezangaki na boumeli ya mibu misato na ndambo, Yehova azalaki ntango nyonso kopesa ye bilei. Liboso, Nzambe atindaki bandɛkɛ ibéngami yanganga mpo na komemela mosakoli limpa mpe mosuni. (1 Mikonzi 17:2-6) Na nsima, Yehova asalaki ekamwiseli ete mwa falini mpe mafuta oyo mwasi moko mokufeli-mobali azalaki kopesa Eliya esila te. (1 Mikonzi 17:8-16) Bilei yango bizalaki mpenza ya pɛpɛlɛ, kasi bibatelaki bomoi ya mosakoli, ya mwasi yango mpe ya mwana na ye ya mobali.

Lolenge moko, Yehova aleisaki Yilimia mosakoli ya sembo na eleko oyo makambo ya nkita ezalaki mpasi mingi. Yilimia abikaki ntango mampinga ya Babilone mazingaki Yelusaleme, ntango oyo bato ‘balyaki kwanga na ntina na bozito mpe na kobanga.’ (Ezekiele 4:16) Nsukansuka, nzala ekómaki mpenza makasi kati na engumba na boye ete basi mosusu balyaki misuni ya bana na bango moko. (Bileli 2:20) Atako Yilimia atyamaki na bolɔ́kɔ mpo na mosala na ye ya kosakola kozanga kobanga, Yehova asɛnzɛlaki ete bápesa ye “mokate na mampa” mokolo na mokolo “kino mampa nyonso na mboka esilaki.”​—Yilimia 37:21.

Na yango, ezala Yilimia, to mpe Eliya, bazangaki mwa eloko ya kolya te. Makomami mayebisi te eloko nini mpe mbala boni Yilimia azalaki kolya nsima wana mampa masilaki na Yelusaleme. Kasi, toyebi ete Yehova asungaki ye mpe ete abikaki na eleko wana ya nzala.

Lelo oyo, bobólá ezali na bisika nyonso na mokili. Engebene Mabota Masangani (O.N.U.), motángo moleki monene ya bato bazali na bobólá ezali bongo na Afrika. Maloba ya O.N.U. mabimisamaki na bipanzelo ya nsango na 1996 mamonisaki ete: “Pene na katikati ya bafandi ya Afrika bazali babólá.” Atako mikakatano ya nkita mizali sé kobakisama, motángo ya bafandi ya Afrika oyo bazali kolanda mitindá ya Biblia kati na bomoi na bango mpe bazali kosalela Nzambe na bosembo nyonso mozali sé kobakisama. Bazali na elikya ete akosunga bango. Tótalela mwa bandakisa oyo euti na mokili moko ya yikiyiki.

Kobatela ezaleli ya kolongobana

Michael,a oyo afandi na ekólo Nigeria, azali mosáli na bilanga mpe azali kobɔkɔla bana motoba. Alobi boye: “Ezali mpasi kozala na kolongobana na ntango ozali na mosolo te mpo na kokokisa bamposa ya libota na yo. Nzokande, ntango namekami ete nasala na kozanga kolongobana, namikundolaka mokapo ya Baefese 4:28, oyo elobi ete: ‘Moyibi ayiba lisusu te, kasi tiká ete asalaka mosala, asalisa mabɔkɔ na ye misala.’ Na yango soki namekami, namitunaka ete, ‘Nasalaki mosala mpo na kozwa mosolo oyo?’”

Michael abakisi ete: “Na ndakisa, mokolo moko nazalaki kotambola na nzela, namonaki moto moko oyo azalaki kotambola na tukutuku akweisaki pɔtɔmoni na ye. Lokola nakokaki kotɛlɛmisa ye te, nalɔkɔtaki pɔtɔmoni yango mpe namonaki ete ezalaki na mbongo mingi mpenza na kati! Nasalelaki adresi oyo ezalaki na kati ya pɔtɔmoni, nalukaki nkolo na yango mpe nazongiselaki ye yango.”

Kolónga konyokwama na makanisi

Mobali moko na Afrika ya Nɔ́rdi alobaki boye: “Bobólá ezali [lokola] kokwea kati na libulu mozindo, atako okoki komona pole mpe bato oyo bazali kotambola pembeni na yango, kasi ozangi mongongo ya kobelela mpo na kosɛnga lisungi to sikalié mpo na kobima libándá.” Na yango, likambo ya kokamwa ezali te ete mbala mingi bobólá epesaka mayoki ya konyokwama na makanisi mpe elɛmbisaka nzoto! Ata basaleli ya Nzambe bakoki komona bomɛngo ya bato mosusu mpe kobanda kokanisa ete kozala na bomoi ya bosembo ezali na ntina te. (Kokanisá na Nzembo 73:2-13.) Ndenge nini kolónga mayoki motindo wana?

Peter, moto ya Afrika ya Wɛ́sti, azwaki epaso nsima ya kosala mbula 19 na Letá. Sikawa abikelaka mingi sé na mwa mosolo oyo bapesaka bato oyo bazwá epaso. Peter alobi ete: “Soki bantango mosusu nalɛmbi nzoto, namikundolaka makambo oyo nasilaki kotánga kati na Biblia mpe na mikanda ya la Société Watch Tower. Ebongiseli oyo esili konuna, mosika te ekolongwa, mpe tozali kozela ebongiseli oyo ekozala malamu mingi.

“Lisusu, nakanisaka maloba ya 1 Petelo 5:9, oyo elobi ete: ‘Bótɛmɛla [Satana] ngwi mpo na kondima, bóyeba ete mpasi na motindo moko mpenza ezali kobimela bandeko na bino na bipai mosusu na mokili.’ Boye nazali ngai moko te oyo nazali kotungisama na mikakatano. Makundoli yango esalisaka ngai ete nalongola mabanzo oyo mazali kolɛmbisa mpe konyokola makanisi.”

Peter abakisi ete: “Lisusu, Yesu asalaki bikamwiseli mingi na ntango azalaki awa na mabelé, kasi akómisaki ata moto moko te mozwi. Mpo na nini nasengeli komizela ete akómisa ngai mozwi?”

Nguya ya libondeli

Mwango mosusu ya kolónga makanisi mabe ezali bongo kobɛlɛma epai na Yehova Nzambe na nzela ya libondeli. Ntango Marie akómaki Motatoli ya Yehova na 1960, libota na ye basundolaki ye. Sikawa azali na mobali te mpe azali na mibu koleka 50, azali lisusu na makasi te na nzoto mpe azali na biloko mingi te na mosuni. Atako bongo, azali na molende na mosala ya boklisto.

Marie alobi ete: “Soki nayoki ete nalɛmbi nzoto, nabɛlɛmaka epai na Yehova na nzela ya libondeli. Nayebi ete moto moko te akoki kosunga ngai koleka lolenge oyo ye akoki kosala yango. Nasili kososola ete soki otye motema epai ya Yehova, akosunga yo. Ntango nyonso namikundolaka maloba ya Mokonzi Davidi, oyo mazali na Nzembo 37:25 ete: ‘Nazalaki elenge mpe nakómi mobangé, nde naino namoni moyengebeni te oyo atikami, to mwana na ye oyo akolɔmbaka kwanga.’

“Lisusu nalendisamaka na masoló ya bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bakɔmɛli na elimo oyo malobamaka kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Yehova Nzambe asalisaki bango, na yango nayebi ete akotika mpe te kosalisa ngai. Azali kopambola mwa mosala na ngai ya kotɛka fufu, mpe nazali kosala nyonso mpo na kokokisa bamposa na ngai ya mokolo na mokolo. Ntango mosusu soki nazali ata na lomeya te mpe nazali kokanisa soki nakosala nini, okomona Yehova atindeli ngai moto moko oyo akopesa ngai mwa likabo, kolobáká ete, ‘Yaya, kamatá mwa eloko oyo.’ Yehova abosanaka ngai soko moko te.”

Motuya ya boyekoli ya Biblia

Batatoli ya Yehova bapesaka motuya mingi na boyekoli ya Biblia, Liloba ya Nzambe, mpe baoyo bazali babólá kati na bango basalaka sé bongo. Jean, oyo azali na mibu ntuku motoba, azali mobongisi-nzela (mosakoli ya ntango nyonso) mpe azali mosaleli na misala kati na lisangá. Afandaka​—ye na mabota mosusu 13​—na ndako moko ya bitazi mibale oyo ebeba mpenza. Ndako na ye ezali bongo eteni ya kulware ya etazi ya liboso, ekabolami na mabaya. Na kati ezali na bakiti mibale ya kala mpe mesa moko etonda na maboke ya mikanda na ye mikolimbolaka Biblia. Alalaka na litɔkɔ.

Liboso, Jean azalaki kozwa pene na dolare moko na mokolo na kotɛkáká mampa, kasi ntango kosomba falini ya mampa na mboka mopaya epekisamaki na ekólo na bango, abungisaki mwango na ye wana ya kobikela. Alobi ete: “Ntango mosusu bomoi ekómaka mpenza mpasi mpo na ngai, kasi nazali kokóba mosala ya mobongisi-nzela. Ezali bongo Yehova nde asungaka ngai. Nasalaka mosala nyonso oyo emonani mpe natyelaka moto moko motema te mpo na kosunga ngai to kopesa ngai bilei, atako bandeko kati na lisangá basalisaka ngai mingi. Basalisaka ngai na koluka mosala mpe ntango mosusu bakabelaka ngai mbongo.

“Namibombelaka ntango mpo na kotánga Biblia mpe mikanda ya la Société Watch Tower. Nayekolaka na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ wana makɛlɛlɛ ezali te na ndako mpe natángaka na kati ya butu mbala nyonso oyo tozali na kurá. Nayebi ete nasengeli kokóba boyekoli na ngai moko.”

Koteya bana mpo na bomoi ya seko

Daniel azali mobali oyo akufelá mwasi mpe azali na bana motoba. Na 1985 alongwaki na mosala oyo asalaki na boumeli ya mibu 25, kasi akómaki kotɛka na magazini. Alobi ete: “Bomoi ezali mpasi mpo na libota na makambo ya nkita. Sikawa tolyaka sé mbala moko na mokolo. Mbala moko ekómelaki biso ete tózanga bilei mikolo misato. Tozalaki komela bobele mai mpamba mpo na kobika.”

Daniel azali nkulutu kati na lisangá. Alobi boye: “Nazangisaka makita ya boklisto soko moke te, mpe namipesaka na misala na ngai ya Teokrasi. Ntango nyonso oyo mosala mosengeli kosalema na Ndako ya Bokonzi, nazangaka te. Mpe ntango mokakatano eyei, nakanisaka maloba ya Petelo epai na Yesu, oyo mazali na Yoane 6:68 ete: ‘Nkolo, tókenda epai na nani?’ Soki natiki kosalela Yehova, nakokenda epai wapi? Lisusu, maloba ya Paulo na Baloma 8:35-39 mayikisaka ngai mpiko mpo na kokende ntango nyonso liboso mpamba te mazali komonisa ete eloko moko te ekokabola biso na bolingo na biso mpo na Nzambe mpe Klisto. Ezali makanisi wana nde nateyaka bana na ngai. Ntango nyonso nayebisaka bango ete tosengeli soko moke te kotika Yehova.” Molende ya Daniel mpe boyekoli ya libota oyo bazali kosala pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, ezali na bopusi malamu likoló ya bana na ye.

Elimo ya bokabi

Bato mosusu bakoki kokanisa ete baoyo bazali na bobólá makasi bakoki kozala na likoki te ya kopesa makabo ya mosolo mpo na kotombola matomba ya Bokonzi. Kasi ezali bongo te. (Kokanisá na Luka 21:1-4.) Etuluku moko ya Batatoli na ekólo Ghana, oyo mwango na bango ya kobikela ezali mingimingi mosala ya bilanga, batyaka pembeni mwa eteni ya bilanga na bango mpo na kotombola matomba ya Bokonzi ya Nzambe. Elingi koloba ete na ntango batɛki mbuma ya bilanga oyo euti na eteni wana ya elanga, mosolo wana ezali kosalelama bobele mpo na matomba ya Bokonzi, kati na yango kopesa makabo na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova na mboka na bango.

Jeanne, oyo afandaka na ekólo moko ya Afrika ya Ntéi, azali mobongisi nzela. Atɛkaka mampa mpo na kosunga mobali na ye oyo azali ebɔ́sɔ́nɔ́ mpe bato mosusu minei oyo azali kobɔkɔla. Kasi ntango lisangá na bango bazalaki na mposa ya bifandelo na Ndako ya Bokonzi, libota ya Jeanne bazwaki ekateli ya kopesa mosolo nyonso oyo bazalaki na yango na ndako. Batikalaki na eloko te. Nzokande, na mokolo oyo elandaki, kozanga ete bámizela na yango, moto moko ayaki kofuta bango nyongo moko ya kala oyo bandimaki lisusu te ete bakozwa yango!

Elongi ya Jeanne ezalaka ntango nyonso ya esengo mpe amitungisaka koleka te mpo na mosolo. “Nayebisaka likambo na ngai epai na Yehova na libondeli, mpe na nsima nabimaka na mosala ya kosakola. Toyebi malamu ete na ebongiseli ya biloko oyo, elikya ezali mpenza mingi te ya komona bolamu. Kasi, toyebi ete Yehova akopesa biso oyo tosengeli na yango.”

Komipesa na mosala

Batatoli ya Yehova bayebani na bolingo na bango oyo bamonisanaka bamoko na bamosusu. (Yoane 13:35) Baoyo bazali na mosolo basalisaka bandeko na bango baklisto oyo bazali na bosɛnga. Mbala mingi yango esalemaka na lolenge ya likabo mpe mbala mosusu na lisungi nsima ya kosala mosala.

Marc, afandi na Congo, ye abɛlaka maladi ya maba. Yango esilá kobebisa ye misapi ya mabɔkɔ mpe ya makolo. Na yango, atambolaka na banzeté (béquilles). Ntango Marc azwaki ekateli ya kosalela Yehova, abandaki kosala mbongwana minene na bomoi na ye. Na esika ya kosɛnga bilei ndenge azalaki kosala yango liboso, abandaki kokata bilanga na ye moko. Lisusu asalaki babiliki, mpe atɛkaki yango.

Atako azali na mikakatano na nzoto, Marc akóbaki kosala na molende. Nsukansuka, asombaki mwa lopango mpe atongaki mwa ndako. Lelo oyo, Marc azali nkulutu kati na lisangá mpe bato ya engumba na ye bapesaka ye limemya mingi. Sikawa asalisaka bato mosusu oyo bazali na bosɛnga.

Ya solo, na bisika mingi ezali mpasi mpenza mpo na kozwa mosala. Nkulutu moklisto moko oyo asalaka na filiale moko ya la Société Watch Tower na Afrika ya Ntéi akomaki ete: “Awa bandeko mingi bazali na mosala te. Bamoko bamekaka kosala misala ya bango moko, kasi yango ezali mpasi. Mingi bakanisaki ete lokola mpasi ekosila na yango te ata soki basali nini, babwakaki likanisi ya koluka biloko ya mosuni mpe bamipesi na mosala ya mobongisi-nzela. Na kosaláká bongo, mingi bamoni ete bazwi mapamboli koleka soki balukaki mosala oyo ezali na lifuti moke to mpe ezangi lifuti.”

Yehova azali kosunga bato na ye

Yesu Klisto alobaki na ntina na ye moko ete: “Nkaza bazali na mabulu, mpe ndɛkɛ na zamba bazali na ndako, nde Mwana na moto azali na esika na kolalisa motó na ye te.” (Luka 9:58) Lolenge moko, ntoma Paulo akomaki ete: “Kino ntango oyo toyoki nzala mpe mposa na mai, tolati mabe, tobɛtami, tozangi efandelo.”​—1 Bakolinti 4:11.

Yesu mpe Paulo baponaki bomoi ya bozwi te na mosuni mpo ete bámipesa mingi na mosala na bango ya kosakola. Baklisto mingi ya mikolo na biso bazali babólá mpo ete bazali na mwango mosusu te ya kosala. Atako bongo, bazali kosalela mitindá ya Biblia kati na bomoi na bango mpe bazali koluka kosalela Nzambe na molende nyonso. Bayebi ete Yehova alingi bango mingi mpe bazali komona na miso na bango bosolo ya elaka ya Yesu ete: “Bólukaka nde liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na ye mpe biloko oyo nyonso [ya mosuni] ikobakisama na bino.” (Matai 6:25-33) Lisusu, basaleli yango ya Nzambe oyo bazali babólá bazali na bilembeteli ete “mapamboli na [Yehova] ikoyeisa bozwi.”​—Masese 10:22.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Topesi bankombo mosusu na lisoló oyo.

[Etanda na lokasa 6]

Banani bazali “Batosi na Liloba”?

ENGEBENE ankɛ́tɛ moko oyo esalemaki na 1994, banamboka ya États-Unis oyo “bandimaka Nzambe to elimo oyo eleki likoló na molɔ́ngɔ́ mobimba” bazali na motángo ya bato 96 likoló na monkámá. Lisusu, zulunalo U.S.News & World Report elobaki ete “bandakonzambe ezali mingi na États-Unis koleka bikólo mosusu nyonso awa na mokili.” Atako ezali komonana na libándá ete basambelaka mingi, George Gallup, mosali na ankɛ́tɛ oyo aumeli mingi na mosala yango alobi ete: “Solo ezali ete, banamboka mingi ya États-Unis bayebi te oyo bandimaka mpe mpo na nini bandimaka.”

Lisusu, mitángo miuti na bolukiluki mimonisi ete bokeseni ezali monene kati na bindimeli ya bato na makambo ya losambo mpe misala na bango. Na ndakisa, mokomi Jeffery Sheler alobi ete “banganga-mayele ya sosioloji bamoni ete bisika mosusu epai mobulu eleki mingi kati na mokili yango ezali mpe bisika yango nde bindimeli ya mangomba mpe losambo ezali makasi.”

Yango esengeli kokamwisa biso te. Mpo na nini? Mpamba te bandá na ekeke ya liboso, ntoma Paulo ayebisaki baninga na ye baklisto ete bákeba na baoyo “balobi ete bayebi Nzambe nde na misala na bango bazali kowangana ye.” (Tito 1:16) Lisusu, Paulo ayebisaki elenge Timoté ete na “mikolo ya nsuka” bato ‘bakozala na lolenge ya kosambela nde bazali kowangana nguya na yango.’​—2 Timoté 3:1, 5.

Nzokande, baklisto ya solo bazali kosala milende mpo na kolanda etindá ya Yesu Klisto ete “bókenda kozalisa bayekoli na mabota nyonso.” (Matai 28:19) Na lolenge yango ‘bazali batosi na liloba kasi bayoki mpamba te.’​—Yakobo 1:22.

[Elilingi na lokasa 7]

Kati na mokili mobimba, bato mingi bazali kopesa motuya na boyekoli ya Biblia

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto