Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/01 lok. 1
  • Tyelá Yehova motema mpo na kozwa makasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tyelá Yehova motema mpo na kozwa makasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Masolo mosusu
  • Yehova apesaka nguya epai na ye oyo alɛmbi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • “Bóluka Yehova mpe Nguya na ye”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Yehova ‘akokómisa yo makasi’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Yehova akopesa yo makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 11/01 lok. 1

Tyelá Yehova motema mpo na kozwa makasi

1 Ezali na makambo mingi oyo esɛngaka ete tótyela Yehova motema. Na ndakisa, kosakola nsango malamu na “mokili mobimba” ezali mosala monene. (Mat. 24:14) Ntango nyonso tozali kobunda na nzoto na biso ya kozanga kokoka. (Lom. 7:21-23) Lisusu, “tozali kobundana . . . na mikonzi [oyo bazali na nguya koleka biso] ya mokili oyo ya molili.” (Ef. 6:​11, 12) Na ntembe te, tozali mpenza na mposa ya lisungi. Ndenge nini tokoki kozwa makasi epai ya Yehova?

2 Na nzela ya libondeli: Yehova aboyaka te kopesa nguya ya elimo santu na ye epai ya basaleli na ye oyo bazali kosɛnga ye yango. (Luka 11:13) Omonaka ete okokaka te kopesa litatoli ndako na ndako, na balabala, to na telefone? Oyokaka nsɔni mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu? Molende na yo mpo na kosakola ekiti mpo bato ya teritware na bino bazali kosepela na nsango malamu te? Okosala nini soki bazali kotungisa yo oboya kondima na yo to otika bosembo na yo? Tyelá Yehova motema. Bondelá ye mpo na kozwa makasi.​—Filp. 4:13, NW.

3 Na nzela ya boyekoli na yo moko: Bilei ya mosuni epesaka nzoto na biso makasi, ndenge moko mpe tozwaka makasi na elimo ntango tozali komileisa mbala na mbala na Liloba ya Nzambe mpe mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 4:4; 24:45) Stanley Jones, alekisaki bambula mingi ye moko na kati ya bolɔkɔ na ekólo Chine. Ntango batunaki ye nini epesaki ye makasi mpo ayika mpiko na boumeli ya bambula nyonso wana, alobaki boye: “Tokoki kozala ntango nyonso makasi na kondima. Kasi, tosengeli naino koyekola liboso. Soki tozali koyekola te, tokozala na makasi te.”

4 Na nzela ya koyangana na makita: Na likita moko ya baklisto oyo esalemaki na ekeke ya liboso, Yuda na Sila “balendisaki bandeko yango na masukulu mingi, mpe bapesaki bango makasi.” (Mis. 15:32, NW) Ndenge moko mpe lelo oyo, makambo oyo toyokaka na makita etindaka biso tózala na botɔndi mingi mpenza epai ya Yehova, etongaka kondima na biso, mpe elendisaka biso mpo na mosala ya kosakola. Makita esalaka ete tózala ntango nyonso elongo na ‘baninga na biso ya mosala mpo na bokonzi ya Nzambe,’ baoyo bazali ‘lisalisi oyo ezali kopesa [biso] makasi.’​—Kols. 4:11, NW.

5 Tozali mpenza na mposa ya lisungi na “ntango [oyo] ya mpasi.” (2 Tim. 3:1) Mpo na baoyo bazwaka makasi epai ya Yehova, tozali na elikya ete: “Bakopumbwa likoló na mapapu lokola mpongo, bakopota mbangu nde bakolɛmba te, bakotambola nde bakosenzwa te.”​—Yis. 40:31.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto