Ndenge nini makita mpo na mosala ya kosakola esengeli kotambwisama?
1 Likita ya mosala ya kosakola ezali ebongiseli ya lisangá. Esengeli kosalema na mobulu te mpe kotambwisama na ndenge ebongi. Bato oyo bayei na likita yango basengeli komonisa ezaleli malamu mpe kolata malamu bobele ndenge basalaka mpo na makita mosusu ya lisangá. Likita yango esengeli kobanda na ngonga oyo etyamaki, ata soki boyebi ete bato mosusu bakoya nsima. Ndeko oyo aponami mpo na kotambwisa likita yango, asengeli komibongisa malamu, mpo na kobimisa makanisi ya mayele oyo basakoli bakoki kosalela mokolo yango na mosala ya kosakola. Mosala na biso ya Bokonzi ezali kolobela makambo mingi mpe kopesa makanisi oyo ebongi mpo na likita yango.
2 Ezali na ntina te ete bótalelaka mokapo ya mokolo na likita nyonso ya mosala ya kosakola, kasi soki mokapo yango ezali na mateya ya kolendisa mpo na mosala ya kosakola, bokoki kotalela yango na mokuse. Likita yango esengeli kosalema na ngonga oyo esengeli kobanda mpo ebebisa te ngonga oyo basakoli basengeli kolekisa na mosala ya kosakola. Likita yango esengeli koumela miniti 10 kino 15, kasi koleka te. Kasi, soki likita yango esalemi nsima ya likita mosusu ya lisangá, esengeli kozala mokuse mpenza. Ebongi kotalela programɛ ya babongisi-nzela; mpamba te soki likita ya mosala ya kosakola eleki molai mingi to soki esalemi na nsima ya ngonga oyo etyami, ekoki kokóma kilo mingi mpo na bandeko oyo bazali na motango ya ngonga ya sikisiki oyo basengeli kosala na mosala ya kosakola.
3 Esengeli kopesa mosakoli mokomoko teritware na ye mpo na kosakola. Ya solo, ekoki kozala ete basakoli mosusu basilaki kozwa bibongiseli na bango moko mpo na kozongela bato oyo basepelaki to mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia, mpe na bongo bakoki kozala na mposa ya teritware te.
4 Baoyo nyonso bayei na likita ya mosala ya kosakola basengeli kotya likebi malamumalamu mpe kolanda makambo nyonso oyo ezali kolobama kino ntango bakokabola bato mpe bakosala libondeli. Bandeko oyo bayokanaki mpo na kobima na mosala ya kosakola bakoyebisa yango epai ya ndeko oyo azali kotambwisa likita. Kokabola bandeko mpe kopesa bango bateritware esengeli kosalema liboso ete likita yango esila, esengeli te kosalema na esika batɛlɛmisaka mituka to na balabala. Likita mpo na mosala ya kosakola esengeli kosuka na libondeli. Soki bandeko nyonso balandi malako oyo, tokoki kotya motema ete Yehova akopambola mpenza mosala ya kosakola oyo tokosala.