LITEYA 34
Kolendisa bato mpe kolobela mingi makambo ya malamu
NSANGO oyo tozwi mpo na kosakola ezali nsango malamu. Yesu alobaki boye: “Na kati ya bikólo nyonso nsango malamu esengeli kosakolama liboso.” (Mko. 13:10) Yesu ye moko apesaki ndakisa na ndenge asakolaki “nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe.” (Luka 4:43) Makambo oyo bantoma basakolaki ebengami mpe “nsango malamu ya Nzambe” mpe “nsango malamu na ntina etali Klisto.” (1 Tes. 2:2; 2 Kol. 2:12) Nsango ya ndenge wana elendisaka mpe elobelaka makambo ya malamu.
Na boyakani na maloba ya “nsango malamu ya seko” oyo ‘anzelu moko [oyo] azali kopumbwa na katikati ya likoló’ azali kosakola, tozali kolendisa bato na maloba oyo: “Bóbanga Nzambe mpe bópesa ye nkembo.” (Emon. 14:6, 7) Na bisika nyonso, tozali koyebisa bato makambo etali Nzambe ya solo, nkombo na ye, bizaleli na ye kitoko, misala na ye ya kokamwa, mokano na ye ya bolingo, tozali komonisa ete tosengeli kozongisa monɔkɔ epai na ye mpe tozali koyebisa makambo oyo azali kosɛnga biso. Nsango malamu yango elobeli mpe ndenge Yehova Nzambe akoboma bato mabe, baoyo bazali kopesa ye lokumu te mpe bazali kobebisa bomoi ya bato mosusu. Kasi mokumba ya kosambisa bato oyo tozali kosakwela bango nsango malamu ezali na mabɔkɔ na biso te. Tozali mpenza na mposa makasi ete bato ebele bándima nsango ya Biblia mpe ezala mpenza nsango malamu mpo na bango.—Mas. 2:20-22; Yoa. 5:22.
Kolobela mingi te makambo ya mabe. Ya solo, bomoi ya bato ezali mpe na makambo ya mabe. Tozali kokanga miso na makambo yango te. Mpo na kobanda lisolo, okoki kotánga mokakatano moko oyo ezali kotungisa bato ya teritware na bino mpe okoki kolobela yango na mokuse. Kasi ezali mpenza na ntina te ete olobela yango mingi. Ntango nyonso, bato bayokaka bansango ya mabe, yango wana soki ozali koyebisa bango kaka makambo ya nsɔmɔ, bakoki kobengana yo to bakoki koboya koyoka yo. Na ebandeli ya lisolo na yo, salá makasi obenda likebi na bango na solo ya Liloba ya Nzambe oyo ezali kobɔndisa. (Emon. 22:17) Na nsima, ata soki moto yango aboyi kosolola na yo, akotikala kokanisa likambo wana, yango ekolendisa ye. Yango ekoki kosala ete mokolo mosusu andima kosolola na yo.
Ndenge moko mpe soki basɛngi yo osala lisolo, kosopela bato makambo oyo ekolɛmbisa bango nzoto te kaka mpo ozali na makambo yango mingi ya koloba. Soki molobi azali kolekisa ntango kaka mpo na kolobela ndenge bakonzi ya mokili balongi te, ndenge bato bazali kobomana mpe ndenge mobulu etondi, mpe ndenge pite epalangani, yango ekoki kolɛmbisa bato oyo bazali koyoka ye. Lobelá makambo ya ndenge wana na lisolo na yo kaka soki ezali na ntina. Soki olobeli makambo yango kaka mwa moke, yango ekoki komonisa mpenza ete lisolo na yo esalemi na ntango oyo ebongi. Ekoki mpe komonisa nini oyo esali ete likambo boye to boye esalema mpe okoki kosalela yango mpo na komonisa ntina oyo toli oyo ezali na kati ya Biblia ebongi mpenza. Soki ebongi, okoki kolobela mikakatano oyo bato bazali mpenzampenza kokutana na yango, kasi kolekisa ntango mingi te mpo na yango.
Mbala mingi, ezali mpasi mpe ezali malamu te kolongola makambo nyonso oyo ekoki kolɛmbisa bato nzoto na lisolo na yo. Likambo ya mpasi ezali nde kolobela makambo ya malamu na oyo ya mabe nzela moko mpe lisolo yango emonana ete ezali kolobela mingi makambo ya kitoko. Mpo na yango, osengeli koyeba makambo oyo okolobela, makambo oyo okotika mpe esika makambo oyo osengeli konyata. Na Lisolo na ye Likoló ya Ngomba, Yesu amonisaki na bato oyo bazalaki koyoka ye ete basengeli kokeba na bizaleli mabe ya bakomeli mpe ya Bafalisai, mpe apesaki mwa bandakisa mpo na komonisa yango. (Mat. 6:1, 2, 5, 16) Nzokande, na esika ete akangama kaka na bandakisa ya mabe ya bakonzi wana ya mangomba, Yesu anyataki mingi mpenza likambo ya kokanga ntina ya nzela ya solo ya Nzambe mpe kolanda yango. (Mat. 6:3, 4, 6-15, 17-34) Yango epesaki mpenza litomba.
Salá ete elobeli na yo elendisa bato nyonso. Na lisangá, ntango bapesi yo lisolo moko oyo ekolobela mosala ya boklisto, salá makasi olendisa bato na esika ete oluka komonisa kaka bolɛmbu na bango. Salá makasi yo moko mpe osalelaka makambo oyo ozali kolendisa bato básala. (Lom. 2:21, 22; Ebe. 13:7) Koloba na nkanda te, kasi na bolingo mpenza. (2 Kol. 2:4) Soki yo moko mpe ondimi ete bandeko na yo baklisto balingi kosepelisa Yehova, makambo oyo okoyebisa bango ekomonisa yango mpe ekozala mpenza na litomba mpo na bango. Talá ndenge ntoma Paulo amonisaki ete ye mpe azalaki kondima yango, na maloba oyo ezali na 1 Batesaloniki 4:1-12; 2 Batesaloniki 3:4, 5; mpe Filemona 4, 8-14, 21.
Na bantango mosusu, esɛngaka ete bankulutu bákebisa lisangá mpo na ezaleli moko ya mabe. Kasi soki bakozala na komikitisa bakozala na boboto epai ya bandeko na bango. (Gal. 6:1) Elobeli na yo esengeli komonisa ete ozali komemya bato oyo bazali na kati ya lisangá. (1 Pet. 5:2, 3) Biblia ezali kopesa mingimingi bilenge toli ete báyeba likambo yango. (1 Tim. 4:12; 5:1, 2; 1 Pet. 5:5) Soki esɛngi kopesa mpamela, kopesa disipilini, mpe kosembola makambo, esengeli kosala yango na ndenge Biblia yango moko elobi. (2 Tim. 3:16) Ntango ozali komonisa ndenge basengeli kosalela Makomami, osengeli te kolekisa ndelo to kobongola makambo mpo na kosimba likanisi moko oyo yo olingaka mingi. Ata ntango esɛngi kopesa toli mpo na kosembola makambo, lisolo na yo ekolendisa bato soki onyati mingimingi ndenge ya kokima mabe, ndenge ya kosilisa matata, ndenge ya kolonga mikakatano, ndenge ya kotika etamboli ya mabe, mpe ndenge masɛngami ya Yehova ezali kobatela biso.—Nz. 119:1, 9-16.
Ntango ozali kobongisa lisolo na yo, tyá mpenza likebi na ndenge oyo okosukisa likanisi mokomoko ya ntina mpe lisolo na yo mobimba. Mbala mingi, makambo oyo okoloba na nsuka nde bato babosanaka noki te. Okosala ete ezala makambo ya malamu?
Ntango ozali kosolola na bandeko baklisto. Basaleli ya Yehova basepelaka mingi na libaku oyo bazali na yango ya kokutana na bandeko na bango na makita ya boklisto. Makita yango ezalaka ntango ya kobɔndisa biso na elimo. Biblia ezali kotinda biso tóbosanaka te ‘kolendisana’ ntango tozali na bisika na biso ya losambo. (Ebe. 10:25) Tosalaka yango kaka na masukulu to na biyano na biso na makita te, kasi mpe na masolo na biso elongo na bandeko liboso mpe nsima ya makita.
Na masolo na biso tolobelaka makambo ya bomoi na biso ya mokolo na mokolo mpe ezali mabe te, nzokande tokolendisana mingi mpenza nde soki tozali kolobela makambo ya elimo. Yango esangisi makambo oyo tokutanaka na yango na mosala ya bosantu. Kosepela na basusu na ndenge oyo ebongi elendisaka mpe.
Tosengeli kokeba ete mokili oyo ebenda biso tólanda yango te. Ntango Paulo akomelaki baklisto ya Efese, alobaki boye: “Sikoyo lokola bolongoli lokuta, bólobanaka solo mokomoko na bino elongo na mozalani na ye.” (Ef. 4:25) Koloba solo na esika ya kobuka lokuta elimboli mpe ete tosengeli te kokumisa biloko mpe bato oyo mokili ezali kosambela. Ndenge moko mpe Yesu akebisi biso mpo na “nguya ya bokosi ya bomɛngo.” (Mat. 13:22) Yango wana ntango tozali kosolola, tosengeli kokeba ete tópalanganisa makanisi wana ya lokuta te, na komonisa lokola ete konduka bozwi ya mokili ezali malamu.—1 Tim. 6:9, 10.
Ntango ntoma Paulo apesi toli mpo na komonisa ntina ya kolendisana, asɛngi biso te ete tósambisaka to tótyolaka ndeko moko soki aboyi kosala likambo moko mpo azali na “bolɛmbu na kati ya kondima na ye,” elingi koloba mpo azali kokanga mpenza malamumalamu te ntina ya bonsomi na ye ya boklisto. Ya solo, ntango tozali kosolola mpo na kolendisa basusu, tosengeli mpe kotalela esika bautá mpe esika oyo bakómi na bokoli na bango ya elimo. Ekozala mpenza mawa soki ‘totii liboso ya ndeko moko libaku ya kokweisa to eloko ya kotutana’!—Lom. 14:1-4, 13, 19.
Bato oyo bazali kobundana na mikakatano, na ndakisa maladi moko oyo esilaka te, basepelaka mingi na masolo oyo elendisaka. Mbala mosusu, moto ya ndenge wana asalaka milende makasi mpo na koyangana na makita. Bato oyo bayebi mpasi na ye bakoki kotuna ye ete: “Boni?” Na ntembe te akosepela na ndenge bazali komibanzabanza mpo na ye. Nzokande, mbala mosusu asepelaka mpenza te kolobela bokolɔngɔnɔ ya nzoto na ye mpamba te elendisaka mpenza te. Mpo na kosepelisa mpenza motema na ye, okoki koyebisa ye ete osepelaka na oyo azali kosala mpe kopesa ye longonya. Ozali komona ete azali se kolinga Yehova mpe azali koyika mpiko na mokakatano moko? Biyano na ye na makita elendisaka yo? Okolendisa ye mingi mpenza soki okolobela makambo na ye ya malamu mpe ndenge azali kolendisa lisangá na esika ete olobela mikakatano na ye, boye te?—1 Tes. 5:11.
Mpo lisolo na biso elendisa bato, ezali mpenza na ntina ete tóyeba ndenge Yehova azali kotalela likambo oyo tozali kolobela. Na Yisalaele ya kala, Nzambe asepelaki ata moke te na baoyo batɔngaki batambwisi oyo Yehova atyaki mpe baoyo baimaimaki mpo na mana. (Mit. 12:1-16; 21:5, 6) Tokomonisa ete tozwi liteya na bandakisa wana soki tozali komemya bankulutu mpe tozali kosepela na bilei ya elimo oyo moombo ya sembo mpe ya mayele azali kopesa biso.—1 Tim. 5:17.
Ezalaka mpenza mpasi te mpo na kozwa makambo malamu ya kolobela ntango tozali elongo na bandeko na biso baklisto. Nzokande soki omoni ete moto moko azali kaka kolobela mabe ya bato mosusu, salá ete lisolo na bino elobela makambo oyo elendisaka.
Ezala tozali kopesa bato litatoli, to tozali kosala lisolo liboso ya bato mingi, to mpe tozali kosolola na bandeko na biso baklisto, tiká ete tózala na bososoli mpo na kobimisa na mitema na biso oyo etondi na bozwi “liloba nyonso oyo ezali malamu mpo na kotonga na ntango mposa ezali, mpo epesa bayoki oyo ezali malamu.”—Ef. 4:29.