Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mpo na nini tosengeli kozongisaka matɔ́ndi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1998 | 15 Février
    • azwaki?” Mbala mingi, ata liloba “melesi” ya mpamba elobamaka lisusu te. Mokemoke moimi ezali kozwa esika ya kozongisa matɔ́ndi. Ezalela yango ezali moko na bilembo oyo ezali komonisa mikolo ya nsuka. Ntoma Paulo akebisaki ete: “Osengeli kososola ete na mikolo ya nsuka ntango ekozala na makama mingi. Bato bakokóma mpenza kotalela bamposa na bango moko . . . Bakozanga mpenza botɔ́ndi.”​—2 Timoté 3:1, 2, Phillips.

      Na bantango mosusu, kolɛtɛ (flatter) ezali kozwa esika ya botɔ́ndi. Maloba ya kozongisa matɔ́ndi mautaka na motema kozanga likanisi ya kozwa na yango litomba. Nzokande, kolɛtɛ, oyo mbala mingi ezalaka na bosembo te mpe na kolekisa ndelo, ekoki kouta na matindiki mabombami ya koluka kopesamela esika ya lokumu to kozwa litomba mpo na moto ye moko. (Yuda 16) Longola kolɛngola, maloba wana ya elɛngi mamonisaka lofundo to lolendo. Na bongo, nani akolinga kolɛngolama na maloba ya lokuta? Kasi botɔ́ndi ya solosolo epesaka esengo.

      Moto oyo azongiselaka baninga botɔ́ndi, ye moko mpe azwaka litomba na kosaláká bongo. Esengo oyo azali koyoka mpamba te azali na botɔ́ndi na motema na ye ezali kobakisela ye bolamu mpe kimya. (Kokanisá na Masese 15:13, 15.) Mpe lokola ezali ezaleli malamu, kozongisa matɔ́ndi ezali kobatela ye ete azala na mayoki mabe te lokola nkanda, zuwa, mpe likunya.

      ‘Bózalaka na botɔ́ndi’

      Biblia ezali kosɛnga biso ete tólóna elimo ya kozongisa matɔ́ndi. Paulo akomaki ete: “Bótɔ́ndaka kati na makambo nyonso, mpo ete oyo ezali mokano na Nzambe mpo na bino kati na Klisto Yesu.” (1 Batesaloniki 5:18) Mpe Paulo apesaki Bakolose toli ete: “Tiká mpe kimya na Klisto ezala na bokonzi kati na mitema na bino . . . Bózalaka mpe na matɔ́ndi.” (Bakolose 3:15) Mikapo mingi ya mokanda ya Nzembo ezali na maloba mingi ya kozongisa matɔ́ndi, yango emonisi ete botɔ́ndi oyo euti na motema ezali ezaleli malamu na miso ya Nzambe. (Nzembo 27:4; 75:1) Ya solo, Yehova Nzambe asepelaka ntango tozali komonisa botɔ́ndi na makambo nyonso ya bomoi na biso ya mokolo na mokolo.

      Kasi, makambo nini mazali kosala ete kolóna ezaleli ya kozongisa matɔ́ndi ezala mpasi mpo na biso kati na mokili oyo ezangi botɔ́ndi? Lolenge nini tokoki komonisa ezalela ya kozongisa matɔ́ndi na bomoi na biso ya mokolo na mokolo? Mituna yango mikolobelama na lisoló lilandi.

  • Tólóna elimo ya kozongisa matɔ́ndi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1998 | 15 Février
    • Tólóna elimo ya kozongisa matɔ́ndi

      MONGANGA moko na etúká ya New York abikisi bomoi ya Marie oyo ezalaki mpenza na likama. Kasi, Marie oyo azali mwasi ya mibu 50, azongiseli monganga matɔ́ndi te mpe lisusu afuti faktire na ye te. Oyo nde kozanga botɔ́ndi!

      Biblia elobi ete mokolo moko, wana azalaki kokɔta na mboka moko, Yesu akutanaki na mibali zomi oyo bazalaki na maladi mabe ya maba. Babelelaki ye na mongongo makasi ete: “Yesu! Nkolo! Yokelá biso mawa!” Yesu atindaki bango ete: “Kendá kotalisa banganga nzoto na bino.” Bato ya maba batosaki etindá na ye, mpe wana bazalaki kokende, babandaki komiyoka malamu mpe nzoto na bango ebongaki.

      Bato libwa kati na bato yango ya maba bakóbaki nzela na bango. Kasi moto moko, ye Mosamalia, azongaki mpo na koluka Yesu. Moto yango oyo liboso azalaki na maba akumisaki Nzambe, mpe ntango amonaki Yesu, akweaki na makolo na ye, mpe atɔ́ndaki ye. Mpo na yango, Yesu alobaki ete: “Bato zomi bapɛtolamaki te? Balibwa wapi? Moto mosusu azongi kopesa Nzambe lokumu te, bobele mopaya oyo?”—Luka 17:11-19.

      Liteya ya ntina ezali kati na motuna: “Balibwa wapi?” Lolenge moko na Marie, bato libwa oyo bazalaki na maba basalaki libunga monene—bazongisaki matɔ́ndi te. Ezaleli motindo wana ya kozanga kozongisa matɔ́ndi ezali komonana mingi na mikolo na biso. Ntina ya likambo yango ezali nini?

      Ntina mpenza ya kozanga botɔ́ndi

      Mingimingi kozanga botɔ́ndi eutaka na ezaleli ya moimi. Tótalela ndakisa ya baboti na biso ya liboso, Adama na Eva. Yehova azalisaki bango na bizaleli oyo Nzambe andimaka mpe apesaki bango biloko nyonso mpo na bolamu na bango, bakisa mpe elanga kitoko lokola esika na bango ya kofanda, ezingelo ya malamu mpenza, mpe mosala ya ntina mpe ya kosepelisa. (Genese 1:26-29; 2:16, 17) Kasi, na bopusi ya Satana oyo alamwisaki epai na bango mposa ya koluka matomba na bango moko, babalani wana bazangaki botosi mpe batyolaki boboto ya Yehova.​—Genese 3:1-5; Emoniseli 12:9.

      Tótalela lisusu bato ya Yisalaele ya kala, baoyo Nzambe aponaki mpo na kozala bato na ye mpenza. Na ntembe te, baboti Bayisalaele bazalaki na botɔ́ndi mingi na mokolo ya 14 Nisana 1513 L.T.B.! Na mokolo wana na butu, anzelu ya Nzambe abomaki “bana na nkulutu nyonso na Ezipito” kasi alekaki bandako nyonso ya Bayisalaele oyo etyamaki elembo malamu. (Exode 12:12, 21-24, 30) Mpe nsima ya kobikisama na mabɔkɔ ya mampinga ya Falo na Mai Motane, na mitema oyo mifulukaki na botɔ́ndi, ‘Mose mpe bato na Yisalaele bayembelaki Yehova loyembo.’—Exode 14:19-28; 15:1-21.

      Atako bongo, mwa bapɔ́sɔ nsima ya kolongwa na Ezipito, “[lisangá, NW] mobimba na bato na Yisalaele baimaimaki.” Nsima ya mwa ntango moke mpenza bamonisaki kozanga botɔ́ndi! Bakómaki kokanisa ntango “bafandaki pembeni na mbeki na mosuni mpe balyaki kwanga na kotonda,” oyo bazalaki na yango na Ezipito, mokili na bango ya boombo. (Exode 16:1-3) Emonani polele ete misala ya moimi mizali kotɛmɛla kolóna ezaleli ya kozongisa matɔ́ndi mpe komonisa yango.

      Lokola bazali bakitani ya mosumuki Adama, bato nyonso babotamaka na mwa bilembo ya moimi mpe elimo ya kozanga botɔ́ndi. (Baloma 5:12) Kozanga botɔ́ndi ezali mpe kati na elimo oyo ezali koyangela bato ya mokili oyo. Lokola mopɛpɛ oyo tozali kopɛma, elimo yango ezali bipai nyonso, mpe ezali na bopusi likoló na biso. (Baefese 2:1, 2) Na bongo, tosengeli kolóna elimo ya kozongisa matɔ́ndi. Lolenge nini tokoki kosala yango?

      Komanyola ezali na ntina!

      Búku Webster’s Third New International Dictionary elimboli botɔ́ndi lokola “ezalela ya kozala na botɔ́ndi: liyoki ya mɔ́tɔ mpe ya boninga epai na moto oyo basaleli ye bolamu mpe ezali kopusa moto yango ete azongisa bolamu.” Liyoki ezalaka likambo ya kotindika te; esengeli kouta yango moko epai ya moto. Kozongisa matɔ́ndi ezalaka bobele likambo ya komonisa bonkonde te; yango eutaka na motema.

      Lolenge nini tokoki koyekola kozala na botɔ́ndi na motema? Biblia emonisi ete mayoki na biso mingi eutaka na makambo oyo toponi kokanisa yango. (Baefese 4:22-24) Koyekola kozala na botɔ́ndi ebandaka na komanyola na esengo nyonso na boboto oyo bamoniseli biso. Mpo na yango, Dr. Wayne W. Dyer, oyo ayekolaka kolɔngɔ́nɔ́ ya motó, alobi: “Okoki kozala na liyoki te kozanga ete okanisa liboso.”

      Na ndakisa, tótala likambo ya kozala na botɔ́ndi mpo na biloko bizalisami oyo bizingi biso. Ntango ozali kotala likoló oyo etondi na minzoto na butu wana mapata mazali te, ozalaka na mayoki nini mpo na biloko oyo ozali komona? Mokonzi Davidi amonisaki kokamwa oyo azalaki na yango: “Ekomona ngai Likoló oyo ezali mosala na misapi na yo, sanza mpe minzoto na likoló oyo yo obongisaki, moto azali nini ete okanisa ye? mpe mwana na moto nini ete otalela ye?” Na kati ya butu, wana makɛlɛlɛ ezalaki te, minzoto ezalaki koloba na Davidi, mpe epusaki ye na kokoma ete: “Likoló ekosakolaka nkembo na Nzambe, lola ekoyebisaka misala na mabɔkɔ na ye.” Mpo na nini makoló oyo matondi na minzoto masimbaki mayoki mozindo ya Davidi? Ye moko ayanoli ete: “Nakokanisa misala na yo nyonso; nakobanza misala na mabɔkɔ na yo.”​—Nzembo 8:3, 4; 19:1; 143:5.

      Salomo, mwana na Davidi, ye mpe asosolaki motuya ya komanyola misala ya kokamwa ya bozalisi. Na ndakisa, na ntina na mosala oyo mapata ya mbula esalaka mpo na kopolisa mabelé, akomaki ete: “Bibale nyonso bikotyola kino mai-na-monana; kasi mai-na-monana ekotonda te. Na esika eutaki bibale, bikozongaka bobele wana lisusu.” (Mosakoli 1:7) Boye, nsima wana mbula enoki mpe bibale epolisi mabelé, mai na yango makozonga na mbu mpe na nsima, makomata na mapata. Mabelé oyo malingaki kozala lolenge nini soki ebongiseli yango oyo ezali kopɛtola mpe kozongisa lisusu mai ezalaki te? Salomo azalaki mpenza na botɔ́ndi na ntango azalaki kokanisa makambo yango!

      Moto na botɔ́ndi atalelaka mpe na motuya boyokani na ye elongo na basangani ya libota, na baninga, mpe na bayebani. Atyaka likebi na misala na bango ya boboto. Azalaka na botɔ́ndi na motema wana azali kotalela boboto na bango na bosepeli.

      Tózongisaka matɔ́ndi

      Liloba “melesi” ezali pɛtɛɛ mpenza! Ezali mpasi te koloba yango. Mpe mabaku ya kosala yango mazali mingi. Liloba Melesi oyo elobami na mɔ́tɔ mpe euti mpenza na motema esepelisaka motema ya moto oyo afungoleli biso ekuke to oyo alɔkɔteli biso eloko moko oyo tokweisi! Mosala ya moteki na magazini to mosáli na restorá to moto ya posita oyo ayaka kotika nkomá ekoki kokóma pɛpɛlɛ mpe ekoki kopesa ye bolamu mingi ntango azali koyoka liloba yango.

      Kotinda kalati ya matɔ́ndi ezali lolenge malamu ya komonisa botɔ́ndi mpo na boboto oyo bamoniselaki biso. Bakalati mingi oyo etekamaka na magazini ezali na maloba makomami oyo mamonisaka mayoki yango na bonzenga mpenza. Kasi, tobanzi ete ekomonisa mpenza bolingo na biso soki tobakisi mwa maloba ya botɔ́ndi oyo biso moko tokomi, boye te? Kutu, bamosusu na esika ya kosomba kalati, basepelaka kotinda nkomá oyo bakomi bango moko!—Kokanisá na Masese 25:11.

      Na ntembe te, baoyo babongi mpenza kopesamela maloba na biso ya botɔ́ndi ezali baoyo tofandi na bango ndako moko. Biblia elobi na ntina na mwasi ya makoki ete: “Mobali na ye [akotɛlɛma], ye akosanzola ye.” (Masese 31:28) Maloba mauti na motema ya mobali oyo mazali komonisa botɔ́ndi epai ya mwasi na ye makopesa kimya mpe bosepeli kati na ndako, boye te? Mpe mobali akosepela ete ntango azongi na ndako, mwasi na ye ayamba ye na mbote ya mɔ́tɔ mpe ya bosepeli, boye te? Na mikolo oyo, mitungisi kati na libala mizali mingi, mpe ntango mitungisi mileki, kosilika eyaka noki. Moto oyo azali na botɔ́ndi azalaka pene ya kotika makambo mosusu mpe abosanaka mabe noki mpe alimbisaka.

      Bilenge mpe basengeli koyeba malamu ntina ya kopesa baboti na bango matɔ́ndi oyo mauti na motema. Ya solo, baboti bazali bato ya kokoka te, kasi yango ezali ntina te ya kozanga botɔ́ndi mpo na oyo basili kosala mpo na bino. Bolingo mpe libateli oyo bamoniselaki bino uta kobotama na bino ekoki kosombama na mbongo te. Soki bateyaki bino boyebi ya Nzambe, yango ezali ntina mosusu mpo na yango bosengeli kozala na botɔ́ndi.

      Nzembo 127:3 elobi ete: “Bana . . . bazali likabo na [Yehova].” Na yango, baboti basengeli koluka mabaku ya kopesa bana na bango longonya na esika ya kosilikisa bango mpo na makambo mikemike. (Baefese 6:4) Mpe bazali na libaku malamu ya kosalisa bilenge oyo bazali kobɔkɔla ete bálóna elimo ya kozongisa matɔ́ndi.​—Kokanisá na Masese 29:21.

      Botɔ́ndi epai na Nzambe

      Yehova Nzambe azali Mopesi na “makabo nyonso malamu mpe makabo nyonso mabongi.” (Yakobo 1:17) Likabo ya bomoi ezali na ntina mingi mpenza, mpamba te eloko nyonso oyo tozali na yango to tokani kosala, ekozala na ntina te soki tobungisi bomoi. Makomami malendisi biso na komikundola ete “epai na [Yehova Nzambe] ezali liziba na bomoi.” (Nzembo 36:5, 7, 9; Misala 17:28) Mpo na kokólisa motema ya botɔ́ndi mpo na Nzambe, tosengeli komanyola na bibongiseli na ye ya bokabi oyo bizali kobatela bomoi na biso ya mosuni mpe ya elimo. (Nzembo 1:1-3; 77:11, 12) Motema lolenge wana ekopusa biso na komonisa bosepeli na maloba mpe na misala.

      Libondeli ezali lolenge moko malamu mpo na komonisa botɔ́ndi na biso epai na Nzambe. Davidi, mokomi na nzembo alobaki ete: “Ɛ [Yehova], Nzambe na ngai, yo osali makambo mingi, misala na yo na kokamwa mpe mikano na yo izali mpo na biso; mosusu lokola yo azali te. Soko nakoloba mpe nakoyebisa yango, ikoleka oyo ikoki kotángama.” (Nzembo 40:5) Tiká ete biso mpe tópusama na kosala bongo.

      Davidi azalaki mpe na ekateli makasi ya komonisa bosepeli na ye epai na Nzambe na makambo oyo azalaki koloba epai na bato mosusu. Alobaki ete: “Nakotɔ́nda [Yehova] na motema mobimba na ngai; nakosakola misala na kokamwa na yo nyonso.” (Nzembo 9:1) Kosolola na bato mosusu na ntina na Nzambe, kobimisa maloba na biso mpo na koyebisa bango solo ya Liloba na ye, na ntembe te yango ezali nzela eleki malamu mpo na komonisa botɔ́ndi na biso epai na ye. Mpe yango ekosalisa biso ete tózala na botɔ́ndi mingi na makambo mosusu ya bomoi.

      Yehova alobi ete: “Ye oyo akopesa ngai matɔ́ndi mpo na mbeka na ye, ye akokumisa ngai; mpe ye oyo akokɛngɛlaka nzela na ye, nakomonisa ye kobikisa na Nzambe.” Tiká ete tózala na esengo oyo ezali kouta na komonisela ye botɔ́ndi euti na motema.​—Nzembo 50:23; 100:2.

      [Elilingi na lokasa 7]

      Bomoi ezali likabo liuti na Nzambe. Bakisá mwa maloba na yo moko.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto