Okoki koyokela lisosoli na yo?
NTANGO makambo nyonso ezali malamu, busole (boussole) ezalaka esaleli oyo ekoki kotyelama motema. Likonga na yango elakisaka ntango nyonso na nɔrdi mpamba te etambwisami na nguya ya kobenda biloko (magnétisme) oyo mabelé ezalaka na yango. Na bongo, bato oyo basalaka mibembo balandaka busole mpo ete bábunga te soki bazali na bilembo ya koyeba nzela te. Kasi likambo nini emonanaka ntango ebende oyo ezali na nguya ya kobenda bibende mosusu (aimant) etyami pene na busole? Likonga na yango ekobaluka na ngámbo ya aimant na esika ete elakisa na nɔrdi. Na ntango wana ezali lisusu motambwisi oyo bakoki kotyela motema te.
Likambo yango mpe ekoki kokómela lisosoli ya moto. Mozalisi atyá likoki yango na bɔɔngɔ na biso mpo ete ezala motambwisi oyo tokoki kotyela motema. Lokola tozalisami na elilingi ya Nzambe, lisosoli esengeli ntango nyonso kotalisa biso nzela malamu ntango tolingi kozwa bikateli. Esengeli kopusa biso ete tómonisa bizaleli malamu oyo Nzambe alingaka. (Genese 1:27) Mbala mingi esalaka bongo. Na ndakisa, ntoma Paulo akomaki ete ata bato mosusu oyo bazali na mibeko ya Nzambe te, ‘basalaka makambo ya mibeko.’ Mpo na nini? Mpamba te “lisosoli na mitema na bango ekotatolaka.”—Baloma 2:14, 15.
Atako bongo, ekómaka ete lisosoli esala te na ntango oyo esengeli. Bomoto na biso ya kozanga kokoka etindaka ete tósala makambo oyo biso moko toyebi ete ezali mabe. Paulo andimaki ete, “Kati na motema na ngai moto, nasepeli na Mibeko na Nzambe; kasi namoni mobeko mosusu kati na bilembo na nzoto na ngai. Mobeko yango monene ezali kobunda etumba na Mibeko milingi ngai na makanisi na ngai, ezali mpe kokanga ngai moombo na mobeko na masumu mozali kati na bilembo na ngai.” (Baloma 7:22, 23) Soki tozali mbala mingi kotika nzela na bamposa ya mabe, mokemoke lisosoli na biso ekobanda kolala mpɔngi mpe nsukansuka ekoyebisa biso lisusu te ete etamboli boye ezali mabe.
Nzokande, atako tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki koyokanisa lisosoli na biso na makambo oyo Nzambe alingaka. Ɛɛ, ezali na ntina mingi ete tósala bongo. Lisosoli ya pɛto, oyo eteyami malamu ekosalisa biso tózala na boyokani malamu na Nzambe mpe lisusu ezali na ntina mingi mpo na lobiko na biso. (Baebele 10:22; 1 Petelo 1:15, 16) Lisosoli malamu ekosalisa biso ete tózwa bikateli malamu na bomoi na biso, bikateli oyo bikopesa biso kimya mpe esengo. Mokomi na nzembo alobaki ete moto oyo azali na lisosoli ya ndenge wana, “Mibeko na Nzambe na ye izali kati na motema na ye; matambe na ye ikoselimwa te.”—Nzembo 37:31.
Ndenge nini koteya lisosoli
Koteya lisosoli esuki se na kokanga ebele ya mibeko na bɔɔngɔ te mpe kokangama na yango ata na makambo mikemike. Bafalisai na mikolo ya Yesu basalaki ndenge wana. Bakonzi yango ya mangomba bayebaki Mibeko mpe babimisaki bipekiseli kilikili ya bonkɔkɔ. Bakanisaki ete bipekiseli yango ekosalisa bato mpo ete bábuka Mibeko te. Yango wana, basepelaki ata moke te ntango bamonaki bayekoli ya Yesu babuki masangu mpe balei yango na mokolo ya Sabata. Mpe lisusu, basambisaki Yesu ntango abikisaki moto oyo azalaki na lobɔkɔ ekauka na mokolo ya Sabata. (Matai 12:1, 2, 9, 10) Na bonkɔkɔ ya Bafalisai, makambo wana mibale ezalaki kobuka mobeko ya minei na Mibeko Zomi.—Exode 20:8-11.
Ezali solo ete Bafalisai bayekolaki Mibeko. Kasi, lisosoli na bango eyokanaki na mitinda ya Nzambe? Ata moke te! Yango wana, ntango kaka basilisaki koloba mabe na likambo oyo bamonaki ete ezali mpenza kobuka mobeko ya Sabata, Bafalisai bafandelaki Yesu likita “ete báboma ye.” (Matai 12:14) Kanisá naino—mpo na bakonzi wana ya mangomba oyo bamimonaki ete bazali basembwi, kolya mbuma oyo babuki sika mpe kobikisa moto na mokolo ya Sabata ezalaki likambo ya nsɔmɔ; kasi bayokaki mabe moko te kofanda likita mpo na koboma Yesu!
Banganga-bakonzi bamonisaki mpe makanisi mabe ndenge moko. Bato yango bamonaki mabe moko te ntango bapesaki Yuda palata 30 na mbongo ya tempelo mpo na kotɛka Yesu. Kasi, ntango Yuda azongiselaki bango mbongo mpe abwakaki yango na tempelo, lisosoli ya banganga-bakonzi etungisamaki. Balobaki ete, “Ekoki te ete tóbwaka [mosolo] oyo na sanduku-na-makabo, zambi ezali mosolo na makila.” (Matai 27:3-6) Emonani mpenza ete banganga-bakonzi bamitungisaki ete mbongo ya Yuda ezalaki sikawa mabe. (Kokanisá na Deteronome 23:18.) Kasi, bobele bato yango bamonaki mabe moko te kobimisa mbongo mpo ete bátɛkela bango Mwana ya Nzambe!
Tóyokanisa lisosoli na biso na makanisi ya Nzambe
Bandakisa oyo tolobeli emonisi ete koteya lisosoli esuki kaka te na kotondisa bɔɔngɔ na ebele ya makambo ya kosala mpe makambo ya kosala te. Ya solo, ezali na ntina mingi ete tóyeba mibeko ya Nzambe mpe ebongi ete tótosa yango mpo na kobika. (Nzembo 19:7-11) Nzokande, longola koyekola mibeko ya Nzambe, tosengeli kokolisa motema oyo eyokani na makanisi ya Nzambe. Na ndenge yango, esakweli oyo Yehova alobaki na nzela ya Yisaya ekokokisama epai na biso. Esakweli yango elobi ete: “Miso na yo makomona [Molakisi na yo Monene, NW]. Mpe matoi na yo makoyoka liloba nsima na yo ete, Oyo ezali nzela, tambolá na yango, wana ekobongwana yo na epai na mobali to na epai na mwasi.”—Yisaya 30:20, 21; 48:17.
Yango elingi koloba te ete ntango tolingi kozwa ekateli moko monene, tokoyoka mpenza mongongo moko oyo ekoloba na biso likambo oyo tosengeli kosala. Kasi, soki makanisi na biso eyokani na makanisi ya Nzambe, lisosoli na biso ekosalisa biso mpenza mpo ete tózwa ekateli oyo ekosepelisa ye.—Masese 27:11.
Tótalela ndakisa ya Yosefe, oyo azalaká na bomoi na ekeke ya 18 L.T.B. Ntango mwasi ya Potifala azalaki kotungisa ye ete asala na ye ekobo, Yosefe azalaki koboya mpe koloba ete: “Nakoka kosala mabe monene oyo mpe kosala lisumu epai na Nzambe boni?” (Genese 39:9) Na eleko oyo Yosefe azalaki na bomoi, mobeko moko te ekomamaki ete Nzambe apekisi ekobo. Lisusu, Yosefe azalaki na mokili ya Ezipito, epai azalaki na libota te to na tata te mpo na kopesa ye disipilini to mibeko. Boye, eloko nini esalisaki Yosefe ete akwea na lisɛnginya wana te? Na mokuse, ezali lisosoli oyo eteyami. Yosefe andimaki likanisi ya Nzambe ete mobali na mwasi na ye basengeli kozala “mosuni moko.” (Genese 2:24) Yango wana amonaki ete ekozala mabe kozwa mwasi ya moto mosusu. Na likambo wana, makanisi ya Yosefe eyokanaki na makanisi ya Nzambe. Na makanisi na ye, kosala ekobo ezalaki mabe.
Lelo oyo, bato lokola Yosefe bazali mingi te. Pite mpe ekobo ezali kosalema mingi, mpe bato mingi bakanisaka te ete bazali na mokumba liboso ya Mozalisi na bango, liboso na bango moko, to liboso ya mobalani na bango, oyo esɛngisi bango ete báboya makambo ya bosɔtɔ. Makambo ekokani mpenza na oyo elobelami na mokanda ya Yilimia ete: “Moto te ayoki nsɔni mpo na mabe na ye koloba ete, Nasali nini? Moko na moko amitii na nzela na ye lokola mbalata ekopota mbangu kino etumba.” (Yilimia 8:6) Na yango, ebongi mpenza ete tóyokanisa lisosoli na biso na makanisi ya Nzambe. Tozali na eloko moko malamu mpenza oyo ekoki kosalisa biso na kosala yango.
Lisalisi mpo na koteya lisosoli
Makomami mapemami mazali na “litomba mpo na koteya, mpo na kopamela, mpo na kobongisa makambo, mpo na kosembola kati na boyengebene ete moto na Nzambe azala mpenza oyo akoki, oyo asɛlingwi mpenza mpo na mosala nyonso malamu.” (2 Timote 3:16, 17, NW) Koyekola Biblia ekosalisa biso mpo tóbongisa oyo Biblia ebéngi “makoki” na biso “ya kososola” mpo na kokesenisa mabe na malamu. (Baebele 5:14, NW) Ekosalisa biso ete tólingaka makambo oyo Nzambe alingaka mpe tóyina oyo ayinaka.—Nzembo 97:10; 139:21.
Yango wana, ntango tozali koyekola Biblia, tosengeli nde kozala na mokano ya koyeba ndimbola mpe ntina ya solo, kasi ya kozwa boyebi mpamba ya Biblia te. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛ́mbɛ 1976 (ebimeli ya Lifalanse) elobaki ete: “Ntango tozali koyekola Makomami, tosengeli kosala makasi mpo tókanga ntina ya bosembo, bolingo mpe boyengebene ya Nzambe mpe kokɔtisa yango na kati ya mitema na biso mpo ete ekóma mpenza na bomoto na biso lokola kolya mpe kopema. Tosengeli koluka mpenza kososola ete tozali na mokumba ya elimo na kolonáká ezaleli ya koyeba kokesenisa mabe na malamu. Na koleka, tosengeli kosala ete lisosoli na biso eyeba mokumba na yango liboso ya Mopesi Monene ya mibeko mpe Mosambisi. (Yis. 33:22) Yango wana, ntango tozali koyekola makambo ya Nzambe, tosengeli ntango nyonso koluka komekola ye na makambo nyonso ya bomoi na biso.”
Tózwa “makanisi na Klisto”
Koyekola Biblia ekosalisa mpe biso ete tózwa “makanisi na Klisto,” elingi koloba elimo ya kotosa noki mpe ya komikitisa oyo Yesu amonisaki. (1 Bakolinti 2:16) Asepelaki kosala mokano ya Tata na ye, ezalaki te momeseno mpamba oyo asengelaki kolandaka kozanga kokanisa. Davidi, mokomi na nzembo alobelaki elimo na ye na esakweli. Akomaki ete: “Nasepeli kosala yango ekosepelisa yo, ɛ Nzambe na ngai; mibeko na yo izali kati na motema na ngai.”a—Nzembo 40:8.
Mpo na koteya lisosoli na biso, ezali na ntina mingi ete tózwa “makanisi na Klisto.” Ntango azalaki awa na mabelé lokola moto ya kokoka, Yesu amonisaki bizaleli mpe bomoto ya Tata na ye na makambo nyonso na meko oyo moto akoki mpenza komonisa yango. Yango wana, alobaki ete: “Ye oyo amoni ngai asili komona Tata.” (Yoane 14:9) Yesu asalaki mpenza oyo Tata na ye alingaki na makambo nyonso oyo akutanaki na yango awa na mabelé. Yango wana, ntango tozali koyekola bomoi ya Yesu, tozali nde kokanga ntina malamumalamu ya ndenge oyo Yehova Nzambe azali.
Tozali kotánga ete Yehova azali “na mawa mpe na ngɔlu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto.” (Exode 34:6) Mbala mingi, Yesu azalaki komonisa bizaleli yango epai na bayekoli na ye. Ntango bazalaki kotyana ntembe mbala na mbala mpo na koyeba nani aleki baninga, Yesu asalelaki motema molai mpo na koteya bango na maloba mpe na ndakisa ete, “Ye oyo alingi kozala monene kati na bino akóma mosungi na bino, mpe ye oyo alingi kozala moto na liboso na bino, azala moombo na bino.” (Matai 20:26, 27) Oyo ezali se ndakisa moko mpo na komonisa ete tokoki koyokanisa lisosoli na biso na makanisi ya Nzambe soki totaleli bomoi ya Yesu.
Ntango tozali koyekola makambo mingi na ntina na Yesu, tokoyeba malamu ndenge ya komekola Tata na biso ya likoló, Yehova. (Baefese 5:1, 2) Lisosoli oyo eyokani na makanisi ya Nzambe ekotambwisa biso na nzela ya malamu. Yehova alaki baoyo bazali kotyela ye motema ete: “Nakoteya yo mpe nakolakisa yo nzela ekoki na yo [kolanda]; nakopesa yo toli wana nazali kotala yo.”—Nzembo 32:8.
Mbano ya lisosoli oyo eteyami
Lokola ayebaki motó makasi ya bato ya kozanga kokoka, Mose akebisaki Bayisalaele ete: “Tyá mitema na bino na maloba nyonso oyo elakeli ngai bino lelo oyo, ete bókoka kolakela bana na bino yango, ete bango básɛnzɛla kosala maloba nyonso na mobeko oyo.” (Deteronome 32:46) Biso mpe tosengeli kokoma mibeko ya Nzambe na mitema na biso. Soki tosali bongo, na ntembe te lisosoli na biso ekotambwisa biso mpe ekosalisa biso ete tózwa bikateli ya malamu.
Kasi, tosengeli kokeba. Lisese moko ya Biblia elobi ete: “Nzela ezali oyo emonani malamu epai na moto nde nsuka na yango bobele nzela na kufa.” (Masese 14:12) Mpo na nini mbala mingi ezalaka bongo? Mpamba te, lokola Biblia elobi yango, “Motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso mpe na mabe mingi; nani akoki koyeba yango?” (Yilimia 17:9) Na yango, biso nyonso tosengeli kolanda toli ya Masese 3:5, 6 ete: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na mokanda oyo atindelaki Baebele, ntoma Paulo amonisaki ete maloba ya Nzembo 40 etalelaki Yesu Klisto.—Baebele 10:5-10.
[Elilingi na lokasa 7]
Lokola busole, lisosoli oyo eteyami na Biblia ekoki kolakisa biso nzela malamu
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Busole: Na ndingisa ya Peabody Essex Museum, Salem, Mass.