Loyembo 218
Elongo na Klisto kati na Paladiso
1. Yesu’alaki Paladiso
Epai na mobomi bato.
Yang’epesi biso nguya
Ete tóndimela
Liloba libela.
Yango emonisi solo
’Te, Yah’akosekwisa bato.
Lilob’engɛngisi biso;
Miso mafungwani
Mpe tozwi esengo.
2. “Ebele monene” solo
Bazwi’elikya’a Paladiso.
Bazali na bobangi te.
Banso’epai na Nzambe,
Bakumisani ye.
Ɛ Yah, yókamelá biso!
Tolingi kosalela yo,
Kokumisa nkombo na yo
Na bosembo nyonso,
Yango mpo na seko.
3. Paladiso Klisto’apesi
Nde Libonza’a basɔkɛmi.
Batosaki Yehova mpe
Bamipesi na ye,
Na boyengebene.
Mpe moto na bososoli
Na bwanya, sol’asakoli,
Alendisi banyokwami,
Mpamba te, mpo na ye,
Paladiso’ezali.