Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kebá na kokanisela basusu mabe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1997 | 15 Mai
    • Kebá na kokanisela basusu mabe

      MOTEYI moko na televizyó oyo ayebani mingi afundaki moninga na ye moteyi mosusu na efundeli monene ete azalaki kosala ekobo. Nzokande, bobele mbula moko na nsima, moteyi oyo afundaki moninga na ye, bakangaki ye na mwasi ya ndumba.

      Na likambo mosusu, ekólo moko ya nguya mingi etindaki bantoma na yango mpo na kosangisa banguna oyo bazalaki kosala makasi mpo ete bákoka kosala boyokani ya kimya. Bobele na ntango yango, ekólo bobele moko wana etindaki na nkuku batɛkisi mandóki na mikili ya bapaya mpo na kotekisa mandóki oyo ezalaki na motuya ya badolare bamiliare mingi.

      Lokola bokosi makasi ezali komonana bisika nyonso, ezali likambo ya kokamwa te ete kozanga kotyela bato motema ezwa esika monene koleka kotyela bato motema. Mpo na bato mingi, komitunatuna na ntina na mikano ya bato mosusu esili kokóma momeseno na bango mpenza.

      Lokola tozali baklisto, tosengeli kokeba ete ezaleli motindo wana ebebisa te boyokani na biso na baninga na biso bandimi. Atako Yesu Klisto alendisaki biso ete tózala na “mayele lokola banyoka” katikati na banguna na biso, alobaki te ete tosengeli komitunatuna mpo na mikano ya bayekoli na ye ya solo. (Matai 10:16) Na yango, wapi makámá ya kokanisela basusu mabe? Na makambo nini mpenzampenza tosengeli kokeba na yango ete tópɛngola ezaleli wana? Mpe lolenge nini tokoki kobatela boyokani na biso na bandeko na biso baklisto?

      Liteya na ndakisa ya ntango ya kala

      Kokanisela basusu mabe kozanga ntina ya solosolo ezali lolenge moko na kosambisa bango. Ezali lokola nde tozali kokata likambo mbala moko ete maloba na bango to mpe misala na bango ezali bobele myango oyo mibombi makambo ya mabe to mayele mabe. Mbala mingi ntina ya likambo yango ezalaka nde libunga na lolenge ya kotalela makambo, lokola tokoki komona yango na lisoló ya Biblia lizwami na Yosua mokapo 22.

      Bayisalaele basilaki kolónga kozwa Mokili ya Ndaka mobimba mpe bautaki kokabola bateritware engebene mabota na bango. Mabota ya Lubene, ya Gada mpe ndambo ya libota ya Manase batongaki etumbelo “monene mpe ekokaki kotalama na mosika” pene na Ebale Yaladene. Mabota mosusu bakanisaki na libunga nyonso ete yango ezalaki nde likambo oyo limonisi lipɛngwi. Bakanisaki ete mabota wana misato balingaki kosalela etumbelo yango monene mpo na kopesa mbeka na esika ya kokende na hema ya koyangana na Silo, esika oyo eponamaki mpo na losambo. Nokinoki, mabota oyo bakaniselaki baninga na bango ete bazali na mokano mabe basalaki bibongiseli mpo na kobundisa bango.​—Yosua 22:10-12.

      Likambo ya malamu mpo na bango ezali ete basololaki na bandeko na bango Bayisalaele na kotindáká etuluku ya bantoma oyo bakambamaki na Pinehase. Na esika ya kotya likebi na bifundeli ya kozanga bosembo, ya botomboki, mpe ya lipɛngwi epai na Yehova, mabota oyo ekanisamaki ete batukaki Nzambe balimbolaki ntina ya etumbelo yango monene. Na esika ete ezala etumbelo mpo na mbeka, yango esengelaki “kozala litatoli” na bomoko ya losambo ya Yehova kati na mabota ya Yisalaele. (Yosua 22:26, 27) Bantoma bazongaki epai na bango na esengo ete bazwaki likambo ya mabe te epai na bandeko na bango. Na lolenge yango etumba mpe kosopama ya nsɔ́mɔ ya makila kati na bango epɛngolamaki.

      Oyo nde liteya mpo na biso ete tózala noki te na kokanisela basusu mabe! Mbala mingi oyo ezali komonana lokola ete ezali solo wana etalelami likolólikoló ekozala boye te nsima ya kotalela yango na bozindo. Yango ezali solo na makambo mingi ya bomoi ya boklisto.

      Lolenge na biso ya kotalela bankulutu

      Wana bazali kokokisa mokumba na bango ya “babateli na [lisangá, NW] na Nzambe,” ntango mosusu bankulutu bamonaka ntina ya kopesa toli na bato ndenge na ndenge kati na lisangá. (Misala 20:28) Na ndakisa, tokanisaka nini soki nkulutu moko asololi na biso na ntina na bana na biso na makambo lokola boninga mabe to etamboli elongobani te na bana basi to bana mibali? Tokanisaka ete azali na mokano moko ebombami mpe tomilobaka ete ‘alingaka libota na biso te’? Soki totiki nzela na makanisi motindo wana ete mázala na bopusi likoló na biso, na nsima tokoyoka mawa mpo na yango. Bolamu ya elimo ya bana na biso ekoki kozala na likámá, mpe tosengeli kosepela na toli euti na Makomami oyo ekoki kosunga biso.​—Masese 12:15.

      Soki nkulutu moko na lisangá apesi biso toli, tóluka te mokano moko oyo ebombami nsima ya maloba na ye. Nzokande, tómituna soki ezali na likambo moko oyo toli na ye, oyo euti na Biblia ekoki kopesa biso litomba. Ntoma Paulo akomaki ete: “Na ntango na yango, bitumbu nyonso iyokani na esengo te kasi na mpasi; nde nsima ikozwisa mbuma na kimya na boyengebene epai na bango baoyo balendisami na yango.” (Baebele 12:11) Na yango, tiká ete tózala na botɔ́ndi mpe tókanisa makambo na kozaláká na bososoli. Tóbosana te ete mbala mingi ezalaka mpasi epai na bankulutu ete bápesa toli lolenge moko, ezalaka mpe mpasi mpo na biso ete tóndima yango.

      Mayoki na biso mpo na baboti

      Bilenge mingi bamitunaka na ntina na mikano ya baboti na bango na ntango bazali kotyela bango bipekiseli mosusu. Bilenge mosusu bakoki koloba boye: ‘Mpo na nini baboti na ngai batyelaka ngai ebele na mibeko boye? Namoni ete balingaka te ete nasepela na bomoi.’ Nzokande, na esika ya kozwa bosukisi motindo wana, bilenge basengeli nde kotalela makambo na bososoli.

      Baboti basili kolekisa mbula mingi mpo na kobɔkɔla bana na bango. Basalaki bongo na kopesáká bango biloko mingi ezala ya mosuni to ya lolenge mosusu. Ezali mpenza na ntina oyo tokoki koloba ete bazali sikawa na mokano ya koyeisa mawa na bomoi ya bana na bango wana bakómi bilenge? Ebongi malamu kokanisa ete ezali bolingo nde ezali kopusa baboti yango mpo na kobatela bana na bango mpe komibanzabanza mpo na bango, boye te? Ezali bolingo moko wana nde ekotinda bango ete bátyela bana na bango bipekiseli, baoyo bazali sikawa kokutana na mikakatano, boye te? Ekozala mpenza mabe mpe kozanga botɔ́ndi soki bana bakokanisa ete baboti na bango bazali na mikano mabe!​—Baefese 6:1-3.

      Ezaleli na biso epai na baninga na biso baklisto

      Mingi bazalaka na momeseno ya kokanisela basusu mabe mpe ya kotalela bango na liso mosusu. Ezali boni soki biso moko nde tozali na momeseno wana mpe tozali komitunatuna na ntina na mikano ya bato mosusu? Ekoki kozala ete topusami na elimo ya mokili mpo na likambo yango?

      Na ndakisa, soki ndeko na biso na elimo azali na ndako kitoko mpe na motuka ya ntalo mingi. Tosengeli nde koloba ete azali moto oyo alingaka biloko ya mosuni mingi mpe atyaka matomba ya Bokonzi na esika ya liboso te na bomoi na ye? Baklisto mosusu bakoki kozala na makoki ya kosomba biloko ya motuya, kasi yango elimboli te ete bazali na matindiki mabe to bazali “koluka liboso Bokonzi na Nzambe” te. Bakoki kozala na mosala mingi na makambo ya elimo, kosaleláká biloko na bango ya mosuni na elimo ya bokabi mpo na kotombola matomba ya Bokonzi, mbala mosusu na lolenge oyo ezali koyebana te epai na bato.​—Matai 6:1-4, 33.

      Lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso ezalaki na bato ya lolenge nyonso​—bazwi mpe babóla. (Misala 17:34; 1 Timoté 2:3, 4; 6:17; Yakobo 2:5) Nzambe atalelaka bato engebene bozwi na bango ya mosuni te, biso mpe tosengeli kosala bongo te. Tosengeli kolinga baninga na biso bandimi oyo bamekami mpe bazali sembo, ‘kosaláká likambo moko te mpo na koponapona bato.’​—1 Timoté 5:21.

      Kati na mokili oyo ezali kolala na nguya ya Satana, kotalela bato na liso mosusu mpe komitunatuna na mikano na bango ezali komonana na mitindo mikeseni. Na ndakisa, moto moko akoki kotalelama ete azali moto ya mobulu to mpe azali moninga ya biloko mingi ya mosuni bobele na ntina na lolenge ya bomoi na ye ya kala. Nzokande, lokola tozali baklisto, tosengeli te kokwea na ezaleli motindo wana. Lisangá ya Yehova ezali esika ya kokabolakabola te mpe ya komitunatuna mpo na mikano ya basusu te. Baklisto nyonso ya solo basengeli komekola Yehova Nzambe, ye oyo “kobebisa lisambisi ekoki epai na [ye] te, to koponapona bato te.”​—2 Ntango 19:7; Misala 10:34, 35.

      Tiká ete bolingo epusa yo

      Makomami mazali koloba polele ete “bato nyonso babungi mpe bazangi nkembo na Nzambe.” (Baloma 3:23) Na yango tosengeli kotalela baninga na biso bandimi lokola bato oyo basangani na biso kati na molende oyo tozali kosala mpo na kosalela Yehova mosala oyo akondima yango. Soki totikaki nzela na ezaleli ya komitunatuna mpo na mikano ya basusu to mpe totikaki mayoki mosusu ya mabe ete mábebisa boyokani na biso na bandeko na biso ya elimo mibali mpe basi, tiká ete tóbondela mpo na kozwa lisungi ya Nzambe mpo na kobundisa ezaleli wana na boye ete tókwea te na motambo ya Satana. (Matai 6:13) Ye andimisaki Eva ete Yehova azalaki na mikano mabe, azalaki komibanzabanza te mpo na bolamu na bango, mpe ete azalaki kopimela ye bonsomi oyo ekokaki kopesa ye esengo ya solosolo. (Genese 3:1-5) Na ntango tozali kokanisela bandeko na biso mabe, tozali kosalela mikano ya Satana.​—2 Bakolinti 2:11; 1 Petelo 5:8.

      Soki tomoni ete tozali na momeseno oyo ebongi te​—ya kokanisela basusu mabe​—boye tótalela malamumalamu ndakisa ya Yesu Klisto. Atako azalaki Mwana ya kokoka ya Nzambe, alukaki te mikano ya mabe epai na bayekoli na ye. Kútu, Yesu alukaki nde makambo ya malamu epai na bango. Na ntango bayekoli na ye bazalaki kowelana mpo na etɛlɛmɛlo ya lokumu, alobaki te ete bazali na mikano mabe mpe na bongo esengelaki kotya bantoma 12 mosusu ya sika na esika na bango. (Malako 9:34, 35) Lokola bazalaki bato ya kozanga kokoka, ekoki kozala ete bapusamaki na lolenge moko to mosusu ya momeseno ya lingomba ya lipɛngwi ya Bayuda, oyo ezalaki kotya likebi mingi na nzombo mpe kokabola bato engebene bitɛlɛmɛlo na bango. Yesu ayebaki ete bopusi ya moboko mpo na bayekoli na ye ezalaki nde bolingo mpo na Yehova. Lokola bamonisaki bolingo motindo wana mpe lokola bakangamaki na Yesu, bazwaki mbano monene.​—Luka 22:28-30.

      Soki tokotalela baninga na biso bandimi ya sembo na komitunatuna na ntina na mikano na bango, yango ekozala lokola nde tozali kotala na talatála oyo ezali kotɛngisa elongi. Eloko moko te ekomonana na motindo na yango mpenza ya solo. Na yango, tiká ete tótala na talatála ya bolingo. Ezali na bilembeteli mingi bimonisi ete bandeko na biso baklisto ya sembo balingi biso mpe babongi ete tótyela bango likebi na esengo. (1 Bakolinti 13:4-8) Boye tiká ete tómonisela bango bolingo motindo yango mpe tókeba ete tókanisela bango mabe te.

      [Elilingi na lokasa 26]

      Ndenge nini otalelaka bato mosusu oyo bazali kosambela Nzambe na bosembo?

      [Elilingi na lokasa 27]

      Kotya motema mpe limemya esali ete Batatoli ya Yehova bázala libota moko ya esengo

  • ‘Bazali sembo na mateya ya lingomba na bango’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1997 | 15 Mai
    • ‘Bazali sembo na mateya ya lingomba na bango’

      MWASI moko na engumba Miami, na etúká ya Floride, na États-Unis, atindaki nkomá oyo elandi na zulunalo moko ya engumba na bango: “Na mokolo ya 10 Desɛ́mbɛ bayibaki potɔmɔni ya mwana na ngai ya mobali na libenga na ye ntango azalaki na zando. Kati na yango ezalaki na mikanda na ye lokola kálati ya ndingisa ya kotambwisa motuka (permis de conduire), kálati ya sécurité sociale, mpe bongo na bongo, bakisa mpe mosolo dolare 260.

      “Nsima ya kopesa lapólo epai ya nkolo-mosala na ye ete abungisaki biloko wana, azongaki na ndako. Na mpokwa, mwasi moko alobaka lokóta Espagnole abéngaki ye na telefone, na lisalisi ya mosali ya kompanyi ya telefone mpo na kobongola maloba na ye na Lingelesi, ayebisaki ye ete alɔkɔtaki potɔmɔni na ye.

      “Apesaki adresi na ye. . . . Apesaki ye potɔmɔni na ye oyo ezalaki na biloko nyonso, bakisa mpe dolare 260 oyo ezalaki na kati.

      “Amonaki moyibi kobenda potɔmɔni na ye mpe angangaki. Moyibi abwakaki potɔmɔni yango mpe akimaki. Kasi na ntango yango amonaki lisusu mwana na ngai te, na yango akendaki na potɔmɔni yango na ndako na ye mpe abéngaki na telefone.

      “Ye na libota na ye bazali Batatoli ya Yehova. Na ntembe te bazali sembo na mateya ya lingomba na bango.”

      Batatoli ya Yehova bamonisaka bosembo mpo na kozwa lokumu epai ya bato te. (Baefese 6:7) Nzokande, bazali na mposa makasi ya kopesa lokumu epai ya Tata na bango ya likoló, Yehova. (1 Bakolinti 10:31) Bolingo na bango mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na bango ezali kopusa bango na kosakola “nsango malamu” ya Bokonzi ya Nzambe. (Matai 24:14) Nzambe alaki ete akokómisa mabelé paladiso moko kitoko na nzela ya Bokonzi. Na ntango yango mabelé makozala esika kitoko bobele na ezingelo te kasi lisusu mpo na bizaleli malamu ntango bato ya sembo bakotonda wana mpo na libela.​—Baebele 13:18; 2 Petelo 3:13.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto