MOKAPO YA ZOMI NA MIBALE
Bokoki kolónga mikakatano oyo mibebisaka libota
1. Mikakatano nini mibombami kati na mabota mosusu?
MOTUKA ya kala euti kosukolama mpe kopakolama lángi. Mpo na baleki-nzela, yango ezali kongɛnga, ezali ya sika. Kasi na kati na yango, motuka esili koguga. Ezali sé ndenge moko mpo na mabota mosusu. Atako na libándá makambo nyonso mazali komonana kitoko, bilongi ya kosɛka ebombi bobangi mpe mpasi. Kozanga ete bato ya libándá báyeba yango, makambo mabe mazali kolongola kimya na libota. Mikakatano mibale oyo mikoki kozala na bopusi wana ezali bongo boombo ya masanga mpe mobulu.
MBEBA EUTI NA BOOMBO YA MASANGA
2. (a) Likanisi ya Biblia mpo na oyo etali komela masanga ezali nini? (b) Boombo ya masanga ezali nini?
2 Biblia ezali kokweisa te komela masanga na bokatikati, kasi ezali nde kokweisa molangwa. (Masese 23:20, 21; 1 Bakolinti 6:9, 10; 1 Timoté 5:23; Tito 2:2, 3) Nzokande, boombo ya masanga ekeseni mpenza na molangwa; ezali lobanzo makasi ya komela masanga mikolo nyonso mpe kokóma na kozanga komipekisa nsima na komela yango. Baombo ya masanga bazalaka mikóló. Likambo ya mawa, bilenge mpe bakoki kozala baombo ya masanga.
3, 4. Lobelá mpasi oyo boombo na masanga ememaka likoló na mwasi ya moto oyo azali moombo ya masanga mpe likoló na bana.
3 Uta kala, Biblia emonisaki ete kolekisa ndelo na komela masanga ekoki kobebisa kimya ya libota. (Deteronome 21:18-21) Bolɛmbu oyo boombo ya masanga ebimisaka epesaka mpasi na libota mobimba. Mwasi akoki kosala nyonso mpo na kopekisa moombo ya masanga ete atika komela yango to akoki koyika mpiko na etamboli mabe ya mobali na ye.a Azali kosala makasi na kobomba masanga, kobwaka yango, kobomba mbongo na ye, mpe koluka kozongisa bolingo na ye mpo na libota, mpo na bomoi, ata mpo na Nzambe—kasi moombo ya masanga azali kolinga sé komela. Lokola milende na ye mpo na kolɛmbisa komela ezali kolónga te, mwasi akoki kolɛmba nzoto mpe komimona ete akoki te. Mbala mosusu akobanda kotungisama na bobangi, na nkanda, na mayoki ya komema ngambo, na kosilika, na mitungisi, mpe na kozanga komipesa limemya ye moko.
4 Bana bazwaka mpe mpasi mpo na ezaleli ya moboti oyo azali moombo ya masanga. Bamoko bazali kobɛtama na nzoto. Basusu bazali kobebisama na kosangisa na bango nzoto na makasi. Bakoki ata bango moko komipamela lokola bazali na moboti oyo azali moombo ya masanga. Mbala mingi makoki na bango ya kotya elikya epai na basusu ebebisami mpo na etamboli mabe ya moombo ya masanga. Lokola bazali na likoki te ya kolobela makambo oyo mazali kosalema na ndako, bana bakoki koyekola kokanga mayoki na bango, likambo oyo mbala mingi esalaka bango mabe na nzoto. (Masese 17:22) Bana motindo wana bakoki kozala na ezaleli wana ya kozanga komityela motema to kozanga komipesa limemya ata na ntango bakokóma mikóló.
LIBOTA EKOKI KOSALA NINI?
5. Lolenge nini boombo na masanga ekoki kolóngama, mpe mpo na nini kolónga yango ezali likambo ya pɛtɛɛ te?
5 Atako ebele ya banganga-mayele bazali koloba ete boombo ya masanga ekoki kosilisama te, mingi bazali kondima ete likoki ezali ya kosilisa yango na koboyáká mpenza komela ata moke. (Kokanisá na Matai 5:29.) Nzokande, kosala ete moombo ya masanga andima lisalisi ezali likambo moke te, mpamba te ntango nyonso azali koboya kondima ete azali na mokakatano. Atako bongo, ntango basangani ya libota bazali kosala makasi mpo na kolónga mpasi oyo ezalela ya boombo ya masanga esili kobimisa likoló na bango, moombo ya masanga akobanda koyeba ete azali na mokakatano. Monganga moko oyo azali na eksperiansi mingi mpo na kosalisa baombo ya masanga mpe mabota na bango alobaki ete: “Nakanisi ete likambo ya ntina ezali ete basangani ya libota bámipesa na misala na bango ya mokolo na mokolo na lolenge malamu mpenza mpe na meko oyo bakoki kosala yango. Moombo ya masanga akomona mokemoke bokeseni monene oyo ezali kati na ye mpe basangani mosusu ya libota.”
6. Nini ezali liziba lileki malamu ya batoli mpo na mabota oyo mazali na mosangani moko moombo ya masanga?
6 Soki moombo ya masanga azali kati na libota na yo, batoli epemami ya Biblia ekoki kosalisa yo na kozala na nzoto kolɔngɔ́nɔ́. (Yisaya 48:17; 2 Timoté 3:16, 17) Tótalela mwa ndambo na mitindá oyo misalisaki mabota na kolónga boombo ya masanga.
7. Soki mosangani moko ya libota azali moombo ya masanga, nani asengeli kopamelama mpo na yango?
7 Kondimá mpamela na ye nyonso te. Biblia elobi ete: “Moto na moto akomema bozito na ye moko,” mpe “moto na moto na biso akotánga makambo na ye mpenza liboso na Nzambe.” (Bagalatia 6:5; Baloma 14:12) Moombo ya masanga akoki kokanisa ete basangani na libota nde bazali na ekweli. Na ndakisa, akoki koloba ete: “Soki bozalaki kosalela ngai malamu, mbɛlɛ nalingaki komela te.” Soki basusu bamonisi ete bandimi likanisi na ye, bazali kolendisa ye na kokóba komela. Kasi ata soki makambo mosusu to bato mosusu basaleli biso mabe, biso banso—sangisá mpe baombo ya masanga—tozali na ekweli mpo na oyo tozali kosala.—Kokanisá na Bafilipi 2:12.
8. Wapi mwa ndambo na makambo oyo moombo na masanga akoki kosalisama na yango mpo na koyeba mbuma mabe ya ezaleli na ye?
8 Okanisa te ete ntango nyonso osengeli kobatela moombo ya masanga na mbuma mabe ya milangwa na ye. Lisese moko ya Biblia na ntina na moto oyo azali na nkanda makasi ekoki kosalelama mpe epai na moombo ya masanga: “Soko okobikisa ye, okolanda mpe kosala yango mbala na mbala.” (Masese 19:19, NW) Tiká ete moombo ya masanga amona mbuma mabe ya ezaleli na ye. Tiká ete ye moko alongola bosɔtɔ oyo asali to abénga ye moko na telefone nkolo na ye ya mosala mpo na kopesa ye bandimbola na ntɔ́ngɔ́ nsima na molangwa na ye.
Bankulutu bakoki kozala liziba monene ya lisalisi mpo na kosilisa mikakatano ya libota
9, 10. Mpo na nini mabota oyo mazali na moombo ya masanga masengeli kondima lisalisi, mpe masengeli mingimingi koluka lisalisi ya nani?
9 Ndimá lisalisi ya basusu. Masese 17:17, (NW) elobi ete: “Moninga malamu akolingaka ntango nyonso mpe azali ndeko mpenza na ntango ya mpasi.” Soki moombo na masanga azali na libota na yo, mpasi ezali. Ozali na mposa ya lisalisi. Kokakatana te mpo na koluka lisungi yango epai na ‘baninga malamu.’ (Masese 18:24) Kosolola na basusu oyo bayebi mokakatano yango to oyo bakutanaki na ezalela motindo moko bakoki kopesa yo batoli ebongi na ntina na makambo oyo osengeli kosala mpe oyo osengeli kosala te. Kasi zalá na bokatikati. Sololá yango na baoyo otyelaka motema, baoyo bakobatela ‘makambo na yo ya nkuku.’—Masese 11:13.
10 Yekolá koluka lisalisi epai na bankulutu baklisto. Bankulutu kati na lisangá ya boklisto bakoki kozala liziba monene ya lisalisi. Bato wana bakɔmɛli bateyami kati na Liloba ya Nzambe mpe bazali na eksperiansi mingi na lolenge ya kosalela mitindá na yango. Bakoki mpenza kozala “lokola ebombamelo mpo na mopɛpɛ, ezipelo na ntango na mbula makasi; lokola bitima na mai kati na esika ekauki, mpe lokola molili na libanga monene kati na mokili molɛmbisami na moi.” (Yisaya 32:2) Bankulutu bazali te bobele kobatela lisangá na bopusi nyonso ya mabe, kasi bazali mpe kobɔndisa, kolendisa, mpe komibanzabanza mpo na bato oyo bazali na mikakatano. Zwá litomba mingi na lisalisi na bango.
11, 12. Nani azali kopesa lisalisi lileki monene mpo na mabota oyo mazali na moombo ya masanga, mpe lolenge nini lisungi yango lizali kopesama?
11 Likoló na nyonso, sɛngá makasi epai na Yehova. Biblia endimisi biso na mɔ́tɔ nyonso ete: “[Yehova] azali penepene na bango bazali na mitema mitutami; akobikisa bango bazali na [elimo] enyetami.” (Nzembo 34:18) Soki ozali na motema motutami to na elimo enyetami na ntina na mitungisi miuti na kozala na mosangani moko ya libota oyo azali moombo ya masanga, yebá ete “Yehova azali penepene.” Azali koyeba lolenge ya mokakatano oyo libota na yo ezali na yango.—1 Petelo 5:6, 7.
12 Kondima makambo oyo Yehova azali koloba kati na Liloba na ye ekoki kosalisa yo mpo na kolónga mitungisi. (Nzembo 130:3, 4; Matai 6:25-34; 1 Yoane 3:19, 20) Koyekola Liloba ya Nzambe mpe kolanda mitindá na yango ekopesa yo likoki ya kozwa lisalisi ya elimo santu ya Nzambe, oyo ekopesa yo “nguya oyo eleki nguya ya bomoto” mpo na kolónga mokolo na mokolo.—2 Bakolinti 4:7, NW.b
13. Wapi mokakatano ya mibale oyo ezali kobebisa mabota mingi?
13 Kolekisa ndelo na komela masanga ekoki komema na mokakatano mosusu oyo ezali kobebisa mabota—mobulu kati na ndako.
MABE MAUTI NA MOBULU KATI NA NDAKO
14. Ntango nini mobulu kati na libota ebandaki, mpe yango ezali boni lelo?
14 Kati na lisoló ya bato, mobulu ya liboso emonanaki kati na bandeko mibale ya libota moko, Kaina mpe Abele. (Genese 4:8) Uta ntango wana, bato basili komona mpasi na lolenge nyonso ya mobulu kati na ndako. Ezali na mibali oyo babɛtaka basi na bango, basi oyo babundisaka mibali na bango, baboti oyo banyokolaka bana na bango, mpe bana bakóli oyo banyokolaka baboti na bango oyo bakómi mikóló.
15. Lolenge nini basangani ya mabota bazwaki mpasi na mayoki na ntina na mobulu kati na ndako?
15 Mabe mauti na mobulu kati na ndako esuki te bobele na bilembo ya mpota na nzoto. Mwasi moko oyo abɛtamaki alobaki ete: “Ezali na ngambo mpe na nsɔ́ni mingi oyo osengeli kondima yango. Mbala mingi na ntɔ́ngɔ́, okolinga bobele kofanda na mbeto, kokanisáká ete yango ezalaki bobele ndɔ́tɔ ya nsɔ́mɔ.” Bana oyo bazali komona, to kokutana na mobulu kati na ndako bakoki bango moko kozala mobulu mingi ntango bakokóma mikóló mpe wana bakozala na mabota na bango moko.
16, 17. Kobebisama na mayoki ezali nini, mpe lolenge nini basangani ya libota bazali komona mpasi na yango?
16 Mobulu kati na ndako esuki te bobele na kobebisama na nzoto. Mbala mingi kobundisa ezalaka na maloba. Masese 12:18 elobi ete: “Moto azali oyo akoloba lokola koswama na mbɛli.” “Koswama” wana oyo ekomonanaka na mobulu kati na ndako etaleli mpe kopesana bankombo mabe mpe kongangelana, matɔ́ngi ya ntango nyonso, mafinga ya nsɔ́ni, mpe kobɛta. Bampota ya mobulu na mayoki emonanaka te mpe mbala mingi bato mosusu bayebaka yango te.
17 Likambo ya mawa ekozokisaka mingimingi mwana na mayoki—matɔ́ngi ya ntango nyonso mpe kotyola makoki ya mwana, mayele na ye, to kozanga kopesa ye motuya lokola moto. Maloba wana ya mabe makoki kobebisa elimo ya mwana. Ya solo, bana nyonso bazalaka na mposa ya disipilini. Kasi Biblia eteyi batata ete: “Bótumolaka bana na bino te na ntina ete bálɛmba na mitema te.”—Bakolose 3:21.
LOLENGE YA KOPƐNGOLA MOBULU KATI NA NDAKO
Babalani baklisto oyo bazali kolingana moko na mosusu bakosala nokinoki mpo na kosilisa mikakatano na bango
18. Epai wapi mobulu kati na libota ebandaka, mpe Biblia emonisi nini mpo na kosilisa yango?
18 Mobulu kati na ndako ebandaka kati na motema mpe na makanisi; makambo oyo tosalaka ebandaka na lolenge oyo tokanisaka. (Yakobo 1:14, 15) Mpo na kotika mobulu, moto oyo asalaka yango asengeli kobongola lolenge na ye ya kokanisa. (Baloma 12:2) Yango ekoki kosalema? Ɛɛ. Liloba ya Nzambe ezali na nguya ya kobongola bato. Ekoki kopikola ata makanisi mabe oyo “ekangama makasi.” (2 Bakolinti 10:4; Baebele 4:12) Boyebi ya sikisiki ya Biblia ekoki kosalisa na kosala mbongwana makasi epai na bato oyo elobami na ntina na bango ete bálata bomoto ya sika.—Baefese 4:22-24; Bakolose 3:8-10.
19. Lolenge nini moklisto asengeli kotalela mpe kosalela mobalani na ye?
19 Likanisi mpo na babalani. Liloba ya Nzambe elobi ete: “Ekoki na babali ete bálinga basi na bango lokola nzoto na bango mpenza. Ye oyo alingi mwasi na ye azali komilinga ye moko.” (Baefese 5:28) Biblia elobi lisusu ete mobali asengeli kopesa na mwasi na ye “lokumu lokola na mbeki na motau.” (1 Petelo 3:7, NW) Basi bazwi toli ya “kolinga mibali na bango” mpe kozala na “limemya mozindo” epai na bango. (Tito 2:4; Baefese 5:33) Ya solo, mobali oyo azali kobanga Nzambe akoki te koloba na bosolo nyonso ete azali mpenza kopesa lokumu na mwasi na ye soki azali komonisa ye mpasi na nzoto to na maloba. Mpe mwasi oyo azali kongangela mobali na ye, oyo azali kofinga mobali na ye, to kopamela ye ntango nyonso akoki te koloba ete azali mpenza kolinga ye mpe komemya ye.
20. Liboso ya nani baboti bazali na mokumba mpo na bana na bango, mpe mpo na nini basengeli te komizela ete bana na bango básala makambo oyo maleki makoki na bango?
20 Likanisi libongi mpo na bana. Bana babongi, ɛɛ, bazali na mposa ya bolingo mpe ya likebi uta na baboti na bango. Liloba ya Nzambe lizali kobénga bana ete “likabo na Yehova” mpe “libonza.” (Nzembo 127:3) Baboti bazali na mokumba liboso ya Nzambe mpo na kobatela likabo wana. Biblia ezali kolobela “makambo na mwana” mpe “bozoba” ya bomwana. (1 Bakolinti 13:11; Masese 22:15) Baboti basengeli te kokamwa soki bamoni makambo ya bozoba kati na bana na bango. Bilenge bazali mikóló te. Baboti basengeli kosɛnga bobele makambo oyo makokani na mbula ya mwana, na mimeseno ya libota na ye, mpe na makoki na ye.—Talá Genese 33:12-14.
21. Wapi likanisi ya Nzambe likoló na lolenge ya kotalela baboti oyo bazali mibangé mpe lolenge ya kosalela bango?
21 Likanisi mpo na baboti oyo bazali mibangé. Levitike 19:32 elobi ete: “Okotɛlɛma liboso na nsuki mpembe mpe okokumisa mobali anuni.” Na yango, mobeko ya Nzambe ezalaki kolendisa limemya mpe kopesa lokumu epai na mibangé. Yango ekoki kozala mokakatano monene ntango moboti oyo azali mobangé amonani ete azali na masɛngi mingi to azali na maladi mpe mbala mosusu azali kotambola te to soki akómi na mindɔndɔ́. Nzokande, esɛngisami na bana ete “bázongisa mwa makabo epai na baboti na bango.” (1 Timoté 5:4) Yango elimboli kosalela bango makambo na lokumu mpe na limemya, mbala mosusu ata kosunga bango na makambo matali mosolo. Konyokola baboti oyo bazali mibangé na nzoto to na lolenge mosusu eyokani te na lolenge oyo Biblia ezali koyebisa biso kosala.
22. Nini ezali ezaleli ya ntina mpo na kolónga mobulu kati na ndako, mpe lolenge nini yango ekoki kosalelama?
22 Kolóna ezaleli ya komipekisa. Masese 29:11 elobi ete: “Zoba akoloba makanisi nyonso na motema na ye, nde moto na mayele akozilisa yango kino nsima.” Lolenge nini okoki kozala na bokonzi likoló na makanisi na yo? Na esika ya kotika ete mayoki ya kolɛmbisa ekóla kati na yo, salá nokinoki mpo na kosilisa mikakatano oyo mibimi. (Baefese 4:26, 27) Tiká likambo yango soki ozali na mayoki ete obandi kobungisa komipekisa. Bondelá mpo ete elimo santu ya Nzambe ebota komipekisa kati na yo. (Bagalatia 5:22, 23) Kotambola to kosala mwa ngalasisi ya nzoto ekoki kosalisa yo na kozala na bokonzi likoló na mayoki na yo. (Masese 17:14, 27) Salá makasi ete ozala moto na “kosilika noki te.”—Masese 14:29.
KOKABWANA TO KOZALA ESIKA MOKO?
23. Nini ekoki kosalema soki mosangani moko ya lisangá ya boklisto azali mbala na mbala kokwea na nkanda makasi, mbala mosusu konyokola basangani ya libota na ye mpe azali koboya kobongola motema?
23 Biblia etángi kati na misala oyo mikweisami na Nzambe “bonguna, kowelana, . . . nkanda” mpe elobi ete “baoyo bakosalaka makambo yango bakosangola Bokonzi na Nzambe te.” (Bagalatia 5:19-21) Na yango, moto nyonso oyo azali koloba ete azali moklisto kasi azali mbala na mbala kokwea na nkanda makasi mpe azali koboya kobongola motema, mpe mbala mosusu abɛtaka mwasi na ye to akonyokolaka bana na ye, akoki kobimisama na lisangá ya boklisto. (Kokanisá na 2 Yoane 9, 10.) Na kosaláká bongo, lisangá ekobomba banyokoli te.—1 Bakolinti 5:6, 7; Bagalatia 5:9.
24. (a) Babalani oyo bazali konyokwama bakoki kosala nini? (b) Lolenge nini baninga mpe bankulutu oyo bazali komibanzabanza bakoki kosunga mobalani oyo azali konyokwama, kasi nini basengeli kosala te?
24 Ezali boni mpo na baklisto oyo bazali kobɛtama ntango nyonso na mobalani mabe oyo azali komonisa ata elembo moko te ya kobongwana? Bamoko bamonaki ete bakokaki kofanda elongo na mobalani yango mabe mpo na bantina ekeseni. Basusu baponaki kokabwana na bango, kozaláká na mayoki ete kolɔngɔ́nɔ́ na bango ya nzoto, ya makanisi, mpe ya elimo—mbala mosusu ata mpe bomoi na bango—ezali na likámá. Eloko oyo moto akutani na mobulu na ndako akopona kosala mpo na makambo wana etali ekateli na ye moko liboso na Yehova. (1 Bakolinti 7:10, 11) Baninga oyo bakanisi ete bapusami na mikano milongobani, bandeko, to bankulutu baklisto, bakoki kolinga kopesa lisalisi mpe toli, kasi basengeli te kopusa moto oyo asalelami mabe ete akamata ekateli boye to boye. Ekateli etali sé ye moko.—Baloma 14:4; Bagalatia 6:5.
NSUKA YA MIKAKATANO OYO MIBEBISAKA MABOTA
25. Mokano ya Yehova mpo na libota ezali nini?
25 Ntango Yehova abalisaki Adama mpe Eva, akanaki soko moke te ete mabota masengeli kobebisama na mikakatano lokola boombo ya masanga mpe mobulu. (Baefese 3:14, 15) Libota esengelaki kozala esika bolingo mpe kimya ezali kofuluka mpe esika bamposa ya makanisi, ya mayoki, mpe ya elimo ya mosangani mokomoko esengelaki kokokisama malamu. Nzokande, uta lisumu ekɔtaki, bomoi ya libota ebebaki nokinoki.—Kokanisá na Mosakoli 8:9.
26. Nini ezali kozela baoyo bazali kosala makasi mpo na komitambwisa na boyokani na masɛngami ya Yehova?
26 Likambo ya esengo, Yehova abosani te mokano na ye mpo na libota. Alaki kosala mokili ya sika ya kimya kati na yango bato “bakofanda na kimya mpe moto akobangisa bango te.” (Ezekiele 34:28) Lisusu, boombo ya masanga, mobulu kati na ndako mpe mikakatano nyonso mosusu oyo mizali kobebisa libota lelo ekozala makambo ya kala. Bato bakosepela te na kobomba nkanda mpe mpasi, kasi “bakosepela [nde] na kimya na solo.”—Nzembo 37:11.
a Atako tozali kolobela moombo ya masanga oyo azali mobali, mitindá mipesami awa mitaleli mpe mwasi oyo azali moombo ya masanga.
b Na mikili misusu, ezali na bisika oyo basalisaka bato, balopitalo, mpe bibongiseli ya sikisiki mpo na kosalisa baombo ya masanga mpe mabota na bango. Ezala ete okoluka lisalisi motindo wana to okoluka yango te, ezali ekateli ya moto na moto. La Société Watch Tower azali kolendisa te lolenge moko boye ya kosalisama. Nzokande, likebi lisengeli kozala mpo ete, na bolukiluki ya lisalisi, moto amipesa te na misala oyo miyokani te na mitindá ya Makomami.