Nkombo ya Nzambe na boumeli ya bikeke
YEHOVA NZAMBE alingi mpenza ete bato bayeba mpe basalela nkombo na ye. Yango emonani na likambo oyo ete ayebisaki yango epai na bato mibale ya liboso oyo bazalaki na mabelé. Toyebi ete Adam na Eva bazalaki kosalela nkombo ya Nzambe, mpamba te nsima na kobota Kaina, Eva alobaki engebene Liebele ya ebandeli ete: “Naboti mobali na lisungi ya Yehova.”—Genese 4:1, NW.
Na nsima, tozali kotanga ete bato na sembo lokola Enoka mpe Noa “batambolaki elongo na Nzambe ya solo.” (Genese 5:24; 6:9) Na bongo, bango mpe bayebaki nkombo ya Nzambe. Mpe nkombo yango ebikaki na mpela monene elongo na Noa, moyengebene mpe libota na ye. Atako botomboki monene bosalemaki nsima na Babele, basaleli ya solo ya Nzambe balandaki kosalela nkombo na ye. Ezwami mbala mingi mpenza kati na mibeko oyo Nzambe apesaki epai na Yisraele. Bobele na mokanda ya Deteronome, nkombo yango ezwami mbala 551.
Na eleko ya basambisi, Bayisraele bazalaki koboya te mpo na kosalela nkombo ya Nzambe polele. Bazalaki nkutu kosalela yango kati na maloba na bango ya bonkondé. Totangi (na Liebele ya ebandeli) ete Boazi azalaki kopesa mbote na babuki ya mbuma na bilanga na ye, ete: “Yehova azala na bino.” Bango bazalaki kozongisa ete: “Yehova apambola yo.”—Luta 2:4.
Lisoló ya bozongi ya Bayisraele na Yuda nsima na boombo na bango na Babilone, emonisi ete nkombo ya Yehova elandaki kosalelama. Mokonzi Davidi, moto oyo abongaki na motema ya Nzambe, asalelaki nkombo ya Nzambe mbala mingi mpenza—ezwami soko mbala nkámá kati na nzembo oyo akomaki. (Misala 13:22) Nkombo ya Nzambe ekɔtisamaki mpe kati na bankombo ya Bayisraele mingi. Tokoki kotanga Adonijah (“Yah azali Nkolo na ngai”—“Yah” ezali bokuse ya nkombo Yehova), Yisaya (“Lobiko na Yehova”), Yonatana (“Yehova apesaki”), Mika (“Nani azali lokola Yah?”) mpe Yosua (“Yehova azali lobiko”).
Bilembeteli mosusu na libandá ya Biblia
Ezali lisusu na bilembeteli oyo biuti na libanda ya Biblia, bimonisi lolenge nkombo ya Nzambe esalelamaki mbala mingi na ntango ya kala. Engebene zulunalo Israel Exploration Journal (Volume 13, No. 2), na 1961, na mwa ntaká na sud-ouest ya Yelusaleme, bakutaki mobenga oyo mozalaki nkunda na ntango na kala. Bifelo na yango bizalaki na makomi na Liebele oyo mamonani ete makomamaki na ndambo ya mibale ya ekeke ya mwambe liboso ya ntango na biso. Tozali kokuta maloba lokola oyo ete: “Yehova azali Nzambe ya mabelé mobimba.”
Na 1966, lisoló moko libimaki na zulunalo Israel Exploration Journal (Volume 16, No. 1) elobelaki bitiká bisalemi na moyómba bikundolamaki na Arad, na sud ya Yisraele, oyo bizalaki na makomi ya Liebele. Makomi yango makomamaki na ndambo ya mibale ya ekeke ya nsambo liboso ya ntango na biso. Moko na yango elobeli mokanda oyo batindelaki moto moko nkombo na ye Eliashib. Mokanda yango mobandi boye ete: “Epai na nkolo na ngai Eliashib: Tika ete Yehova apesa yo kimya.” Mpe esuki boye: “Azali kati na ndako ya Yehova.”
Na 1975 mpe 1976, bakundoli na biloko ya kala baoyo bazalaki kotimola mabelé na eteni na mokili oyo babéngi Négueb, bakundolaki ebele ya makomi ya Liebele mpe ya Fenisia oyo ezalaki na ndambo na simá, na mbéki mpe na biloko oyo bisalemi na mabangá. Makomi yango mazalaki na liloba ya Liebele oyo libongolami na Nzambe, mpe ezalaki lisusu na nkombo ya Nzambe, YHWH, na makomi ya Liebele. Bobele na Yelusaleme, kala mingi te bautaki kokundola rulo moko moke esalemi na paláta, emonani lokola ete ezalaki liboso ya eleko oyo Bayuda bamemamaki na Babilone. Balukiluki balobaki ete, na ntango balingolaki yango, bamonaki nkombo ya Yehova na Liebele ekomami kati na yango.—Biblical Archaeology Review, (ya Mars/Avril 1983, lokasa 18).
Ndakisa mosusu emonisi lolenge oyo bazalaki kosalela nkombo ya Nzambe, epesami kati na oyo babéngi ete Mikanda ya Lachis. Mikanda wana mikomamaki na bitánda bisalemi na moyómba, bikundolamaki katikati na mobu 1935 mpe mobu 1938 na bitiká ya Lachis, engumba makasi oyo ezalaki na ntina mingi kati na lisoló ya Yisraele. Emonani lokola ete ekomamaki na mokonzi moko ya basodá oyo azalaki kokamba limpingá moko lizalaki kotambola liboso na mampingá ya Yudea, mpe mikanda yango mitindamaki epai na mokonzi na ye, nkombo na ye Yaosh, oyo azalaki na Lachis. Emonani ete mikanda yango mitindamaki na boumeli ya etumba oyo esalemaki kati na Yisraele mpe Babilone, pene na nsuka ya ekeke ya nsambo liboso ya ntango na biso.
Kati na mikanda mwambe mibongaki mpo na kotanga, nsambo ezali kobanda na maloba oyo ete: “Tika ete Yehova apesa nkolo na ngai kimya na ntango oyo!” Na nyonso, nkombo ya Nzambe ezwamaki mbala 11 kati na mikanda wana nsambo, likambo oyo limonisi mpenza ete bato bazalaki mpenza kosalela nkombo ya Yehova mokolo na mokolo na nsuka ya ekeke ya nsambo liboso ya ntango na biso.
Ata bakonzi bapakano bayebaki mpe basalelaki nkombo ya Nzambe wana ezalaki bango kolobela Nzambe ya Bayisraele. Na yango, likoló na libangá oyo bapesaki nkombo na ye, Mésa, mokonzi ya Moaba amikumisaki mpo na elongá oyo basodá na ye bazwaki likoló na Yisraele mpe, kati na makambo mosusu, alobaki ete: “Kemosi alobaki na ngai ete: ‘Kenda, kamata Nebo na Yisraele!’ Nazalaki kokenda na butu mpe nabundisaki ye uta ntɔngɔ kino midi. Nakamataki yango mpe nabomaki yango mobimba . . . Wana, nakamataki [mbeki] ya Yehova, mpe natyaki yango liboso na Kemosi.”
Na kotalela bilembeteli biuti na Biblia te mpo na lolenge oyo nkombo ya Nzambe esalelamaki, mokanda Theologisches Wörterbuch zum Alten Testament (Diksionere ya teoloji ya Kondimana na Kala), Volume 3, molongó 538, elobi ete: “Na yango, mikanda 19 epai Tétragramme ekomami motindo oyo ete jhwh, emonisi ete Makomi ya Bayuda oyo bazalaki bakomeli nsima na eleko na Yesu (Massorètes) ezali malamu. Tokoki komizela mpo na kozwa mosusu, mingi mpenza na mikanda ya kala ya Arad.”—Ebongolami uta na lokotá ya Allemand.
Nkombo ya Nzambe ebungaki te
Bato bayebaki mpe basalelaki nkombo ya Nzambe kino na eleko ya Malaki, oyo azalaki na bomoi pene na mibu 400 liboso ya eleko na Yesu. Kati na mokanda ya Biblia oyo mobéngami na nkombo na ye, Malaki amonisi mpenza motuya ya nkombo ya Nzambe, na kosaleláká yango mbala 48.
Na boumeli ya ntango, Bayuda mingi bakendaki kofanda mosika longwa na Yisraele, mpe basusu bazalaki lisusu kotanga Biblia na monoko ya Liebele te. Yango wana, na ekeke ya misato liboso ya ntango na biso, babandaki kobongola ndambo ya Biblia oyo ezalaki na ntango wana (“Kondimana na Kala”) na Greke, monoko oyo mozalaki kolobama mingi na eleko wana. Kasi nkombo ya Nzambe ebebisamaki te. Babongoli babatelaki yango, bakomaki yango na lolenge oyo ekomami na Liebele. Bakopi ya liboso ya libongoli wana libéngami ete la Septante na Greke oyo ebatelami kino na mikolo na biso, endimisi yango.
Kasi, yango ezalaki boni na ntango Yesu azalaki na bomoi awa na mabelé? Lolenge nini tokoki koyeba soki ye mpe bantóma na ye bazalaki kosalela nkombo ya Nzambe?
[Elilingi na lokasa 12]
Nkombo ya Nzambe ezwami mbala mibale kati na mokanda oyo mokomamaki na ndambo ya mibale ya ekeke ya nsambo liboso ya ntango na biso, likoló na bitiká bisalemi na moyómba.
[Eutelo ya bafɔtɔ]
(Fɔtɔ́ na ndingisa ya ministère israélien des Antiquités et des Musées)
[Bililingi na lokasa 13]
Nkombo ya Nzambe ezwami lisusu na Mikanda ya Lachis mpe na libangá ya Mésa