-
‘Tólala mpɔngi te’Mosala ya Bokonzi—2000 | Mai
-
-
‘Tólala mpɔngi te’
1 Nsima ya kolobela makambo minene oyo esengelaki komonisa mikolo ya nsuka ya mokili oyo, Yesu apesaki bayekoli na ye toli ete ‘bálala mpɔngi te.’ (Mko. 13:33, NW) Mpo na nini baklisto basengeli kolala mpɔngi te? Mpamba te tozali na bomoi na eleko moko oyo eleki mpasi mingi kobanda mokili ebandá. Tosengeli soki moke te komeka kolala mpɔngi na elimo. Yango ekomonisa ete tozali komona ete mosala oyo Yehova apesi biso na mikolo oyo ya nsuka ezali mpenza na ntina te. Ezali mosala nini?
2 Yehova asɛngi basaleli na ye ete básakola nsango malamu ya Bokonzi na ye na mabele mobimba—yango ezali elikya bobele moko mpo na bato. Kosala elongo na ebongiseli ya Nzambe ezali komonisa ete tozali baklisto ya solo, oyo bayebi ntango oyo tokómi mpe bayebi ntina ya kosalisa bato mosusu ete báyoka “maloba ya bomoi ya seko.” (Yoa. 6:68) Soki tozali kosala na molende nyonso mosala oyo eleki misala mosusu nyonso na ntina, yango ezali elembo ete tozali kolala mpɔngi te na elimo.
3 Tosengeli kosakola: Lokola tozali batatoli ya Yehova, tosengeli kozala na makanisi malamu mpo na mosala na biso ya kosakola. Bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na biso ezali kotinda mokomoko na biso ete asakola. (1 Kol. 9:16, 17) Soki tosali bongo, tokomibikisa biso moko mpe bato oyo bazali koyoka biso. (1 Tim. 4:16) Tiká ete tómityela mokano ya kosakola pɔsɔ na pɔsɔ to mokolo na mokolo, ya kolekisa ngonga mingi na mosala ya kosakola mpe ya komipesa mpenza na mosala ya kosakola boyangeli oyo eleki malamu mpo na bato—Bokonzi ya Nzambe!
4 Ezali na likambo moko ya ntina mingi oyo ezali kotinda biso na kosala mosala na biso na lombangu—bolɔzi monene ekobanda wana tozali naino kosala mosala yango. Lokola toyebi te mokolo mpe ngonga, yango ezali kosɛnga ete tólala mpɔngi te mpe tómibongisa ntango nyonso, tótya motema na biso mobimba epai ya Yehova. (Ef. 6:18) Mosala ya kosakola ezali se koya monene. Kasi etikali moke, mokolo mosusu, mosala oyo eleki monene ya kopesa litatoli, banda mokili ebandá, ekóma na nsuka na yango.
5 Tólanda na bosembo nyonso etinda oyo Yesu apesaki ya “kolala mpɔngi te.” Lelo oyo ekomi likambo eleki ntina koleka ndenge ezalaki liboso. Tiká ete tósala mosala yango na lombangu. Ezala lelo mpe mikolo nyonso, tiká ete tózala bato ya bokatikati mpe tósɛnzɛla na elimo, tósala mingi na mosala ya Yehova. Ɛɛ, tiká ete “tólala mpɔngi te mpe tóbatela makanisi na biso malamu.”—1 Tes. 5:6, NW.
-
-
Yo mpe okozala wana?Mosala ya Bokonzi—2000 | Mai
-
-
Yo mpe okozala wana?
1 Mokolo moko, Motatoli moko oyo aumeli mingi na kati ya solo alobaki ete: “Soki ozangisi liyangani na mokolo ya liboso, okozanga mpenza makambo mingi!” Mpo na nini alobaki bongo? Mpamba te mokolo ya liboso ezali ebandeli ya elambo kitoko ya elimo oyo ebongiseli ya Yehova ebongisi mpo na biso. (Yis. 25:6) Soki tozali wana banda na ebandeli tokomonisa ete tozali kokanisa ndenge moko na mokomi na nzembo oyo alobaki ete: “Nasepeli mingi wana balobelaki ngai ete, Tiká tókenda na ndako na [Yehova.]”—Nz. 122:1.
2 Na mbula eleki, na bisika mosusu oyo liyangani “Liloba ya esakweli ya Nzambe” esalemaki, bato oyo bayanganaki na mokolo ya mitano bazalaki mpenza moke soki tokokanisi motango na bango na oyo ya mokolo ya pɔsɔ mpe mokolo ya lomingo. Yango emonisi ete bandeko mingi bayokaki te masukulu oyo emonisaki makambo ya ntina mingi ya liloba ya esakweli. Bazangaki mpe libaku malamu ya kozala esika moko na bandimi mosusu.
3 Kotika te ete mosala na yo ya mosuni epekisa yo koyangana: Ekoki kozala ete bato mosusu babangaka ete bakobebisa mosala na bango ya mosuni, yango wana bazalaka na liyangani mokolo ya mitano te. Nzokande, batatoli mingi basili komona ete bapatrɔ na bango bandimaka kopesa bango nzela soki basɛngi konje na bango mwa mikolo mingi liboso. Patrɔ moko akamwaki mingi na komona ekateli oyo ndeko mwasi moko, mobongisi-nzela, azwaki ya koyangana na makita nyonso ya lisangá mpe na mayangani nyonso; na yango alekisaki mokolo mobimba elongo na ndeko mwasi yango na liyangani!
4 Osengeli te kokanisa ete patrɔ na yo akolinga kaka te kopesa yo mwa konje, to kokanisa ete soki ozangisi liyangani mokolo moko ekosala eloko te. Zalá na kondima mpenza, omibongisa mpo na komonisa patrɔ na yo na nzela ya Makomami ete kozala na liyangani ezali na ntina mingi mpo na losambo na yo. (Ebe. 10:24, 25) Na nsima, tyá elikya na yo nyonso na bilaka ya Yehova, oyeba ete eloko nyonso ya mosuni oyo okosɛnga okozwa yango soki ozali kotya matomba ya elimo na esika ya liboso na bomoi na yo.—Mat. 6:33; Ebe. 13:5, 6.
5 Mpo na kolonga na likambo yango esengeli nde komonisa botɔndi mpo na “makambo oyo eleki ntina.” (Filp. 1:10, 11, NW; Nz. 27:4) Yango ekotinda biso tómibongisa mpo na kozwa matomba mpenza na ebongiseli ya ntina mingi oyo euti na Yehova. Bandá komibongisa sikoyo mpe zwá ekateli ete yo mpe okozala wana mikolo nyonso misato!
-