Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nkombo ya Nzambe—Ndimbola na yango mpe ebéngeli na yango
    Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko
    • ‘Nkombo mosusu ekoki kokitana yango te’

      Atako babongoli mingi bazali kosalela Yawe, nzokande, Traduction du monde nouveau mpe mwa mabongoli mosusu mazali kosalela bobele Jéhovah, mpamba te bato basili komesena na yango uta bikeke mingi. Lisusu, ezali na makomi minei ya Tétragramme, YHWH to JHVH.b

      Na kala, Gustav Friedrich Oehler, molakisi na université na Allemagne, azwaki ekateli motindo moko bobele mpo na ntina wana. Atalelaki bibéngeli bikeseni mpe asukisaki ete: “Mpo na yango, nazali kosalela liloba Jéhovah, mpo ete tomeseni mpenza na kosalela nkombo yango kati na lokóta na biso, mpe tokoki kokitanya nkombo mosusu te.”​—Theologie des Alten Testaments (Teoloji ya Kondimana na Kala), ebimeli ya mibale, na 1882, lokasa 143.

      Bobele bongo, kati na mokanda na ye Grammaire de l’hébreu biblique, ebimeli ya 1923, note ezali na nsé na lokasa 49, molakisi Paul Joüon ayebisi ete: “Kati na mabongoli na biso, tozali kosalela liloba Jéhovah . . . oyo ekomami mpe elobami na Lifalansé, na esika ya kosalela Yahweh (oyo endimami mpenza te).” Na minoko mingi misusu, babongoli ya Biblia bakomaki lolenge wana, lokola yango emonisami na makambo oyo matyami na encadré na lokasa 8.

      Bongo, kosalela liloba Yawe ezali mabe? Soko moke te. Litomba lizwami na liloba Yehova ezali oyo ete, ekoki nokinoki kobénda likebi ya motangi mpamba te liloba wana “lisalelami” kati na minoko mingi. Likambo ya ntina mingi lizali oyo ete tosalela nkombo yango mpe tosakola yango epai na bato mosusu. “Botɔndo Yehova, bino mabota! Bobelela nkombo na ye. Boyebisa misala na ye epai na mabota. Boloba ete nkombo na ye ezali likolo.”​—Yisaya 12:4, NW.

      Totala sikawa lolenge oyo basaleli ya Nzambe batósaki etinda oyo na boumeli ya bikeke.

  • Nkombo ya Nzambe na boumeli ya bikeke
    Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko
    • Nkombo ya Nzambe na boumeli ya bikeke

      YEHOVA NZAMBE alingi mpenza ete bato bayeba mpe basalela nkombo na ye. Yango emonani na likambo oyo ete ayebisaki yango epai na bato mibale ya liboso oyo bazalaki na mabelé. Toyebi ete Adam na Eva bazalaki kosalela nkombo ya Nzambe, mpamba te nsima na kobota Kaina, Eva alobaki engebene Liebele ya ebandeli ete: “Naboti mobali na lisungi ya Yehova.”​—Genese 4:1, NW.

      Na nsima, tozali kotanga ete bato na sembo lokola Enoka mpe Noa “batambolaki elongo na Nzambe ya solo.” (Genese 5:24; 6:9) Na bongo, bango mpe bayebaki nkombo ya Nzambe. Mpe nkombo yango ebikaki na mpela monene elongo na Noa, moyengebene mpe libota na ye. Atako botomboki monene bosalemaki nsima na Babele, basaleli ya solo ya Nzambe balandaki kosalela nkombo na ye. Ezwami mbala mingi mpenza kati na mibeko oyo Nzambe apesaki epai na Yisraele. Bobele na mokanda ya Deteronome, nkombo yango ezwami mbala 551.

      Na eleko ya basambisi, Bayisraele bazalaki koboya te mpo na kosalela nkombo ya Nzambe polele. Bazalaki nkutu kosalela yango kati na maloba na bango ya bonkondé. Totangi (na Liebele ya ebandeli) ete Boazi azalaki kopesa mbote na babuki ya mbuma na bilanga na ye, ete: “Yehova azala na bino.” Bango bazalaki kozongisa ete: “Yehova apambola yo.”​—Luta 2:4.

      Lisoló ya bozongi ya Bayisraele na Yuda nsima na boombo na bango na Babilone, emonisi ete nkombo ya Yehova elandaki kosalelama. Mokonzi Davidi, moto oyo abongaki na motema ya Nzambe, asalelaki nkombo ya Nzambe mbala mingi mpenza​—ezwami soko mbala nkámá kati na nzembo oyo akomaki. (Misala 13:22) Nkombo ya Nzambe ekɔtisamaki mpe kati na bankombo ya Bayisraele mingi. Tokoki kotanga Adonijah (“Yah azali Nkolo na ngai”​—“Yah” ezali bokuse ya nkombo Yehova), Yisaya (“Lobiko na Yehova”), Yonatana (“Yehova apesaki”), Mika (“Nani azali lokola Yah?”) mpe Yosua (“Yehova azali lobiko”).

      Bilembeteli mosusu na libandá ya Biblia

      Ezali lisusu na bilembeteli oyo biuti na libanda ya Biblia, bimonisi lolenge nkombo ya Nzambe esalelamaki mbala mingi na ntango ya kala. Engebene zulunalo Israel Exploration Journal (Volume 13, No. 2), na 1961, na mwa ntaká na sud-ouest ya Yelusaleme, bakutaki mobenga oyo mozalaki nkunda na ntango na kala. Bifelo na yango bizalaki na makomi na Liebele oyo mamonani ete makomamaki na ndambo ya mibale ya ekeke ya mwambe liboso ya ntango na biso. Tozali kokuta maloba lokola oyo ete: “Yehova azali Nzambe ya mabelé mobimba.”

      Na 1966, lisoló moko libimaki na zulunalo Israel Exploration Journal (Volume 16, No. 1) elobelaki bitiká bisalemi na moyómba bikundolamaki na Arad, na sud ya Yisraele, oyo bizalaki na makomi ya Liebele. Makomi yango makomamaki na ndambo ya mibale ya ekeke ya nsambo liboso ya ntango na biso. Moko na yango elobeli mokanda oyo batindelaki moto moko nkombo na ye Eliashib. Mokanda yango mobandi boye ete: “Epai na nkolo na ngai Eliashib: Tika ete Yehova apesa yo kimya.” Mpe esuki boye: “Azali kati na ndako ya Yehova.”

      Na 1975 mpe 1976, bakundoli na biloko ya kala baoyo bazalaki kotimola mabelé na eteni na mokili oyo babéngi Négueb, bakundolaki ebele ya makomi ya Liebele mpe ya Fenisia oyo ezalaki na ndambo na simá, na mbéki mpe na biloko oyo bisalemi na mabangá. Makomi yango mazalaki na liloba ya Liebele oyo libongolami na Nzambe, mpe

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto