Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 15/11 lok. 28
  • Kebá na Simoni!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kebá na Simoni!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 15/11 lok. 28

Kebá na Simoni!

SIMONA, moto ya Samalia, azalaki moto monene na mboka na ye. Azalaki na bomoi na ekeke ya yambo na Ntango na Biso. Bato bazalaki kosepela mingi na misala na ye ya mazi, mpe bakómaki koloba mpo na ye ete: “Moto oyo azali Nguya na Nzambe oyo ekoki kobéngama ete Monene.”​—Misala 8:9-11, NW.

Nzokande, nsima ya kokóma moklisto oyo azwi batisimo, Simona amonaki nguya moko oyo eleki nguya oyo ye azalaki na yango liboso. Ezalaki nguya oyo bantoma ya Yesu bazalaki na yango. Nguya yango epesaki bango nzela ete bákabela basusu makabo ya kokamwa ya elimo santu. Simona akamwaki mingi mpo na yango, apesaki bantoma mbongo mpe asɛngaki bango ete: ‘Bópesa ngai mpe nguya oyo ete soko nakotyela moto nani mabɔkɔ akozwa elimo santu.’—Misala 8:13-19.

Ntoma Petelo apamelaki Simona na maloba oyo: “Tiká mosolo na yo ebeba na yo esika moko! mpo ete okanisi ete okozwa likabo na Nzambe na mosolo. Ozali na ndambo to na eteni na likambo oyo te, mpo ete motema na yo ezali sembo na miso na Nzambe te.”​—Misala 8:20, 21.

Liloba “simoni” liuti nde na lisolo wana ya Biblia. Yango elimbolami lokola “lisumu oyo moto asali na ndenge asombi to atɛkisi bokonzi to mokumba na ye na kati ya lingomba.” Buku moko (New Catholic Encyclopedia) elobi ete, mingimingi kobanda na ekeke ya 9 kino na ekeke ya 11 nde “simoni epalanganaki na bamonastɛrɛ, epai na bakonzi ya mangomba, epai na baepiskɔpɔ, ata mpe epai na bapápa.” Ebimeli ya libwa ya buku The Encyclopædia Britannica (1878) elobi ete: “Boyekoli ya masolo ya makita ya bapápa endimisaki bayekoli ete liponami ata moko ezalaki kosalema te kozanga simoni. Kutu, na makambo mingi, kati na makita na bango, simoni esalemaka na ndenge ya nsɔni mpe ya polele.”

Lelo oyo, baklisto ya solo basengeli kokeba na simoni. Na ndakisa, basusu bakoki kolekisa ndelo mpo na oyo etali kokumisa mpe kokabela bato oyo bakoki kopesa bango mikumba. Nzokande, mbala mingi, baoyo bakoki kopesa mikumba yango batalaka se bilongi ya baoyo bakabelaka bango, baoyo balukaka mikumba na makasi. Kosala ndenge nyonso mibale wana ezali simoni mpe Makomami endimi yango te. Petelo alobaki na Simona ete: “Bongolá motema na yo na likambo oyo mabe, mpe bondelá [Yehova] soko likanisi na motema na yo ekolimbisama. Mpo ete namoni ete yo ozali kati na bololo na nzɔngɔ mpe na ekanganeli na mabe.”​—Misala 8:22, 23.

Likambo ya esengo, Simona amonaki ete mposa na ye wana ya mabe ezalaki lisumu monene. Abondelaki bantoma ete: “Bino bósɛnga [Yehova] mpo na ngai ete likambo moko na yango elobi bino ekwela ngai te!” (Misala 8:24) Lokola bazali kolanda liteya monene oyo ezali kati na lisolo oyo, baklisto ya solo bazali kosala makasi na koboya lolenge nyonso ya simoni.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto