Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Bato “na mayoki lolenge moko na biso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1998 | 1 Mars
    • Bato “na mayoki lolenge moko na biso”

      AZALAKI mokonzi mpe mosakoli kasi azalaki lisusu tata ya bolingo. Moko kati na bana na ye akómaki na enzombo mpe na lolendo ntango akólaki. Mpo na koluka kobɔtɔla bokonzi, mwana yango abimisaki etumba mpe azalaki na mposa makasi ya koboma tata na ye. Kasi na etumba oyo elandaki, mwana nde akufaki. Ntango tata ayokaki ete mwana na ye akufi, akendaki na esika na ye moko na eteni ya likoló na ndako ya kolala mpe alelaki ete: “Ɛ Abesaloma, mwana na ngai, mwana na ngai, mwana na ngai Abesaloma! Soko ngai nakufaki na esika na yo, ɛ Abesaloma, mwana na ngai, mwana na ngai!” (2 Samwele 18:33) Tata yango ezalaki bongo Mokonzi Davidi. Lokola basakoli mosusu ya Yehova, azalaki “moto na [mayoki, NW]” lolenge moko na biso.​—Yakobo 5:17.

      Na ntango ya lisolo ya Biblia, mibali mpe basi oyo bazalaki koloba mpo na Yehova bazalaki bato lokola bato nyonso. Lolenge moko na biso, bazalaki na mikakatano mpe bazalaki bato ya kozanga kokoka. Wapi bamoko na basakoli yango, mpe lolenge nini mayoki na bango ezalaki lolenge moko na biso?

      Mose—Longwa na komityela motema koleka kino na komisɔkisa

      Mose azalaki mosakoli oyo ayebanaki mingi liboso ya kobotama ya Klisto. Nzokande, ata ntango akómaki na mbula 40, akokaki naino te kosala lokola molobeli ya Yehova. Mpo na nini? Wana bandeko na ye bazalaki konyokwama na mabɔkɔ ya Falo na Ezipito, Mose abɔkɔlamaki na ndako ya Falo mpe azalaki “na nguya na maloba mpe na misala na ye.” Lisolo eyebisi biso ete: “Akanisi ete bandeko na ye bayebi ete Nzambe akopesa bango lobiko na mabɔkɔ na ye.” Na komityela motema koleka, asalaki likambo na nkanda mpo na kokɔtela moombo Moebele, abomaki Moezipito.​—Misala 7:22-25; Exode 2:11-14.

      Mose asengelaki kokima, mpe alekisaki mbula ntuku minei oyo elandaki lokola mobateli ya bampate mosika, na mokili ya Midyani. (Exode 2:15) Na nsuka ya eleko wana, Yehova apesaki Mose, oyo akómaki ntango wana na mbula 80, mokumba ya kozala mosakoli. Kasi Mose amityelaki lisusu motema na koleka te. Amiyokaki mpenza ete abongi te kozala mosakoli ya Yehova, alobaki maloba lokola oyo, “Ngai nani ete nakenda liboso na Falo?” mpe “Nalobela [ye] nini?” (Exode 3:11, 13) Na elendiseli ya bolingo mpe lisungi ya Yehova, Mose akendaki mpe akokisaki mokumba na ye.

      Lokola Mose, esilá kokómela yo otika nzela na komityela motema koleka emema yo kosala to na koloba makambo oyo na nsima emonanaki ete ezangi mayele? Soki ezali bongo, ndimá kobongisama lisusu na komikitisa nyonso. To osilá komiyoka ete obongi te mpo na kokokisa mikumba moko ya boklisto? Na esika ya koboya yango, ndimá lisungi ya Yehova mpe ya lisangá na ye. Ye oyo asalisaki Mose akoki mpe kosunga yo.

      Eliya azalaki na mayoki lolenge moko na biso na ntango ya disipilini

      “Eliya azalaki moto na [mayoki, NW] lolenge moko na biso, abondelaki makasi ete mbula enoka te mpe enokaki na mokili te kino [mibu, NW] misato mpe sanza motoba.” (Yakobo 5:17) Libondeli ya Eliya ezalaki na boyokani na mokano ya Yehova mpo na kopesa disipilini na libota oyo epɛngwaki. Lisusu, Eliya ayebaki ete eleko ya elanga oyo asɛngaki kati na libondeli na ye elingaki kobimisela bato mpasi. Bayisalaele bazalaki basali na bilanga; mamwe mpe mbula ezalaki mwango ya kobikela mpo na bato. Eleko ya elanga soki eumelaki ntango molai elingaki kobimisa mpasi makasi. Ndunda elingaki kokauka; milona elingaki kozanga. Bibwele oyo bazalaki kosalela mpo na misala mpe lokola bilei bilingaki kokufa, mpe mabota mosusu balingaki konyokwama na nzala. Banani balingaki konyokwama mingi koleka? Bato mpamba. Na nsima, mwasi moko mokufeli-mobali alobaki na Eliya ete atikalaki sé na mwa fufu mpe na mwa mafuta. Andimisamaki solo ete mosika te ye mpe mwana na ye ya mobali bakokufa na nzala. (1 Mikonzi 17:12) Mpo ete Eliya abondela lokola asalaki yango, asengelaki kozala na kondima makasi ete Yehova akokokisa bamposa ya basaleli na Ye—bazwi to babola—baoyo basundolaki losambo ya solo te. Lolenge lisolo emonisi yango, Nzambe ayokaki libondeli ya Eliya.​—1 Mikonzi 17:13-16; 18:3-5.

      Mbula misato na nsima, ntango Yehova alobaki ete mosika te akonɔkisa mbula, mposa makasi oyo Eliya azalaki na yango ya komona kosila ya elanga emonanaki na mabondeli ya mozindo wana “akumbamaki na mabelé mpe atyaki elongi na ye kati na mabolongo na ye.” (1 Mikonzi 18:42) Mbala na mbala azalaki koloba na mosali na ye ete: “Butá sasaipi, talá kino mai-na-monana” mpo na komona elembo ete Yehova ayokaki mabondeli na ye. (1 Mikonzi 18:43) Oyo nde esengo ayokaki na nsuka, lokola eyano na mabondeli na ye, “likoló epesaki mbula mpe mabelé ebotaki mbuma na yango”!—Yakobo 5:18.

      Soki ozali moboti to nkulutu kati na lisangá ya boklisto, mbala mosusu osengeli kolónga mayoki ya mpasi na ntango ozali kosembola moto. Nzokande, mayoki motindo wana ya bomoto masengeli kokitisama na endimiseli ete na bantango mosusu disipilini ezali na ntina mpe soki epesami na bolingo, “ikozwisa mbuma na kimya na boyengebene.” (Baebele 12:11) Botosi mibeko ya Yehova ezalaka ntango nyonso na matomba malamu. Lolenge moko na Eliya, tóbondelaka makasi ete bikateli na ye bikokisama.

      Yilimia amonisaki mpiko atako alɛmbaki

      Kati na bakomi nyonso ya Biblia, mbala mosusu Yilimia nde akomaki mingi na ntina na mayoki na ye moko. Lokola azalaki elenge, azalaki kokakatana mpo na kondima mokumba na ye. (Yilimia 1:6) Atako bongo, asakolaki liloba ya Nzambe na mpiko nyonso, akutanaki na botɛmɛli makasi ya bandeko na ye Bayisalaele—banda na mokonzi kino na bato mpamba. Na bantango mosusu azalaki koyoka nkanda to kolela na ntina na botɛmɛli yango. (Yilimia 9:3; 18:20-23; 20:7-18) Na mabaku makeseni azingamaki na bato ebele, abɛtamaki, akakisamaki na nzeté, atyamaki na bolɔkɔ, bakanaki koboma ye, mpe abwakamaki kati na pɔtɔpɔ́tɔ na libulu oyo mai ezalaki lisusu te. Ata nsango ya Yehova na ntango mosusu ezalaki kopesa ye mpasi, ndenge emonisami na maloba na ye: “Ah misɔpɔ na ngai, misɔpɔ na ngai! Nayoki mpasi makasi na motema na ngai.”​—Yilimia 4:19, NW.

      Atako bongo, alingaki liloba ya Yehova, kolobáká ete: “Liloba na yo ezali epai na ngai esengo mpe kosepela na motema na ngai.” (Yilimia 15:16) Bobele na ntango yango, kolɛmba nzoto epusaki ye na kobelela epai na Yehova ete: “Okozala nde solo epai na ngai lokola mozimbisi, lokola mai mazali koumela te?” lokola mai ya moluka oyo ekaukaka mpambampamba. (Yilimia 15:18) Nzokande, Yehova asosolaki kobulungana ya mayoki na ye mpe akóbaki kosunga ye mpo na kokokisa mokumba na ye.​—Yilimia 15:20; talá lisusu Yilimia 20:7-9.

      Lolenge moko na Yilimia, yo mpe ozali kobundisa kolɛmba nzoto to botɛmɛli mpo na kokokisa mosala na yo? Talelá Yehova. Landá kotosa litambwisi na ye, mpe Yehova akopambola milende na yo.

      Yesu azalaki na mayoki lolenge moko na biso

      Mosakoli oyo alekaki basakoli nyonso ezalaki bongo Mwana na Nzambe, Yesu Klisto. Atako azalaki moto ya kokoka, abombaki mayoki na ye te. Totángaka mbala mingi mayoki na ye ya mozindo, oyo na ntembe te ezalaki komonana polele na elongi na ye, mpe na lolenge azalaki komitambwisa liboso ya bamosusu. Mbala mingi Yesu ‘azalaki koyoka mawa’ mpe asalelaki liloba yango mpo na komonisa bato oyo balobelami na masese na ye.​—Malako 1:41; 6:34; Luka 10:33.

      Na ntembe te angangaki ntango abenganaki basombotani na mosolo mpe batɛkisi mpe banyama na kolobáká ete: “Longolá awa biloko oyo!” (Yoane 2:14-16) Ntango Petelo alobaki na ye, “Soko moke te, Nkolo! Oyo ekokómela yo te,” na makasi mpenza ayanolaki ete, “Kendá nsima na ngai, Satana!”—Matai 16:22, 23.

      Yesu azalaki na bolingo makasi mpo na baoyo bazalaki penepene na ye. Ntoma Yoane alobelami lokola “moyekoli oyo Yesu alingaki.” (Yoane 21:7, 20) Mpe tozali kotánga ete: “Yesu alingaki Malata mpe ndeko mwasi na ye mpe Lasalo.”​—Yoane 11:5.

      Yesu ayokaki mpe mpasi na mayoki. Koyokáká mawa na liwa ya Lasalo, ‘Yesu atangisaki mpisoli.’ (Yoane 11:32-36) Komonisáká mpasi oyo ayokaki na ndenge Yuda Mokeliota akokaba ye, Yesu azongelaki maloba mazwami na Nzembo oyo mazali komonisa mpasi makasi na mayoki ete: “Ye oyo alei bilei na ngai elongo atombweli ngai likaka na ye.”​—Yoane 13:18; Nzembo 41:9.

      Ata wana azalaki konyokwama likoló ya nzete, Yesu amonisaki mayoki na ye ya mozindo. Na bolingo nyonso, apesaki mama na ye epai na “moyekoli molingami.” (Yoane 19:26, 27) Ntango amonaki elembeteli ete moko na basali na mabe oyo bazalaki na ye na nzeté abongoli motema, Yesu alobaki na mawa nyonso ete: “Okozala na ngai elongo kati na Paladiso.” (Luka 23:43, NW) Tokoki komona mayoki na ye ya mpasi makasi wana angangaki ete: “Ɛ Nzambe na ngai, Ɛ Nzambe na ngai, mpo na nini otiki ngai?” (Matai 27:46) Mpe maloba na ye ya nsuka liboso ya kokufa mamonisi bolingo mpe elikya ete: “Tata nazali kotika [elimo, NW] na ngai na mabɔkɔ na yo.”​—Luka 23:46.

      Nyonso oyo ezali kopesa biso endimiseli makasi! “Mpo tozali na Nganga Monene te oyo azangi koyoka mpasi esika moko na biso kati na bolɛmbu na biso. Nde [Yesu] amekami na makambo nyonso pelamoko biso, bobele ete akwei na masumu te.”​—Baebele 4:15.

      Elikya ya Yehova

      Yehova ayokaki mawa soko moke te na ndenge aponaki bato ete bázala balobeli na ye. Ayebaki bosembo na bango epai na ye, mpe na motema mawa azalaki kolimbisa bolɛmbu ya baoyo bazangi kokoka. Kasi, alingaki ete bákokisa mokumba na bango. Na lisalisi na ye, bakokisaki yango.

      Tiká ete na motema molai mpenza, tótyela bandeko na biso motema. Kati na ebongiseli ya biloko ya ntango oyo bakozala ntango nyonso bato ya kozanga kokoka, lokola mpe biso moko. Lisusu, tosengeli te kosambisa bandeko na biso lokola ete ebongi te ete tómonisela bango bolingo to tótyela bango likebi. Paulo akomaki ete: “Ekoki na biso bato na nguya ete tóyika mpiko na bolɛmbu na bato bazangi nguya, ekoki komisepelisa biso mpenza te.”​—Baloma 15:1; Bakolose 3:13, 14.

      Basakoli ya Yehova bazalaki na mayoki lokola oyo biso tozali na yango. Atako bongo, batyaki elikya epai ya Yehova, mpe Yehova asungaki bango. Na koleka, apesaki bango bantina ya kozala na esengo—lisosoli malamu, amoniselaki bango ngɔlu na ye, baninga ya sembo oyo basungaki bango, mpe elikya ya bolamu na mikolo mizali koya. (Baebele 12:1-3) Tiká ete biso mpe tókangama na Yehova na elikya nyonso wana tozali komekola kondima ya basakoli ya ntango ya kala, bato na “mayoki lolenge moko na biso.”

  • Minganga, bazuzi, mpe Batatoli ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1998 | 1 Mars
    • Minganga, bazuzi, mpe Batatoli ya Yehova

      NA Mársi 1995, Batatoli ya Yehova basalisaki makita (séminaires) mibale na ekólo Brésil. Na mokano nini? Mpo na koluka boyokani elongo na minganga mpe na baí-mibeko na ntango Motatoli ya Yehova abɛli mpe aboyi kozongisama makila.​—Misala 15:29.

      Likambo ya mawa, ntango Batatoli mosusu babɛlaki minganga baboyaki kotosa mposa na bango mpe balukaki kozwa ndingisa ya bazuzi mpo ete bázongisama makila na makasi. Ntango makambo masalemaki bongo, Batatoli basalelaki myango nyonso oyo miyokani na mibeko mpo ete bámibatela. Atako bongo, bamonaki malamu ete báyokana mpo na kosalana elongo na esika ya kowelana. Na bongo, makita yango mamonisaki polele ete myango ya kosalisa mobɛli kozanga kozongisama makila mizali mingi mpe Batatoli ya Yehova bandimaka yango na esengo nyonso.a

      Liboso mpenza, likita moko oyo esangisaki minganga ya etúká ya São Paulo, esilaki kondima etɛlɛmɛlo ya Batatoli ya Yehova. Na Yanúali 1995, ekateli ezwamaki ete soki mobɛli asepeli te na nkisi oyo monganga akomeli ye, azali na lotomo ya koboya yango mpe ya kopona monganga mosusu.

      Likambo ya esengo, ezali sikawa na bankama ya minganga na Brésil oyo bazali kondima kopesa nkisi kozanga kosalela makila epai na babɛli oyo bazali kosɛnga yango. Uta ntango likita esalemaki na Mársi 1995, boyokani kati na minganga, bazuzi, mpe Batatoli ya Yehova ekóli mingi. Na 1997, zulunalo ya minganga na Brésil, Âmbito Hospitalar, ebimisaki lisolo moko oyo elobelaki mingi kotosa lotomo ya Batatoli ya Yehova na ntina na makila. Eyebani sikawa bipai mingi, lokola yango elobamaki na lisangani ya minganga ya etúká ya Rio de Janeiro mpe ya etúká ya São Paulo ete, “mokumba ya monganga mpo na kobatela bomoi ya moto oyo ye azali kosalisa esengeli te koleka mokumba na ye ya kolóngisa lotomo oyo mobɛli azali na yango ya kopona nkisi.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto