Loyembo 23
Elikya ya Biblia mpo na bato
1. Bato bakobangaka bɛɛ;
Batungisami mpo bazangi elikya.
Batiki Yah, batosi te;
Nde nsuka ebɛlɛmi.
Kasi Biblia epesi elikya
Oy’a Bokonzi ya Nzambe, Yehova.
Mawa, mpisoli, mpasi ekosila.
Tótombola mitó mpe tóbanga te.
2. Mpasi’eleki, tonyokwami.
Banso tokokende kati na ewelo,
Tokokima mpe liwa te.
Milende minso mpamba.
Kasi Biblia epesi elikya.
Tokosekwa mpe na nzoto ya sika;
Tokomela mpe mai ya bomoi.
Nyonso oyo ezali kolendisa.
3. Batuki batyoli Nzambe,
Bafingi Yehova, balingi masumu.
Bakambami na Satana,
Mabe mayikani bɛɛ.
Kasi Biblia epesi elikya.
Nzambe alobi, bato bakosamba;
Akosilisa solo mabe nyonso.
Bongo, tokozwa esengo monene.