Kamatá bibongiseli uta sikawa mpo na balingami na yo
LISOLÓ ya Annie, ebimaki na mikolo mileki na zulunalo moko na Afrika, ezali kopesa mawa. Mobali ya Annie azalaki moto ya mombongo. Mobali yango akufaki na 1995, atikaki mituka 15, mosolo mingi na babánki; mosolo soko dolare 4 000 na ndako; magazini moko; nganda ya masanga; mpe ndako moko ya biteni misato ya kolala. Kasi eloko oyo ye atikaki te ezali bongo testamá.
Balobaki ete sɛmɛki ya Annie (ya mobali), abɔtɔlaki biloko nyonso na mbongo mpe abenganaki Annie na bana na ye motoba na ndako. Annie atikalaki mabɔkɔ mpamba, sikawa na bana na ye motoba bazali kofanda epai ya yaya na ye ya mobali. Bana minei basilaki kolongolama na kelasi, mpamba te mbongo mpo na kofutela bango kelasi mpe kosombela bango bilamba ya kelasi ezali te.
Annie afundaki likambo yango na esambiselo, oyo ekataki ete basengeli kozongisela ye mwa ndambo ya biloko, na motuka moko. Kasi bazongiselaki ye eloko moko te. Asengelaki kozonga lisusu na esambiselo mpo na kozwa mokanda oyo mokosɛngisa sɛmɛki na ye na makasi ete atosa ekateli ya esambiselo.
Mpo na nini kokanisa liwa?
Lisoló ya Annie ezali komonisa likambo oyo ekoki kobima soki tata ya libota azwi bibongiseli te liboso ete akoka kokufa mokolo moko to mosusu. Na liwa, bato nyonso “bakotika biloko na bango epai na bamosusu.” (Nzembo 49:10) Lisusu, bakufi bakoki koloba eloko te likoló na makambo oyo ekómelaka biloko na bango. (Mosakoli 9:5, 10) Mpo na kozala na likambo ya koloba likoló na biloko na ye, moto asengeli kobongisa makambo liboso ete akufa.
Atako biso nyonso toyebi ete tokoki kokufa na ntango oyo tokanisaki te, mingi bazwaka bibongiseli te mpo na balingami na bango oyo bakotikala na bomoi. Atako lisoló na biso ekotalela mingi mwa ndambo ya bizaleli ya bituluka mosusu ya Afrika, makambo motindo yango mazali kosalema bipai mosusu na mokili.
Kozwa bibongiseli mosusu na ntina na biloko na yo soki okufi, ezali likambo etali moto ye moko. (Bagalatia 6:5) Kasi, moto akoki kotuna ete: ‘Ntango mobali azali naino na bomoi azali kokokisa bamposa ya mwasi na ye mpe ya bana na ye kasi mpo na nini akozwa bibongiseli te ete bátikala malamu soki ye akufi?’ Ntina monene ezali ete bato mingi balingaka te kokanisa ete bakoki kokufa mokolo mosusu, na koleka balingaka soko moke te kozwa bibongiseli na ntina na liwa. Ya solo, tokoki te koyeba mokolo ya liwa na biso, lokola Biblia elobi: “Boyebi makambo na lobi te. Bomoi na bino ezali nini? Bozali bobele londende, komonana mwa ntango moke na nsima kolimwa.”—Yakobo 4:14.
Kozwa bibongiseli na koyebáká ete mokolo mosusu tokokufa ezali likambo ebongi kosala. Yango ezali mpe komonisa ete tozali na bolingo mpe tomibanzabanzaka mpo na baoyo bakotikala na bomoi. Soki tokobongisa makambo na biso te, bato mosusu bakosala yango. Mbala mosusu bato oyo toyebanaki na bango te bakozwa bikateli likoló na biloko na biso mpe likoló ya lolenge oyo tokokundama. Na bamboka mosusu, soki moto oyo akufi atiki testamá te, Letá nde azwaka ekateli soki nani akozwa mosolo to biloko ya moto oyo akufi. Na bisika mosusu, bandeko ya libota ya mosuni nde bakozwa ekateli, mpe mbala mingi bikateli yango ebendaka koswana oyo ememaka makaneli kati na libota. Lisusu, bikateli oyo bato mosusu bakozwa ekoki kokesana mosika na oyo biso tolingaki.
Likambo ya kobɔtɔla biloko
Mwasi ayokaka mpasi mingi ntango mobali na ye akufi. Longola mpasi ya kobungisa molingami na ye, mbala mingi babɔtɔlaka ye biloko oyo mobali na ye atiki. Yango emonisamaki na lisoló ya Annie. Moko na bantina oyo babɔtɔlaka biloko ezali bongo lolenge oyo mwasi atalelamaka. Na bonkɔkɔ mosusu mwasi ya libala atalelamaka te lokola mosangani ya libota ya mobali. Azali lokola mopaya oyo akoki, na ntango moko to mosusu, kozonga na libota na ye to akoki lisusu kobala na libota mosusu. Nzokande, bandeko ya mobali, bázala mibali, basi, to baboti na ye bakokabwana na ye soko moke te. Soki akufi, bandeko ya libota na ye bamonaka ete biloko na ye ekómi ya bango, kasi ya mwasi to ya bana na ye te.
Mobali oyo ayebisaka mwasi na ye basɛkɛlɛ́ te azali kolendisa makanisi motindo wana. Mike azalaki koyebisa makambo na ye ya mombongo bobele na bandeko na ye ya mibali. Bayebaki bozwi na ye nyonso, kasi mwasi na ye ayebaki makambo moke na ntina na mombongo na ye. Ntango akufaki, bandeko na ye bayaki epai ya mwasi na ye mpe batunaki mbongo oyo mobali na ye alingaki kozwa epai ya moto moko oyo azalaki na nyongo na ye. Ye ayebaki ata eloko moko te na likambo yango. Na nsima, babɔtɔlaki bamasini ya fɔtɔkopi mpe bamasini ya kokoma mikanda oyo mobali na ye asombelaki ye. Na nsuka, bandeko ya mobali na ye babɔtɔlaki ndako mpe biloko nyonso bizalaki na kati. Babenganaki mwasi-mokufeli-mobali yango elongo na mwana na ye ya mwasi, ya moke, bakendaki sé na bilamba na bango ya kolata.
“Bango mibale bakozala mosuni moko”
Mibali baklisto balingaka basi na bango mpe batalelaka bango ete babongi kotyelama motema. Mibali motindo yango bazali kolanda toli oyo ya Makomami: “Ekoki na babali ete bálinga basi na bango lokola nzoto na bango mpenza.” Mibali yango bazali mpe kotosa maloba oyo mapemami na Nzambe ete: “Moto akotika tata mpe mama mpe akomibakisa na mwasi na ye mpe bango mibale bakokóma bobele moko.”—Baefese 5:28, 31.
Mibali oyo babangaka Nzambe bazali mpe kondima oyo ntoma moklisto Paulo akomaki: “Soko moto nani akoleisa bato na ye te mpe na koleka bato kati na ndako na ye moko te, asili koboya bindimeli mpe aleki mabe moto oyo azangi kondima.” (1 Timoté 5:8) Na boyokani na etindá oyo, soki mobali moklisto alingi kosala mobembo molai, akokamata bibongiseli ete bamposa ya libota na ye ekokisama malamu na nsima na ye. Bobele bongo, ezali likambo ya mayele ete azwa bibongiseli mpo na mwasi mpe bana na ye soki akufi, boye te? Ezali malamu mpe lisusu ezali elembo ya bolingo mpo na bato oyo olingaka soki okomibongisa mpo na likama oyo ekoki kobima na ntango oyo ekanami te.
Mimeseno ya kolela mpe kokunda ebembe
Mpo na mibali baklisto ezali na likambo mosusu oyo basengeli kotalela. Longola mpasi oyo mwasi-mokufeli-mobali ayokaka mpo na liwa ya mobalani na ye, kobɔtɔlama ya biloko, mpe mbala mosusu kobɔtɔlama ata mpe ya bana, bikólo mosusu bisɛngisaka mwasi na makasi ete atosa bonkɔkɔ mpo na oyo etali kosala matánga. Zulunalo The Guardian ya ekólo Nigeria elobi ete na bikólo mosusu, bonkɔkɔ esɛngisaka na mwasi-mokufeli-mobali ete alala na eteni moko ya ndako ya molili na ebembe ya mobali na ye. Na bisika mosusu, basi-bakufeli-mibali bapesameli nzela te ya kobima libándá ya ndako na boumeli ya eleko ya matánga oyo eumelaka soko sanza motoba. Na boumeli ya eleko wana, bakoki kosukola nzoto te, ata kosukola mabɔkɔ liboso to nsima ya kolya epekisami.
Mimeseno motindo oyo ebimisaka mikakatano, mpenzampenza mpo na basi-bakufeli-mibali oyo bazali baklisto. Mposa na bango ya kosepelisa Nzambe ezali kopusa bango na koboya mimeseno oyo mizali koyokana te na mateya ya Biblia. (2 Bakolinti 6:14, 17) Nzokande, lokola akotosa bonkɔkɔ wana te, mwasi-mokufeli-mobali akoki konyokolama. Akoki ntango mosusu kokima mpo na kobatela bomoi na ye.
Zwá bibongiseli engebene mibeko ya Letá
Biblia ezali koloba na mayele nyonso ete: “Makanisi na bato na mosala makozwisa biloko mingi.” (Masese 21:5) Bibongiseli nini tata ya libota akoki kozwa? Na bikólo mingi bakoki kosala testamá to kokoma mokanda oyo ekomonisa lolenge biloko ya moto bikokabolama soki akufi. Kati na yango akoki mpe komonisa bibongiseli oyo bisengeli kotosama na ntango bakolela ebembe na ye. Mokanda ekomonisa lisusu na bosikisiki makambo mobalani oyo atikali na bomoi akosala (to oyo akosala te), na oyo etali mimeseno ya kolela ebembe mpe ya kosala matánga.
Mwasi moko na nkombo Leah akufelaki mobali na 1992. Alobi boye: “Nazali na bana mitano—minei ya basi mpe moko ya mobali. Mobali na ngai azalaki na maladi na boumeli ya mwa ntango liboso ete akufa. Kasi ata liboso ete abanda kobɛla, akomaki testamá oyo emonisaki ete alingaki biloko na ye etikala na ngai mpe na bana na biso. Yango etalelaki mbongo ya assurance, bilanga, ebokwelo ya bibwele, mpe ndako. Atyaki sinyatili na testamá mpe apesaki ngai yango. . . . Nsima ya liwa ya mobali na ngai, bandeko na ye balingaki kozwa biloko oyo atikaki. Nayebisaki bango ete mobali na ngai asombaki bilanga na mosolo na ye moko mpe bazalaki na lotómo te ya kozwa ata eloko moko. Ntango bamonaki testamá oyo akomaki, bandimaki yango.”
Sololá makambo yango na bandeko na yo
Mikakatano mikoki kobima soki moto ayebisaka te bindimeli na ye mpe bamposa na ye epai ya bandeko na ye. Tótalela lisoló ya moto moko oyo bandeko na ye balingaki bobele kokende kokunda ye na mboka engebene mimeseno ya mboka na bango. Ntango bomoi na bango ekómaki na likama, mwasi-mokufeli-mobali oyo elongo na bana na ye basengelaki kotika nzoto ya mowei na mabɔkɔ ya bandeko na ye. Mwasi yango alobi ete: “Soki mobali na ngai ayebisaki ata ndeko moko ya tata na ye to ndeko moko ya mama na ye, ata moko kati na bana na bango lolenge alingaki ete akundama, bandeko na ye mbɛlɛ balingaki kotingama te ete mimeseno ya bonkɔkɔ misalema na ntango ya kolela ebembe.”
Na bikólo mosusu maloba oyo moto alobi liboso ete akufa matalelamaka motindo moko na maloba oyo ekomami na mokanda. Esalemaka bongo na bisika mosusu na ekólo Swaziland, epai kuna bato mingi bazali na bindimeli oyo bizali kolendisa mimeseno ya bonkɔkɔ na ntango ya kolela ebembe mpe ya kosala matánga. Koyebáká bongo, moklisto moko na nkombo Isaac ayanganisaki bandeko na ye oyo bazalaki Batatoli ya Yehova te, mpe ayebisaki bango makambo oyo alingaki ete masalema nsima ya liwa na ye. Ayebisaki bango polele ete moto boye akozwa eloko boye, mpe alimbolaki polele motindo nini basengelaki kolela ebembe na ye. Na nsima ntango akufaki, makambo masalemaki ndenge ye alingaki. Isaac akundamaki na boyokani na mitindá ya boklisto, mpe babatelaki mwasi na ye malamu.
Batelá libota na yo
Lolenge okosala mpo na kobatela libota na yo na makambo oyo ntango ya liwa na yo ezali likambo na yo moko, kasi moklisto moko na nkombo Edward alobi: “Nazali na assurance-vie oyo basangani mwambe ya libota na ngai bakozwa yango. Mwasi na ngai atyaka sinyatili na mikanda na ngai ya mbongo na bánki. Na yango soki nakufi, akoki kobimisa mosolo na kɔ́nti na ngai na bánki. . . . Nazali na testamá mpo na litomba ya libota na ngai. Soki nakufi, biloko nyonso nakotika ekozala mpo na mwasi na ngai mpe bana na ngai. Nakomaki testamá yango esili koleka mbula mitano. Yango ebongisamaki na avoká na ngai, mpe mwasi na ngai na mwana na ngai ya mobali bazali na kopi na yango. Kati na testamá na ngai, namonisi sikisiki ete bandeko na ngai bakozwa ekateli te na ntina na ebembe na ngai. Nazali kati na lisangá ya Yehova. Na bongo ata soki bobele Motatoli ya Yehova moko to Batatoli mibale bazali wana bango nde bakotambwisa makambo mpo na ebembe na ngai. Nasololaki makambo yango na bandeko ya libota na ngai.”
Tokoki koloba ete kokamata bibongiseli motindo oyo ezali likabo mpo na libota na yo. Ya solo, kozwa bibongiseli na koyebáká ete mokolo mosusu okokufa ekokani na likabo ya chocolat te to ya liboke ya fololo te. Kasi, ezali komonisa bolingo na yo. Yango ezali komonisa ete olingi ‘koleisa basangani ya ndako na yo’ ata ntango ozali na bango esika moko te.
[Etanda/Elilingi na lokasa 21]
Yesu azwaki bibongiseli mpo na mama na ye
“Pembeni na [nzeté ya mpasi, NW] na Yesu batɛlɛmi wana, mama na ye mpe ndeko mwasi na mama, Malia mwasi na Kelopa mpe Malia na Magadala. Emoni Yesu mama na ye mpe moyekoli molingami na ye, azalaki kotɛlɛma pembeni, alobi na mama na ye ete, Mama, talá mwana na yo. Na nsima alobi na moyekoli yango ete, Talá mama na yo. Longwa na ntango yango, moyekoli [Yoane] akamati ye na ndako na ye moko.”—Yoane 19:25-27.
[Elilingi na lokasa 22]
Na kokanisáká mozindo, baklisto mingi bazali kozwa bibongiseli engebene mibeko ya Letá mpo na kobatela mabota na bango