Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • td nk. 3-15
  • Masolo ya kosolola na Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Masolo ya kosolola na Biblia
  • Masolo ya kosolola na Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • 1. Armagedon
  • 2. Basakoli ya lokuta
  • 3. Batatoli ya Yehova
  • 4. Batisimo
  • 5. Biblia
  • 6. Bililingi
  • 7. Biyenga ya mangomba, bokundoli mikolo ya kobotama
  • 8. Bokonzi
  • 9. Bomoi
  • 10. Bosato (Trinité)
  • 11. Botɛmɛli, minyoko
  • 12. Bozalisi
  • 13. Eglize
  • 14. Ekaniseli, Mɛsi
  • 15. Ekulusu
  • 16. Elimo, misala ya bilimo mabe
  • 17. Kobikisa mpe koloba na minɔkɔ
  • 18. Kolandana ya ntango
  • 19. Kosambela bankɔkɔ
  • 20. Kosambela Malia
  • 21. Kosangisa mangomba
  • 22. Kozonga ya Klisto
  • 23. Libala
  • 24. Libondeli
  • 25. Lifelo (Hadesi, Sheol)
  • 26. Likoló
  • 27. Lingomba
  • 28. Lisekwa
  • 29. Lisiko
  • 30. Lisumu
  • 31. Litatoli
  • 32. Liwa
  • 33. Lobiko
  • 34. Mabe, bampasi oyo ezali na mokili
  • 35. Mabelé
  • 36. Makila
  • 37. Mikolo ya nsuka
  • 38. Ministre
  • 39. Molimo
  • 40. Nyonso esilá kokanama
  • 41. Sabata
  • 42. Yehova, Nzambe
  • 43. Yesu
  • 44. Zabolo, bademo
Masolo ya kosolola na Biblia
td nk. 3-15

Masolo ya kosolola na Biblia

1. Armagedon

A. Etumba ya Nzambe mpo na kosilisa mabe

Mabota mayanganisami na Armagedon. Em 16:14, 16

Nzambe akobunda, akosalela Mwana na ye mpe baanzelu. 2Tes 1:6-9; Em 19:11-16

Ndenge nini tokoki kobika. Sef 2:2, 3; Em 7:14

B. Emonisi te ete Nzambe azangi bolingo

Mokili ebebi mingi mpenza. 2Tm 3:1-5

Nzambe azali na motema molai, kasi bosembo esɛngi akanga mabɔkɔ te. 2Pe 3:9, 15; Lk 18:7, 8

Bato mabe basengeli kolongolama mpo bayengebene bázala malamu. Mas 21:18; Em 11:18

2. Basakoli ya lokuta

A. Koya ya basakoli ya lokuta esakolamaki; bazalaki na mikolo ya bantoma

Ndenge nini tokoki koyeba basakoli ya lokuta. Det 18:20-22; Lk 6:26

Esakolamaki ete bakoya; bakoyebana na mbuma na bango. Mt 24:23-26; 7:15-23

3. Batatoli ya Yehova

A. Ebandeli ya Batatoli ya Yehova

Yehova amonisi banani bazali mpenza batatoli na ye. Yis 43:10-12; Yil 15:16

Molɔngɔ ya batatoli ya sembo ebandi na Abele. Eb 11:4, 39; 12:1

Yesu azalaki motatoli ya sembo mpe ya solosolo. Yn 18:37; Em 1:5; 3:14

4. Batisimo

A. Baklisto basengeli kozwa yango

Yesu apesaki ndakisa. Mt 3:13-15; Eb 10:7

Ezali elembo ya komiboya to ya komipesa. Mt 16:24; 1Pe 3:21

Ezali bobele mpo na baoyo bakoli mpe bakoki koteyama. Mt 28:19, 20; Mis 2:41

Lolenge ya malamu ezali ya kozindisama mobimba na mai. Mis 8:38, 39; Yn 3:23

B. Elongolaka masumu te

Yesu abatisamaki te mpo na kolongola masumu. 1Pe 2:22; 3:18

Makila ya Yesu nde elongolaka masumu. 1Yn 1:7

5. Biblia

A. Liloba ya Nzambe epemami

Elimo ya Nzambe esalisaki bato mpo na kokoma yango. 2Pe 1:20, 21

Ezali na bisakweli: Da 8:5, 6, 20-22; Lk 21:5, 6, 20-22; Yis 45:1-4

Biblia mobimba epemami mpe ezali na litomba. 2Tm 3:16, 17; Lom 15:4

B. Ezali litambwisi oyo ebongi mpenza na mikolo na biso

Kozanga kotya likebi na mitinda ya Biblia ezali likama. Lom 1:28-32

Mayele ya bato ekoki kozwa esika ya Biblia te. 1Kol 1:21, 25; 1Tm 6:20

Ezali libateli liboso ya monguna monene. Ef 6:11, 12, 17

Etambwisaka bato na nzela ya malamu. Nz 119:105; 2Pe 1:19; Mas 3:5, 6

C. Ekomami mpo na bato ya bikólo nyonso mpe ya mposo nyonso

Biblia ebandaki kokomama na mikili ya Azia. Ex 17:14; 24:12, 16; 34:27

Nzambe apesaki yango bobele mpo na bato ya Mpoto te. Lom 10:11-13; Ga 3:28

Nzambe andimaka bato ya mitindo nyonso. Mis 10:34, 35; Lom 5:18; Em 7:9, 10

6. Bililingi

A. Kosalela bililingi mpe bikeko kati na losambo ezali kotyola Nzambe

Tokoki kosala elilingi ya Nzambe te. 1Yn 4:12; Yis 40:18; 46:5; Mis 17:29

Bapesi baklisto likebisi na ntina na bililingi. 1Kol 10:14; 1Yn 5:21

Esengeli kosambela Nzambe na elimo mpe na solo. Yn 4:24

B. Kosambela bililingi ezalaki likama mpo na libota ya Yisalaele

Bapekisaki Bayuda kosambela bililingi. Ex 20:4, 5

Ekoki koyoka te, koloba mpe te; baoyo basalaka yango bakokóma lokola yango. Nz 115:4-8

Ezalaki motambo mpe ememaki na libebi. Nz 106:36, 40-42; Yil 22:8, 9

C. Kosambela ya “ndenge olingi” epekisami

Nzambe aboyaki ete básambela ye “ndenge olingi.” Yis 42:8

Bobele Nzambe nde azali “Moyoki ya mabondeli.” Nz. 65:1, 2

7. Biyenga ya mangomba, bokundoli mikolo ya kobotama

A. Baklisto ya liboso bazalaki te kokumisa mikolo ya kobotama mpe Noele

Baoyo bazalaki basambeli ya solo te nde bazalaki kokumisa yango. Ge 40:20; Mt 14:6

Tosengeli kokanisa bobele mokolo ya liwa ya Yesu. Lk 22:19, 20; 1Kol 11:25, 26

Ezali malamu te kosala bilambo ya lokoso. Lom 13:13; Ga 5:21; 1Pe 4:3

8. Bokonzi

A. Makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekosalela bato

Ekokokisa mokano ya Nzambe. Mt 6:9, 10; Nz 45:6; Em 4:11

Ezali boyangeli moko oyo ezali na mokonzi mpe na mibeko. Yis 9:6, 7; 2:3; Nz 72:1, 8

Ekoboma bato mabe, mpe ekoyangela mabelé mobimba. Da 2:44; Nz 72:8

Ekozala boyangeli ya mbula 1 000 mpo na kobikisa bato mpe kozongisa Paladiso. Em 21:2-4; 20:6

B. Ebandi mosala na yango nzokande banguna ya Klisto bazali naino

Nsima ya kosekwa, Klisto asengelaki kozela ntango molai. Nz 110:1; Eb 10:12, 13

Azwi nguya mpe abundisi Satana. Nz 110:2; Em 12:7-9; Lk 10:18

Na ntango Bokonzi etyamaki, mawa ezalaki awa na mabelé. Em 12:10, 12

Yikiyiki oyo ezali sikawa emonisi ete oyo ezali ntango ya komitya na ngámbo ya Bokonzi. Em 11:15-18

C. Ezali ‘kati na mitema’ te, ekotyama mpe na milende ya bato te

Bokonzi ezali na likoló, kasi na mabelé te. 2Tm 4:18; 1Kol 15:50; Nz 11:4

Ezali na ‘kati ya mitema’ te; Yesu azalaki nde kolobela Bafalisai. Lk 17:20, 21

Esangani na mokili oyo te. Yn 18:36; Lk 4:5-8; Da 2:44

Biyangeli, malako ya mokili oyo ekozala lisusu te. Da 2:44

9. Bomoi

A. Bato ya botosi nde bakozwa bomoi ya seko

Nzambe, oyo akoki kokosa te, alaki bomoi. Tit 1:2; Yn 10:27, 28

Bato oyo bazali komonisa kondima nde bakozwa bomoi ya seko. Yn 11:25, 26

Liwa ekosila nyɛɛ. 1Kol 15:26; Em 21:4; 20:14; Yis 25:8

B. Basangani ya nzoto ya Klisto nde bakozwa bomoi na likoló

Nzambe aponaka bato yango ndenge ye moko alingi. Mt 20:23; 1Kol 12:18

Bobele bato 144 000 nde bakamatami awa na mabelé. Em 14:1, 4; 7:2-4; 5:9, 10

Ata Yoane Mobatisi akozala na Bokonzi ya likoló te. Mt 11:11

C. Bomoi awa na mabelé elakami mpo na bato oyo motango na bango ekatami te, “bampate mosusu”

Bobele bato moke nde bakozala na likoló elongo na Yesu. Em 14:1, 4; 7:2-4

“Bampate mosusu” bazali bandeko ya Klisto te. Yn 10:16; Mt 25:32, 40

Bato mingi bazali koyanganisama sikawa mpo bázala na bomoi awa na mabelé. Em 7:9, 15-17

Bato mosusu bakosekwa mpo na kozala na bomoi awa na mabelé. Em 20:12; 21:4

10. Bosato (Trinité)

A. Nzambe, Tata, azali moto bobele moko, oyo aleki na molɔ́ngɔ́ mobimba

Nzambe azali bato misato te. Det 6:4; Mki 2:10; Mko 10:18; Lom 3:29, 30

Mwana azalisamaki; Nzambe ye moko azalaki liboso. Em 3:14; Kols 1:15; Yis 44:6

Nzambe azali mokonzi ya molɔ́ngɔ́ libela na libela. Flp 2:5, 6; Da 4:35

Nzambe asengeli kokumisama na nyonso. Flp 2:10, 11

B. Mwana azali na nse ya Tata, ezala liboso mpe nsima ya koya na ye awa na mabelé

Mwana azalaki na botosi banda na likoló, Tata nde atindaki ye. Yn 8:42; 12:49

Azalaki na botosi awa mpe na mabelé, Tata aleki ye. Yn 14:28; 5:19; Eb 5:8

Azwi lokumu mingi na likoló, kasi amikitisaki. Flp 2:9; 1Kol 15:28; Mt 20:23

Yehova azali mokonzi ya Klisto mpe Nzambe na ye. 1Kol 11:3; Yn 20:17; Em 1:6

C. Bomoko kati na Nzambe mpe Klisto

Bazalaka ntango nyonso na boyokani na makambo nyonso. Yn 8:28, 29; 14:10

Bomoko na bango ezali lokola oyo ezalaka kati na mobali mpe mwasi na ye. Yn 10:30; Mt 19:4-6

Bandimi nyonso basengeli kozala na bomoko yango. Yn 17:20-22; 1Kol 1:10

Losambo ya Yehova ezali moko, na nzela ya Klisto mpo na libela. Yn 4:23, 24

D. Elimo santu ya Nzambe ezali nguya na ye oyo esalaka mosala

Ezali nguya, kasi moto te. Mt 3:16; Yn 20:22; Mis 2:4, 17, 33

Ezali te moto moko oyo azali na likoló elongo na Nzambe mpe Klisto. Mis 7:55, 56; Em 7:10

Etambwisami na Nzambe mpo na kokokisa mikano na ye. Nz 104:30; 1Kol 12:4-11

Baoyo bazali kosalela Nzambe bazwaka yango mpe batambwisamaka na yango. 1Kol 2:12, 13; Ga 5:16

11. Botɛmɛli, minyoko

A. Mpo na nini baklisto bakutanaka na botɛmɛli

Bayinaki Yesu, asakolaki ete botɛmɛli ekozala. Yn 15:18-20; Mt 10:22

Kokangama makasi na mitinda ya sembo ezali kokweisa mokili. 1Pe 4:1, 4, 12, 13

Satana, nzambe ya ebongiseli oyo, azali kotɛmɛla Bokonzi. 2Kol 4:4; 1Pe 5:8

Moklisto abangaka te, Nzambe asungaka ye. Lom 8:38, 39; Yk 4:8

B. Mwasi akotikela mobali na ye nzela te ete akabola ye na Nzambe

Basilaki kokebisa ye; bato mosusu bakoki koyebisa mobali na ye makambo ya lokuta. Mt 10:34-38; Mis 28:22

Asengeli kotalela Nzambe mpe Klisto. Yn 6:68; 17:3

Na bosembo na ye akoki mpe kobikisa mobali na ye. 1Kol 7:16; 1Pe 3:1-6

Mobali azali mokonzi, kasi na likambo ya losambo ezali ye te nde asengeli kopesa mitindo. 1Kol 11:3; Mis 5:29

C. Mobali akotikela mwasi na ye nzela te ete apekisa ye kosalela Nzambe

Asengeli kolinga mwasi na ye mpe libota na ye, asengeli kozala na mposa ete bango bázwa bomoi. 1Kol 7:16

Ye nde azwaka bikateli, akokisaka bamposa na bango. 1Kol 11:3; 1Tm 5:8

Nzambe alingaka mobali oyo akangamaka na solo makasi. Yk 1:12; 5:10, 11

Kobuka mibeko ya Nzambe mpo na koluka kimya ebebisaka boyokani elongo na Ye. Eb 10:38

Akokamba libota na ye na bolamu kati na mokili ya sika. Em 21:3, 4

12. Bozalisi

A. Siansi endimi yango; ekweisi evolisyo

Siansi endimi ete biloko nyonso ezalisamaki na molɔngɔ. Ge 1:11, 12, 21, 24, 25

Mobeko ya Nzambe oyo elobi ete eloko na eloko ezali na “lolenge” na yango ezali solo. Ge 1:11, 12; Yk 3:12

B. Mikolo ya bozalisi ezali mikolo ya ngonga 24 te

“Mokolo” ekoki kolimbola bobele eleko moko boye. Ge 2:4

Na miso ya Nzambe, mokolo ekoki kozala eleko moko ya molai. Nz 90:4; 2Pe 3:8

13. Eglize

A. Eglize ya elimo, etongami likoló ya Klisto

Nzambe afandaka te na batempelo oyo bato basali. Mis 17:24, 25; 7:48

Eglize ya solosolo ezali tempelo ya elimo oyo esalemi na mabanga ya bomoi. 1Pe 2:5, 6

Klisto, libanga ya litumu; bantoma, mabanga mosusu ya moboko. Ef 2:20

Esengeli kosambela Nzambe na elimo mpe na solo. Yn 4:24

B. Eglize etongami likoló ya Petelo te

Yesu alobaki te ete eglize etongami likoló ya Petelo. Mt 16:18

“Libanga monene” ezali nde Yesu. 1Kol 10:4

Petelo amonisaki ete Yesu azali moboko. 1Pe 2:4, 6-8; Mis 4:8-12

14. Ekaniseli, Mɛsi

A. Ekaniseli ya Elambo ya Mpokwa ya Nkolo

Esalemaka mbala moko na mbula na dati ya Elekeli. Lk 22:1, 17-20; Ex 12:14

Esalemaka mpo na kokanisa liwa ya Klisto lokola mbeka. 1Kol 11:26; Mt 26:28

Baoyo bazali na elikya ya kokende na likoló nde balyaka limpa mpe bamelaka vinyo na elambo yango. Lk 22:29, 30; 12:32, 37

Ndenge nini moto akoki koyeba ete azali na elikya yango. Lom 8:15-17

B. Mɛsi ezali na Makomami te

Mpo masumu elimbisama, makila esengeli kosopana. Eb 9:22

Klisto nde azali Moyokanisi bobele moko ya kondimana ya sika. 1Tm 2:5, 6; Yn 14:6

Klisto azali na likoló; nganganzambe moko te akoki kokitisa ye longwa kuna na likoló. Mis 3:20, 21

Ntina ya kozongelaka mbeka ya Klisto mbala na mbala ezali te. Eb 9:24-26; 10:11-14

15. Ekulusu

A. Babakaki Yesu na nzete ya mpasi, likambo ya nsɔni

Yesu abakamaki na nzete ya kobomama to na likonzí. Mis 5:30; 10:39; Ga 3:13

Baklisto basengeli komema nzete ya mpasi, elembo ya likambo ya nsɔni. Mt 10:38; Lk 9:23

B. Tosengeli kosambela yango te

Kotalisa nzete ya mpasi ya Klisto ezali likambo ya nsɔni. Eb 6:6; Mt 27:41, 42

Kosalela ekulusu na losambo ezali kosambela bikeko. Ex 20:4, 5; Yil 10:3-5

Yesu azali elimo, azali na nzete lisusu te. 1Tm 3:16; 1Pe 3:18

16. Elimo, misala ya bilimo mabe

A. Elimo santu ezali nini

Nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala, kasi ezali moto te. Mis 2:2, 3, 33; Yn 14:17

Esalelamaki na ntango ya bozalisi, epemisaki Biblia, bongo na bongo. Ge 1:2; Ezk 11:5

Ebotaka mpe epakolaka basangani ya nzoto ya Klisto. Yn 3:5-8; 2Kol 1:21, 22

Epesaka nguya mpe etambwisaka basaleli ya Nzambe lelo oyo. Ga 5:16, 18

B. Nguya ya bomoi ebengami elimo

Nguya ya bomoi, esimbami na mpema. Yk 2:26; Yb 27:3

Nzambe nde azali na bokonzi likoló na nguya ya bomoi. Zek 12:1; Mos 8:8

Nguya ya bomoi ya bato mpe ya banyama eutaka epai ya Nzambe. Mos 3:19-21

Elimo ezongaka na mabɔkɔ ya Nzambe na elikya ete moto oyo akufi akosekwa. Lk 23:46

C. Esengeli koboya misala ya bilimo mabe, misala ya bademo

Liloba ya Nzambe epekisi yango. Yis 8:19, 20; Le 19:31; 20:6, 27

Kosakola makambo mabombami ezali misala ya bademo; yango ekweisami. Mis 16:16-18

Ememaka na libebi. Ga 5:19-21; Em 21:8; 22:15

Astroloji epekisami. Det 18:10-12; Yil 10:2

17. Kobikisa mpe koloba na minɔkɔ

A. Kobikisa ya elimo ezali na matomba oyo eumelaka seko na seko

Maladi ya elimo ebomaka. Yis 1:4-6; 6:10; Os 4:6

Mokumba ya libosoliboso etali kobikisa ya elimo. Yn 6:63; Lk 4:18

Elongolaka masumu; epesaka bolamu, bomoi. Yk 5:19, 20; Em 7:14-17

B. Na Bokonzi ya Nzambe bato bakozala na kolɔngɔnɔ ya nzoto mpo na libela

Yesu abikisaki bato ya bokɔnɔ, asakolaki mapamboli oyo Bokonzi ekopesa. Mt 4:23

Bokonzi oyo elakami nde ekobikisa bato mpo na libela. Mt 6:10; Yis 9:7

Ata liwa ekolongolama. 1Kol 15:25, 26; Em 21:4; 20:14

C. Kobikisa oyo ezali kosalema lelo ezali na elembo te oyo emonisi ete Nzambe andimaka yango

Bayekoli bamibikisaki bango moko na nzela ya makamwisi te. 2Kol 12:7-9; 1Tm 5:23

Makabo ya makamwisi esukaki nsima ya mikolo ya bantoma. 1Kol 13:8-11

Kobikisa bato ya maladi ezali te elembeteli ya kondimama na Nzambe. Mt 7:22, 23; 2Tes 2:9-11

D. Koloba na minɔkɔ mosusu ezalaki bobele ebongiseli ya mwa ntango moke

Ezalaki elembo; kasi esengeli nde koluka makabo oyo eleki monene. 1Kol 14:22; 12:30, 31

Basakolaki ete makabo ya elimo mpo na kosala makamwisi ekosila. 1Kol 13:8-10

Misala ya kokamwisa ezali te elembeteli ya solosolo ya kondimama na Nzambe. Mt 7:22, 23; 24:24

18. Kolandana ya ntango

A. 1914 (T.B.) esukisi ntango ya mabota

Molɔngɔ ya bakonzi oyo bayangelaki esukaki na mobu 607 L.T.B. Ezk 21:25-27

“Ntango nsambo” esengelaki koleka liboso ya kozongisama ya bokonzi. Da 4:32, 16, 17

Ntango nsambo = Ntango 3 1⁄2 × 2, to mikolo 1 260 × 2. Em 12:6, 14; 11:2, 3

Mokolo moko mpo na mbula moko. [Epesi mbula 2 520 ] Ezk 4:6; Mit 14:34

Ekoumela kino kotyama ya Bokonzi. Lk 21:24; Da 7:13, 14

19. Kosambela bankɔkɔ

A. Kosambela bankɔkɔ ezali na ntina te

Bankɔkɔ bakufá, bayebaka eloko te. Mos 9:5, 10

Tosengeli kosambela bankɔkɔ te. Lom 5:12, 14; 1Tm 2:14

Nzambe apekisi losambo ya ndenge wana. Ex 34:14; Mt 4:10

B. Tokoki kokumisa bato, kasi tokosambela bobele Nzambe

Bilenge basengeli kokumisa mikóló. 1Tm 5:1, 2, 17; Ef 6:1-3

Kasi tosengeli kosambela bobele Nzambe. Mis 10:25, 26; Em 22:8, 9

20. Kosambela Malia

A. Malia azalaki mama ya Yesu, kasi “mama ya Nzambe” te

Nzambe azali na ebandeli te. Nz 90:2; 1Tm 1:17

Malia azalaki mama ya Mwana ya Nzambe, ntango azalaki awa na mabelé. Lk 1:35

B. Malia atikalaki “ngɔndɔ ntango nyonso” te

Abalanaki na Yosefe. Mt 1:19, 20, 24, 25

Longola Yesu, abotaki mpe bana mosusu. Mt 13:55, 56; Lk 8:19-21

Na ntango wana, bango bazalaki “bandeko ya elimo” ya Yesu te. Yn 7:3, 5

21. Kosangisa mangomba

A. Kosangana na mangomba mosusu eyokani na nzela ya Nzambe te

Ezali bobele na nzela moko ya nkaka, bato moke nde bazali komona yango. Ef 4:4-6; Mt 7:13, 14

Bakebisi biso ete mateya ya lokuta ebebisaka bato. Mt 16:6, 12; Ga 5:9

Etinda epesami ya kokabwana na mangomba mosusu. 2Tm 3:5; 2Kol 6:14-17; Em 18:4

B. Koloba ete “mangomba nyonso ezali malamu” ezali lokuta

Bato mosusu bazalaka na molende, kasi yango ezali te ndenge Nzambe alingi. Lom 10:2, 3

Mabe ekoki kobebisa oyo ezali malamu. 1Kol 5:6; Mt 7:15-17

Bateyi ya lokuta bayeisaka libebi. 2Pe 2:1; Mt 12:30; 15:14

Losambo ya pɛto esɛngi bokangami moko makasi. Det 6:5, 14, 15

22. Kozonga ya Klisto

A. Kozonga na ye ekomonana na miso ya bato te

Ayebisaki bayekoli na ye ete mokili ekomona ye lisusu te. Yn 14:19

Bobele bayekoli nde bamonaki ye ntango amataki na likoló; kozonga na ye mpe ekozala bongo. Mis 1:6, 10, 11

Na likoló, azali elimo oyo ezangi komonana. 1Tm 6:14-16; Eb 1:3

Akozonga kati na nguya na Bokonzi ya likoló. Da 7:13, 14

B. Eyebani na makambo oyo ezali komonana polele

Bayekoli basɛngaki elembo ya kozala na ye. Mt 24:3

Baklisto “bamonaka” kozala na ye na nzela ya bososoli. Ef 1:18

Makambo mingi ezali komonisa kozala na ye. Lk 21:10, 11

Banguna “bakomona” ntango libebi ekokwela bango. Em 1:7

23. Libala

A. Libala esengeli kozala ekanganeli ya lokumu

Ekokanisami na Klisto mpe mwasi ya libala. Ef 5:22, 23

Mbeto ya libala esengeli kozala na mbindo te. Eb 13:4

Babalani bazwi toli ete basengeli kokabwana te. 1Kol 7:10-16

Por·neiʹa ezali ntina bobele moko endimami na Makomami mpo na koboma libala. Mt 19:9

B. Baklisto basengeli kotosa etinda oyo etali bokonzi

Mobali lokola azali mokonzi asengeli kolinga mpe kokokisa bamposa ya libota na ye. Ef 5:23-31

Mwasi asengeli komikitisa, kozala na bolingo mpe kotosa mobali na ye. 1Pe 3:1-7; Ef 5:22

Bana basengeli kozala na botosi. Ef 6:1-3; Kols 3:20

C. Mikumba ya baboti baklisto epai ya bana

Basengeli kolinga bango, kolekisa ntango elongo na bango mpe kotyela bango likebi. Tit 2:4

Kosilikisa bango te. Kols 3:21

Kokokisa bamposa na bango na mosuni mpe na elimo. 2Kol 12:14; 1Tm 5:8

Koteya bango makambo ya bomoi. Ef 6:4; Mas 22:6, 15; 23:13, 14

D. Baklisto basengeli kobalana bobele na baklisto

Kobala bobele “kati na Nkolo.” 1Kol 7:39; Det 7:3, 4; Ne 13:26

E. Kobala basi ebele endimami na Makomami te

Na ebandeli, mobali azalaki bobele na mwasi moko. Ge 2:18, 22-25

Yesu azongisaki lilako yango mpo na baklisto. Mt 19:3-9

Baklisto ya liboso bazalaki kobala basi ebele te. 1Kol 7:2, 12-16; Ef 5:28-31

24. Libondeli

A. Mabondeli oyo Nzambe ayokaka

Nzambe ayokaka mabondeli ya bato. Nz 145:18; 1Pe 3:12

Ayokaka bato bazangi boyengebene bobele soki babongoli bizaleli na bango. Yis 1:15-17

Esengeli kobondela na nkombo ya Yesu. Yn 14:13, 14; 2Kol 1:20

Esengeli kobondela na boyokani na mokano ya Nzambe. 1Yn 5:14, 15

Kondima ezali na ntina. Yk 1:6-8

B. Mabondeli ya kozongelazongela, kobondela Malia to “basantu” ezali na ntina te

Esengeli kobondela Nzambe na nkombo ya Yesu. Yn 14:6, 14; 16:23, 24

Mabondeli ya kozongelazongela ekoyokama te. Mt 6:7

25. Lifelo (Hadesi, Sheol)

A. Ezali te esika ya konyokwama na mɔ́tɔ

Yobo, moto oyo azalaki konyokwama, abondelaki ete akende kuna. Yobo 14:13

Ezali esika oyo ezangi mosala. Nz 6:5; Mos 9:10; Yis 38:18, 19

Yesu asekwaki longwa na nkunda, elingi koloba longwa na lifelo. Mis 2:27, 31, 32; Nz 16:10

Lifelo ekozongisa bakufi mosusu, mpe ekobebisama. Em 20:13, 14

B. Mɔ́tɔ ezali elilingi ya kobebisama nyɛɛ

Kolongolama na nzela ya liwa emonisami na elilingi ya mɔ́tɔ. Mt 25:41, 46; 13:30

Bato mabe oyo baboyi kobongola mitema bakobomama libela lokola nde batumbami na mɔ́tɔ. Eb 10:26, 27

“Monyoko” makasi oyo Satana akozwa ezali liwa ya seko. Em 20:10, 14, 15

C. Lisolo ya mozwi mpe Lasalo ezali te elembeteli ya minyoko ya seko

Mɔ́tɔ oyo balobeli awa ezali mɔ́tɔ ya solosolo te ndenge moko mpe ntolo ya Abalayama ezali ntolo ya solosolo te. Lk 16:22-24

Kondimama na Abalayama ekeseni mpe na molili. Mt 8:11, 12

Kobomama ya Babilone ebengami monyoko makasi. Em 18:8-10, 21

26. Likoló

A. Bobele bato 144 000 nde bakokende na likoló

Ezali motango moko moke; bakozala bakonzi elongo na Klisto. Em 5:9, 10; 20:4

Yesu azalaki moto ya liboso; basusu baponamaki na nsima. Kols 1:18; 1Pe 2:21

Bato mosusu mingi bakofanda awa na mabelé. Nz 72:8; Em 21:3, 4

Bato 144 000 bazali na etɛlɛmɛlo moko ya ntina oyo bato mosusu bazali na yango te. Em 14:1, 3; 7:4, 9

27. Lingomba

A. Lingomba ya solo ezali bobele moko

Elikya moko, kondima moko, batisimo moko. Ef 4:5, 13

Ezwi mosala ya kozalisa bayekoli. Mt 28:19; Mis 8:12; 14:21

Eyebanaka na mbuma na yango. Mt 7:19, 20; Lk 6:43, 44; Yn 15:8

Bolingo mpe boyokani ezalaka kati na basangani na yango. Yn 13:35; 1Kol 1:10; 1Yn 4:20

B. Mateya ya lokuta ekweisami mpenza makasi

Yesu akweisaki mateya ya lokuta. Mt 23:15, 23, 24; 15:4-9

Asalaki bongo mpo na kobatela bakufi-miso. Mt 15:14

Solo esikoli bango mpo bázala bayekoli ya Yesu. Yn 8:31, 32

C. Soki lingomba na yo ezali mabe esengeli kolongwa

Solo esikolaka; emonisaka ete bato mingi bazali na libunga. Yn 8:31, 32

Bayisalaele mpe bato mosusu batikaki losambo na bango ya kala. Yos 24:15; 2Mik 5:17

Baklisto ya liboso babongolaki makanisi na bango. Ga 1:13, 14; Mis 3:17, 19

Paulo atikaki lingomba na ye. Mis 26:4-6

Mokili mobimba ezimbisami; esengeli kobongola makanisi na yango. Em 12:9; Lom 12:2

D. Koloba ete “mangomba nyonso ezali malamu” emonisi te ete Nzambe andimaka yango

Nzambe nde apesaka malako mpo na losambo. Yn 4:23, 24; Yk 1:27

Oyo nyonso eyokani na mokano ya Nzambe te ezali mabe. Lom 10:2, 3

“Misala ya malamu” ekoki koboyama. Mt 7:21-23

Eyebanaka na mbuma na yango. Mt 7:20

28. Lisekwa

A. Elikya mpo na bakufi

Nyonso oyo bazali na nkunda bakosekwa. Yn 5:28, 29

Lisekwa ya Yesu ezali ndanga. 1Kol 15:20-22; Mis 17:31

Bato oyo bazali kosalela elimo lisumu bakosekwa te. Mt 12:31, 32

Baoyo bazali komonisa kondima bazali na elikya ete bakosekwa. Yn 11:25

B. Lisekwa mpo na kozala na bomoi na likoló to awa na mabelé

Bato nyonso bakufaka mpo na Adama; bazali kozwa bomoi mpo na Yesu. 1Kol 15:20-22; Lom 5:19

Basekwi bakozala bango nyonso na nzoto ndenge moko te. 1Kol 15:40, 42, 44

Baoyo bakozala elongo na Yesu bakozala lokola ye. 1Kol 15:49; Flp 3:20, 21

Baoyo bakoyangela te bakozala awa na mabelé. Em 20:4b, 5, 13; 21:3, 4

29. Lisiko

A. Bomoi ya Yesu lokola moto efutamaki lokola “lisiko mpo na nyonso”

Yesu apesaki bomoi na ye lokola lisiko. Mt 20:28

Motuya ya makila oyo esopanaki epesaka bolimbisi ya masumu. Eb 9:14, 22

Mbeka bobele moko ekoki mpo na libela. Lom 6:10; Eb 9:26

Matomba eyaka bobele mbala moko te; esengeli kondima motuya na yango. Yn 3:16

B. Ezalaki motuya oyo ekokani mpenza

Adama azalisamaki moto ya kokoka. Det 32:4; Mos 7:29; Ge 1:31

Mpo na lisumu, abungisaki ezaleli ya kokoka mpo na ye moko mpe mpo na bana na ye. Lom 5:12, 18

Bana na ye bazalaki na eloko mosusu ya kosala te; esengelaki moto moko oyo akokani na Adama. Nz 49:7; Det 19:21

Bomoi ya kokoka ya Yesu lokola moto epesamaki lokola lisiko. 1Tm 2:5, 6; 1Pe 1:18, 19

30. Lisumu

A. Ndimbola ya lisumu

Kobuka mobeko ya Nzambe, lilako na ye ya kokoka. 1Yn 3:4; 5:17

Moto, ekelamu ya Nzambe, akozongisa monɔkɔ liboso na ye. Lom 14:12; 2:12-15

Mibeko elimbolaki lisumu, esalisaki bato báyeba yango. Ga 3:19; Lom 3:20

Biso nyonso tozali na kati ya lisumu, tozali kokokisa te malako ya kokoka ya Nzambe. Lom 3:23; Nz 51:5

B. Mpo na nini biso nyonso tomonaka mpasi na lisumu ya Adama

Adama alekisaki kozanga kokoka mpe liwa epai na biso nyonso. Lom 5:12, 18

Nzambe amonisaki motema mawa ndenge atikaki ete bato bázala. Nz 103:8, 10, 14, 17

Mbeka ya Yesu ezali mbɔndi mpo na masumu. 1Yn 2:2

Lisumu mpe misala mosusu ya Zabolo ekolongolama. 1Yn 3:8

C. Mbuma oyo epekisamaki ezalaki kozanga botosi, kasi kosangisa nzoto te

Nzete oyo epekisamaki ezalaki liboso ete Eva azalisama. Ge 2:17, 18

Balobaki na Adama na Eva ete basengeli kobota bana. Ge 1:28

Bana bazali mbuma ya lisumu te, kasi lipamboli ya Nzambe. Nz 127:3-5

Eva asalaki lisumu ntango mobali na ye azalaki te; azelaki ye te. Ge 3:6; 1Tm 2:11-14

Adama, oyo azalaki mokonzi, atombokelaki mobeko ya Nzambe. Lom 5:12, 19

D. Elimboli nini kosalela elimo santu lisumu (Mt 12:32; Mr 3:28, 29)

Lisumu ya lisango ezali yango te. Lom 5:8, 12, 18; 1Yn 5:17

Moto akoki koyokisa elimo mawa, kasi akoki komisembola. Ef 4:30; Yk 5:19, 20

Kozala na momeseno ya kosala lisumu na nko ememaka na liwa. 1Yn 3:6-9

Nzambe asambisaka bato ya ndenge wana, alongolaka elimo na ye. Eb 6:4-8

Tosengeli kobondela te mpo na bato motindo wana oyo baboyi kobongola motema. 1Yn 5:16, 17

31. Litatoli

A. Baklisto nyonso basengeli kotatola, koyebisa nsango malamu

Esengeli kondima Yesu liboso ya bato mpo ondimama. Mt 10:32

Esengeli kozala moto oyo asalelaka Liloba, komonisa kondima. Yk 1:22-24; 2:24

Bato ya sika, bango mpe, basengeli kozala bateyi. Mt 28:19, 20

Kosakola liboso ya bato epesaka lobiko. Lom 10:10

B. Kozongela bato mbala na mbala, kolanda kopesa litatoli ezali na ntina

Likebisi litali nsuka esengeli kopesama. Mt 24:14

Yilimia asakolaki nsuka ya Yelusaleme bambula mingi. Yil 25:3

Lokola baklisto ya liboso, tokotika te. Mis 4:18-20; 5:28, 29

C. Esengeli kotatola mpo na kozala na nyongo ya makila te

Esengeli kokebisa ete nsuka ebɛlɛmi. Ezk 33:7; Mt 24:14

Soki osali yango te okozala na nyongo ya makila. Ezk 33:8, 9; 3:18, 19

Paulo azalaki na nyongo ya makila te; alobaki mpenza solo. Mis 20:26, 27; 1Kol 9:16

Ebikisaka motatoli mpe moto oyo azali koyoka ye. 1Tm 4:16; 1Kol 9:22

32. Liwa

A. Ntina ya liwa

Na ebandeli, moto azalisamaki na lolenge ya kokoka, azalaki na elikya ya kozala na bomoi oyo ezangi nsuka. Ge 1:28, 31

Kozanga botosi nde ememaki etumbu ya liwa. Ge 2:16, 17; 3:17, 19

Bana nyonso ya Adama basangolaki lisumu mpe liwa. Lom 5:12

B. Ezalela ya bakufi

Adama asalemaki mpo azala molimo, kasi ezali te ete azwaki yango kozwa. Ge 2:7; 1Kol 15:45

Moto, oyo azali bongo molimo, nde akufaka. Ezk 18:4; Yis 53:12; Yobo 11:20

Bakufi bazali na bososoli te, bayebi eloko moko te. Mos 9:5, 10; Nz 146:3, 4

Bakufi balali, bazali kozela lisekwa. Yn 11:11-14, 23-26; Mis 7:60

C. Likoki ya kosolola na bakufi ezali te

Bakufi bazali te bilimo oyo bifandaka na Nzambe. Nz 115:17; Yis 38:18

Bakebisi biso ete tómeka kosolola na bakufi te. Yis 8:19; Le 19:31

Basololi na bakufi mpe bato oyo basakolaka makambo mabombami bakweisami. Det 18:10-12; Ga 5:19-21

33. Lobiko

A. Lobiko euti na Nzambe na lisalisi ya mbeka ya lisiko ya Yesu

Bomoi ezali likabo oyo Nzambe apesi na nzela ya Mwana na ye. 1Yn 4:9, 14; Lom 6:23

Lobiko ekoki kozwama bobele na lisalisi ya mbeka ya Yesu. Mis 4:12

Elembo moko te emonisaka kobongola motema na ntango moto alingi kokata motema. Yk 2:14, 26

Esengeli kosala milende mpo na kozwa yango. Lk 13:23, 24; 1Tm 4:10

B. “Soki obiki, obiki mpo na libela” endimami na Makomami te

Baoyo basangani na elimo santu bakoki kokwea. Eb 6:4, 6; 1Kol 9:27

Bayisalaele mingi babomamaki atako babikisamaki na Ezipito. Yuda 5

Lobiko ezali likambo ya pwasa te. Flp 2:12; 3:12-14; Mt 10:22

Baoyo bazali kozonga nsima bakómaka mabe koleka ndenge bazalaki liboso. 2Pe 2:20, 21

C. Makomami eteyaka te ete “bato nyonso bakobika”

Bato mosusu bakobongola motema te. Eb 6:4-6

Nzambe asepelaka te na liwa ya moto mabe. Ezk 33:11; 18:32

Kasi bolingo ekoki te kokanga miso na makambo ya mabe. Eb 1:9

Bato mabe bakobomama. Eb 10:26-29; Em 20:7-15

34. Mabe, bampasi oyo ezali na mokili

A. Nani azali mobandisi ya bampasi oyo ezali na mokili

Boyangeli mabe nde esali ete lelo makambo ya mpasi ezala. Mas 29:2; 28:28

Mokonzi ya mokili oyo azali monguna ya Nzambe. 2Kol 4:4; 1Yn 5:19; Yn 12:31

Zabolo moto azali koyeisa bampasi; ntango na ye eyei mokuse. Em 12:9, 12

Zabolo akokangama, kimya monene ekolanda na nsima. Em 20:1-3; 21:3, 4

B. Mpo na nini batiki nzela na mabe

Zabolo abɛtelaki bosembo ya bikelamu ya Nzambe ntembe. Yb 1:11, 12

Bapesi bato ya sembo libaku ya komonisa bosembo na bango. Lom 9:17; Mas 27:11

Emonani ete Zabolo azali mobuki ya lokuta, ntembe esengeli kosilisama. Yn 12:31

Bato ya sembo bakozwa mbano ya bomoi ya seko. Lom 2:6, 7; Em 21:3-5

C. Koumela oyo ntango ya nsuka eumeli, emonisi mpenza motema mawa

Lokola na mikolo ya Noa, esengeli ntango ezala mpo na kopesa likebisi. Mt 24:14, 37-39

Nzambe azali koumela te, kasi azali nde na motema mawa. 2Pe 3:9; Yis 30:18

Biblia ezali kosalisa biso ete likama yango ekwela biso pwasa te. Lk 21:36; 1Tes 5:4

Esengeli koluka libateli ya Nzambe sikawa. Yis 2:2-4; Sef 2:3

D. Bato bakoki te kosilisa bampasi oyo ezali na mokili

Bato bazali na nsɔmɔ, babulungani. Lk 21:10, 11; 2Tm 3:1-5

Bokonzi ya Nzambe nde ekolonga, kasi ya bato te. Da 2:44; Mt 6:10

Mpo na kobika, esengeli uta sikawa koluka koyokana na Mokonzi. Nz 2:9, 11, 12

35. Mabelé

A. Mokano ya Nzambe mpo na mabelé

Paladiso esalemaki awa na mabelé mpo na bato ya kokoka. Ge 1:28; 2:8-15

Mokano ya Nzambe ekokokisama. Yis 55:11; 46:10, 11

Mabelé ekotonda na bato ya kimya mpe ya kokoka. Nz 72:7; Yis 45:18; 9:6, 7

Bokonzi ekozongisa Paladiso. Mt 6:9, 10; Em 21:3-5

B. Ekobomama soko moke te mpe ekozanga bato te

Mabelé oyo ekoumela seko na seko. Mos 1:4; Nz 104:5

Bato ya ntango ya Noa babomamaki, kasi mabelé te. 2Pe 3:5-7; Ge 7:23

Ndakisa wana epesi elikya ete bato bakobika mpe na ntango na biso. Mt 24:37-39

Bato mabe bakobomama; “ebele monene” bakobika. 2Tes 1:6-9; Em 7:9, 14

36. Makila

A. Kozongisama makila ezali kozanga limemya na ezaleli ya bulɛɛ ya makila

Bayebisaki Noa ete makila ezali bulɛɛ, ezali bomoi. Ge 9:4, 16

Kondimana ya Mibeko epekisaki kolya makila. Le 17:14; 7:26, 27

Epekiseli yango ezongelamaki epai ya baklisto. Mis 15:28, 29; 21:25

B. Kobikisa bomoi epesi nzela te na kobuka mobeko ya Nzambe

Botosi eleki bambeka na malamu. 1Sa 15:22; Mko 12:33

Kolinga bomoi na yo mingi koleka mobeko ya Nzambe ezali likama. Mko 8:35, 36

37. Mikolo ya nsuka

A. “Nsuka ya mokili” ndimbola na yango

Nsuka ya biloko ya ntango oyo. Mt 24:3; 2Pe 3:5-7; Mko 13:4

Ezali nsuka ya mabelé te, kasi ya biloko mabe ya ntango oyo. 1Yn 2:17

Ntango ya nsuka ezali liboso ya libebi. Mt 24:14

Bayengebene bakobika; nsima na yango mokili ya sika ekobanda. 2Pe 2:9; Em 7:14-17

B. Tosengeli kosɛnzɛla awa tozali komona bilembo ya mikolo ya nsuka

Bilembo oyo Nzambe apesi mpo etambwisa biso. 2Tm 3:1-5; 1Tes 5:1-4

Mokili ezali koyeba likama oyo ezali liboso na yango te. 2Pe 3:3, 4, 7; Mt 24:39

Nzambe azali koumela te, kasi azali nde kopesa makebisi. 2Pe 3:9

Baoyo bazali kosɛnzɛla mpe kotya likebi bakozwa mbano. Lk 21:34-36

38. Ministre

A. Baklisto nyonso bazali baministre

Yesu azalaki ministre ya Nzambe. Lom 15:8, 9; Mt 20:28

Baklisto balandaka ndakisa na ye. 1Pe 2:21; 1Kol 11:1

Basengeli kosakola mpo na kokokisa mosala ya Nzambe. 2Tm 4:2, 5; 1Kol 9:16

B. Makambo oyo esengeli mpo na kokokisa mosala ya kosakola

Elimo ya Nzambe mpe boyebi ya Liloba na ye. 2Tm 2:15; Yis 61:1-3

Kolanda ndakisa ya Klisto na mosala ya kosakola. 1Pe 2:21; 2Tm 4:2, 5

Nzambe azali kobongisa bato na nzela ya elimo na ye, mpe ya ebongiseli na ye. Yn 14:26; 2Kol 3:1-3

39. Molimo

A. Ndimbola ya molimo

Moto azali molimo. Ge 2:7; 1Kol 15:45; Yos 11:11; Mis 27:37

Banyama mpe babengami milimo. Mit 31:28; Em 16:3; Le 24:18

Molimo ezalaka na makila, elyaka mpe ekoki kokufa. Yil 2:34; Le 7:18; Ezk 18:4

Moto, lokola azali na bomoi, elobami ete azali na molimo. Mko 8:36; Yn 10:15

B. Bokeseni kati na molimo mpe elimo

Molimo: ezali bongo bomoi, moto to ekelamu. Yn 10:15; Le 17:11

Nguya ya bomoi oyo etambwisaka milimo ebengami “elimo.” Nz 146:4; 104:29

Ntango moto akufi, nguya ya bomoi ezongaka epai ya Nzambe, oyo apesaka yango. Mos 12:7

Bobele Nzambe nde ayebi kosala ete nguya ya bomoi esala mosala. Ezk 37:12-14

40. Nyonso esilá kokanama

A. Bomoi ya moto esilá kokanama te

Mokano ya Nzambe ekokokisama. Yis 55:11; Ge 1:28

Bato bango moko nde baponaka kosalela Nzambe. Yn 3:16; Flp 2:12

41. Sabata

A. Mokolo ya Sabata etali baklisto te

Liwa ya Klisto etyaki nsuka na Mibeko. Ef 2:15

Sabata etali baklisto te. Kols 2:16, 17; Lom 14:5, 10

Bapamelamaki mpo batosaki Sabata, bongo na bongo. Ga 4:9-11; Lom 10:2-4

Mpo na kokɔta na bopemi ya Nzambe esengeli kozala na kondima mpe na botosi. Eb 4:9-11

B. Kokumisa Sabata esɛngisamaki bobele na Yisalaele ya kala

Bakumisaki Sabata ya liboso nsima ya kobima na Ezipito. Ex 16:26, 27, 29, 30

Yango ezalaki elembo oyo ekesenisaki mpenza Yisalaele. Ex 31:16, 17; Nz 147:19, 20

Bambula ya Sabata mpe esɛngisamaki na nse ya Mibeko. Ex 23:10, 11; Le 25:3, 4

Sabata ezali na ntina te mpo na baklisto. Lom 14:5, 10; Ga 4:9-11

C. Bopemi ya Sabata ya Nzambe (mokolo ya 7 ya “pɔsɔ” ya bozalisi)

Ebandaki na nsuka ya kozalisama ya biloko oyo ezali awa na mabelé. Ge 2:2, 3; Eb 4:3-5

Ekobaki kino koleka mikolo oyo Yesu azalaki awa na mabelé. Eb 4:6-8; Nz 95:7-9, 11

Baklisto bapemaka na ndenge bazali kotika misala na bango ya moimi. Eb 4:9, 10

Ekosuka ntango Bokonzi ekosilisa mosala na yango mpo na mabelé. 1Kol 15:24, 28

42. Yehova, Nzambe

A. Nkombo ya Nzambe

“Nzambe” ezali nkombo ya moto moko te; Nkolo na biso azali mpenza na nkombo na ye. 1Kol 8:5, 6

Tobondelaka ete nkombo na ye esantisama. Mt 6:9, 10

Yehova ezali nkombo ya Nzambe. Nz 83:18; Ex 6:2, 3; 3:15; Yis 42:8

Nkombo yango ezali na Biblia na Ngala Uele na Ex 6:3. Nz 83:18; Yis 12:2; 26:4

Yesu ayebisaki nkombo yango. Yn 17:6, 26; 5:43; 12:12, 13, 28

B. Nzambe azali

Moto akoki te komona Nzambe mpe kozala na bomoi. Ex 33:20; Yn 1:18; 1Yn 4:12

Mpo ondima, esengeli te bobele omona Nzambe na miso. Eb 11:1; Lom 8:24, 25; 10:17

Nzambe ayebani na nzela ya misala na ye oyo ezali komonana. Lom 1:20; Nz 19:1, 2

Kokokisama ya bisakweli emonisi ete Nzambe azali. Yis 46:8-11

C. Bizaleli ya Nzambe

Nzambe azali bolingo. 1Yn 4:8, 16; Ex 34:6; 2Kol 13:11; Mik 7:18

Atondi na mayele. Yb 12:13; Lom 11:33; 1Kol 2:7

Azali sembo, asalelaka bosembo. Det 32:4; Nz 37:28

Azali Mozwi-na-Nguya-Nyonso, makasi nyonso ezali na ye. Yb 37:23; Em 7:12; 4:11

D. Bato nyonso basalelaka bobele Nzambe moko te

Nzela oyo emonani malamu ezalaka ntango nyonso nzela ya sembo te. Mas 16:25; Mt 7:21

Nzela ezali mibale, kasi bobele moko nde ezali komema na bomoi. Mt 7:13, 14; Det 30:19

Banzambe bazali mingi, kasi Nzambe ya solo azali bobele moko. 1Kol 8:5, 6; Nz 82:1

Koyeba Nzambe ya solo ezali na ntina mpo na kozala na bomoi. Yn 17:3; 1Yn 5:20

43. Yesu

A. Yesu azali Mwana ya Nzambe mpe Mokonzi oyo atyami

Mobotami ya liboso ya Nzambe, asalelamaki mpo na kozalisa biloko nyonso mosusu. Em 3:14; Kols 1:15-17

Akómaki moto oyo abotamaki na mwasi, akitisamaki na nse ya baanzelu. Ga 4:4; Eb 2:9

Abotamaki na elimo ya Nzambe, mpo na kozala na bomoi na likoló. Mt 3:16, 17

Akómi na lokumu mingi koleka ntango oyo azalaki na likoló liboso abotama lokola moto. Flp 2:9, 10

B. Kondimela Yesu Klisto ezali na ntina mpo na kozwa lobiko

Klisto azali Mombóto ya Abalayama oyo molakamaki. Ge 22:18; Ga 3:16

Bobele Yesu nde azali Nganga Monene mpe lisiko. 1Yn 2:1, 2; Eb 7:25, 26; Mt 20:28

Mpo na kozala na bomoi esengeli koyeba Nzambe mpe Klisto, mpe kozala na botosi. Yn 17:3; Mis 4:12

C. Kondimela Yesu, yango moko ekoki te

Kondima esengeli komonisama na misala. Yk 2:17-26; 1:22-25

Esengeli kotosa bitinda na ye, mpe kosala misala oyo ye asalaki. Yn 14:12, 15; 1Yn 2:3

Ezali te baoyo nyonso basalelaka nkombo ya Nkolo nde bakokɔta na Bokonzi. Mt 7:21-23

44. Zabolo, bademo

A. Zabolo azali moto ya elimo

Azali te mabe oyo ezalaka kati na moto, kasi azali moto ya elimo. 2Tm 2:26

Zabolo azali moto lokola baanzelu. Mt 4:1, 11; Yobo 1:6

Amikómisaki Zabolo mpo na mposa mabe oyo azalaki na yango. Yk 1:13-15

B. Zabolo azali mokonzi ya mokili oyo, kasi amonanaka te

Azali koyangela mokili, azali nzambe na yango. 2Kol 4:4; 1Yn 5:19; Em 12:9

Akozala na bomoi kino ntembe ekosilisama. Ex 9:16; Yn 12:31

Akobwakama na libulu mozindo, na nsima akobomama. Em 20:2, 3, 10

C. Bademo bazali baanzelu oyo batombokaki

Balandaki Satana liboso ya Mpela. Ge 6:1, 2; 1Pe 3:19, 20

Bakitisami, bazali kozwa kongɛnga ata moke te. 2Pe 2:4; Yuda 6

Bazali kobundisa Nzambe, bazali konyokola bato. Lk 8:27-29; Em 16:13, 14

Bakobomama elongo na Satana. Mt 25:41; Lk 8:31; Em 20:2, 3, 10

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto