-
Mokili mobimba ebomamaki!Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2002 | 1 Mars
-
-
Biblia ezali na lisolo epemami na elimo santu oyo ezali koyebisa makambo ya kala banda na ebandeli ya mokili. Kasi, makambo mingi ezali komonisa ete Biblia ezali kaka te lisolo mpamba ya makambo ya kala. Bisakweli ya mokanda yango oyo ezangaka te kokokisama mpe bwanya oyo emonanaka na mokanda yango, nyonso wana ezali komonisa ete ezali mpenza, ndenge yango moko elobi, maloba ya Nzambe epai ya bato. Masolo ya Biblia ekeseni na masapo, mpamba te na kati ya masolo ya Biblia tokokuta bankombo, badati, milɔngɔ ya mabota, ata mpe bisika oyo yango esalemaki. Ezali koyebisa biso makambo oyo bato bazalaki kosala liboso ya Mpela mpe eyebisi ntina oyo mokili mobimba ebomamaki na mbala moko.
Makambo nini ya mabe bato oyo bazalaki na bomoi liboso ya mpela basalaki? Lisolo oyo elandi elobeli yango. Motuna yango ezali na ntina mingi mpo na baoyo bazali komituna soki mokili oyo ezali kokende wapi.
-
-
Mpo na nini mokili ebomamaká na ntango ya kala?Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2002 | 1 Mars
-
-
Mpo na nini mokili ebomamaká na ntango ya kala?
MPELA ya mokili mobimba ezalaki likama oyo ebimaki kaka boye te. Ezalaki mpenza etumbu ya Nzambe. Liboso na yango, bakebisaki bato nyonso, kasi bato mingi bakangaki matoi na bango. Mpo na nini? Yesu alobaki boye: “Na mikolo wana ya liboso ya mpela, [bato bazalaki] kolya mpe komɛla, mibali bazalaki kobala mpe basi bazalaki kobalisama, tii na mokolo oyo Noa akɔtaki na masuwa; mpe batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ememaki bango nyonso.”—Matai 24:38, 39, NW.
Bato bayebaki misala ya mayele
Bato oyo bazalaki liboso ya Mpela bazalaki na makambo mosusu oyo biso lelo oyo kutu tozali na yango te. Na ndakisa, mokili mobimba bazalaki koloba monɔkɔ moko. (Genese 11:1) Yango esalisaki bango básala misala ya ntɔki mpe ya siansi oyo esɛngaka bato ya misala denge na ndenge básangisa mayele na bango. Lokola bato bazalaki koumela mingi mpenza na bomoi, yango epesaki bango nzela ya kolanda kosalela mayele oyo bayekolaki bambula na bambula.
Bato mosusu balobaka ete ezali solo te ete na ntango wana bato bazalaki mpenza koumela mingi na bomoi; balobaka mpe ete bambula oyo Biblia elobeli ezalaki nde basanza. Kasi, ezali mpenza bongo? Tókamata ndakisa ya Mahalalele. Biblia elobi ete: “Ezalaki Mahalalele na mbula ntuku motoba na mitano, abotaki Yelede. . . . Mikolo nyonso ya Mahalalele izalaki mbula nkama mwambe na ntuku libwa na mitano, na nsima akufaki.” (Genese 5:15-17) Soki bambula oyo balobeli na bavɛrsɛ yango ezali nde basanza, boye elingi koloba ete Mahalalele abotaki mwana na ye ntango azalaki na mbula mitano! Na ntango wana, bato bazalaki mosika mingi te na moto ya liboso, Adama, moto ya kokoka ntango bakelaki ye. Bato bazalaki mpenza koumela bankama mingi ya bambula. Makambo nini basalaki?
Bato babotanaki mingi mpe bankama ya bambula liboso ya Mpela, bakómaki ebele mpenza na boye ete Kaina, mwana ya Adama atongaki engumba mpe apesaki yango nkombo Enoka. (Genese 4:17) Na bambula nyonso wana liboso Mpela eya, bato bakómaki kosala misala ndenge na ndenge. Bato mosusu bazalaki kosala “biloko nyonso ya motako mpe ya ebende.” (Genese 4:22) Na ntembe te bazalaki kosalela biloko yango mpo na kotonga, kosala mosala ya mabaya, kotonga bilamba mpe kosala bilanga. Na masolo oyo elobelaka bato ya liboso oyo bafandaki awa na mabele, balobelaka mpe misala nyonso wana.
Makambo nyonso oyo bayebaki esalisaki bato oyo bazalaki kobotama nsima báyekola misala lokola ya kosala bibende, kosala bilanga, kobɔkɔla bampate na bangɔmbɛ, kokoma, mpe kosala misala ya ntɔki. Na ndakisa, Yubalo azalaki “tata ya baoyo nyonso bakobɛtaka nzɛnzɛ mpe mongendu.” (Genese 4:21) Bato bayebaki makambo mingi mpenza. Kasi, makambo nyonso esukaki na mbala moko. Likambo nini esalemaki?
Makambo nini ya mabe basalaki?
Atako bato bazalaki na makambo malamu nyonso wana, babandaki kosala makambo ya mabe kaka na ebandeli. Nkɔkɔ na bango nyonso, Adama, aboyaki kotosa Nzambe. Kaina, moto oyo atongaki engumba ya liboso oyo Biblia elobeli, abomaki ndeko na ye. Soki tokanisi nyonso wana, tokoki kokamwa te ete mabe epalanganaki mpenza! Mbuma ya makambo mabe oyo Adama atikelaki bana na ye ezalaki se kokola.—Baloma 5:12.
Makambo ezalaki se kobeba ntango Yehova azwaki ekateli ete akotika lisusu kaka mbula 120. (Genese 6:3) Biblia elobi ete: “Masumu ya bato izalaki mingi na mokili mpe ete makanisi nyonso kati na mitema na bango izalaki bobele epai na mabe mikolo nyonso. . . . Mokili etondaki na yauli.”—Genese 6:5, 11.
Nsukansuka, Nzambe ayebisaki Noa polele ete akotinda mpela mpo na koboma bato nyonso. (Genese 6:13, 17) Atako Noa azalaki “mosakoli ya boyengebene,” ezali polele ete bato bazalaki kondima te ete makambo nyonso oyo bazalaki na yango elingaki kosuka. (2 Petelo 2:5) Kaka bato mwambe bayokaki likebisi mpe babikaki. (1 Petelo 3:20) Yango ezali na ntina nini mpo na biso lelo oyo?
Yango ezali kolobela biso nini?
Mikolo oyo tozali ekokani na mikolo ya Noa. Mbala na mbala tozali koyoka makambo ya nsɔmɔ: bato ya mobulu bazali kotya babɔmbi na bisika oyo bato ebele bazali; na bisika mosusu bazali koboma bato ya ekólo moko mpo na kosilisa bango nyonso; bato mosusu bazali kotambola na mindoki mpe bazali kobɛta masasi mpe koboma bato mpambampamba; mpe mobulu ekómi ya koloba te na kati ya mabota. Mabele etondi lisusu na mobulu mpe, ndenge ezalaki liboso, likebisi ezali kopesama ete Nzambe akopesa etumbu. Yesu ye moko alobaki ete azali Zuzi oyo Nzambe aponi mpe akoya mpo na kokabola bato ndenge mobateli ya mpate akabolaka bampate na bantaba. Yesu alobaki ete bato oyo ye akondima te “bakolongwa kino etumbu ya seko.” (Matai 25:31-33, 46) Kasi, Biblia elobi ete na mbala oyo, bamilio ya bato bakobika, ebele mpenza ya bato oyo bazali kosambela Nzambe ya solo kaka moko. Na mokili oyo ekoya, bato yango bakozala na kimya ya libela na ndenge oyo bamoná naino te.—Mika 4:3, 4; Emoniseli 7:9-17.
Bato mingi basɛkaka maloba wana ya Biblia mpe makebisi oyo ezali kolobela etumbu oyo ekokokisa maloba wana. Kasi, ntoma Petelo alobaki ete basɛki yango bazali lokola bato bakufá miso. Akomaki boye: “Na mikolo ya nsuka basɛki bakoya, . . . bakoloba ete, Wapi elaka ya [kozala, NW] na ye? . . . Mpo ete balingi kobosana ete Likoló ezalaki kalakala mpe nse ebimaki na mai, etɛlɛmi na mai mpo na Liloba ya Nzambe. Mpe mpo na mai yango, mokili ya ntango yango ezindaki mpe ebomamaki. Mpo na Liloba na ye, Likoló mpe nse ya ntango oyo ibombami ete izika; izali kobatelama kino mokolo ya kosambisa mpe ya koboma bato bakotyolaka Nzambe.”—2 Petelo 3:3-7.
Lelo oyo, ndenge Yesu asakolaki mpe atindaki yango, bazali kokebisa bato na mokili mobimba ete mokolo ya kosambisa ezali koya mpe bazali kosakola na molende nsango malamu ete kimya ekoya nsima na yango. (Matai 24:14) Tosengeli kozwa likebisi yango na lisɛki te. Soki Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso alobi likambo, akokisaka yango.
Mokili oyo ekoya
Lokola makambo ekobongwana mpenza, bomoi ya bato ekokóma ndenge nini? Yesu abandaki Lisolo na ye Likoló ya Ngomba na elaka oyo: “Esengo na bato ya elimo ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabele.” Na nsima, ateyaki bayekoli na ye bábondelaka Nzambe ete: “Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Matai 5:5, NW; 6:10, NW) Yesu ye moko ateyaki ete bato ya sembo bakozala na bomoi ya malamu mingi mpenza awa na mabele. Abengaki yango “kozalisa lisusu.”—Matai 19:28, NW.
Kolanda maloba ya basɛki te mpo soki olandi yango okobanda kotyela likebisi ya Nzambe ntembe na ntina etali mikolo ezali koya. Ya solo, makambo ekoki komonana lokola nde ezali malamu mpe mokili oyo eumeli mingi mpenza. Kasi, tótyela yango motema te. Nzambe asili kokatela bato ya mokili oyo etumbu. Na yango, tiká ete maloba ya nsuka ya mokanda ya ntoma Petelo elendisa yo:
“Na bongo, awa ezali biloko nyonso mpo na konangwa, ebongi na bino kozala bato boni na bizaleli ya bulɛɛ mpe na kosambela Nzambe, kotalela mpe koyeisa noki emononeli ya mokolo ya Nkolo? . . . Awa ezali bino kotala makambo oyo, bótya etingya ete bózwana na ye na kozanga litɔnɔ mpe na likambo te kati na kimya. Bókola nde na ngɔlu mpe na boyebi ya Nkolo na biso mpe Mobikisi, ye Yesu Klisto.” (2 Petelo 3:11, 12, 14, 18) Yango wana, tiká ete makambo oyo elekaki na mikolo ya Noa ezala liteya mpo na yo. Luká kozala moninga ya Nzambe. Tiká ete boyebi na yo ya Yesu Klisto ekola ntango nyonso. Loná ezaleli ya kokangama na Nzambe, mpe kɔtá na molɔngɔ ya bamilio ya bato oyo baponi kobika na nsuka ya mokili oyo mpe kokɔta na mokili ya kimya oyo ekoya.
[Elilingi na lokasa 5]
Liboso ya Mpela bato bayebaki kosala bibende
[Elilingi na lokasa 7]
Bomoi ya malamu mingi ekozala na mikolo ezali liboso
-