-
Likanisi ya baklisto na ntina na milulu ya bokundi ebembeLinɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1998 | 15 Juillet
-
-
Likanisi ya baklisto na ntina na milulu ya bokundi ebembe
SOKI ndeko moko oyo tolingaka mingi akufi mbalakaka, esalaka mpasi mingi. Etungisaka, mpe epesaka mpasi na mayoki. Komona molingami akufi nsima ya kobɛla makasi mpe ntango molai ezalaka ndenge mosusu, kasi mpasi mpe mayoki ya kobungisa moto ezangaka te.
Ata soki molingami akufi liwa ya motindo nini, moto oyo akufeli ndeko azalaka na mposa ya lisungi mpe ya libɔndisi. Moklisto oyo akufeli ndeko, bato oyo balingaka kosala milulu ya bokundi oyo miyokani na Makomami te bakoki konyokola ye. Makambo yango esalemaka na bikólo mingi ya Afrika mpe na bisika mosusu.
Eloko nini ekoki kosalisa moklisto oyo akufeli ndeko ete aboya milulu ya bokundi oyo miyokani na Makomami te? Lolenge nini baninga bandimi bakoki kosunga ye na ntango wana ya komekama? Bato nyonso oyo balingaka kosepelisa Yehova bazalaka na mposa ya koyeba biyano na mituna yango, mpamba te “losambo na pɛto mpe lobongi epai na Nzambe Tata na biso ezali boye: kotalaka bitike mpe basi-bakufeli-mibali kati na mpasi na bango mpe komibatela nzoto pɛto na makambo na mokili.”—Yakobo 1:27.
Milulu yango eyokani na endimeli moko
Milulu mingi ya bokundi eyokani na endimeli oyo emonisaka ete bakufi bazali na bomoi na mokili ya bankɔkɔ oyo emonanaka te. Mpo na kokitisa bango motema, bato mingi oyo bazali kolela ebembe bamiyokaka ete basengeli kosala milulu. To babangaka ete bakosilikisa bato ya zingazinga oyo bakanisaka ete likama ekokwela mboka mobimba soki basali milulu te.
Moklisto ya solo asengeli kobanga bato te mpe akosangana te na mimeseno oyo misepelisaka Nzambe te. (Masese 29:25; Matai 10:28) Biblia emonisi ete bakufi bayebi eloko te, mpamba te elobi ete: “Bato na bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te. . . . Ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na [sheol, NW], esika ekokenda yo.” (Mosakoli 9:5, 10) Yango wana, Yehova Nzambe akebisaki bato na ye na ntango ya kala ete báluka kokitisa bakufi mitema te to kosolola na bango te. (Deteronome 14:1; 18:10-12; Yisaya 8:19, 20) Solo oyo ya Biblia eyokani te na milulu mingi ya bokundi oyo mipalangani lelo oyo.
Ezali boni mpo na “kopɛtolama na kosangisáká nzoto”?
Na bikólo mosusu ya Afrika ya Ntei, basɛngaka na moto oyo akufeli mobalani ete asangisa nzoto na ndeko moko ya libota ya mobalani na ye. Bakanisaka ete soki esalemi te, mokufi akosala bato ya libota oyo batikali mabe. Babéngaka molulu yango ete “kopɛtolama na kosangisáká nzoto.” Kasi, na likanisi ya Biblia, soki bato babalani te basangisi nzoto, basali nde “pite.” Lokola baklisto basengeli ‘kokima pite,’ baboyaka na mpiko nyonso mimeseno yango miyokani na Makomami te.—1 Bakolinti 6:18.
Tótalela ndakisa ya mwasi-mokufeli-mobali na nkombo Mercy.a Na 1989, ntango mobali na ye akufaki, bandeko na ye balingaki ete asangisa nzoto na mobali moko ya libota na bango mpo ete apɛtolama. Kasi, aboyaki, mpe alimbolaki ete molulu yango ezali kobuka mobeko ya Nzambe. Bandeko na ye basilikaki, mpe batikaki ye nsima ya kofingafinga ye. Nsima ya sanza moko, bapunzaki ndako na ye mpe balongolaki manzanza. Balobaki ete: “Lingomba na yo esalisa yo.”
Bandeko na lisangá babɔndisaki Mercy mpe batongelaki ye kutu ndako ya sika. Bato ya zingazinga bakamwaki na boye ete bamoko bayaki kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga ndako. Mwasi ya mokonzi oyo azalaki moto ya Lingomba ya Katolike azalaki moto ya liboso oyo ayaki na matiti mpo na kozipa likoló ya ndako. Etamboli ya sembo oyo Mercy amonisaki elendisaki bana na ye. Bana minei basili komipesa na Yehova Nzambe, mpe na mikolo mileki moko akɔtaki na Eteyelo mpo na kobongisa basungi.
Na ntina na momeseno ya kopɛtolama na kosangisáká nzoto, baklisto mosusu bapusamaki na kondima kobala bato oyo bazali bandimi te. Na ndakisa, mobali moko mokufeli-mwasi oyo azali na mbula 70 abalaki nokinoki elenge mwasi moko oyo azali ndeko ya mwasi na ye oyo akufaki. Na kosaláká bongo, akokaki koloba ete asali molulu ya kopɛtolama na kosangisáká nzoto. Nzokande, likambo motindo wana eyokani te na toli ya Biblia oyo elobi ete baklisto basengeli kobala bobele “kati na Nkolo.”—1 Bakolinti 7:39.
Milulu ya kofanda libándá ntɔngɔ saa
Na bikólo mingi, bato oyo bazali na matánga bayanganaka na ndako ya mowei mpe bafandaka wana ntɔngɔ saa. Mbala mingi ntango bafandi na matánga balyaka, bamelaka mpe babɛtaka miziki makasi. Bakanisaka ete soki basali bongo bakokitisa bawei motema mpe bakobatela basangani ya libota oyo batikali ete bandoki bálɔka bango te. Mbala mosusu balobaka makambo ya kolɛngola mpo ete mowei asepela na bango. Nsima wana moto moko alobi, bato oyo bayei matánga bakoki kobanda koyemba nzembo ya mangomba liboso ete moto mosusu atɛlɛma mpo na koloba. Yango ekoki kokoba kino ntɔngɔ ekotana.b
Moklisto ya solo asanganaka te na milulu wana ya kofanda libándá ntɔngɔ saa, mpamba te Biblia emonisi ete bakufi bazali na likoki te ya kosunga bato ya bomoi to kosala bango mabe. (Genese 3:19; Nzembo 146:3, 4; Yoane 11:11-14) Makomami epekisi biso kosala boyokani na bilimu mabe. (Emoniseli 9:21; 22:15) Kasi, moklisto mwasi-mokufeli-mobali akoki kozala na mokakatano mpo na kopekisa bato mosusu ete básala milulu ya bilimu mabe te. Bakoki mbala mosusu kotingama ete báfanda ntɔngɔ saa na ndako na ye. Baninga bandimi bakoki kosala nini mpo na kosunga baklisto oyo bakufeli ndeko ntango bakutani na mokakatano wana?
Mbala mingi bankulutu ya lisangá bakokaki kosunga libota ya baklisto oyo bakufeli ndeko na nsima ya kosolola na basangani ya libota na bango mpe na bato ya zingazinga. Nsima ya masolo yango, bato yango bakoki kondima kozonga na kimya mpe kokutana mokolo mosusu mpo na kokunda ebembe. Kasi ezali boni soki bamoko babandi kosala matata? Kolendendela na koluka kokanisa na bango ekoki kobimisa mobulu. “Ebongi te ete moombo na Nkolo aswanaka kasi azala na motema pɛtɛɛ.” (2 Timoté 2:24) Na yango, soki bandeko oyo baboyi koyokana babandi kosala makambo na makasi, mwasi-mokufeli-mobali mpe bana na ye bakoki mbala mosusu kopekisa yango te. Kasi bakoboya kosangana na molulu nyonso ya lingomba ya lokuta oyo ezali kosalema na ndako na bango, mpamba te bazali kotosa etinda oyo ya Biblia: “Bókangana na ekanganeli na bokesene te, esika moko na bato bazangi kondima.”—2 Bakolinti 6:14.
Etinda yango ebongi mpe mpo na molulu ya bokundi. Batatoli ya Yehova basanganaka te na koyemba, kobondela, to na milulu mitambwisami na ministre ya lingomba ya lokuta. Soki baklisto oyo bazali bandeko ya mowei bamoni malamu kozala wana, bakosangana na milulu yango te.—2 Bakolinti 6:17; Emoniseli 18:4.
Milulu ya bokundi oyo ezali na lokumu
Milulu ya bokundi oyo Batatoli ya Yehova batambwisaka ezalaka na makambo ya kokitisa bawei motema te. Basalaka lisukulu etongami na Biblia, ezala na Ndako ya Bokonzi, na ndako ya kolela bibembe, na ndako ya mowei, to na esika bakokunda ebembe. Mokano ya lisukulu yango ezalaka ya kobɔndisa bato oyo bakufeli ndeko mpe elimbolaka makambo oyo Biblia elobi na ntina na liwa mpe elikya ya lisekwa. (Yoane 11:25; Baloma 5:12; 2 Petelo 3:13) Loyembo etongami na Makomami ekoki koyembama, mpe molulu esukaka na libondeli oyo ezali kobɔndisa.
Na mikolo mileki, molulu moko ya bokundi lokola oyo tolobeli esalemaki mpo na Motatoli ya Yehova moko oyo azalaki ndeko mwasi ya Nelson Mandela, prezida ya Afrika ya Sudi. Nsima ya molulu, na bosembo nyonso, prezida atɔ́ndaki molobi. Bakonzi mingi bazalaki wana. Mwasi moko oyo azali ministre alobaki ete: “Molulu ya bokundi oyo ezali mpenza na lokumu koleka milulu nyonso nasanganá na yango.”
Kolata pili endimami?
Batatoli ya Yehova balelaka na liwa ya bandeko na bango. Lokola Yesu, bakoki kotangisa mpisoli. (Yoane 11:35, 36) Kasi bamonaka ntina te ya kolakisa mawa na bango na kolatáká mokuya. (Kokanisá na Matai 6:16-18.) Na bikólo mingi, basɛngaka basi-bakufeli-mibali ete bálata pili mpo na kokitisa mowei motema. Basengeli kolata pili yango na boumeli ya basanza to ata mbula mobimba nsima ya kokunda ebembe, mpe kolongola yango epesaka nzela na kosala feti mosusu.
Koboya kolata mokuya etalemaka lokola kotuka moto oyo akufi. Yango wana, na ekólo Swaziland, bankumu mosusu babenganaki Batatoli ya Yehova na bandako mpe na bamboka na bango. Nzokande, baklisto wana ya sembo bazwaka ntango nyonso lisungi ya bandeko na bango ya elimo na bamboka mosusu.
Esambiselo monene ya ekólo Swaziland elongisaki Batatoli ya Yehova; ekataki likambo ete basengeli kotika bango bázonga na bandako mpe na bamboka na bango. Na likambo mosusu, batikaki moklisto mwasi-mokufeli-mobali ete afanda na ndako na ye wana alakisaki nkoma mpe kasɛti kati na yango mobali na ye oyo akufaki alobaká polele ete mwasi na ye asengeli kolata pili te. Bongo, azalaki na likoki ya kopesa elembeteli ete azalaki komemya mobali na ye.
Ezali na ntina mingi kotika malako ya sikisiki na ntina na bokundi liboso ya kokufa, mingimingi na bisika oyo basalaka mingi mimeseno oyo miyokani na Makomami te. Tótala ndakisa ya Victor, moto ya ekólo Cameroun. Akomaki na bosikisiki lolenge basengeli kolela mpe kokunda ebembe na ye. Na libota na ye ezalaki na bato ya lokumu oyo bazalaki na mimeseno ya kokumisa bawei, bakisa losambo ya mikuwa ya mitó ya bato bakufá. Lokola bazalaki komemya Victor mingi kati na libota na ye, ayebaki ete soki akufi bakosalela motó na ye lolenge wana. Yango wana, apesaki malako ya polele na lolenge Batatoli ya Yehova bakokunda ye. Yango eyeisaki makambo pɛpɛlɛ mpo na mwasi mpe bana na ye, mpe litatoli malamu epesamaki kati na mboka.
Tóboya komekola mimeseno oyo miyokani na Makomami te
Bato mosusu oyo bazali na boyebi ya Biblia basalaki milulu wana mpo na kobanga bato. Mpo na kokima minyoko, balukaki kosepelisa bazalani na bango mpe batosaki momeseno ya kofanda libándá ntɔngɔ saa. Atako ezali malamu kotala moto oyo akufeli ndeko mpo na kobɔndisa ye, yango esɛngi te ete mwa matánga esalama na ndako ya mowei butu na butu kino bakokunda ebembe. Kosala bongo ekoki kobɛtisa bato mosusu libaku, mpamba te bakoki kokanisa ete bato oyo bazali kosala yango bandimaka mpenza te makambo oyo Biblia elobi na ntina na ezalela ya bakufi.—1 Bakolinti 10:32.
Biblia elendisi baklisto ete bátya losambo ya Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi na bango mpe básalela malamu ntango na bango. (Matai 6:33; Baefese 5:15, 16) Nzokande, na bisika mosusu, bandeko babosanaki makambo ya lisangá na boumeli ya pɔsɔ mibale to koleka mpo na matánga. Likambo yango ezali bobele na Afrika te. Lapolo moko euti na Amerika ya Sudi elobi boye na ntina na matánga oyo esalemaki kuna: “Na makita misato, motuya ya bayangani ekitaki mingi. Na boumeli ya mikolo soko zomi bandeko bamonanaki te na likita mpo na mosala ya kosakola. Ata bato oyo bazali Batatoli te mpe bayekoli ya Biblia bakamwaki mpe batungisamaki na komona ete bandeko mosusu mibali mpe basi basanganaki na matánga.”
Na bisika mosusu, libota oyo bakufeli ndeko bakoki kobyanga baninga mosusu ya penepene na ndako na bango mpo na komela mwa kɔpɔ nsima ya kokunda ebembe. Kasi, na bikólo mingi ya Afrika, ebele ya bato oyo bakendaki kokunda ebembe bayaka na ndako ya mowei mpe bazelaka básala feti, mbala mingi babomaka bibwɛlɛ. Bandeko mosusu kati na lisangá ya boklisto bamekolaki momeseno wana, bamonisaki lokola ete bazali kotosa bilambo wana mpo na kokitisa mowei motema.
Milulu ya bokundi oyo Batatoli ya Yehova batambwisaka etyaka bozito te likoló ya moto oyo akufeli ndeko. Na yango, ntina ezali te ya kosala ebongiseli monene mpo ete bandeko oyo bazali wana bápesa mosolo mpo na kosalela yango makambo mineneminene. Soki basi-bakufeli-mibali bazali na makoki te mpo na kosala makambo nyonso, na ntembe te, bandeko mosusu ya lisangá bakosunga bango na esengo nyonso. Soki lisungi yango ekoki te, bankulutu bakoki kokamata bibongiseli mpo na kosunga baoyo babongi na yango, mbala mosusu na biloko ya mosuni.—1 Timoté 5:3, 4.
Milulu ya bokundi mizalaka ntango nyonso na matata na mitinda ya Biblia te. Ntango ekómi na matata, baklisto bazalaka na ekateli ya kotosa Makomami.c (Misala 5:29) Atako ekoki kobakisela bango bolɔzi, ebele ya basaleli ya Nzambe bakoki kotatola ete balongaki komekama wana. Basalaki bongo na lisalisi ya nguya ya Yehova, “Nzambe na kobɔndisa nyonso,” mpe na lisungi ya bolingo ya baninga bandimi oyo babɔndisaki bango kati na bolɔzi na bango.—2 Bakolinti 1:3, 4.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu.
b Na nkota mpe mimeseno ya bato mosusu, liloba “matánga” esalelamaka mpo na kokende kotala mpo na mwa ntango mokuse moto oyo akufeli ndeko mpo na kobɔndisa ye. Ntango mosusu ezalaka na makambo maboyami na Makomami te. Talá Lamuká! ya 8 Sɛtɛ́mbɛ 1979, nkasa 27-28 (na Lifalanse).
c Na bamboka oyo mimeseno ya bokundi ekoki kobimisela moklisto komekama makasi, bankulutu bakoki koyebisa baoyo balingi kozwa batisimo makambo oyo ekoki kokómela bango. Na ntango bakutani na bato yango ya sika mpo na kotalela mituna ya buku Lisanga mpo na kokokisa mosala ya Nzambe, basengeli kotya likebi na biteni oyo: “Molimo, Lisumu mpe kufa” mpe “Koluka kosangana esika moko na mangomba mosusu.” Biteni yango mibale ezali na mituna oyo bokoki kotalela soki bosepeli. Ezali na libaku wana nde bankulutu bakoki koyebisa moto mimeseno ya bokundi oyo miyokani na Makomami te mpo ete moto oyo alingi kozwa batisimo ayeba oyo Nzambe azali kosɛnga na ye soki akutani na makambo motindo yango.
[Etanda na lokasa 23]
Bapambolami mpo na etɛlɛmɛlo na bango ya ngwi
Sibongili, mwasi moko mokufeli-mobali, azali moklisto ya mpiko, afandaka na ekólo Swaziland. Na mikolo mileki, ntango mobali na ye akufaki, aboyaki kotosa mimeseno oyo bato mingi bakanisaka ete ekitisaka bawei motema. Na ndakisa, akataki nsuki na ye kolokolo te. (Deteronome 14:1) Bandeko mwambe ya libota na ye bayokaki nkanda na likambo yango mpe bakataki ye kolokolo na makasi. Lisusu, bapekisaki Batatoli ya Yehova kotala Sibongili na ndako mpo na kobɔndisa ye. Nzokande, bato mosusu oyo basepelaka na nsango ya Bokonzi bakendaki kotala ye mpe bamemelaki ye mikanda ya kolendisa oyo bankulutu bakomaki. Na mokolo oyo Sibongili asengelaki kolata pili, likambo moko ya kokamwa esalemaki. Moto moko ya lokumu kati na libota ayanganisaki libota mobimba mpo na kotalela ntina oyo ye azalaki koboya kolela ebembe ndenge bonkɔkɔ esɛngi.
Sibongili alobi ete: “Batunaki soki bindimeli ya lingomba na ngai epesi ngai nzela namonisa mawa na kolatáká robe ya moindo. Nsima ya kolimbwela bango etɛlɛmɛlo na ngai, balobaki ete bakotindika ngai na makasi te. Likambo ya kokamwa, bango nyonso bandimaki libunga na ndenge bakangaki ngai na makasi mpo na kokata ngai nsuki atako naboyaki. Bango nyonso basɛngaki bolimbisi.” Na nsima, ndeko mwasi ya Sibongili alobaki ete Batatoli ya Yehova bazali na lingomba ya solo, mpe asɛngaki boyekoli ya Biblia.
Tótalela ndakisa mosusu: Na Afrika ya Sudi, mwana mobali moko na nkombo Benjamin, azalaki na mbula 29 ntango ayokaki nsango ete tata na ye akufi liwa ya mbalakaka. Na ntango wana, Benjamin azalaki bobele ye moko Motatoli ya Yehova kati na libota. Na ntango ya bokundi, moto na moto asengelaki koleka na libulu mpe kobwaka mwa mabelé likoló ya sanduku.d Nsima ya kokunda, basangani nyonso ya libota bakataki kolokolo. Lokola Benjamin asanganaki te na milulu wana, bato ya zingazinga mpe basangani ya libota balobaki ete elimo ya tata na ye oyo akufaki ekopesa ye etumbu.
Benjamin alobi ete: “Lokola natyaki elikya epai na Yehova, eloko moko te ekómelaki ngai.” Basangani ya libota bamonaki ete azwaki etumbu te. Na nsima, bamoko na bango babandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova mpe bazwaki batisimo mpo na komonisa ete bamipesi na Nzambe. Bongo Benjamin? Akómaki mosakoli ya ntango nyonso. Na bambula oyo euti koleka, azwaki libaku ya kosala lokola mokɛngɛli-motamboli mpo na kotala masangá ya Batatoli ya Yehova.
[Maloba na nse ya lokasa]
d Bato mosusu bakoki komona mabe te na kobwaka bafololo mpe kobwaka mwa mabelé na libulu. Nzokande, moklisto akoboya kosala bongo soki bato ya mboka batalelaka yango lokola lolenge ya kokitisa mowei motema to soki ezali kati na molulu ekambami na ministre ya lingomba ya lokuta.—Talá Lamuká! ya 22 Yulí 1977, lokasa 15.
-
-
Likita ya nsuka ya mbula 3 Ɔkɔtɔ́bɛ 1998Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—1998 | 15 Juillet
-
-
Likita ya nsuka ya mbula 3 Ɔkɔtɔ́bɛ 1998
LIKITA YA NSUKA YA MBULA mpo na basangani ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania likosalema na mokolo ya 3 Ɔkɔtɔ́bɛ 1998, na Ndako ya Mayangani ya Batatoli ya Yehova, na Boulevard Kennedy 2932, na engumba Jersey City, na etúká ya New Jersey. Likita moko ya ebandeli likosalema bobele na basangani ya la Société, na 9:15 ya ntɔngɔ, bongo likita ya nsuka ya mbula likolanda, na 10:00.
Basangani ya la Société oyo basilaki kobongola adresi na bango ya posita na mbula oyo eleki basengeli koyebisa yango uta sikawa na biro ya mokomeli mpo ete lokasa ya libyangi mpe bakalati ya maponami ekoka kokómela bango na sanza ya Yulí.
Bakalati yango mpe nkasa ya libyangi na likita ya nsuka ya mbula oyo ekotindama epai ya basangani ya la Société, esengeli kozongisama na biro ya mokomeli ya la Société liboso ya 1 Augústo. Mosangani mokomoko asengeli kotondisa kalati na ye mpe kotinda yango nokinoki, koyebisáká soko ye moko akozala na likita to te. Makambo oyo akokoma na kalati mokomoko masengeli kotikala bobele bongo, mpamba te makosalisa biso na koyeba nani akozala na likita.
Ebongisami ete manaka mobimba, bakisa mpe likita moke ya ebandeli mpe balapolo oyo ekopesama, esuka na ngonga ya 1:00 nsima ya nzanga to mwa moke na nsima. Ekozala na likita moko te nsima ya nzanga. Lokola bisika bibongisami na motángo ya sikisiki, bobele moto oyo azali na lokasa ya libyangi nde akokɔta. Bibongiseli bikokamatama te mpo na kolanda likita ya nsuka ya mbula na telefone.
-