Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Zala moyoki malamu
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
    • na biso moko ezali moke, nzokande biso banso tozali na libaku ya koyoka mingi na makita ya lisangá. Na yango, ezali solo likambo ya ntina ete tozala bayoki malamu. Mpe lokola makambo oyo tozali koyoka etali mosala oyo tozali kosalela Jéhovah mpe elikya na biso ya kozala na bomoi ya seko, boye toli oyo ya Yesu ezali na ntina mingi ete: “Bokeba soko bozali koyoka boni.”​—Luka 8:18.

  • ‘Yekola kotanga na miso ya bato mingi’
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
    • Liteya 6

      ‘Yekola kotanga na miso ya bato mingi’

      1, 2. Mabaku nini tozali na yango ya kotanga na miso ya bato mingi?

      1 Ntoma Paulo apesaki Timote toli na maloba oyo: “Otyaka motema na kotanga Makomi polele”, kolobaka mpe na ye ete alakisa kotanga na bandeko na ye baklisto mpo ete bazwa makoki nyonso masengeli na bango na mosala ya Nzambe. (1 Tim. 4:13) Toli oyo epemami ezali na motuya lelo mpo na ministre nyonso ya Nzambe, mpe ebongi malamu ete toyoka yango.

      2 Ministre ya Nzambe azali na mabaku mingi ya kotanga na miso ya bato. Na boyekoli ya Mosenzeli mpe na boyekoli ya mokanda, mikapo mpe baparagrafe ezali kotangama na mongongo makasi. Bakotangaka mpe mikapo na likita ya mosala, na Eteyelo ya mosala ya Nzambe mpe na kati na mosala ya kosakola. Na yango, ministre nyonso azali na litomba, mpo na ye moko mpe mpo na baoyo bazali koyoka ye, ete azala motangi malamu na miso ya bato.

      3. Mpo na nini komibongisa liboso ezali na ntina?

      3 Tokotangaka na mongongo makasi mpo na litomba ya moto moko to ya bato mingi. Nzokande, ndenge nini bayoki bakokoka kozwela yango litomba soki motangi azali kobebisa maloba, soki azali kopema na bisika bisengeli te to azali komonisa te wapi maloba ya ntina, na motindo boye ete fraze mobimba ezali molili? Ndenge nini bayoki bakokoka kolanda

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto