MOKAPO YA ZOMI NA MOKO
Batelá kimya kati na ndako na yo
1. Wapi mwa makambo oyo makoki koyeisa bokabwani kati na mabota?
ESENGO ezali na baoyo bafandi na mabota oyo kati na yango bolingo, komitya na esika ya mosusu, mpe kimya ezali. Tozali kolikya ete libota na yo lizali mpe bongo. Likambo ya mawa, mabota mingi makokani te na libota motindo oyo mpe masili kokabwana mpo na bantina ekeseni. Nini ezali kokabola mabota? Na mokapo oyo tokolobela makambo misato. Kati na mabota mosusu, basangani na yango bazali kosambela na lingomba moko te. Na mabota mosusu, bana mbala mosusu bazali bango nyonso bana ya tata moko te to ya mama moko te. Na mabota mosusu mpe, kobundana mpo na kozwa biloko ya kobikela, to mposa ya kozwa biloko mingi ya mosuni emonani ete ezali kopusa basangani ya libota na kokabwana. Nzokande, makambo oyo mazali kokabola bato ya ndako moko makoki mbala mosusu kozala na bopusi na bato ya ndako mosusu te. Likambo nini ezali na ntina mingi?
2. Epai wapi basusu balukaka litambwisi kati na bomoi ya libota, kasi wapi liziba lileki malamu ya litambwisi motindo wana?
2 Ya liboso ezali bongo lolenge oyo baninga batalelaka makambo. Soki ozali mpenza kosala makasi ete oyeba lolenge bato mosusu batalelaka makambo, okoyeba mpenza lolenge ya kobatela libota oyo ezali na bomoko. Likambo ya mibale ezali eutelo ya batoli oyo etambwisaka moto. Bato mingi balandaka batoli ya baninga na bango ya mosala, ya bazalani na bango, ya bakomi na bazulunalo, to ya bato mosusu ya mayele. Kasi, bamoko basili komona oyo Liloba ya Nzambe ezali koloba na ntina na ezalela na bango, mpe na nsima bayaka kosalela makambo oyo bayekolaki. Lolenge nini kosala bongo esalisaka libota na kobatela kimya kati na ndako?—2 Timoté 3:16, 17.
SOKI MOBALI NA YO AZALI NA LINGOMBA MOSUSU
Salá makasi na kososola lolenge nini moninga atalelaka makambo
3. (a) Toli ya Biblia ezali nini na ntina na mobalani oyo azali na lingomba mosusu? (b) Wapi mwa ndambo na mitindá ya moboko oyo misengeli kosalelama soko moko na babalani azali mondimi mpe mosusu azali mondimi te?
3 Biblia ezali kopesa biso toli makasi ete tóbalana te na moto oyo azali na lingomba mosusu. (Deteronome 7:3, 4; 1 Bakolinti 7:39) Nzokande, ekoki kozala ete oyekolaki solo ya Biblia nsima na kobalana kasi mobali na yo ayekolaki yango te. Bongo okosala nini? Ya solo, ndai ya libala ezali naino. (1 Bakolinti 7:10) Biblia elobi polele ete ekanganeli ya libala esengeli koumela mpe ezali kolendisa babalani ete básilisa mikakatano na bango na esika ya kokima yango. (Baefese 5:28-31; Tito 2:4, 5) Kasi, ezali boni soki mobali na yo azali kotɛmɛla yo makasi mpo ete osalela lingomba ya Biblia te? Mbala mosusu akomeka kopekisa yo kokende na makita ya lisangá, to akoki koloba ete alingi te ete okendaka mosala ya ndako na ndako, to kosolola na ntina na lingomba. Okosala nini?
4. Na makambo nini mwasi akoki komonisa boboto soki mobali na ye azali na lingomba mosusu?
4 Omituna, ‘Mpo na nini mobali na ngai azali na makanisi motindo oyo?’ (Masese 16:20, 23) Soki ayebi mpenza te oyo ozali kosala, akoki komitungisa na ntina na yo. To mbala mosusu akoki kopusama na bandeko ya mosuni mpamba te ozali lisusu kosangana te na mimeseno misusu oyo mizali na ntina monene mpo na bango. Mobali moko alobaki ete: “Natikalaka ngai moko na ndako, namiyokaka lokola nasundolami.” Mobali yango amiyokaki lokola ete azalaki kokaba mwasi na ye na lingomba. Nzokande lolendo ezalaki kopekisa ye na kondima ete azalaki komiyoka ye moko. Mobali na yo mbala mosusu azali na mposa ya kondimisama ete bolingo na yo mpo na Yehova elimboli te ete sikawa ozali kolinga ye lisusu mingi te ndenge ozalaki kolinga ye liboso. Salá na boye ete olekisaka ntango elongo na ye.
5. Bokatikati nini esengeli kozala epai na mwasi oyo mobali na ye azali na lingomba mosusu?
5 Atako bongo, likambo moko ya ntina mingi lisengeli kotalelama soki olingi kosilisa mokakatano wana na mayele nyonso. Liloba ya Nzambe lisɛngi na basi ete: “Bino basi, bótosaka mibali na bino, lokola ebongi kati na Nkolo.” (Bakolose 3:18) Na bongo, ezali kokebisa na ntina na elimo ya lipandá. Lisusu, na kolobáká “lokola ebongi kati na Nkolo,” mokapo oyo momonisi ete botosi ya mwasi epai na mobali na ye esengeli mpe kotalela botosi epai na Nkolo. Yango esengeli kozala na bokatikati.
6. Mitindá nini mwasi moklisto asengeli kobosana yango te?
6 Mpo na moklisto, koyangana na makita ya lisangá mpe kopesa litatoli epai na basusu na ntina na kondima oyo ezwi moboko na Biblia ezali makambo ya ntina mingi ya losambo ya solo oyo esengeli kokamatama na bopɔtu te. (Baloma 10:9, 10, 14; Baebele 10:24, 25) Na bongo, osengeli kosala nini soki moto atindi yo ete oboya kotosa lisɛngi moko ya sikisiki ya Nzambe? Bantoma ya Yesu Klisto balobaki ete: “Ekoki ete tótosa Nzambe liboso na kotosa bato.” (Misala 5:29) Ndakisa na bango epesi lilako oyo ebongi kosalelama na makambo mingi kati na bomoi. Bolingo mpo na Yehova ekopusa yo na kopesa ye losambo oyo lobongi sé na ye? Epai mosusu, bolingo na yo mpe limemya na yo mpo na mobali na yo ekopusa yo na kosambela bobele Yehova na lolenge oyo ye azali kondima?—Matai 4:10; 1 Yoane 5:3.
7. Ekateli nini mwasi moklisto asengeli kozala na yango?
7 Yesu amonisaki ete yango ekosalemaka ntango nyonso bongo te. Akebisaki ete na ntina na botɛmɛli mpo na losambo ya solo, basangani ya mabota mosusu oyo bazali bandimi bakomiyoka ete bakabwani, lokola nde mopanga etyami kati na bango mpe basangani mosusu ya libota na bango. (Matai 10:34-36) Mwasi moko na Japon akutanaki na likambo yango. Mobali na ye atɛmɛlaki ye na boumeli ya bambula 11. Anyokolaki ye mingi mpe mbala na mbala azalaki kobengana ye na ndako. Kasi alendendelaki. Baninga kati na lisangá ya boklisto basalisaki ye. Azalaki kobondela ntango nyonso mpe azwaki elendiseli mingi na 1 Petelo 2:20. Moklisto mwasi wana andimisamaki ete soki atikali ngwi, mokolo mosusu mobali na ye akolanda ye mpo na kosalela Yehova. Na nsima, esalemaki mpe bongo.
8, 9. Lolenge nini mwasi asengeli kosala mpo na kopɛngola komityela mabaku mazangi ntina liboso ya mobali na ye?
8 Ezali na makambo mingi mabongi oyo okoki kosala mpo na kozala na bopusi likoló na ezaleli ya mobali na yo. Na ndakisa, soki mobali na yo azali kotɛmɛla lingomba na yo, kopesa ye libaku te mpo na koimaima na makambo mosusu. Salá ete ndako ezalaka pɛto. Obongisaka nzoto na yo. Kokanga motema te mpo na komonisela ye bilembo ya bolingo mpe ya botɔ́ndi. Na esika ya kozala motɔ́ngi, zalá nde mosungi. Monisá ete otalelaka ye mpo ete akamba libota. Kozongisa mabe na mabe te soki okanisi ete asaleli yo mabe. (1 Petelo 2:21, 23) Osengeli kondima ezaleli ya kozanga kokoka ya bato, mpe soki matáta mabimi, na komikitisa nyonso, zalá moto ya liboso mpo na kosɛnga bolimbisi.—Baefese 4:26.
9 Kosala te ete koyangana na yo na makita ezala ntina mpo na yango bilei na ye bizali kolambama na ngonga malamu te. Okoki mpe kopona kosangana na mosala ya boklisto na bantango oyo mobali na yo azali na ndako te. Ezali likambo ya mayele epai na mwasi moklisto na kotika koteya mobali na ye soki mobali yango azali kosepela te. Na esika ya kosala bongo, akolanda nde toli ya ntoma Petelo oyo ete: “Bino basi, bótosa babali na bino ete, ata bamosusu na bango bandimi Liloba te, bázwama na kimya mpe na bizaleli malamu na basi na bango, wana esili bango kotala bizaleli na bino bizali na pɛto mpe na limemya.” (1 Petelo 3:1, 2) Basi baklisto basalaka makasi mingi mpo na komonisa mbuma na elimo ya Nzambe.—Bagalatia 5:22, 23.
NTANGO MWASI AZALI MOKLISTO TE
10. Lolenge nini mobali oyo azali mondimi asengeli kosala epai na mwasi na ye soki azali na lingomba mosusu?
10 Ezali boni soki mobali azali moklisto nde mwasi na ye azali moklisto te? Biblia emonisi nzela oyo tosengeli kolanda na makambo motindo wana. Elobi ete: “Soki ndeko moko azali na mwasi oyo azangi kondima mpe ye asepeli kofanda na ye, ekoki na mobali kolongola ye te.” (1 Bakolinti 7:12) Epesi lisusu toli epai na mibali ete: “Bólingaka basi na bino.”—Bakolose 3:19.
11. Lolenge nini mobali akoki komonisa bososoli mpe mayele na lolenge na ye ya kosalela bokonzi likoló na mwasi na ye soki mwasi azali moklisto te?
11 Soki ozali mobali ya mwasi oyo azali na lingomba mosusu, omibanzabanza mingi na komonisa limemya epai na mwasi na yo mpe kotalela mayoki na ye. Lokola azali mokóló, abongi na ndambo ya bonsomi mpo na kosalela bindimeli ya lingomba na ye, ata soki yo ozali kondima yango te. Mbala ya liboso oyo ozali kolobela ye makambo matali kondima na yo, omizela te ete akobwaka bindimeli oyo azali na yango uta kala mpo na kolanda bindimeli ya sika. Na esika ya koloba mbala moko ete bindimeli oyo ye mpe libota na ye bazali kolanda uta kala bizali mabe, na motema pɛtɛɛ nyonso salá makasi na kososola elongo na ye uta na Makomami. Mbala mosusu akomiyoka ete ozali komona ye na motuya te soki ozali kolekisa ntango mingi na misala ya lisangá. Akoki kotɛmɛla milende na yo mpo na kosalela Yehova, nzokande likambo ya ntina ekoki kozala bobele oyo ete: “Nazalaka na mposa mingi ya kozala elongo na yo!” Zalá na motema pɛtɛɛ. Na ntina na limemya na yo oyo etondi na bolingo, akoki kosalisama mpo na koyamba losambo ya solo na nsima.—Bakolose 3:12-14; 1 Petelo 3:8, 9.
TEYÁ BANA
12. Ata soki mobali mpe mwasi na ye bazali na bindimeli bikeseni, lolenge nini mitindá ya Makomami misengeli kosalelama mpo na kobɔkɔla bana na bango?
12 Kati na ndako oyo bomoko ezali te na makambo ya losambo, koteya makambo ya lingomba epai na bana mbala mosusu ezalaka mokakatano monene. Lolenge nini mitindá ya Makomami misengeli kosalelama? Biblia epesi libosoliboso mokumba ya koteya bana epai na tata, kasi mama azali mpe na mokumba monene. (Masese 1:8; kokanisá na Genese 18:19; Deteronome 11:18, 19.) Ata soki azali kondima litambwisi ya Klisto te, tata azali sé mokonzi ya libota.
13, 14. Soki mobali apekisi mwasi na ye komema bana na makita ya boklisto to koyekola elongo na bango, mwasi akoki kosala nini?
13 Batata mosusu oyo bazali bandimi te baboyaka te soki mama azali koteya bana makambo matali lingomba. Basusu baboyaka. Okosala nini soki mobali na yo aboyi kopesa yo nzela ya komema bana na makita ya lisangá to mpe apekisi yo koyekola Biblia elongo na bango na ndako? Sikawa osengeli kozala na bokatikati na mikumba mikeseni—mokumba oyo ozali na yango liboso ya Yehova Nzambe, mokumba oyo ozali na yango epai na bokonzi ya mobali na yo, mpe mokumba oyo ozali na yango epai na bana balingami na yo. Lolenge nini okoki koyokanisa yango?
14 Ya solo osengeli kobondela na ntina na likambo yango. (Bafilipi 4:6, 7; 1 Yoane 5:14) Kasi na nsuka, ezali yo nde osengeli kopona nzela oyo okolanda. Soki okosala yango na likebi, komonisáká polele epai na mobali na yo ete ozali kowela bokonzi na ye te, botɛmɛli na ye ekoki mpenza kokita. Ata soki mobali na yo apekisi yo kokende na bana na makita to koyekola Biblia elongo na bango, atako bongo likoki ezali ya koteya bango. Na nzela ya masoló ya mokolo na mokolo mpe na ndakisa malamu, salá makasi na kokɔtisa kati na bango mwa ndambo ya bolingo mpo na Yehova, kondima kati na Liloba na ye, komemya baboti—bakisá mpe tata na bango—komibanzabanza na bolingo nyonso mpo na bato mosusu, mpe komonisa botɔ́ndi mpo na ezaleli ya kosala misala na kolongobana nyonso. Na nsima, tata na bango akoki komona matomba malamu mpe akoki kosepela na motuya ya milende na yo.—Masese 23:24.
15. Mokumba ya tata oyo azali mondimi ezali nini mpo na oyo etali kolakisa bana?
15 Soki ozali mobali oyo azali mondimi mpe mwasi na yo azali mondimi te, na bongo osengeli komema mokumba na yo ya koteya bana “kati na disipilini mpe na mpamela ya Yehova.” (Baefese 6:4, NW) Ya solo, atako bongo, osengeli kozala na boboto, na bolingo, mpe na makambo makasi te kati na boyokani na yo elongo na mwasi na yo.
SOKI BABOTI NA YO BAZALI NA LINGOMBA MOSUSU
16, 17. Mitindá nini ya Biblia bana basengeli komikundola soki baboti na bango bazali na lingomba mosusu?
16 Ezali lisusu likambo ya kokamwa te na komona ete ata bana mike mpenza bazali koyamba mateya ya lingomba oyo ekeseni na oyo ya baboti na bango. Ozali kati na ezalela motindo oyo? Soki ezali bongo, Biblia ezali na batoli ya kopesa yo.
17 Liloba ya Nzambe elobi ete: “Bótosaka baboti na bino kati na Nkolo zambi yango ezali sembo. Kumisá tata na yo mpe mama na yo.” (Baefese 6:1, 2) Yango elimboli limemya oyo ebongi mpo na baboti. Nzokande, atako botosi epai na baboti ezali likambo ya ntina mingi, yango esengeli te kopesama kozanga kotalela Nzambe ya solo. Wana mwana akóli mpe akómi na likoki ya kokamata bikateli ye moko, azali komema ndambo ya mikumba mpo na misala na ye. Yango ezali solo bobele mpo na makambo matali mibeko ya mokili te kasi mingimingi na ntina na mibeko ya Nzambe. Biblia elobi ete: “Moto na moto na biso akotánga makambo na ye mpenza liboso na Nzambe.”—Baloma 14:12.
18, 19. Soki baboti bazali na lingomba mosusu, lolenge nini bana bakoki kosalisa bango ete báyeba bindimeli na bango malamu?
18 Soki bindimeli na yo bisɛngi ete osala mbongwana kati na bomoi na yo, salá makasi ete oyeba likanisi ya baboti na yo. Bakosepela mpenza na ntango bakomona ete okómi na limemya mingi, na botosi mingi, na molende na makambo oyo bazali kosɛnga yo mpo ete ozali koyekola Biblia mpe kosalela yango. Nzokande, soki kondima na yo ya sika epusi yo na kobwaka bindimeli mpe mimeseno oyo bango balingaka yango mingi, bakoki kokanisa ete ozali kobungisa libula oyo balukaki kotikela yo. Bakoki mpe kobanga mpo na bolamu na yo soki makambo oyo ozali kosala eyebani mingi te na esika bofandi to soki yango ezali kopɛngwisa likebi na yo na kolanda mikano oyo bango bazali kokanisa ete ekosalisa yo na kozala na biloko mingi ya mosuni. Lolendo ekoki mpe kozala epekiseli. Ya solo, bakoki mpe kokanisa ete olingi kolakisa bango ete oleki bango na mayele.
19 Na yango, wana likoki emonani, salá ebongiseli ete baboti na yo bákutana na bankulutu to na Batatoli bakɔmɛli oyo bazali na lisangá epai yo osanganaka. Lendisá baboti na yo na kokende na Ndako ya Bokonzi mpo na koyoka bango moko makambo oyo mazali koteyama kuna mpe komona bango moko soki Batatoli ya Yehova bazali bato ya lolenge nini. Na nsima, ezaleli ya baboti na yo ekoki kolɛmba. Ata soki baboti bazali kotɛmɛla makasi, kobebisa mikanda mikolimbolaka Biblia, mpe kopekisa bana ete bákende na makita ya boklisto te, mbala mingi mabaku mazali ya kotánga yango epai mosusu, kosolola elongo na baninga baklisto, mpe kopesa litatoli mpe kosalisa basusu na lolenge ya libaku malamu. Okoki mpe kobondela Yehova. Bilenge mosusu basengeli kozela kino bakokóma mikóló mpo na kotika ndako ya baboti. Nzokande, ezala lolenge nini ya ezalela oyo ezali kati na ndako, kobosana te “kokumisa tata na yo mpe mama na yo.” Salá oyo esengeli mpo na kopesa nzela ete kimya ezala kati na ndako. (Baloma 12:17, 18) Oyo eleki mpenza, luká kozala na kimya elongo na Nzambe.
MOKAKATANO YA KOZALA TATA TO MAMA MOBƆKƆLI
20. Mayoki nini bana bakoki kozala na yango epai na tata to mama mobɔkɔli?
20 Kati na bandako mingi likambo oyo ezali kobimisa mokakatano monene ezali likambo ya lingomba te, kasi ezali nde mokakatano ya kozala tata to mama mobɔkɔli. Lelo oyo, bandako mingi esangisi bana bauti na libala ya liboso ya moko na baboti to na bango mibale. Kati na libota motindo wana, bana bakoki kozala na zuwa mpe na nkanda to mbala mosusu na mokakatano ya kozala sembo. Na yango, bakoki kotyola milende ya sembo oyo tata to mama mobɔkɔli azali kosala mpo na kozala tata to mama malamu. Nini ekoki kosalisa mpo ete mabota oyo mazali na tata to na mama mobɔkɔli málónga?
Ezala ete ozali mpenza moboti to ozali mama to tata mobɔkɔli, luká litambwisi na Biblia
21. Atako azali mpenza moboti ya mwana te, mpo na nini tata to mama mobɔkɔli akotalela mitindá mizwami na Biblia mpo na kopesa lisalisi?
21 Yebá ete ata na makambo ya mpasi mingi mpenza, mitindá ya Biblia oyo mizali komema bolóngi na bandako mosusu ebongi mpe kosalelama na likambo oyo. Kobosana mitindá wana ekoki, mpo na mwa ntango, komonana ete ezali kosilisa mokakatano kasi na nsima ekomema mpenza mpasi na motema. (Nzembo 127:1; Masese 29:15) Kólisá mayele mpe bososoli—mayele ya kosalela mitindá ya Nzambe na likanisi ete yango ekopesa matomba, mpe bososoli mpo na koyeba mpo na nini basangani ya libota bazali koloba mpe kosala makambo mosusu. Esengeli mpe komonisa boboto.—Masese 16:21; 24:3; 1 Petelo 3:8.
22. Mpo na nini ekoki kozala mokakatano mpo na bana ete bándima tata to mama mobɔkɔli?
22 Soki ozali tata to mama mobɔkɔli, okoki komikundola ete ntango ozalaki bobele lokola moninga ya libota wana, mbala mosusu bana wana bazalaki kosepela na yo. Kasi ntango okómi tata to mama mobɔkɔli na bango, ezalela na bango ekoki kobongwana. Kokanisáká tata to mama na bango mpenza oyo azali lisusu elongo na bango te, bana bakoki kotungisama na likambo litali kozala sembo, mbala mosusu bazali kokanisa ete olingi kokamata bolingo ya motema oyo bazali na yango epai na moboti oyo azali te. Na bantango mosusu, bakoki koyebisa yo polele ete ozali tata na bango te to mama na bango te. Maloba motindo wana mapesaka mpasi na motema. Nzokande, “Yoká nkanda noki na [elimo] na yo te.” (Mosakoli 7:9) Bososoli mpe boboto esengeli mpo na koyeba mayoki ya bana.
23. Lolenge nini disipilini ekoki kopesama kati na libota oyo lizali na bana ya kobɔkɔla?
23 Bizaleli wana bizali mpenza na ntina na ntango moto azali kopesa disipilini. Disipilini oyo elongobani ezali na ntina. (Masese 6:20; 13:1) Mpe lokola bana bazalaka bango nyonso ndenge moko te, disipilini ekoki kopesama ndenge moko mpe te. Batata babɔkɔli to bamama babɔkɔli mosusu bamonaka ete, na ebandeli, ezali malamu ete moboti mpenza nde asengeli kokokisa mokumba wana. Kasi, ezali likambo ya ntina ete tata mpe mama báyokana na lolenge ya kopesa disipilini mpe bátosisa yango, kozanga kondima mingi bobele mwana oyo bango moko baboti koleka mwana oyo bazali kobɔkɔla. (Masese 24:23) Botosi ezali na ntina monene, kasi esengeli mpe kobosana te ete tozali bato bazangi kokoka. Kolekisa ndelo na lolenge na yo ya kosala te. Pesá disipilini kati na bolingo.—Bakolose 3:21.
24. Nini ekoki kosalisa mpo na kopɛngola mikakatano kati na bana mibali mpe bana basi na libota oyo mobalani mokomoko ayei na bana?
24 Kosolola kati na libota ekoki kosalisa mingi mpo na kopɛngola matáta. Yango ekoki kosalisa libota na kotya likebi na makambo maleki ntina kati na bomoi. (Kokanisá na Bafilipi 1:9-11.) Yango ekoki mpe kosunga moko na moko na komona lolenge nini akoki kopesa mabɔkɔ mpo na kokokisa mikano ya libota. Lisusu, kosolola na lolenge ya polele kati na libota ekoki kopɛngola mikakatano mitali bizaleli malamu. Bana basi basengeli koyeba kolata mpe komitambwisa na lolenge ya malamu liboso na tata to na mama na bango mobɔkɔli mpe liboso ya bandeko na bango bana ya tata to mama mobɔkɔli, mpe bana mibali basengeli kozwa toli na lolenge ya komitambwisa malamu liboso na mama mobɔkɔli na bango mpe liboso na bandeko na bango ya basi oyo bazali bana ya tata to ya mama mobɔkɔli.—1 Batesaloniki 4:3-8.
25. Bizaleli nini bikoki kosalisa mpo na kobatela kimya kati na libota oyo lizali na bana oyo bayei na mobalani mokomoko?
25 Mpo na kolónga ntembe monene ya kozala tata to mama mobɔkɔli, osengeli kozala na motema pɛtɛɛ. Esɛngaka ntango mpo na kolóna boyokani ya sika. Kosala ete bana oyo obotaki te bámonisela yo bolingo mpe bápesa yo limemya, ezali likambo monene mpenza. Kasi yango ekoki kosalema. Motema ya mayele mpe ya bososoli, elongo na mposa makasi ya kosepelisa Yehova, ezali lifungola mpo na kozala na kimya kati na libota oyo ezali na tata to na mama mobɔkɔli. (Masese 16:20) Bizaleli wana bikoki mpe kosalisa ete olónga makambo mosusu.
BOLUKILUKI BILOKO YA MOSUNI EZALI NDE KOKABOLA LIBOTA NA YO?
26. Lolenge nini mikakatano mpe mposa ya kozala na biloko ya mosuni ekoki kokabola libota?
26 Mikakatano mpe lolenge ya kotalela biloko ya mosuni ekoki kokabola mabota na makambo mingi. Likambo ya mawa, mabota mosusu mabebisami na makanisi na ntina na mbongo mpe na mposa ya kokóma bazwi—to kozala na biloko mingi koleka oyo bazali na yango. Bokabwani ekoki kokóla ntango mobali mpe mwasi bazali kosala mosala ya mosuni mpe balóni ezaleli ya koloba “mbongo na ngai, mbongo na yo.” Ata soki bazali kopɛngola koswana, nzokande ntango mobali mpe mwasi bazali kosala bakoki kozala na manáka oyo ezali kotikela bango ntango mingi te ya kolekisa elongo. Momeseno oyo mozali kokóla kati na mokili ezali kosala ete batata bátikaka mabota na bango na boumeli ya ntango molai—basanza to ata bambula—mpo na koluka mbongo mingi oyo bakokaki soko moke te kozwa soki bafandaki bobele na ndako na bango. Yango ekoki komema na mikakatano minene.
27. Nini ezali mwa ndambo na mitindá oyo mikoki kosalisa libota oyo lizali kokutana na mikakatano na makambo ya mbongo?
27 Tolingi te kotya mibeko mpo na lolenge ya kosala liboso na makambo motindo oyo, mpamba te mabota ndenge na ndenge mazali kokutana na mikakatano mpe bamposa ekeseni. Nzokande, batoli ya Biblia ekoki kosalisa. Na ndakisa, Masese 13:10 emonisi ete matáta ya mpambampamba ekoki mbala mosusu kopɛngolama na “koyokáká toli.” Yango elimboli te bobele koyebisa makanisi na yo moko kasi koluka batoli mpe kososola lolenge moto mosusu azali kotalela likambo. Lisusu, kosala makasi mpo na kozala na bidjɛ́ oyo ekoki na ezweli na bino, ekoki kosalisa na koyeisa bomoko kati na libota. Na bantango mosusu ezali na ntina—mbala mosusu mpo na mwa ntango mokuse—ete mobali mpe mwasi básala mosala mpo na kozwa mosolo mosusu, mingimingi ntango bazali na bana to na bato mosusu oyo bazali na motó na bango. Soki ezali bongo, mobali akoki kondimisa mwasi na ye ete azali kobosana ye te. Ye mpe bana bakoki na bolingo nyonso kopesa mabɔkɔ na mwa misala oyo mama ameseni kosala yango ye moko.—Bafilipi 2:1-4.
28. Makebisi nini, soki matalelami, makosalisa libota na kosala mpo na kozala na bomoko?
28 Nzokande, kobosana te ete atako mbongo ezali na ntina kati na ebongiseli oyo, yango ekopesaka bolamu te. Ekopesaka bomoi te. (Mosakoli 7:12) Ya solo, kotya likebi lileki ndelo likoló na biloko ya mosuni ekoki koyeisa libebi na elimo mpe na bizaleli malamu. (1 Timoté 6:9-12) Oyo nde malamu mingi na koluka liboso Bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na ye, na kolikyáká ete akopambola milende na biso mpo na kozwa biloko bisengeli na biso na bomoi! (Matai 6:25-33; Baebele 13:5) Na kotyáká bamposa ya elimo na esika ya liboso mpe na kolukáká kimya libosoliboso elongo na Nzambe, okoki komona ete libota na yo, atako ekoki kozala ete ekabwani na makambo mosusu, ekozala ndako oyo ezali solo na bomoko kati na makambo mingi ya ntina.