Makabo na motindo na mibali babatelaka etonga ya Nzambe na molende
1 Na nzela ya Mwana na ye, Yehova apesi biso mpenza lisalisi ya bolingo: “makabo na motindo na mibali”! (Ef. 4:8, 11, 12, NW) Bazali na mikumba mingi, moko na yango ezali ya kobatela mpenza etonga ya Nzambe na molende. (1 Pet. 5:2, 3, NW) Biso nyonso tozwaka matomba na lisalisi yango mpo tozali na mposa na yango mingi. Mibali yango balukaka bolamu ya elimo ya ndeko mokomoko: ezala ya baoyo bazali kokutana na mikakatano, baoyo babandi koyangana sika, baoyo bazali na mwa bolɛmbu to baoyo babungi nzela.—Filp. 2:4; 1 Tes. 5:12-14.
2 Na ntango yikiyiki oyo ezali kobima na mokili epesi biso mwa bobangi, babateli-balandi wana bamonisaka ete bazali “lokola esika ya komibomba mpo na mopɛpɛ, esika ya kokima na ntango ya mbula makasi.” Ntango tolɛmbi to tomemi kilo mpe tozali na mposa ya libɔndisi, bakitisaka biso mitema “lokola mongálá ya mai kati na esika ekauki” to “lokola elili ya libanga monene kati na mabele oyo ebimisaka lisusu matiti te.”—Yis. 32:2, NW.
3 Bazali kolendisa baoyo batiká kosakola: Bankulutu bazali kobakisa milende mpo na kolendisa baoyo batiká kosakola to basakolaka sanza na sanza te. Bazali kosalisa bango bázongela lisusu kosangana mbala na mbala na misala nyonso ya lisangá. Ndenge bankulutu bakendaka kotala bampate na bolingo mpenza esalisi bandeko mingi báyangana na makita mbala na mbala mpe bálendisama na elimo. Yango esali ete bázongela lisusu kobima na mosala ya kosakola. Milende nyonso wana oyo bankulutu bazali kosala emonisaka ete Yehova abatelaka mpe alingaka biso mpe ete Yesu Klisto atambwisaka biso mpenza. Yesu apesaki ndakisa na likambo etali komibanzabanza ndenge wana mpo na mpate na ye nyonso oyo ntango mosusu abungi nzela.—Mat. 18:12-14; Yoa. 10:16, 27-29.
4 Babateli-balandi batalaka malamu mpo na komona bilembo oyo emonisaka ete moto abandi kolɛmba na elimo. Na ntembe te, moto nyonso oyo abandi komonisa bilembo ya kolɛmba nzoto, oyo azali lisusu koyangana na makita nyonso te, to oyo azali lisusu kobima mingi te na mosala ya kosakola, asengeli kosalisama na elimo. Bankulutu bazalaka na mposa makasi ya kosalisa moto nyonso oyo abandi komonisa ete akómi kolanda ndenge ya kolata mpe ya kobongisa nsuki ya bato ya mokili to oyo abandi kokolisa ezaleli ya kotɔngatɔnga lisangá. Bakɛngɛli oyo bazali komitungisa mpo na bato ya ndenge wana bandimaka na motema moko mpe na bolingo mpenza ‘kopesa milimo na bango,’ elingi koloba kosala milende mpo na kosalisa bango bámonisa lisusu bolingo mpo na Yehova.—1 Tes. 2:8, NW.
5 Na bambula oyo eleki, baklisto mosusu oyo basilaki komipesa na Yehova bakómaki komonana lisusu te na lisangá, batikaki komipesa na makambo ya elimo mpamba te mikakatano ya kolongɔnɔ ya nzoto, mikakatano ya nkita, to mitungisi ya libota ekómelaki bango makasi koleka. Na esika ya kotɔnga baklisto yango, bankulutu bandimisaka nde bango na boboto mpenza ete Yehova abatelaka bampate na ye nyonso mpe akosunga bango na ntango ya mpasi. (Nz. 55:22; 1 Pet. 5:7) Babateli ya etonga oyo bazali na ekɛngɛ bakoki kosalisa bango báyeba ete soki ‘bapusani penepene na Nzambe, ye mpe akopusana penepene na bango,’ akobɔndisa bango mpe akokitisa bango mitema.—Yak. 4:8, NW; Nz. 23:3, 4.
6 Bazali kopesa kilo na bato oyo bazali lisusu nzoto makasi te: Babateli-balandi yango ya bolingo bamonisaka mpe lobanzo na bango mpo na bandeko oyo ntango mosusu bato batyelaka bango mpenza likebi te. Lisangá mokomoko ezali na bandeko oyo bazali lisusu nzoto makasi te to oyo bafandaka na bandako ya bato ya maladi. Lokola bazali ndenge wana, toyebi ete bakoki te kosakola nsango ya Bokonzi ndenge moko na basakoli oyo bazali nzoto makasi. Ekoki kozala ete bazwaka libaku ya kosakola kaka soki bato bakei kotala bango, to basakolaka kaka epai ya bato mosusu ya maladi lokola bango, to epai ya bato oyo basalisaka bango. Atako bongo, nyonso oyo bazwi likoki ya kosala esengeli kotalelama lokola lisungi ya ntina mpenza oyo bazali kopesa na mosala monene ya kosakola. (Mat. 25:15) Ata soki basakoli kaka miniti 15, basengeli kopesa lapolo na bango, mpe bokotánga bango kaka lokola basakoli ya Bokonzi oyo basakolaka nsanza na sanza.
7 Mingimingi na eleko oyo ya mobu, eleko ya Ekaniseli, “makabo na motindo na mibali” bayebaka bamposa ya elimo oyo bandeko bazalaka ya yango. Yango ezali eleko oyo ebongi mpenza mpo bankulutu bábakisa lisusu milende mpo na kosalisa baoyo nyonso babungaki nzela ete bázala lisusu na esengo mpe na kimya ya makanisi oyo moto azwaka soki azali kosangana na lisangá. Tosepelaka ntango tomonaka bato ya ndenge wana, oyo bazali “bandeko na biso na kati ya kondima,” na makita ya lisangá mpe na mosala ya kosakola; na ndenge yango bazali komonisa lisusu kondima na bango na mbeka oyo epesamaki mpo na kosikola biso.—Gal. 6:10, NW; Luka 15:4-7; Yoa. 10:11, 14, NW.