Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 15/6 nk. 30-31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Masolo mosusu
  • Mituna ya batangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mosala ya Yesu na Perea
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Tosengeli kosala nini mpo ete tóbikisama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Osili Kozwa “Elimo ya solo”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 15/6 nk. 30-31

Mituna ya batángi

Yesu alobaki ete: “Meká makasi kokɔta na ekuke na nkaka, mpo ete nalobi na bino ete, bato mingi bakomeka kokɔta mpe bakokoka te.” (Luka 13:24) Yango elimbolaki nini, mpe ndenge nini ezali kosalema lelo?

Tokoki kososola malamu mokapo kitoko oyo soki tokotalela maloba oyo mazali zingazinga na yango. Sanza motoba liboso ya liwa na ye, Yesu azalaki na Yelusaleme na elambo ya bofungoli lisusu tempelo. Alobaki ete ye azali mobateli ya bampate ya Nzambe, kasi amonisaki ete Bayuda bazalaki kati na bampate wana te mpamba te baboyaki koyoka. Ntango alobaki ete ye na Tata na ye bazali “moko,” Bayuda balɔkɔtaki mabanga mpo na kobamba ye. Akimaki na Pelea, oyo ezali na ngámbo mosusu ya Ebale Yordani.​—Yoane 10:1-40.

Kuna moto moko atunaki ye ete: “Nkolo, bato bakobikisama bazali mingi te?” (Luka 13:23) Motuna wana ebongaki mpenza kotunama, mpamba te Bayuda na eleko wana bandimaki ete bobele bato moke nde babongi mpo na lobiko. Na kotalela ezaleli na bango, ezali na mpasi te mpo na koyeba banani oyo bango bazalaki kokanisa ete bazali kati na bato moke oyo babongi mpo na lobiko. Makambo oyo masalemaki na nsima mamonisaki ete bazalaki mpenza na libunga!

Na boumeli ya mbula soko mibale, Yesu azalaki kati na bango, ateyaki, asalaki bikamwiseli, mpe apesaki bango likoki ya kokóma basangoli ya libula ya Bokonzi ya likoló. Litomba nini emonanaki? Bango moko, mpe mingimingi bakonzi na bango, bazalaki na lolɛndo mpo ete bazalaki bakitani ya Abalayama mpe bazalaki na Mibeko ya Nzambe. (Matai 23:2; Yoane 8:31-44) Kasi bayebaki te mpe bandimaki te mongongo ya Mobateli Malamu na mpate. Ezalaki lokola ete ekuke efungwamaki liboso na bango, oyo kokɔta kati na yango elingaki kopesa bango likabo monene ya kozala mosangani ya Bokonzi, kasi baboyaki. Bobele bato moke, mingimingi mpe bauti kati na bato mpamba nde, bayokaki nsango ya solo oyo Yesu asakolaki, bandimaki mpe bakangamaki na ye.​—Luka 22:28-30; Yoane 7:47-49.

Na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., ezalaki bato mpamba wana nde bakɔtaki na molɔngɔ mpo na kozala bapakolami na elimo. (Misala 2:1-38) Bazalaki te kati na basali na mabe oyo Yesu alobaki ete bakolela mpe bakoswa mino mpamba te balekisi libaku malamu oyo bapesaki bango.​—Luka 13:27, 28.

Na yango, na ekeke ya liboso “ebele” ezalaki Bayuda lokola libota, mpe mingimingi bakonzi ya mangomba na bango. Bango balobaki ete balingi ngɔlu ya Nzambe—engebene mitinda mpe banzela na bango moko, kasi engebene oyo ya Nzambe te. Na bokeseni, bato “moke” oyo bandimaki na bosembo kozala basangani ya Bokonzi bakómaki basangani ya lisangá ya boklisto oyo bapakolami na elimo.

Sikawa tótalela kokokisama na yango monene na eleko na biso. Ebele ya bato oyo bakendaka na mangomba ya boklisto bateyamaka ete bakokende na likoló. Nzokande, elikya oyo etongami likoló ya mateya ya solo ya Makomami te. Lolenge moko na Bayuda na ekeke ya liboso, bato yango mpe balingi ngɔlu ya Nzambe bobele engebene mibeko na bango moko.

Kasi, na eleko na biso ezali na bato moke oyo, na komikitisa nyonso, bazali kondima nsango ya Bokonzi, bazali komipesa na Yehova, mpe bamitii na molɔngɔ mpo na kozwa ngɔlu na ye. Yango ezali kokómisa bango “bana na Bokonzi.” (Matai 13:38) “Bana” yango bapakolami na elimo babandaki kobyangama na Pantekote ya mobu 33 T.B. Batatoli ya Yehova bayebi uta kala ete bilembeteli na motindo oyo Nzambe asalaka makambo epai na bato na ye emonisi ete libyangi ya basangani mpo na kelasi ya likoló esilá. Na yango, baoyo bayekolaki solo na bambula eleki bayebi ete elikya ya paladiso na mabelé ezali kopesama na bato mingi. Bato yango bakómi mingi koleka batikali baklisto bapakolami oyo motángo na bango ezali se kokita, baoyo bazali naino na elikya ya kokende na likoló. Atako Luka 13:24 etaleli libosoliboso baoyo bazali na elikya ya kokende na likoló, kasi ezali mpe na toli ya mayele mpo na baoyo bazali na elikya yango te.

Wana alobaki na biso ete tómeka na makasi, Yesu alingaki koloba te ete ezala ye moko to Tata na ye nde batyelaka biso mabaku mpo tókwea. Kasi tozali kososola uta na Luka 13:24 ete masɛngami ya Nzambe ezali lokola mabaku mpo na kobengana bato oyo bazangi sembo. ‘Komeka makasi’ esɛngi kobunda, kosala nyonso oyo tokoki. Na yango, tokoki komituna boye: ‘Nazali kosala engebene makoki na ngai?’ Luka 13:24 ekoki kotángama boye: ‘Nalingi komeka makasi kokɔta na ekuke na nkaka mpamba te bato mingi bakomeka kasi bakokoka te. Ngai, nazali komeka makasi? Nakokani na mopoti mbangu oyo na libándá ya masano na ntango ya kala amipesaki mobimba mpo na kozwa libonza? Mopoti mbangu motindo yango azalaki na motema mokabwani te, na boye ete asala bobele mwa milende. Bongo ngai, nazali kosala bobele mwa molende moke?’

Maloba ya Yesu mamonisi ete bato mosusu bakoluka ‘kokɔta na ekuke’ bobele na ntango bango moko bamoni malamu, malɛmbɛmalɛmbɛ ndenge basepeli. Ezaleli motindo yango ekoki kokómela Batatoli mosusu. Bamoko bakoki kokanisa boye, ‘Nayebi baklisto mosusu bamipesaki oyo bamekaki makasi na boumeli ya bambula mingi, komipimeláká makambo mingi, kasi, ntango bakufaki, nsuka ya ebongiseli mabe oyo ekómaki naino te. Na bongo, ekozala malamu nalɛmbisa naino moke mpe nasepela na bomoi lokola baninga.’

Ezali mpasi te kokanisa lolenge wana, kasi ezali likambo ya mayele? Na ndakisa, bantoma bakanisaki lolenge wana? Soko moke te. Bamipesaki mobimba na losambo ya solo kino liwa na bango. Na ndakisa, Paulo, alobaki ete: “Biso tokosakolaka [Klisto] . . . Mpo na boye nakosalaka mosala, nakobundaka na makasi na ye oyo akosalaka kati na ngai.” Nsima akomaki ete: “Mpo ete tozali kosalaka mosala mpe kobunda etumba mpo na bongo, zambi tosili kolikya epai na Nzambe na bomoi, ye oyo azali Mobikisi na bato nyonso mpe nakoleka na baoyo bazali kondima.”​—Bakolose 1:28, 29; 1 Timoté 4:10.

Toyebi ete Paulo asalaki misala malamu na komekáká makasi. Oyo nde esengo mokomoko na biso akozala na yango wana akoloba lokola Paulo alobaki ete: “Nasili kobunda etumba malamu, nasilisi nzela na kotambola, nasili kobatela kondima.” (2 Timoté 4:7) Na boyokani na maloba ya Yesu makomami na Luka 13:24, mokomoko na biso akoki kotuna boye: ‘Nazali kosala na kolendendela mpe na molende? Ɛɛ, elembeteli ezali komonana polele ete nazali kolanda likebisi ya Yesu oyo elobi ete: “Meká makasi kokɔta na ekuke na nkaka”?’

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto