-
“Nakolinga kobongola ata eloko moko te!”Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2002 | 1 Septembre
-
-
Soki natali ndenge nalekisi bomoi na ngai, eloko nini nakolinga kobongola? Nabalá te, kasi nazalaki na baboti ya bolingo, ndeko moko ya mobali mpe bandeko ya basi, oyo bazalaki kotya solo na esika ya liboso na bomoi na bango. Nazali na elikya ete etikali moke namona bango nyonso lisusu, na mokolo ya lisekwa. Nazali komona ndenge tata akoyamba ngai, mpe ndenge mama akotangisa mpisoli ntango tokoyambana. Na ntango wana Ella, Ruby, na Bob bakopumbwa na esengo.
Wana nazali kozela, mposa na ngai ezali ntango nyonso ete nakoba kosalela mwa bokolɔngɔnɔ ya nzoto na ngai mpe mwa makasi moke oyo natikali na yango mpo na kosanzola mpe kopesa Yehova lokumu. Kosala mosala ya mobongisi-nzela ya ntango nyonso ezali bomoi moko ya esengo mpe ya mbano monene. Ezali mpenza ndenge mokomi ya nzembo alobaki mpo na bato oyo balandaka banzela ya Yehova: “Okozala moto na esengo mpe makambo na yo nyonso ekotambola malamu.”—Nzembo 128:1, 2, NW.
-
-
Ndenge nini tosengeli kotalelaka komekama?Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2002 | 1 Septembre
-
-
Ndenge nini tosengeli kotalelaka komekama?
KOMEKAMA! Moto nyonso asengeli kokutana na yango. Tokoki komekama mpo tozali koyokana te na moto mosusu, mpo tozali kozwa mbongo te, tozali nzoto kolɔngɔnɔ te, mpo na masɛnginya, baninga bazali kobenda biso na makambo ya mabe, minyoko, mikakatano mpo toboyaka kokɔta na makambo ya politiki to toboyaka losambo ya bikeko, mpe makambo mosusu. Ata soki tokutani na komekama ya ndenge nini, mbala mingi, etungisaka biso mingi. Ndenge nini tokoki kolonga yango? Ndenge nini komekama ekoki kozala na litomba mpo na biso?
Lisalisi oyo eleki malamu
Mokonzi Davidi, moto ya kala, akutanaki na komekama na bomoi na ye mobimba, kasi atikalaki sembo tii na liwa na ye. Ndenge nini akokaki koyikela komekama yango mpiko? Alobelaki Ye oyo azalaki kopesa ye makasi ntango alobaki boye: “Yehova azali Mobateli na mpate mpo na ngai. Nakozanga eloko moko te.” Nsima, abakisaki ete: “Ata natamboli na libulu na molili na kufa, nakobanga mabe te; zambi yo ozali na ngai elongo, mpango na yo mpe nzete na yo makasi ezali kobɔndisa ngai.” (Nzembo 23:1, 4) Ya solo, Yehova azali Moto oyo asungaka mpenza. Atambwisaki Davidi na eleko ya mpasi mingi, mpe azali pene mpo na kobatela biso soki esengeli.
Ndenge nini tokoki kozwa lisungi ya Yehova? Biblia emonisi ndenge nini tokoki kozwa yango ntango elobi ete: “Meká mpe sosolá ete [Yehova] azali malamu.” (Nzembo 34:8) Wana ezali maloba ya boboto mpenza, kasi yango elimboli nini? Ezali kolendisa kosalela Yehova mpe kosala mokano na ye na bomoi na biso. Kosala bongo elimboli kotika bonsomi na biso mosusu, komipimela makambo mosusu. Ntango mosusu ekoki mpe kobimisela biso komekama, na ndakisa minyoko mpe bampasi. Atako bongo, baoyo bazali kondima maloba ya Yehova na motema na bango mobimba, bakoyoka mawa soki moke te mpo ete basalaki bongo. Yehova akozala malamu mingi mpo na bango. Akokamba bango mpe akokokisa bamposa na bango ya elimo. Na ntango ya komekama, akosunga bango na nzela ya Liloba na ye, elimo santu na ye, mpe lisangá ya boklisto. Mpe nsukansuka, akopesa bango mbano ya bomoi ya seko.—Nzembo 23:6; 25:9; Yisaya 30:21; Baloma 15:5.
Bato oyo bazwaka ekateli ya kosalela Yehova, ekateli oyo ebongolaka bomoi mobimba ya moto, mpe bakangamaka na ekateli yango bamonaka ete Yehova akokisaka bilaka na ye nyonso. Yango nde likambo Bayisalaele oyo balandaki Yosua na Mokili ya Ndaka bamonaki. Ntango bakatisaki Ebale Yaladene, bakutanaki na komekama oyo basengelaki koyikela yango mpiko, bitumba oyo basengelaki kobunda, mpe makambo ya mpasi oyo basengelaki kozwela yango mateya. Kasi, libota wana bazalaki sembo koleka batata na bango oyo bautaki na Ezipito mpe bakufaki na esobe. Yango wana, Yehova asungaki bato ya sembo, mpe mpo na ezaleli na bango na nsuka ya bomoi ya Yosua, Biblia elobi ete: “[Yehova] apesaki bango kimya na bipai nyonso lokola esimbaki ye ndai na batata [na bango, NW] . . . Moko na ndaka malamu nyonso, oyo [Yehova] atyaki na ndako na Yisalaele, ezangaki te. Yango ebimaki nyonso.” (Yosua 21:44, 45) Yehova akosunga mpe biso soki totii elikya nyonso epai na ye ntango tokutani na komekama mpe na bantango mosusu nyonso.
Nini ekoki kolɛmbisa kondima na biso epai ya Yehova? Yesu alobelaki likambo moko ntango alobaki boye: “Moto moko te akoki kosala lokola moombo mpo na bankolo mibale . . . Bokoki te kosala lokola baombo mpo na Nzambe mpe mpo na Bomɛngo.” (Matai 6:24) Soki totii motema epai na Yehova, tokoluka te komibatela esika bato mingi balukaka komibatela, elingi koloba na biloko ya mokili. Yesu apesaki bayekoli na ye toli ete: “Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe biloko nyonso wana mosusu [oyo bosengeli na yango] ekobakisamela bino.” (Matai 6:33) Moklisto oyo azali kotya biloko ya mokili na esika na yango mpe azali kotya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na ye azali kopona nzela ya malamu. (Mosakoli 7:12) Ezali solo ete yango ekosɛnga komipimela makambo mosusu. Asengeli komipimela biloko mosusu ya mokili. Kasi, akozwa matomba mingi. Mpe Yehova akosalisa ye.—Yisaya 48:17, 18.
Makambo oyo komekama eteyaka biso
Ezali solo ete soki moto aponi ‘komeka mpe kososola ete Yehova azali malamu,’ yango ekobatela ye na mikakatano ya bomoi te; to mpe ekobatela biso te na masɛnginya nyonso ya Satana mpe ya bato na ye. (Mosakoli 9:11) Yango wana, bosembo mpe ekateli ya moklisto ekoki komekama. Mpo na nini Yehova atikaka basambeli na ye bámekama ndenge wana? Ntoma Petelo amonisaki moko na bantina yango ntango akomaki boye: “Mpo na mwa ntango moke sikoyo, soki yango esengeli, bozali koyokisama mawa na komekama ndenge na ndenge, mpo motindo ya kondima na bino oyo emekami, oyo ezali na motuya monene koleka wolo oyo ebebaka atako emekami na mɔ́tɔ, emonana ntina ya lisanzoli mpe ya nkembo mpe ya lokumu na emoniseli ya Yesu Klisto.” (1 Petelo 1:6, 7) Ya solo, komekama esalisaka biso tómonisa motuya ya kondima na biso mpe bolingo na biso mpo na Yehova. Esalisaka mpe mpo na kopesa eyano na makaneli mpe bifundeli ya Satana Zabolo.—Masese 27:11; Emoniseli 12:10.
Lisusu, komekama esalisaka biso tókolisa bizaleli mosusu ya boklisto. Na ndakisa, talá maloba ya mokomi na nzembo: “[Yehova] amonaka moto ya komikitisa; kasi moto ya lolendo ayebaka ye nde na mosika.” (Nzembo 138:6, NW) Mingi kati na biso tobotamaka na komikitisa te, kasi komekama ekoki kosalisa biso tókolisa ezaleli wana ya ntina mingi. Tókanisa lisusu mikolo ya Moize, ntango bato mosusu na Yisalaele balɛmbaki kolya mana pɔsɔ na pɔsɔ mpe sanza na sanza. Na ntembe te, ezalaki komekama mpo na bango, atako bazalaki kozwa mana yango na ndenge ya likamwisi. Komekama yango ezalaki na ntina nini? Moize ayebisaki bango boye: “[Yehova] aleisi yo mana na lisobe . . . na ntina ete akitisa lolendo na yo mpe ameka yo.”—Deteronome 8:16.
Biso mpe, komikitisa na biso ekoki komekama. Na ndenge nini? Na ndakisa, ndenge nini totalelaka mbongwana oyo esalemaka na kati ya lisangá? (Yisaya 60:17) Topesaka mabɔkɔ na mosala ya kosakola mpe ya koteya na motema na biso mobimba? (Matai 24:14; 28:19, 20) Tondimaka na esengo mpenza bandimbola ya solo ya Biblia oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kopesa? (Matai 24:45-47; Masese 4:18) Toboyaka koluka kozala na eloko nyonso oyo ebimi sika, modɛlɛ ya bilamba to ya motuka oyo ebimi sika? Moto ya komikitisa akoyoka ata kilo moke te mpo na koyanola ɛɛ na mituna yango.—1 Petelo 1:14-16; 2 Petelo 3:11.
Komekama esalisaka biso tókolisa ezaleli mosusu ya ntina mingi: ezaleli ya koyika mpiko. Moyekoli Yakobo alobaki boye: “Bómona yango esengo mpenza, bandeko na ngai, ntango bozali kokutana na komekama ya ndenge na ndenge, mpo bino moko boyebi ete motindo ya kondima na bino oyo emekami ezali kobota ezaleli ya koyika mpiko.” (Yakobo 1:2, 3) Koyika mpiko na komekama oyo ezali koya moko nsima na mosusu mpe kolonga yango na kotyáká motema mobimba epai na Yehova epesaka mpiko, etingya, mpe epesaka nzela na kozala sembo. Elendisaka biso na kolonga mayele mabe ya Satana, nzambe ya nkanda makasi ya mokili oyo.—1 Petelo 5:8-10; 1 Yoane 5:19; Emoniseli 12:12.
Tótalela komekama na ndenge ya malamu
Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe mpe moto ya kokoka, amekamaki mingi ntango azalaki awa na mabele mpe azwaki matomba lokola ayikelaki komekama yango mpiko. Paulo akomaki ete Yesu “ayekolaki botosi na kati ya makambo oyo akutanaki na yango.” (Baebele 5:8) Bosembo na ye tii na liwa ekumisaki nkombo ya Yehova mpe yango epesaki Yesu nzela ya kopesa motuya ya bomoi na ye ya kokoka lokola lisiko mpo na bato. Yango efungolaki nzela ete bato oyo bamonisaki na misala na bango ete bazali kondimela Yesu bázwa elikya ya bomoi ya seko. (Yoane 3:16) Mpo Yesu atikalaki sembo na komekama, azali sikoyo Nganga-Nzambe Monene na biso mpe Mokonzi oyo asili kozwa bokonzi.—Baebele 7:26-28; 12:2.
Ezali boni mpo na biso? Bosembo na biso liboso ya komekama ememaka mapamboli mingi mpenza. Mpo na baoyo bazali na elikya ya bomoi na likoló, Biblia elobi boye: “Esengo na moto oyo azali kokoba koyika mpiko na komekama, mpamba te na kokómáká moto oyo andimami akozwa motole ya bomoi, oyo Yehova alakaki na baoyo bazali kokoba kolinga ye.” (Yakobo 1:12) Baoyo bakozwa bomoi awa na mabele bazali na elikya ete soki bayiki mpiko na bosembo mpenza, bakozwa bomoi ya seko na paladiso. (Emoniseli 21:3-6) Mpe likambo eleki ntina ezali ete koyika mpiko na bosembo mpenza ekumisaka nkombo ya Yehova.
Lokola tozali kolanda matambe ya Yesu, tokoki kozala na elikya ete tokoki kolonga komekama oyo tozali kokutana na yango na mokili oyo. (1 Bakolinti 10:13; 1 Petelo 2:21) Na ndenge nini? Soki tozali kotya motema epai ya Yehova, ye oyo apesaka baoyo batyelaka ye motema “nguya oyo eleki makasi.” (2 Bakolinti 4:7) Tiká ete kondima na biso ezala lokola ya Yobo oyo, ata akutanaki na komekama ya makasi, andimaki na elikya nyonso ete: “Soki ameki ngai, nakobima lokola wolo.”—Yobo 23:10.
[Elilingi na lokasa 31]
Bosembo ya Yesu na ntango ya komekama ekumisaki nkombo ya Yehova. Biso mpe tokoki kosala bongo
-