Loyembo 58
Yehova, “Nzambe na kobɔndisama nyonso”
(2 Bakolinti 1:3-7, NW)
1. Kobɔndisama, tozwi na Yah;
Ye nde Tata na biso.
Na nzela na Liloba na ye,
Tóbɔndisa bandeko.
2. Mpasi, lelo eyikani bɛɛ,
Ezwi bandeko banso.
Nde na nzela na Nkolo Yesu,
Nzamb’abɔndisi biso.
3. Tókumisa Yehova Nzambe,
Ye mosungi monene!
Y’akoleisa biso solo;
Tokoliky’epai na ye.
4. Banso, tokoki kozwa kimya,
Nde tózala sembo mpe.
Bolingo ya Yehova Nzambe
Ezali na nsuka te.