Tómikundwela mikolo ya nsuka oyo Yesu alekisaki awa na mabelé
TOZALI na mokolo ya nsambo na sanza ya Nisana na manaka ya Bayuda, na mobu 33 T.B. Kanisá ete ozali komona makambo mazali koleka na Yudea, etúká oyo eyangelami na bokonzi ya Loma. Yesu Klisto na bayekoli na ye balongwe na Yeliko, engumba etondi na banzete ya nkasa mingi, bazali na mokakatano ya kotambola na nzela ya nyokanyoka etondi na mputulu ya mabelé. Bato mosusu mpe bazali kosala mobembo mpo na kokende na Yelusaleme na elambo ya Elekeli oyo esalemaka mbula na mbula. Nzokande, longola mokakatano ya kotambola na kobutáká ngomba, bayekoli ya Yesu bazali kokanisa makambo mosusu.
Bayuda bazali na mposa ya Masiya oyo akosikola bango na boombo na mabɔkɔ ya Baloma. Mingi bazali kondimela Yesu moto na Nazarete ete azali Mobikisi oyo bazalaki kozela uta kala. Eleki sikawa mbula misato na ndambo uta abandaki koloba na ntina na Bokonzi ya Nzambe. Asili kobikisa babɛli mpe aleisi bato oyo bazalaki na nzala. Ɛɛ, abɔndisi mpenza bato. Nzokande, bakonzi ya mangomba bazali na nkanda na lolenge Yesu azali kotɔndɔla polelepolele misala na bango mpe bazali na mposa makasi ya koboma ye. Kasi talá, ye wana azali kotambola na mpiko nyonso na nzela ya mabelé makasi liboso ya bayekoli na ye.—Malako 10:32.
Wana moi ezali kolala na nsima ya Ngomba ya Olive oyo ezali komonana liboso na bango, Yesu na baninga na ye bakómi na mboka Betania, epai bakolekisa mikolo motoba oyo mikolanda. Kuna, baninga na bango: Lasalo, Malia, mpe Malata bayambi bango. Na mpokwa wana, bazwi ntango ya kopema malamu nsima ya mobembo molai mpe, yango ezali ebandeli ya Sabata ya mokolo ya 8 Nisana.—Yoane 12:1, 2.
Mokolo ya 9 Nisana
Nsima ya Sabata, Yelusaleme etondi na makɛlɛlɛ ya bato. Ebele ya bato bauti bipai mosusu bayei na engumba yango mpo na Elekeli. Kasi yikiyiki oyo tozali koyoka sikawa ekeseni na oyo ezalaka na bambula mosusu na eleko oyo ya mobu. Ebele ya bato oyo balingi koyeba ntina ya yikiyiki yango bazali kobima na lombangu na banzela mikemike mpo na kokende na bikɔtelo ya engumba. Wana bazali koluka esika ya koleka katikati na ebele ya bato oyo batondi na bikɔtelo ya engumba, oyo nde likambo ya kokamwa bazali kokutana na yango! Ebele ya bato bazali kosepela wana bazali kokita na Ngomba ya Olive na nzela euti na mboka Betefage. (Luka 19:37) Likambo yango nini?
Talá! Yesu moto na Nazarete azali koya, amati likoló ya mwana ya mpunda. Bato bazali kotanda bilamba na bango na nzela liboso na ye. Basusu bazali kopɛpa mandalala mpe bazali konganga na esengo ete: “Ye oyo azali koya na nkombo na [Yehova] apambwama, ye Mokonzi na Yisalaele.”—Yoane 12:12-15.
Wana bibele bazali kobɛlɛma na Yelusaleme, Yesu atali engumba mpe ayoki mawa mingi na motema na ye. Abandi kolela, mpe tozali koyoka ye kosakola ete engumba yango ekobomama. Mwa moke nsima, ntango Yesu akómi na tempelo, ateyi bibele mpe abikisi bakufi miso mpe bimimi oyo bayei epai na ye.—Matai 21:14; Luka 19:41-44, 47.
Banganga bakonzi mpe bakomeli bamoni makambo oyo asali. Bazali na nkanda makasi na komona makambo ya kokamwa oyo Yesu azali kosala mpe lolenge bibele bazali kosepela! Bafalisai bakoki kobomba nkanda na bango te, bayebisi ye ete: “Molakisi, pamelá bayekoli na yo!” Yesu ayanoli bango ete: “Nalobi na bino ete soko baoyo bakozala nyɛ, mbɛ mabanga makonganga.” Liboso ete akende, Yesu amoni lolenge mombongo ezali kosalema kati na tempelo.—Luka 19:39, 40; Matai 21:15, 16; Malako 11:11.
Mokolo ya 10 Nisana
Yesu akómi na tempelo na ntɔngɔntɔngɔ. Lobi loleki, ayokaki nkanda mpenza na komona lolenge bato bazali kosalela losambo ya Tata na ye Yehova Nzambe mpo na mombongo na bango. Na yango, na molende nyonso, abandi kobengana baoyo bazali kosomba mpe kotɛkisa kati na tempelo. Na nsima, abaloli bamesa ya basombotani oyo batondi na lokoso mpe bakiti ya baoyo bazali kotɛkisa bibenga. Yesu alobi ete: “Ekomami ete Ndako na ngai ekobyangama ndako na kobondela, kasi bino boyeisi yango libulu na bayibi.”—Matai 21:12, 13.
Banganga bakonzi, bakomeli, mpe bato minene bazali koyina misala mpe mateya ya Yesu. Bazali na mposa makasi ya koboma ye! Kasi likoki ya kosala yango ezali te mpamba te bato bazali kokamwa na mateya ya Yesu mpe ‘bazali koyoka ye na mposa mingi.’ (Luka 19:47, 48) Lokola mpokwa ebɛlɛmi, Yesu na baninga na ye bazali kozonga na Betania mpo na kopema na butu.
Mokolo ya 11 Nisana
Tozali naino na ntɔngɔ mpenza, mpe Yesu na bayekoli na ye basimbi nzela mpe bazali koleka na Ngomba ya Olive mpo na kokende na Yelusaleme. Ntango bakómi na tempelo, banganga bakonzi mpe mikóló mosusu balingi kotyana ntembe na Yesu. Bazali naino komikundola likambo oyo asalaki na basombotani mpe batɛki na tempelo. Banguna na ye batuni ye na nkanda nyonso ete: “Ozali kosala makambo oyo na bokonzi nini? Nani apesi yo bokonzi oyo?” Yesu ayanoli ete: “Nakotuna bino mpe liloba moko, soko bokoloba na ngai, ngai mpe nakoyebisa bino na bokonzi nini nakosalaka makambo oyo. Libatisa na Yoane, euti wapi? Na likoló soko na bato?” Batɛmɛli yango basali likita mpe babandi kokanisa: “Soko tokoloba ete, Na likoló, akoloba na biso ete, Mpo na nini bondimaki ye te? Soko tokoloba ete, Na bato, tokobanga ebele zambi nyonso batángi ete Yoane azalaki mosakoli.” Lokola basuki, bayanoli na bolɛmbu ete: “Toyebi te.” Yesu azongiseli bango na kimya nyonso ete: “Ngai mpe nakoloba na bino te mpo na bokonzi bozali ngai kosala makambo oyo.”—Matai 21:23-27.
Sikawa, banguna ya Yesu balingi ete aloba likambo moko oyo bakozwa na yango libaku ya kokanga ye. Batuni ete: “Ebongi kofutela Kaisala mpako soko te?” Yesu azongiseli bango ete: “Monisá ngai mosolo na mpako.” Na nsima atuni ete: “Elilingi oyo mpe makomi oyo izali na nani?” Balobi ete: “Na Kaisala.” Yesu asukisi bango na kolobáká ete: “Pesá epai na Kaisala yango ezali na Kaisala mpe na Nzambe yango ezali na Nzambe.”—Matai 22:15-22.
Lokola akangisi banguna na ye monɔkɔ na kopesáká makanisi oyo makoki kobɛtɛlama ntembe te, na mpiko nyonso, Yesu amonisi sikawa mabe na bango liboso ya bibele mpe bayekoli na ye. Yoká wana azali kotɔndɔla bakomeli mpe Bafalisai na kozanga bobangi. Alobi ete: “Bósala mosala mokosalaka bango te. Zambi bakolobaka nde bakosalaka te.” Na mpiko nyonso, alakeli bango mabe mbala mingi, komonisáká ete bazali batambwisi bakufá miso mpe bakosi. Yesu alobi ete: “Banyoka, bana na bitupa! Bokokima nde ekweli na Geena boni?”—Matai 23:1-33.
Lolenge atɔndɔli bango polele emonisi te ete Yesu azali koyeba te malamu ya basusu. Na nsima, amoni bato bazali kotya mosolo na bibombelo ya mosolo na tempelo. Asimbami mpenza na motema na komona mobola moko, ye mwasi-mokufeli-mobali, atye mosolo nyonso oyo azalaki na yango mpo na kobikela—meya mibale oyo ezali na motuya moke mpenza! Yesu amonisi bosepeli mingi mpe alobi ete na solo mpenza, mwasi yango atye mingi koleka baoyo batyaki makabo mingi mauti “na mosolo molekaki na bango.” Na motema mawa na ye, Yesu azali mpenza kosepela na nyonso oyo moto azali kosala engebene makoki na ye.—Luka 21:1-4.
Sikawa, Yesu azali kobima na tempelo mpo na mbala ya nsuka. Bamoko kati na bayekoli na ye bazali kotala bonzenga na yango, ete “ekembisami na mabanga kitoko mpe na mbeka na ndai.” Bakamwi wana Yesu ayanoli ete: “Mikolo mikoya wana ekotikala libanga moko na likoló na libanga mosusu te, kasi makobwakama na nsé nyonso.” (Luka 21:5, 6) Wana bantoma bazali kolanda Yesu mpo na kobima na engumba oyo etondi na bato, bazali komituna soki maloba na ye malimboli nini.
Mwa moke na nsima, Yesu na bantoma na ye bafandi na esika ya kimya na Ngomba ya Olive. Wana bazali kotala na mosika Yelusaleme mpe tempelo na yango, Petelo, Yakobo, Yoane, mpe Andelea balingi kozwa ndimbola ya sikisiki na ntina na esakweli ya kokamwa oyo Yesu alobaki. Balobi ete: “Yebisá biso, nyonso oyo ekoya ntango nini mpe elembo na komonana na yo mpe nsuka na ekeke ekozala nini?”—Matai 24:3; Malako 13:3, 4.
Mpo na koyanola bango, Moteyi Monene apesi esakweli ya ntina mingi. Asakoli bitumba minene, koningana ya mabelé, nzala, mpe maladi. Lisusu, Yesu asakoli ete nsango malamu ya Bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba. Akebisi ete, “na nsima,” “ekozala na bolɔzi monene lokola emonana naino te uta ebandeli ya mokili kino sikawa, te, ekomonana lisusu te.”—Matai 24:7, 14, 21, NW; Luka 21:10, 11.
Bantoma yango minei bazali koyoka na likebi nyonso wana Yesu azali koyebisa makambo mosusu ya ‘elembo ya kozala na ye.’ Alobeli mingi ntina ya ‘kokɛngɛlaka.’ Mpo na nini? Alobi ete: “Mpo ete boyebi te soko Nkolo na bino akoya na mokolo nini.”—Matai 24:42; Malako 13:33, 35, 37.
Mokolo yango Yesu mpe bayekoli na ye bakoki kobosana yango te. Mpamba te, ezali mokolo ya nsuka oyo Yesu ateyi liboso ya bato mingi liboso ete akangama, asambisama, mpe abomama. Lokola mpokwa epusani, babandi kotambola mwa ntáká mokuse kino na Betania na nzela eleki katikati na ngomba.
Mokolo ya 12 mpe ya 13 Nisana
Yesu alekisi mokolo ya 12 Nisana na kimya elongo na bayekoli na ye. Ayebi ete bakonzi ya mangomba bazali na mposa makasi ya koboma ye, mpe alingi te ete bápekisa ye kolya Elekeli na mpokwa ya mokolo oyo ekolanda. (Malako 14:1, 2) Na mokolo yango, 13 Nisana, bato bazali na mosala mingi mpo na bibongiseli ya nsuka mpo na Elekeli. Na nsima ya nzánga, Yesu atindi Petelo na Yoane ete bákende kobongisela bango Elekeli na eteni ya likoló na ndako moko na Yelusaleme. (Malako 14:12-16; Luka 22:8) Mwa moke liboso ya kolala ya moi, Yesu na bantoma mosusu zomi balandi mpo na kolya Elekeli ya nsuka elongo na bango.
Mokolo ya 14 Nisana, nsima ya kolala ya moi
Moi kitoko ya mpokwa ezali kongɛngisa Yelusaleme wana sanza ezali kobima na mobimba na yango na nsima ya Ngomba ya Olive. Kati na eteni moko ya ndako oyo ezali na bisika mingi ya kofanda mpe bamesa, Yesu mpe bantoma 12 bafandi na mesa oyo etandami malamu. Alobi ete: “Nazalaki na mposa mingi na kolya Elekeli oyo na bino elongo, naino ezwi ngai mpasi te.” (Luka 22:14, 15) Mwa moke na nsima bantoma bakamwe ntango bamoni Yesu atɛlɛmi mpe atye elamba na ye na lipeka. Akamati esume mpe saani ya mai, abandi kosokola bango makolo. Oyo nde liteya ya komikitisa bakoki kobosana yango te!—Yoane 13:2-15.
Nzokande, Yesu ayebi ete moko kati na bango—Yuda Mokeliota—asilaki koyanga mwango ya kokaba ye epai ya bakonzi ya mangomba. Yango wana, na ntango yango Yesu ayoki mawa mingi. Ayebisi bango polele ete: “Moko kati na bino akokaba ngai.” Bantoma bayoki mawa mingi na likambo yango. (Matai 26:21, 22) Nsima ya kolya Elekeli, Yesu alobi na Yuda ete: “Yango ekosala yo, salá nokinoki.”—Yoane 13:27.
Ntango Yuda abimi, Yesu alakisi bilei mpo na kokanisa liwa na ye oyo ebɛlɛmi. Akamati limpa ezangi mfulu, asali libondeli mpo na kozongisa matɔ́ndi, akati yango, mpe ayebisi na bayekoli 11 ete bákabola yango kati na bango. Alobi ete: “Oyo [elimboli, NW] nzoto na ngai esili kopesama mpo na bino. Salá boye mpo na ekaniseli na ngai.” Na nsima, akamati kɔpɔ ya vinyo motane. Nsima ya kosala libondeli, alekisi kɔpɔ yango epai na bango, alobi na bango ete bámela yango. Yesu abakisi ete: “Oyo [elimboli, NW] makila na ngai na kondimana na sika masopameli bato mingi mpo na kolimbisa masumu.”—Luka 22:19, 20; Matai 26:26-28.
Na boumeli ya mpokwa wana ya ntina mingi, Yesu ateyi bayekoli na ye ya sembo makambo mingi ya ntina, mpe kati na makambo yango ateyi bango ntina ya bolingo mpo na bandeko. (Yoane 13:34, 35) Alaki bango ete bakozwa “mosungi,” elingi koloba elimo santu. Yango ekokundwela bango makambo nyonso oyo ayebisaki bango. (Yoane 14:26) Na kati ya butu, na ntembe te balendisami mingi na koyoka Yesu azali kosala libondeli ya mozindo mpo na bango. (Yoane, mokapo 17) Nsima ya koyemba nzembo ya masanzoli, balongwe na eteni ya likoló ya ndako mpe balandi Yesu na libándá kati na molili mpe kimya ya butu.
Yesu na bantoma na ye bakatisi Lobwaku ya Kedolono, bakei na esika moko oyo bazalaki kolinga mingi, elanga ya Getesemane. (Yoane 18:1, 2) Wana bantoma bazali kozela, Yesu apusani mwa mosika mpo na kobondela. Mpasi azali na yango na mayoki ekoki kolimbolama na maloba te wana azali kosɛnga na etingya ete Nzambe asunga ye. (Luka 22:44) Ezali kosala ye mpasi mingi na kokanisa ete soki alongi te, yango ekobwaka nsɔni likoló ya nkombo ya Tata na ye ya bolingo oyo azali na likoló.
Yesu auti kosilisa kobondela mpe talá, Yuda Mokeliota azali koya na bibele bamemi mipanga, banzete, mpe miinda. Yuda alobi ete: “Mbote, Labi!” mpe apɛpwi ye. Oyo ezali elembo mpo na kolakisa Yesu epai ya bato oyo bakokanga ye. Na mbala moko, Petelo abɛti na mopanga na ye mpe akati litoi ya moombo ya nganga monene. Yesu azongisi litoi ya moto yango mpe alobi ete: “Zongisá mopanga na yo na esika na yango. Zambi baoyo nyonso bakosimba mopanga bakokufa na mopanga.”—Matai 26:47-52.
Makambo masalami nokinoki! Bakangi Yesu mpe bazingi ye bansinga. Kati na bobangi mpe mobulungano, bantoma basundoli Nkolo na bango mpe bakimi. Bamemi Yesu epai na Ana, oyo azalaká kala nganga monene. Na nsima bamemi ye epai ya Kayafa, oyo azali sikawa nganga monene, mpo na kosambisa ye. Na ntɔngɔ, Sanedrina ekweisi Yesu na bifundeli ya lokuta ete azali motuki. Na nsima, Kayafa atindi ye epai ya moyangeli Moloma Ponto Pilata. Pilata atindi Yesu epai ya Elode Akalipa, moyangeli ya Galilai. Elode mpe bakɛngɛli na ye batyoli Yesu. Na nsima bazongisi ye epai ya Pilata. Pilata amoni ete Yesu asali likambo te. Kasi bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazali kopusa ye ete akatela Yesu etumbu ya liwa. Nsima ya kofinga mpe kobɛta ye, bakei na Yesu na Gologota epai kuna, na kozanga mpenza mawa nyonso, bakakisi ye na nzeté mpe akufi nsima ya konyokwama makasi.—Malako 14:50–15:39; Luka 23:4-25.
Elingaki kozala likama lileki monene na lisolo ya bato soki Yesu akufaki mpo na libela. Kasi, likambo ya esengo, esalemaki bongo te. Na mokolo ya 16 Nisana ya mobu 33 T.B., bayekoli na ye bakamwaki na komona ete asilaki kosekwisama kati na bakufi. Na nsima, bato koleka 500 bakokaki komona na miso na bango moko ete Yesu azongaki na bomoi. Mpe mikolo 40 nsima ya lisekwa na ye, etuluku moko ya bayekoli ya sembo bamonaki ye komata na likoló.—Misala 1:9-11; 1 Bakolinti 15:3-8.
Bomoi ya Yesu mpe yo
Makambo oyo matali yo na nini—ɛɛ, matali biso nyonso na nini? Mosala ya Yesu, liwa na ye, mpe lisekwa na ye ezali kokumisa Yehova Nzambe mpe ezali na ntina mingi kati na kokokisama ya mokano monene na Ye. (Bakolose 1:18-20) Ezali na ntina mingi epai na biso na ndimbola oyo ete masumu na biso makoki kolimbisama na moboko ya mbeka ya Yesu mpe na bongo mokomoko na biso akoki kozala na boyokani elongo na Yehova Nzambe.—Yoane 14:6; 1 Yoane 2:1, 2.
Ata bato oyo basilá kokufa, bango mpe batalelami. Lisekwa ya Yesu efungweli bango nzela mpo na kozongisama na bomoi na mabelé oyo Nzambe alakaki ete makobongwana Paladiso. (Luka 23:39-43; 1 Bakolinti 15:20-22) Soki olingi koyeba bandimbola mosusu mpo na makambo yango, tobyangi yo ete ozala na Ekaniseli ya liwa ya Klisto na mokolo ya 11 Apríli 1998, na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova oyo ezali pene na esika oyo ofandaka.
[Etanda na lokasa 6]
“Libulu na bayibi”
YESU azalaki na elonga ya koloba ete bato ya mombongo ya lokoso bakómisaki tempelo ya Nzambe “libulu na bayibi.” (Matai 21:12, 13) Mpo na kofuta mpako ya tempelo, Bayuda na baprozelite oyo bazalaki kouta na bikólo mosusu basengelaki kosombitinya mosolo na bango mpo na kozwa mosolo oyo ezalaki kosalelama na Yelusaleme. Kati na buku na ye The Life and Times of Jesus the Messiah (Bomoi mpe eleko ya Yesu Masiya), Alfred Edersheim alimboli ete basombotani bazalaki kobanda mombongo na bango na bitúká na mokolo ya 15 Adala, sanza moko liboso ya Elekeli. Kobanda na mokolo ya 25 Adala, bazalaki kokende zingazinga ya tempelo na Yelusaleme mpo na kosala mombongo malamu mpamba te ebele ya Bayuda mpe baprozelite bazalaki kokende kuna. Bato ya mombongo bazalaki kozwa matomba mingi, mpamba te bazalaki kosɛnga mwa matabisi na bango na likuta mokomoko oyo basombitinyi. Likambo oyo ete Yesu abéngaki bango bayibi emonisi ete mbongo oyo bazalaki kosɛnga ezalaki mingi koleka, na boye ete tokoki koloba ete bazalaki kobɔtɔla mbongo ya babola.
Bato mosusu bazalaki na likoki te ya komema nyama na bango moko mpo na kopesa mbeka. Moto na moto oyo amemi nyama na ye asengelaki koleka na yango epai ya kapita moko kuna na tempelo mpo ete atala yango—mpo na yango asengelaki kofuta mbongo. Mpo na kobanga ete mbala mosusu nyama oyo bauti na yango mosika ekoboyama, mingi bazalaki kosomba nyama oyo “endimami” na Balevi epai ya batekisi baalingá kanyaka kuna na tempelo. Nganga-mayele moko ya Biblia alobi ete: “Mbala mingi bazalaki kosɛnga mosolo mingi na babola oyo bazalaki kouta na mboka.”
Ezali na bilembeteli bimonisi ete Anna, nganga monene ya kala, mpe libota na ye bazalaki kozwa litomba epai na bato ya mombongo na tempelo. Makomi ya Balabi mazali kolobela “zando ya bana ya Anna [na tempelo].” Mosolo oyo bazalaki kozwa epai ya basombotani ya mosolo mpe batɛkisi ya nyama kati na lopango ya tempelo ezalaki moko ya biutelo monene ya bozwi na bango. Nganga-mayele moko ya Biblia alobi ete likambo oyo Yesu asalaki na kopanzáká batɛkisi “ezalaki na mokano ya kolongola bobele lokumu ya banganga te kasi lisusu libenga na bango.” Ata soki ezalaki mpo na ntina nini, ntembe ezali te ete banguna na ye balingaki koboma ye!—Luka 19:45-48.
[Etanda na lokasa 4]
Mikolo ya nsuka ya bomoi ya Yesu lokola moto
Nisana mobu 33 T.B. Makambo Moto oyo alekaki bato nyonso*
7 Mwamitano Yesu na bayekoli na ye bazali 101, par. 1
kosala mobembo longwa na Yeliko
kino Yelusaleme (7 Nisana ekokani
na Mwalomingo, 5 Apríli 1998, atako
mikolo ya Baebele mizalaki kobanda
na mpokwa ya mokolo kino na mpokwa
ya mokolo oyo ekolanda)
8 Mwamitano na mpokwa Yesu na bayekoli na ye bakómi 101,
na Betania; Sabata ebandi pars. 2-4
Mwapɔsɔ Sabata (Mwayambo, 6 Apríli 1998) 101, par. 4
9 Mwapɔsɔ na mpokwa Balei elongo na Simona moto 101,
na maba; Malia apakoli Yesu pars. 5-9
malasi; bato mingi bauti na
Yelusaleme mpo na kotala mpe
koyoka Yesu
Mwalomingo Bokɔti ya nkembo na Yelusaleme;
ateyi na tempelo 102
10 Mwayambo Mobembo ya ntɔngɔntɔngɔ na 103, 104
Yelusaleme; apɛtoli tempelo; Yehova
alobi uta na likoló
11 Mwamibale Na Yelusaleme, ateyi kati na 105 kino 112,
tempelo na nzela ya masese; par. 1
akweisi Bafalisai; amoni likabo
ya mwasi-mokufeli-mobali; apesi
elembo ya kozala na ye
12 Mwamisato Alekisi mokolo na kimya elongo na 112,
bayekoli na ye na Betania; Yuda
ayangi mwango ya kokaba ye
pars. 2-4
13 Mwaminei Petelo na Yoane babongisi Elekeli 112,
na Yelusaleme; Yesu na bantoma par. 5 kino
mosusu zomi balandi na mpokwa 113, par. 1
(Mwapɔsɔ, 11 Apríli, 1998)
14 Mwaminei na mpokwa Elambo ya Elekeli; Yesu asukoli 113,
makolo ya bantoma; Yuda abimi par. 2
mpo na kokaba Yesu; Klisto abandisi kino 117
Ekaniseli ya liwa na ye (Nsima
ya kolala ya moi, Mwapɔsɔ,
11 Apríli 1998)
Nsima ya midi ya butu Akabami mpe bakangi ye 118 kino 120
na elanga ya Getesemane;
bantoma bakimi; asambisami liboso
ya banganga bakonzi mpe Sanedrina;
Petelo awangani Yesu
Mwamitano banda Akei lisusu liboso ya Sanedrina; 121 kino
ntɔngɔ epai ya Pilata, na nsima kolala 127,
ya moi epai ya Elode, mpe azongi
lisusu epai ya Pilata; bakateli ye
etumbu ya liwa; bakakisi ye na nzete; par. 7
akundami
15 Mwapɔsɔ Sabbath; Sabata; Pilata apesi ndingisa 127,
ete bákɛngɛla nkunda ya Yesu pars. 8-10
16 Mwalomingo Yesu asekwisami 128
* Mituya mipesami awa mizali kolakisa mikapo kati na buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Talá buku “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba,” lokasa 290 mpo na etanda ezali na makambo mingi mauti na Makomami na ntina na mosala ya nsuka ya Yesu. Babuku yango ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.