Tokozala ntango nyonso na mposa ya basoda?
MOSALA ya soda esilisi bato mingi mpe ebebisi mpenza esengo ya bato. Yango wana, bato mosusu bamitunaka ete: ‘Bato bakolonga kosala mokili oyo ebatelami mpe kosala ete basoda bazala lisusu te?’ Likambo yango esengeli kotalelama nokinoki, mpamba te, sikawa ezali na mandoki oyo ekoki kolimwisa lolenge nyonso ya bomoi awa na mabelé. Tokoki nde kolikya kozwa mokili oyo ezangi basoda?
Makambo mingi maleká mandimisi ete ntango mikili eyokani malamu mpe bakómi kotyelana motema, yango ekoki komema bango na kotika kosalela mandoki. Na ndakisa, boyokani oyo ezali kati na ekólo Canada mpe ekólo États-Unis, esalaki ete ndelo ya ntaka ya kilomɛtɛlɛ 5 000 oyo ekaboli mikili yango ebatelama na basoda te na boumeli ya koleka ekeke moko na ndambo. Ekólo Norvège mpe ekólo Suède basalaki mpe boyokani motindo wana, mpe ezali bongo mpo na bikólo mosusu. Boyokani kati na bikólo ekolonga kobimisa mokili oyo ezangi basoda? Mpo na nsɔmɔ oyo Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebimisaki, bato mingi basepelaki na likanisi yango.
Ntango kimya ekɔtaki na mobu 1918, moko na mikano ya boyokani ebéngami Traité de Versailles, ezalaki bongo “kokitisa motángo ya bibundeli kati na bikólo nyonso.” Na boumeli ya bambula oyo elandaki, likanisi babéngi pacifisme (kolendisa kimya) epalanganaki mingi. Baalingá-kimya (pacifistes) balobaki ete etumba ezali eloko eleki mabe oyo ekoki kokwela ekólo moko mpe yango ezali mabe koleka soki balongi bino. Banguna ya kimya bandimaki likanisi yango te, komonisáká ete na boumeli ya bikeke, Bayuda na bingumba minene batyaki bobele basoda moke mpo na kotɛmɛla banguna oyo bazalaki kotumola bango, kasi, myango mabe mpo na kosilisa bango ekobaki. Bana ya Afrika bazalaki na likoki mingi te mpo na kotɛmɛla baoyo bazalaki komema bango na boombo na Amerika, kasi banyokwamaki makasi na boumeli ya bikeke.
Nzokande, ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki, baalingá-kimya mingi bandimaki ete bikólo bisengeli komibatelaka. Na yango, ntango Mabota Masangani (O.N.U.) esalamaki nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, balobelaki moke likambo ya kotika kosalela mandoki, mpe balobelaki mingi boyokani kati na mikili mingi mpo na kokeba na banguna. Basangani ya O.N.U., balikyaki ete libateli oyo ekozwama na nzela wana ekopesa bikólo elikya mpo na kosundola mandoki.
Likambo mosusu ebandaki komonana polele. Mbala mingi, milende oyo ekólo moko ezali kosala mpo na libateli na yango ezali kopesa bikólo ya zingazinga liyoki ete bazangi libateli. Likambo yango ememaki mabota na konduka mandoki. Kasi mikolo miuti koleka, boyokani oyo ezali kokola kati na mabota mingi elendisaki elikya ya kosundola mandoki. Nzokande, uta ntango wana, etumba ya Golfe persique, mpe mobulu na ex-Yougoslavie ebebisaki bilikya ya kosundola mandoki mpo na bikólo mingi. Esili koleka soko mbula mitano, zulunalo Time elobaki ete: “Atako kowelana kati na banguya minene ya mokili (Guerre froide) esili, mokili ekómi na esika oyo likama eleki, na esika ete likama yango ekita.”
Mposa ya “polisi” moko mpo na mokili mobimba
Bato mingi balobi ete mokili ezali na mposa ya boyangeli moko oyo basoda na yango bazali na bibundeli ya makasi mpo na kobatela ekólo mokomoko na mokili mobimba. Lokola Mabota Masangani (O.N.U.) to banguya minene oyo ezali na basoda ya makasi oyo etambwisaka mokili ekoki te kosala yango, bamosusu bamoni ete elikya ezali te mpo na mikolo mizali koya. Kasi soki ondimaka ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe, okoki komituna soki Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso akokokisa bosɛnga oyo tozali na yango sikawa.
Ye oyo Biblia ezali kobénga “Nzambe na bolingo mpe na kimya” akosalela nde nguya ya basoda mpo na kolongisa boyengebene? Soki ezali bongo, basoda oyo wapi? Lelo oyo, mampinga ya basoda mingi elobaka ete basungami na Nzambe, kasi bazali nde kosala mokano ya Nzambe? To Nzambe azali nde na motindo mosusu ya kosala mpo na kotya kimya mpe libateli?—2 Bakolinti 13:11.
Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso abenganaki batomboki ya liboso Adama na Eva na Edene mpe atyaki bakeluba mpo ete bápekisa bango kozonga kuna. Asakolaki lisusu ete akosilisa botomboki nyonso nyɛɛ liboso na boyangeli na ye. (Genese 3:15) Yango elingi koloba ete Nzambe akosalela basoda?
Biblia ezali kolobela mabaku oyo Nzambe asalelaki mampinga ya basoda mpo na kokokisa bikateli na ye. Na ndakisa, bakonzi ya mokili ya Kanana bazalaki kosangisa nzoto na banyama, kokaba bana lokola mbeka, mpe kobundisa baninga. Nzambe alobaki ete bakobomama nyɛɛ mpe asalelaki basoda ya Yosua mpo na kopesa etumbu yango. (Deteronome 7:1, 2) Bobele bongo, basoda ya Mokonzi Davidi bakokisaki ekateli ya Nzambe likoló na Bafilisitia lokola ndakisa ya lolenge Nzambe akoboma basali na mabe nyonso na mokolo ya nsuka na lisambisi na ye.
Makambo wana mapesaki liteya. Yehova amonisaki ete akoki kosalela basoda mpo na kopesa bato libateli. Kutu, Yehova azali na lolenge moko ya limpinga ya basoda bakokani na mosusu te oyo bakosilisa botomboki liboso ya boyangeli na ye na molɔ́ngɔ́ mobimba.
“Yehova na bibele”
Biblia ezali kosalela elobeli “Yehova na bibele” koleka mbala 250. Elobeli yango ezali mpenza kotalela etɛlɛmɛlo ya Nzambe lokola mokonzi aleki bonene na mampinga minene ya baanzelu. Na libaku moko mosakoli Mikaya alobaki na Mokonzi Ahaba mpe na Mokonzi Yosafata ete: “Namoni [Yehova] oyo afandi na kiti na ye na bokonzi mpe [mampinga, NW] nyonso na lola batɛlɛmi na lobɔkɔ na ye na mobali mpe na lobɔkɔ na ye na mwasi.” (1 Mikonzi 22:19) Mampinga oyo malobelami awa ezali baanzelu. Yehova asalelaki basoda wana mpo na kobatela bato na ye. Ntango bazingaki engumba Dotani, mosungi ya Elisa abungisaki elikya. Nzokande, mpo na kopesa ye lisusu elikya, Nzambe alakisaki ye na emonaneli basoda na ye oyo bazali bikelamu ya elimo. “[Yehova] afungolaki miso na elenge mpe amonaki. Talá, ngomba etondaki na mbalata mpe makalo na mɔ́tɔ.”—2 Mikonzi 6:15-17.
Makambo motindo oyo malimboli ete Nzambe azali kosunga basoda lelo oyo? Basoda mosusu ya mikili ya boklisto bakoki koloba ete bazali basoda ya Nzambe. Mingi basɛngaki na bakonzi ya mangomba ete bápambola bango. Kasi mbala mingi basoda ya mikili ya boklito babundaka bango na bango, babundisaka baninga na bango bandimi. Bitumba mibale ya mokili mobimba na ekeke oyo ebandaki kati na basoda oyo balobaki ete bazali boklisto. Yango ekoki kozala mosala ya Nzambe te. (1 Yoane 4:20) Atako mampinga ya basoda yango bakoki koloba ete bazali kobundela kimya, Yesu ateyaki bayekoli na ye ete bábongisa basoda motindo oyo mpo ete kimya ebebisama te kati na mokili?
Kobebisa boyokani ya kimya emonanaki ntango ebele ya bato oyo bazalaki na bibundeli bakangaki Yesu na elanga epai azalaki kosambela elongo na bayekoli na ye. Moko na bayekoli abɛtaki moto moko na mopanga kati na ebele ya bato. Yesu asalelaki libaku yango mpo na kolimbola etinda moko ya ntina. Alobaki ete: “Zongisá mopanga na yo na esika na yango. Zambi baoyo nyonso bakosimba mopanga bakokufa na mopanga. Okanisi te ete nakoki kobondela Tata na ngai te mpe ye akotindela ngai pwasa koleka [mampinga, NW] zomi na mibale na [baanzelu, NW]?” Yesu azalaki na ebele ya basoda oyo azalaki kokamba, kasi Petelo atángamaki te lokola moko na basoda yango, ata moto mosusu te kati na bato. Nzokande, Petelo mpe bayekoli mosusu ya Yesu babéngamaki mpo ete bázala “balɔbi na bato.” (Matai 4:19; 26:47-53, NW) Mwa ntango moke na nsima, Yesu amonisaki likambo yango polele epai na Pilata. Alobaki ete: “Bokonzi na ngai ezali na mokili oyo te. Soko bokonzi na ngai ezalaki na mokili oyo, mbɛ babili na ngai bakobunda ete nakabama epai na Bayuda te. Nde bokonzi na ngai euti na awa te.” (Yoane 18:36) Na bokeseni na bokonzi ya Davidi oyo ezalaki na mabelé, Bokonzi oyo Nzambe apesi na mabɔkɔ ya Yesu ezali na likoló mpe ekotya kimya na mabelé.
Basoda ya Nzambe bakei etumba
Mosika te, basoda ya Nzambe bakobanda etumba. Kolobeláká kondongbana oyo ezali koya, Emoniseli ezali kobénga Yesu “Liloba na Nzambe.” Tozali kotánga ete: “Bibele na babundi na likoló bazali kobila ye, bafandi na bambalata mpɛmbɛ, balati bilamba pɛtɛpɛtɛ, mpɛmbɛ, pɛto. Na monɔkɔ na ye mopanga na kopela ebimi na ntina ete abola mabota nyonso.” Biblia elobi ete etumba yango ekosuka na kobomama ya “bakonzi na mokili na bibele na babundi na bango.” Mpo na bamosusu oyo bakomonisa bosembo epai na Nzambe te, esakweli ebakisi ete: “Baoyo batikalaki babomami na mopanga na Mofandi na mbalata.” Ata Satana akokangama. Ya solo, yango ekopesa nzela na mokili ya kimya oyo ezangi basoda.—Emoniseli 19:11-21; 20:1-3.
Kanisá naino mokili ezangi etumba
Okoki komona na miso ya makanisi mokili ezali na libateli mpenza na boye ete ntina ya basoda ezali te? Nzembo moko kati na Biblia elobi ete: “Yaká kotala misala na [Yehova] oyo asali bikamwiseli kati na mokili. Ye akosukisa bitumba kino nsuka na mokili.”—Nzembo 46:8, 9.
Ekozala solo kosikwama! Kanisá naino makoki oyo bato bakozala na yango ya kolongwa na bozito ya mpako mpo na kofuta basoda mpe kosomba bibundeli na bango! Bato bakosalela makoki na bango na koyeisáká bomoi kitoko mpo na moto nyonso, na kopɛtoláká mabelé mpe na kolonáká na yango lisusu. Mabaku ya kosala biloko ya sika oyo ekozala mpenza na litomba mpo na bato ekozala.
Elaka oyo ekokokisama na mokili mobimba: “Mobulu ekoyokana lisusu kati na mokili na yo te, kobebisama to kopunzama kati na ndelo na yo te.” (Yisaya 60:18) Bamilio ya bato bakokima lisusu bisika ya etumba te, kotikáká bongo bandako mpe biloko na bango mpo na kozala na bomoi ya bwale kati na bakáa ya bato bakimá mboka. Bato bakolela lisusu te mpo ya balingami na bango oyo babomami to babungisi binama mosusu ya nzoto na matata kati na bikólo. Mokonzi ya likoló oyo Yehova aponi akotya kimya oyo ekoumela seko na mokili mobimba. “Na mikolo na ye, moyengebene akozala na makila malamu; kimya mpe ekoyikana na ntango nyonso ekoumelaka sanza. Akosikola milimo na bango na kati na konyokola mpe na kongala.”—Nzembo 72:7, 14.
Likambo lileki kosepelisa ekozala bongo bomoi kati na bato oyo basili koyekola kolinga baninga, mpe kasi lisusu bayekoli komekola banzela ya Nzambe oyo etondi na bolingo. Liloba ya Nzambe ezali kosakola ete: “Bakoyokisana mpasi te, bakobebisana mpe te na ngomba mobimba na bulɛɛ na ngai; zambi mokili ekotonda na boyebi na [Yehova] lokola mbonge ekozipaka mai-na-monana.” Kofanda kati na bato oyo bayebi mpe balingaka Yehova ekozala lolenge nini? Bobele mokanda yango ezali kosakola ete: “Mosala na boyengebene ekozala kimya mpe nsuka na boyengebene ekozala kimya mpe kondima libela. Bato na ngai bakofanda na efandelo na kimya na bifandelo na solo mpe na ndako na bolɔzi te.”—Yisaya 11:9; 32:17, 18.
Bato oyo kondima na bango etongami likoló na boyebi ya Biblia bazali kososola ete mampinga ya basoda ya Nzambe ebongisami mpo na kopɛtola mabelé mpe kolongola banguna nyonso ya kimya. Boyebi oyo ezali kopesa bango elikya ya kosala makambo Biblia elobi ete “ekozala na mikolo na nsuka.” Elingi koloba: “Bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makɔnga na bango ete mázala bikateli na matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.”—Yisaya 2:2-4.
Bato ya mabota mingi oyo basili kokóma Batatoli ya Yehova ‘bayekolaka etumba’ lisusu te. Batye elikya na bango na libateli ya basoda ya Nzambe oyo bazali na likoló. Soki okoyekola Biblia elongo na bango, yo mpe okoki kolona elikya motindo wana.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 28]
U.S. National Archives photo