Tólanda kozwa litomba na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!
Sikoyo lokola tokosala lisusu abonema ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! te oyo bazalaki kotinda na nzela ya posita, ekosɛnga tósala mpenza milende mpo ete, ezala biso moko to bato oyo tokendaka koteya, tózanga ata nimero moko te.
Bazulunalo oyo yo moko okosalela: Ntango abonema oyo osalaki ekosila, sɛngá na ndeko oyo atalelaka bazulunalo abakisa motángo ya bazulunalo oyo ozwaka. Baboti basengeli kosala komande ya bazulunalo oyo ekoki mpo mwana mokomoko azala na zulunalo na ye. Ekozala malamu kokoma nkombo na yo na zulunalo oyo yo moko okosalela, soki te okokabola yango na mosala ya kosakola. Ntango bazulunalo ekómi na lisangá, ndeko oyo atalelaka yango akokabola nimero mokomoko oyo eyei, kozanga kozela.
Bato oyo tokobanda kotikela bango bazulunalo: Basakoli basengeli kozala na bato oyo bakobanda kokende kotikela bango bazulunalo; bato yango basengeli kozala baoyo nyonso bamonisi mposa ya kozwaka nimero nyonso oyo ebimi. Kokende kotikela bato yango bazulunalo ekopesa biso likoki ya kokolisa mposa oyo bamonisaki mpe ya kobanda koyekola na bango Biblia.
Tokoki kolikya ete Yehova akolanda kopambola milende nyonso oyo tozali kosala mpo na kosakola Bokonzi na lisalisi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!