Loyembo 193
Tósakola “Nsango malamu oyo ya Bokonzi”!
(Matai 24:14, NW)
1. Nsang’oy’a Bokonzi, tokotatola na
Mabota mpe na mboka inso.
Yambo ’te Yehova’abutola batuki,
Nkombo na ye nd’ekozwa nkembo.
(Mondimo)
2. Tósombani ntango, oy’eleko mabe;
Tókimani mposa ya mbindo.
Mosala ya Nzambe mozala liboso.
Wana nde mokano na biso.
(Mondimo)
3. Tósakola nsango ata na minyoko,
Tokobatela nde kondima.
Tózala na mpiko, bopɔlɔ, boboto
Wan’ezali kolendendela.
(MONDIMO)
Lelo, nsang’oyo’ésakwama
Mpo basembwi basalela Yah,
Mpe bato bakoyeba nkombo monene
Na ye, mpo yang’ebulisama