Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/02 lok. 6
  • Mokanda ya Lisangani Ya Mikóló-bakambi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokanda ya Lisangani Ya Mikóló-bakambi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Masolo mosusu
  • Tikalá penepene na ebongiseli ya Yehova
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • “Tiká ezaleli ya koyika mpiko esala mosala na yango mobimba”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • “Esengo na baoyo bayikaki mpiko”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Ndenge ya kobatela esengo na ntango ya mikakatano
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 3/02 lok. 6

Mokanda ya Lisangani Ya Mikóló-bakambi

Lokola tosili kokɔta na bambula oyo ya ebandeli ya ekeke ya 21, tozali na esengo monene ya kokomela bino, “lisangá mobimba ya bandeko” na mokili mobimba, mpe topesi bino longonya mpo na mosala makasi oyo bozali kosala. (1 Pet. 2:​17, NW) Eleki sikoyo mbula pene na 2 000, Yesu atunaki boye: “Ntango Mwana ya moto akoya, akokuta mpenza kondima awa na mabele?” (Luka 18:​8, NW) Mosala ya molende oyo bosalaki na boumeli ya mbula ya mosala oyo euti koleka, epesi eyano na mongongo makasi na motuna wana ya Yesu: Ɛɛ! Bamosusu kati na bino, batyolaki bango mpe basɛkaki bango mpo na kondima na bango. Na bisika mingi, bozali koyika mpiko atako bitumba, makama, maladi to nzala ezali konyokola bino. (Luka 21:​10, 11) Molende na bino mpo na misala ya sembo ezali kopesa nzela ete Yesu akoka ‘kokuta kondima awa na mabele.’ Na ntembe te, esengo ezali na likoló mpo na yango!

Toyebi ete koyika mpiko ezalaka pɛtɛɛ te. Bókanisa naino mikakatano oyo bandeko na biso bazali kokutana na yango na ekólo moko ya wɛsti ya Azia. Na ekólo wana, basalelaka Batatoli ya Yehova makambo mabe ntango nyonso. Eleki mwa mikolo, bapolisi bapanzaki liyangani moko ya bato pene na 700 oyo bayanganaki na kimya mpenza. Bandeko mosusu 1 300 bazwaki likoki ya kokóma na esika ya liyangani te mpo bapekisaki bango na nzela. Bato ya mobulu oyo bazipaki bilongi na bango, kati na bango bapolisi mpe bazalaki, bakɔtaki na ndenge ya mobulu na esika ya liyangani, babɛtaki bandeko mingi mpe batumbaki esika oyo ebongisamaki mpo na liyangani. Bato ya mangomba oyo bazalaka na molende ya kolekisa ndelo, na bantango mosusu, basalaki mobulu mpe babɛtaki bandeko na biso na banzete oyo batyaki nsɛtɛ.

Makambo ya mobulu ndenge wana esalaka mpasi na motema, kasi ekamwisaka biso te. Ntoma Paulo apemamaki na elimo mpe akomaki ete: “Bango nyonso bazali na mposa na ezaleli ya kosambela kati na Klisto Yesu bakonyokolama.” (2 Tim. 3:12) Na ekeke ya liboso, baklisto bayikaki mpiko liboso ya minyoko oyo bazalaki kokutana na yango ezala na maloba to mpe na nzoto; bamosusu kutu babomamaki. (Mis. 5:40; 12:2; 16:​22-24; 19:⁠9) Ezakaki se ndenge moko na ekeke ya 20, mpe na ntembe te ekozala se bongo na ekeke ya 21. Kasi, Yehova ayebisi biso ete: “Ebundeli na ebundeli oyo esalemi mpo na kotɛmɛla yo ekolonga te.” (Yis. 54:17) Oyo nde elikya kitoko! Kutu, tozali mpenza na motuya mingi na miso ya Yehova, na boye ete akoka koloba na nzela ya mosakoli na ye Zekalia ete: “Ye oyo azali kosimba bino azali kosimba mbuma ya liso na ngai.” (Zek. 2:​8, NW) Banguna ya basambeli ya Yehova bakopesamela nzela soki moke te mpo bálonga tii na nsuka. Losambo ya solo ekolonga!

Na ndakisa, na ekólo oyo touti kolobela, na boumeli ya mbula ya mosala 2001, Batatoli ya Yehova bakokisaki mbala mibale mitángo ya basakoli oyo elekaki oyo nyonso ya bambula eleká. Atako bazali kokutana na mikakatano, bandeko na biso wana bazali kolɛmba te, lokola kaka bandeko ya bamboka mosusu bazali kosala. Na mokili mobimba, na mbula ya mosala oyo euti koleka, pɔsɔ na pɔsɔ, bato 5 066 bazwaki batisimo mpo na komonisa ete bamipesi na Yehova. Sikoyo, elongo na biso nyonso, bandeko wana ya sika bazali na mokano ya kozala “bato oyo bakoki na nyonso mpe oyo bazali na kondimisama makasi na kati ya mokano mobimba ya Nzambe.”​​—⁠Kols. 4:​12, NW.

Bóyoka mpe makambo oyo euti kosalema na ekólo Grèce. Atako Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Grèce etɛmɛlaki biso makasi na boumeli ya bambula ebele, lelo oyo, Leta ya ekólo Grèce endimi ete Batatoli ya Yehova bazali “lingomba oyo eyebani.” Na mokanda ya Leta oyo bamonisi ete bandimi lingomba na biso, bakomi ete Betele ya Grèce ezali “esika mosantu oyo epesami kaka mpo na losambo ya Nzambe.” Tozali mpe na esengo ya koyebisa bino ete na boumeli ya mbula ya mosala oyo euti koleka, batribinale mingi elongisaki biso na makambo oyo etali losambo na biso na Allemagne, na Bulgarie, na Canada, na États-Unis, na Japon, na Roumanie mpe na Russie. Tozali mpenza kotɔnda Yehova na ndenge asali ete porte oyo ezali komema na mosala etikala kaka polele na bamboka wana!

Ntango tozali kotala ndenge Yehova azali kosunga basaleli na ye na makambo ndenge na ndenge na mikolo oyo ya nsuka, tozali komona ete azali Moninga ya malamu mpenza oyo tosengeli kozala na ye. Boyokani na biso na ye ezali kosepelisa biso mpo toyebi ete alingaka biso, ateyaka biso mpe asembolaka biso. Ɛɛ, kondima na biso ekomekama kaka. Kasi kondima oyo etɛngatɛngaka te ekobatela biso na ntango ya komekama. Yakobo akomaki ete: “Bandeko na ngai bókanisa ete ezali bobele esengo wana ekokwea bino kati na komekama na mitindo na mitindo. Boyebi ete komekama na kondima na bino ekoyeisa mpiko.” (Yak. 1:​2, 3) Longola yango, soki tozali koyika mpiko, yango ekomonisa ete tolingi Yehova, mpe yango ekomemela biso esengo mingi. Bandeko ya bolingo, bóyeba ete Yehova akosunga mokomoko na biso. Soki totikali sembo, na ntembe te akosalisa biso tókɔta na mokili ya sika. Alingi ete tólonga.

Na yango, tozali kolendisa bino, bandeko basi mpe mibali, bilenge mpe mikóló, ete bóbatela na makanisi na bino mapamboli kitoko oyo ezali kozela biso. Tiká ete tózala na makanisi lokola ntoma Paulo, oyo akomaki ete: “Nakanisi ete bampasi ya ntango oyo ekokani ata moke te na nkembo oyo ekomonana epai na biso.” (Lom. 8:​18, NW) Ata soki bokutani na mikakatano ya ndenge nini, bótalela Yehova. Bóyikela yango mpiko mpe bóboya kozonga nsima. Bokoyoka mawa te, soki moke te. Liloba ya Nzambe endimisi biso ete: “Nde mpo na moyɛngɛbɛne, na bosembo na ye, akotikala na bomoi.”​​—⁠Hab. 2:​4, NW.

Bandeko na bino,

Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto