Bosembo ya solo ntango nini mpe ndenge nini?
MOTO oyo asali likambo te asengeli kobanga boyengebene ya solo te. Ɛɛ, ezala na ekólo nini, banamboka basengeli kozala na botɔ́ndi soki mbulamatali ya ekólo na bango ezali na ebongiseli oyo ezali komeka kobatela boyengebene. Ebongiseli motindo oyo esɛngaka mibeko, mosala ya bapolisi mpo na kotosisa mibeko yango, mpe bisambiselo mpo na kokata makambo na boyengebene. Baklisto ya solo batosaka ebongiseli ya kosambisa na bisika bafandi, na kolandáká lisɛngisi ya Biblia etali ‘kotosa bango bazali na bokonzi.’—Baloma 13:1-7.
Nzokande, na mikili mingi, ebongiseli ya kosambisa esili kosala mabunga oyo epesi bato mpasi mpe ebulunganisi bango.a Na esika ya kopesa etumbu na moto oyo azali na ekweli mpe kobatela moto oyo asali likambo te, ntango mosusu ezali komonana ete bazali nde kopesa etumbu na ye oyo asali eloko te. Bato mosusu balekisi bambula mingi na bolɔkɔ, mpe na nsima babimisaki bango wana etikali moke básilisa mikolo oyo bakatelaki bango, mpe basambisi bazalaki ntango nyonso na kokakatana soki bato yango bazalaki na ekweli mpe ebongaki bákanga bango. Na yango, bato mingi bazali kotuna ete, Ekozala nde na boyengebene ya solo mpo na bato nyonso? Soki ɛɛ, ntango nini mpe ndenge nini? Tosengeli kotya motema epai na nani mpo na kobatela bato basali likambo te? Mpe elikya nini ezali mpo na bato oyo bazali konyokwama na ntina na bokesene?
Mabunga ya bisambiselo
Na bambula ya 1980, na ekólo Allemagne, “lisambisi oyo ebendaki likebi ya bato mingi kati na eleko ya nsima ya etumba” esalemaki mpe kati na yango mama moko azwaki etumbu ya bolɔkɔ ya bomoi na ye mobimba mpo ete abomaki bana na ye mibale ya basi. Nzokande, nsima ya bambula, batalelaki lisusu likambo na ye, mpe babimisaki ye na bolɔkɔ na kozeláká ete básambisa ye lisusu. Na 1995, zulunalo Die Zeit elobaki ete “bazuzi basalaki libunga” na kosambisa ya liboso. Kino na ntango tozali kokoma lisolo oyo, mama wana asili kolekisa mbula libwa na bolɔkɔ kozanga koyeba soki azali mpenza na ekweli to te.
Na mpokwa moko, na sanza ya Novɛ́mbɛ 1974, babombi mibale epanzanaki na ntei ya engumba Birmingham, na ekólo Angleterre, mpe ebomaki bato 21. Depite moko na nkombo ya Chris Mullen, akomaki ete ezalaki likambo oyo “moto te kati na Birmingham akobosana yango.” Na nsima, “bakangaki mibali motoba bayebi likambo te na likambo yango oyo bato babomamaki mingi kati na lisolo mobimba ya ekólo Angleterre.” Na nsima, babimisaki bango nsima ya kolekisa mbula 16 na bolɔkɔ!
Avoka moko na nkombo Ken Crispin, alobaki na ntina na likambo moko oyo “ebendaki mpenza likebi ya bato na lolenge emonaná naino te na lisolo ya bisambiselo ya Australie.” Basangani ya libota moko bazalaki kosala pikiniki penepene na esika ebéngami Ayers Rock, bongo mwana na bango ya moke abungaki, mpe amonanaki lisusu te. Bafundaki mama ete abomi mwana, bakweisaki ye na likambo yango, mpe bakatelaki ye etumbu ya bolɔkɔ bomoi na ye mobimba. Na 1987, nsima ya kolekisa mbula misato na bolɔkɔ, ankɛtɛ ya Leta emonisaki ete mpo na likambo oyo bafundaki ye ebongaki akɔta bolɔkɔ te. Batikaki ye mpe balimbisaki ye.
Na 1986, babomaki mwana mwasi moko ya mbula 18, oyo azalaki kofanda na sudi ya États-Unis. Balobaki ete ezalaki mobali moko nde abomaki ye, batyaki mobali yango na bolɔkɔ, mpe bakatelaki ye etumbu ya liwa. Alekisaki naino mbula motoba na bolɔkɔ esika oyo azalaki kozela mokolo ya kobomama, mpe nsima emonanaki ete ayebaki likambo te.
Bandakisa oyo ya mabunga ya kosambisa emonanaka mingi, boye te? David Rudovsky, molakisi ya mibeko na Iniversite ya Pennsylvanie alobi ete: “Nazali kati na ebongiseli ya kosambisa uta pene na mbula 25 mpe namoni makambo mingi. Nakoki koloba ete baoyo bakweisami na likambo nzokande basali eloko te . . . bakoki kozala bato mitano to zomi likoló na monkama.” Crispin atuni motuna monene oyo: “Ezali na bato mosusu oyo basali likambo te mpe basundolami na bolɔkɔ?” Ndenge nini mabunga minene boye mazali kosalema?
Ebongiseli ya bato mpo na kosambisa —Na bolɛmbu na bango
Na 1991, esambiselo ebéngami “cour d’appel” ya ekólo Angleterre emonisaki ete: “Ebongiseli moko te ya bato ekoki kozala na kokoka.” Ebongiseli ya kosambisa ekoki kozala sembo mpe ekoki kotyelama motema bobele na motindo ya bato oyo basali yango mpe bazali kotambwisa yango. Bato baumelaka kokwea na mabunga te, bazangaka kolongobana, mpe bakaniselaka basusu mabe. Na yango, ekoki kokamwisa te komona ete bibongiseli ya bato mpo na kosambisa emonisaka mpenzampenza makambo wana. Tótalela masolo malandi.
Engebene Rolf Bender, zuzi na ekólo Allemagne, kati na makambo nyonso ya mobulu, maloba ya batatoli 95 likoló na monkama etalelamaka lokola bilembeteli ya solosolo. Kasi matatoli motindo wana mabongi ntango nyonso kotyelama motema? Zuzi Bender akanisi ete ezali bongo te. Abanzi ete batatoli 50 likoló na monkama oyo bayaka na esambiselo balobaka solo te. Bernd Schünemann, profesere ya mibeko ya kopesa etumbu na basali na mabe na Iniversite ya Munich, na Allemagne, apesaki makanisi motindo moko. Koyanoláká na mituna ya zulunalo Die Zeit, Schünemann andimaki ete maloba ya batatoli ezali lolenge ya bilembeteli ya liboso oyo tosengeli kotyela motema te. “Nakoki koloba ete ntina ya monene ya mabunga ya kosambisa ezali mpo ete bazuzi batyelaka maloba ya batatoli ya lokuta motema.”
Batatoli basalaka mabunga; motindo moko mpe na bapolisi. Mingimingi ntango mbeba oyo esalemi ebulunganisi bato, bapolisi basalaka nyonso mpo na kokanga moto. Na makambo motindo wana, ezali na bapolisi oyo babendamaki na mposa ya kobimisa bilembeteli ya lokuta to bapusaki na makasi moto oyo bamonaki lokola mosali na mabe ete andima. Ntango babimisaki mibali motoba oyo balobaki ete babwakaki babombi na Birmingham, zulunalo The Independent oyo ebimaka na Angleterre, na motó na likambo monene ekomaki boye: “Bapolisi ya mabe bazali na ngambo na kokangama ya mibali motoba.” Zulunalo The Times ekomaki ete: “Bapolisi bakosaki, bayangaki mwango mabe, mpe bazwamaki na motambo.”
Na makambo mosusu, kokanisela bato mabe ekoki kopusa bapolisi to bato nyonso ete bátalela bato ya loposo mosusu, ya lingomba mosusu, to ya ekoló moko lokola ete bazali bato mabe. Ndenge zulunalo U.S.News & World Report elobi yango, koluka mosali na mabe ekoki kobongwana “likambo ya koponapona mposo na esika ya koluka bilembeteli ya solo.”
Na ntango likambo ekómi na esambiselo, bikateli bikoki kobeba bobele na maloba ya batatoli te kasi lisusu na bilembeteli ya siansi. Sikawa ekómi komonana ete zuzi to lisangani ya basambisi bakoki kosɛnga bango ete bákata soki moto azali na ekweli to te na kotaleláká bilembeteli biuti na myango ya mindɔndɔ mpe oyo mizali kosalelama mingi oyo esɛngi koyekola lolenge ya lisasi oyo esalelamaki mpo na koyeba eutelo na yango, to bilembo ya misapi, ekomeli ya moto, makila (groupes sanguins), nsuki, nsinga ya elamba, to ekizame ya ADN. Avoka moko alobaki ete esambiselo ezali kokutana na mokakatano euti na “ebele ya bato ya siansi oyo bazali komonisa myango ya mindɔndɔmindɔndɔ mpo na kokata likambo.”
Longola wana, zulunalo Nature elobi ete bato nyonso ya siansi bazalaka na likanisi moko te na lolenge ya kolimbola bilembeteli ya siansi. “Kozanga boyokani ya solosolo ekoki kozala kati na bato ya siansi oyo bazali kotalela bilembeteli.” Likambo ya mawa, “mbala mingi bilembeteli ya siansi oyo emonisami na libunga ememaki bisambiselo na kokweisa bato oyo basalaki likambo te.”
Ezala tofandi wapi, bibongiseli nyonso mpo na kosambisa ya ntango oyo bizali elilingi ya mabunga ya bato. Na yango, tokoki kotyela nani motema mpo na kobatela moto oyo asali eloko te? Tokoki kolikya nde kozwa boyengebene ya solo? Mpe elikya nini ezali mpo na baoyo bazali konyokwama mpo ete esambiselo ekweisaki bango na libunga?
‘Ngai Yehova nalingi kosambisa sembo’
Soki yo moko to mosangani ya libota na yo, bozali konyokwama mpo ete esambiselo ekweisaki bino na libunga, yebá ete Yehova Nzambe mpe Mwana na ye Yesu, bayebi mpasi na bino. Bokesene oyo eleki mabe esalemaki ntango Klisto abomamaki na nzete ya mpasi. Ntoma Petelo ayebisi biso ete Yesu “asalaki lisumu moko te.” Nzokande, bafundaki ye na batatoli ya lokuta, bakweisaki ye na likambo yango, mpe babomaki ye.—1 Petelo 2:22; Matai 26:3, 4, 59-62.
Kanisá mpasi oyo Yehova ayokaki na ndenge banyokolaki Mwana na ye! Boyengebene ezali moko na bizaleli minene ya Yehova. Biblia elobi na biso ete: “Nzela na ye nyonso boyengebene.”—Deteronome 32:4; Nzembo 33:5.
Yehova apesaki na Yisalaele ebongiseli malamu mpenza mpo na kosambisa. Na ntango moto akufi kasi mobomi ayebani te, bazalaki kopesa mbeka mpo na kosala mbɔndi na ntina na liwa wana. Bazalaki kopusa bazuzi na makasi te ete báluka mobomi noki te bakoya kokanga moto oyo ayebi likambo te. Bakokaki kokanga moto moko te lokola mobomi kozanga elembeteli ya solosolo to na nzela ya bilembeteli ya siansi; kasi, esengelaki litatoli ya bato mibale oyo bamonaki. (Deteronome 17:6; 21:1-9) Bandakisa oyo emonisi ete Yehova azali na mitinda mitombwani mpe azali komibanzabanza ete boyengebene esalema na kolongobana. Ɛɛ, alobi ete: “Ngai [Yehova] nalingi kosambisa sembo.”—Yisaya 61:8.
Ya solo, ebongiseli ya kosambisa na Yisalaele ezalaki na mabɔkɔ ya bato oyo bazalaki na mabunga lokola biso. Ezalaki na makambo mosusu oyo mibeko esalelamaki mabe. Mokonzi Salomo akomaki boye: “Soko omoni kati na mokili minyoko na mobola mpe kobebisa na kosambisama mpe na boyengebene, kamwá likambo yango te.”—Mosakoli 5:8.
Yehova azalaki na likoki ya kosembola bokesene oyo basalelaki Mwana na ye. Bosolo ya likambo yango elendisaki Yesu, oyo “mpo na esengo etyami liboso na ye ayikeli [nzete ya mpasi, NW] mpiko.” Bobele bongo, elikya ya esengo ya kofanda na paladiso na mabelé na nse ya boyangeli ya Masiya, epai boyengebene ya solo ekozala, ekoki kolendisa biso na koyika mpiko ntango tozali koyoka to konyokwama na ntina na bokesene kati na ebongiseli oyo esili konuna. Ezali na mpasi moko te to na makambo mabe moko te oyo Yehova akolonga te kosilisa yango na ntango ebongi. Ata baoyo bazali kokufa mpo ete esambiselo ezali kokata likambo na bango na libunga bakoki kosekwisama.—Baebele 12:2; Misala 24:15.
Soki tozali konyokwama na ntina na bokesene, tokoki kozala na botɔ́ndi ete bibongiseli mingi mpo na kosambisa bizali na myango oyo endimami na mibeko oyo ekoki kopesa biso likoki ya kosembola likambo yango. Baklisto bakoki kosalela myango wana. Nzokande, bakomikundola likambo oyo: Bibongiseli ya kosambisa ya kozanga kokoka ezali se elilingi ya libota ya bato oyo ezali na mposa ya kobongisama na makambo mingi. Kobongisama yango ekosalema mosika te—na Nzambe ye moko.
Mosika te Yehova akolongola ebongiseli oyo ya bokesene mpo na libela mpe na esika na yango, akotya ebongiseli ya sika oyo “boyengebene ekofanda kati na yango.” Tokoki kozala na elikya mobimba ete Mozalisi na biso akosalela boyengebene na nzela ya Mokonzi Masiya, Yesu Klisto. Boyengebene ya solo mpo na moto nyonso ebɛlɛmi! Tosengeli kozala na botɔ́ndi mpo na elikya yango.—2 Petelo 3:13.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na makambo oyo malobelami awa, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali kolongisa to kokweisa moto moko te, lisusu zulunalo oyo ezali soko moke te kotombola ebongiseli ya kosambisa ya ekólo moko lokola ete eleki oyo ya ekólo mosusu na malamu. Na koleka, zulunalo oyo ezali kolendisa motindo moko ya etumbu koleka mosusu te. Lisolo oyo ezali bobele kolobela makambo lolenge mayebanaki na ntango bakomaki yango.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 27]
Bibongiseli ya kosambisa oyo ezangi kokoka—elongo na guvernema ya mabe, na mangomba ya lokuta, mpe mombongo ya lokoso—ezali elilingi ya libota ya bato oyo ezali na mposa ya kobongisama na makambo mingi
[Etanda na lokasa 28]
Libɔndisi euti na Makomami mosantu
Na Novɛ́mbɛ 1952, na Croydon, pembeni na engumba Londres, na ekólo Angleterre, Derek Bentley na Christopher Craig babukaki ndako moko ya kobomba biloko mpo na koyiba. Bentley azalaki na mbula 19 mpe Craig azalaki na mbula 16. Babéngaki bapolisi, mpe Craig abɛtaki masasi mpe abomaki polisi moko. Craig, akɔtaki bolɔkɔ mbula libwa, nzokande, na Yanuáli 1953, babomaki Bentley na nsinga na nkingo balobaki ete abomi moto.
Iris, ndeko mwasi ya Bentley asalaki kampanye na boumeli ya mbula 40 mpo na komonisa ete ndeko na ye abomaki moto te. Na 1993, mbulamatali esɛngaki bolimbisi na ntina na etumbu wana, kondimáká ete ebongaki soko moke te ete Derek Bentley abomama na nsinga na nkingo. Na ntina na likambo yango, Iris Bentley akomaki boye kati na buku Let Him Have Justice (Tiká ete básalela ye boyengebene):
“Pene na mbula moko liboso ya kobomama, Derek akutanaki na Motatoli ya Yehova moko na nzela . . . Ndeko mwasi Lane azalaki kofanda pene na ndako na biso na Fairview Road mpe abyangaki Derek na ndako na ye mpo na koyoka masolo ya Biblia. . . . Eloko esungaki ye ezalaki ete Ndeko Lane azalaki na masolo ya Biblia kati na bakasɛti, yango nde azalaki kopesa ye [mpamba te Derek azalaki kotánga malamu te]. . . . Azalaki koya koyebisa ngai makambo oyo bazalaki koteya ye, mateya lokola biso nyonso tokozonga lisusu na bomoi nsima ya liwa.”
Iris Bentley akendaki kotala ndeko na ye ya mobali na bolɔkɔ esika azalaki kozela mokolo ya kobomama na ye. Azalaki komiyoka ndenge nini? “Makambo oyo Ndeko Lane ayebisaki ye esungaki ye na boumeli ya mwa mikolo wana ya nsuka.”—Biso nde totɛngisi makomi.
Soki ekómeli yo ete onyokwama mpo ete bakati likambo na yo na libunga, ekozala malamu otángaka mpe omanyolaka likoló na solo ya Biblia. Yango ekoki kobɔndisa mingi, mpamba te Yehova Nzambe azali “Tata na mawa mpe Nzambe na kobɔndisa nyonso. Ye akobɔndisa biso kati na bolɔzi na biso.”—2 Bakolinti 1:3, 4.
[Elilingi na lokasa 29]
Bokesene oyo eleki mabe esalemaki ntango Klisto abomamaki