Loyembo 88
Libondeli ya mosaleli ya Nzambe
1. Nzambe, Tata na biso,
Kumisá nkombo na yo!
Y’ozali malamu mpe,
Yo nde moyengebene.
Yo nde moyengebene,
Y’ozali malamu mpe.
2. Tokosakola solo.
Lakisá nzela na yo.
Tolingi kotosa yo,
Pesá biso mibeko.
Pesá biso mibeko,
Tolingi kotosa yo.
3. Pesá biso mayele,
Yango’ezali pɛto bɛɛ.
Salisá biso, Nzambe,
Tóponaponaka te.
Tóponaponaka te,
Salisá biso, Nzambe.
4. Mpo na mosala na yo,
Totondi na esengo.
Lilɔmbo oyo, yoká:
‘Tika Bokonzi eya!’
‘Tika Bokonzi eya!’
Lilɔmbo oyo, yoká.